Loyembo 52
Nkombo ya Tata na biso
1. Yehova, Tata na biso,
Kumisá nkombo na yo!
Tika ’te mikano na yo
Mikokana na solo.
Na batuki na yo, Nzambe,
Mosika t’okolónga.
Y’okozwa lokumu na yo;
Basembwi bakobika.
(Mondimo)
2. Biso mpe tokokumisa
Nkombo na yo monene.
Mpe biso tosali yango
Na molende mingi bɛɛ.
Tozali na kondima mpe
Mpiko; tokotosa yo,
Mpo na nkombo na yo, Tata,
Tokotikala sembo.
(Mondimo)
3. Lokumu lobongi sé na
Yo, Nzambe ya makoló;
Oy’eleki ntina mingi:
Lokumu’a nkombo na yo.
Banso, mpo na nkombo na yo,
Tolingi koyebisa.
Yo Nzambe ya mikano, Yah,
Bolamu, nde tokozwa.
(MONDIMO)
Ɛ Nzambe, yo Mozalisi,
Mabota bayei na yo.
Yo nde Nzambe ya mikano,
Y’okolobaka solo.
Yo Nzambe na nguya nyonso,
Klisto azwi Bokonzi.
Tika ete mokano na
Yo nyonso mokokana!