Tólanda ndakisa ya Yehova, “Nzambe ya esengo”
1 Yehova alingaka mpenza ete bato na ye bázala na esengo. Liloba na ye ezali kosalisa biso tózela na motema likoló, mapamboli oyo alaki kopesa bato na mikolo ezali koya. (Yis. 65:21-25) Basusu basengeli komona polele ete toyokaka esengo mpenza ntango tozali kosakwela bango “nsango malamu ya nkembo ya Nzambe ya esengo.” (1 Tim. 1:11) Ndenge na biso ya koyebisa bato nsango malamu ya Bokonzi, esengeli komonisa ete tolingaka mateya ya solo mpe tozali kosepela mpenza na bato oyo tozali kosolola na bango.—Lom. 1:14-16.
2 Ya solo, ekoki kozala mpasi tómonisa ntango nyonso ete tozali na esengo. Na bisika mosusu, bato mingi basepelaka na nsango ya Bokonzi te. Na bantango mosusu, tokutanaka na mikakatano na bomoi na biso. Mpo tókoba kozala na esengo, ezali malamu tókanisa ndenge oyo bato ya teritware na biso bazali na mposa makasi ya koyoka mpe kokanga ntina ya nsango ya Bokonzi oyo tozali kosakwela bango. (Lom. 10:13, 14, 17) Kokanisa likoló ya likambo yango ekotinda biso tóyebisa bato, na esengo mpenza, makambo oyo Yehova akani kosala mpo na kobikisa bato, na motema mawa na ye.
3 Tólobela mingi makambo ya malamu: Tosengeli mpe kotyaka likebi na makambo oyo tozali koloba. Atako na ebandeli ya lisolo tokoki kolobela likambo to nsango moko oyo bato bayebi malamu, kasi tosengeli koboya kolekisa ntango mingi na kolobela makambo ya mawa. Mokumba na biso ezali ya koyebisa bato “nsango malamu ya kosepela.” (Yis. 52:7; Lom. 10:15) Nsango malamu yango ezali elaka ya Nzambe ya kopesa bato bomoi ya malamu na mikolo ezali koya. (2 Pet. 3:13) Lokola oyebi likambo yango, saleláká Makomami mpo na ‘kobɔndisa batutami na motema.’ (Yis. 61:1, 2) Yango ekosalisa mokomoko na biso akoba kozala na esengo mpe kosolola na bato na ndenge oyo ekolendisa bango.
4 Na ntembe te, bato bakomona ete mosala ya kosakola epesaka biso esengo. Na bongo, ntango nyonso oyo tozali koyebisa bato ya teritware na biso nsango malamu, tiká tómonisaka ete tozali bato ya esengo lokola Yehova, “Nzambe ya esengo.”