Loyembo 78
Tólobaka “monoko na pɛto”
1. Bato ya Nzambe basali bomoko
Mpo na monoko na pɛto.
Yang’ezali na maloba ya nsai,
Yango bolingo, esengo.
2. Yehova nd’apesi monoko yango
Na bat’oyo ya bopɔlɔ;
Bango mpe bakolakisa basusu,
Ete basalela yango.
3. Bango bayebi monoko na pɛto,
Batiki oyo na mbindo.
Bamipɛtoli mpo basalela Yah,
Baboyi nde mabe nyonso.
4. Tósalela Yehova na bomoko;
Ye nde mokambi na biso.
Tika tóloba monoko na pɛto.
Na Yehova, nkembo nyonso.