Loyembo 6
Tósakola nsango malamu ya seko
1. Bomoni anzelu ya Nzambe kopumbwa?
Azwi nde nsango malamu ya kopanza.
Alobi: ‘Kumisá Nkolo, bangá Nzambe;
Ye mosantu. Kumisá Yehova Nzambe.’
Oy’ezali ntango ya kosambisama.
Mosika te, bato mabe bakokufa.
Bino basakoli, bózala n’esengo,
Na kondima, bósakola nsango yango.
2. Anzelu mosusu ayei mpe alobi:
‘Bósakola bipai binso, Batatoli,
“Babilone monen’ekweisami nyee!
Kobomama na yango ekómi pene.”’
Asɛngi Batatoli baloba ete:
Yehova akobulisa nkombo na ye.
Elanga emonani ete ezali
Monene, kasi nzela esembolami.
3. Yesu ayei na limpinga na ye mpenza;
Azali solo kosambisa mabota.
Salaká nde malamu mpe kimá mabe,
Tosaká mibeko mpe bangaká Nzambe!
Oyo lisɛngami lipesameli yo:
Teyaká na mpiko mpe sakolá solo.
Bino basakoli ya mpiko, bózala
Na esengo ya kosanzola Yehova!