Loyembo 11
Batikali bamonisami na Sulamite
1. Oleki bonzengá, Sulamite na ngai.
Mongongo na yo mosepelisi ngai.
Ozangi litɔ́nɔ, ngai nalingi yo,
Napesi yo motema na ngai nyonso.”
2. Oyo maloba ya Nkolo Masiya,
Epai na mwasi na ye, lisangá;
Mpo’aboyi bopusi oy’a masumu;
Nde bosembo na ye s’epai na Yesu.
3. Sulamite alobi: “Ya ngai bolingo
Ekoki kolónga makambo manso.”
Y’okɔtɛli ngai o kati’a motema,
Mpe bolingo na yo lokola nkunda.
4. Nde bózala sembo, Ɛ batikali;
Mpe bózala pɛto mpo na mobali!
“Ebele monene” balandi bino,
Basepeli na misala na bino.