Loyembo 12
“Nzambe alingi ye oyo akopesaka na esengo”
1. Awa tosaleli Yah, Tata, tóyeba ete,
Y’aleki na bolingo, na boboto bɛɛ.
Apesaki Mwana na ye, sol’akabaki ye
Ete bato bábika mpo na nkombo na ye.
2. Tómekola Yehova, mpo na bokabi na ye.
Tópesa n’esengo, mpe nyonso’epai na ye.
Bozwi mpe ntango na biso ezali mpo na Yah.
Tópesa ye molimo na biso libela.
3. Nzambe akosepela soki tokokabaka
Bolingo epusi biso na koteya.
Tópesa yango ebongisami na motema;
Nsima, tokozwa bolamu, tokosepela.
4. Tótɔndo Yehova mpe Klisto Yesu Masiya.
Tólóngisa solo ya Nzambe na nguya.
Tópesaka makabo mauti na bolingo;
Tósepelisa Nzambe na bomoi na biso.