Loyembo 18
Tiká ete bondeko na biso ya boklisto epambolama!
1. Klisto’alakisaki
Bato na boboto.
Bayekoli bazwi
Kimya oy’a Nzambe.
Azalaki na bolingo,
Azalaki sembo,
Na moto’akomikitisa
Mpe oy’a bosembo.
(Mondimo)
2. Baklisto, esengo
Mpo bayebi Nzambe.
Basɔkɛmi yango,
Nzambe apampoli.
Bayekoli bayebani,
Bango balingani.
Bakosakola n’esengo,
Kimya ya Bokonzi.
(Mondimo)
3. Sakolá Bokonzi
Mpe solo na yango
Na bazalani mpo
Bango bápona Yah.
Ósalisa bango ete
Baluka Yehova,
Bazal’elongo na biso
Mpo ete bábika.
(MONDIMO)
Lokumu, nkembo na
Nzambe, yo malamu.
Yehova, Tata na biso,
Pambolá bandeko banso.