Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • yp2 lok. 33
  • Bandakisa ya kolanda​—Moshulame

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Bandakisa ya kolanda​—Moshulame
  • Mituna oyo bilenge batunaka—Biyano oyo ebongi, Volimi 2
  • Masolo mosusu
  • Elenge mwasi Moshulame azali ndakisa oyo ebongi kolanda
    Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2016
  • Batikali bamonisami na Sulamite
    Nzembo mpo na kokumisa Yehova
  • Mokanda ya Biblia nimero 22—Loyembo na Salomo
    “Makomami nyonso mapemami na Nzambe mpe mazali na litomba”
  • Makanisi ya ntina na Loyembo ya Salomo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2006
Makambo mosusu
Mituna oyo bilenge batunaka—Biyano oyo ebongi, Volimi 2
yp2 lok. 33

Bandakisa ya kolanda​—Moshulame

Elenge mwasi Moshulame ayebaki malamu ete asengelaki kotika te ete lolango etambwisa ye motó. Alobaki na baninga na ye boye: “Nalapisi bino ndai, ete bómeka te kolamwisa to kotumola bolingo kati na ngai tii ntango yango moko ekolinga.” Moshulame ayebaki ete lolango ekoki kokanga moto miso. Na ndakisa, ayebaki ete bato mosusu bakoki kotya ye mbamba mpo andima ata moto oyo abongi na ye te. Ata mpe motema na ye moko ekokaki kokosa ye. Yango wana, Moshulame atikalaki makasi lokola “efelo.”​—Loyembo ya Salomo 8:4, 10.

Moshulame azalaki moto oyo akɔmɛli, yango wana azalaki kotalela bolingo ya mwasi ná mobali na ndenge ebongi; yo mpe ozali lokola ye? Okokoka kosalela bɔɔngɔ na yo na esika olanda kaka motema na yo? (Masese 2:10, 11) Bato mosusu bakoki kotya yo mbamba mpo olingana na moto na ntango oyo okoki naino te. Mbala mosusu, yo moko okoki kokóma na makanisi ya ndenge wana. Na ndakisa, ntango omoni mwana mwasi ná mwana mobali na balabala basimbani na lobɔkɔ, oyokaka mposa ya kosala lokola bango? Okondima moto oyo azali te Motatoli ya Yehova lokola yo? Elenge Moshulame azalaki kotalela makambo etali bolingo ya mwasi ná mobali lokola moto oyo akɔmɛli. Yo mpe okoki kosala lokola ye!

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto