Loyembo 150
Limpa ya likoló
1. Yo Tata ya makoló;
Yah, y’okobongwanaka te.
Tozali kokumisa
Nkombo na yo na nsai bɛɛ.
Mobateli na mpate,
Na bosembo na yo,
Oleisi Yisraele,
Limpa ya likoló.
Obimisaki mai
Na libangá mpo bámela.
Mpe okambaki bango
Na mokili ya Kanana.
2. Mana emonisaki
Mwana molingami na ye.
Mpo abikisa biso,
Atikaki nkembo na ye.
Ye nde limpa na solo,
Liuti likoló.
Amikabi lokola
Mbeka mpo na bato.
Tókokabola limpa.
Na kondima, tólya yango
Mokolo na mokolo,
Mpo ete tózala pɛto.
3. Limpa yango ezali
Mpo na bolamu na biso.
Tómemela “bampate”
Balingi nzela ya bomo’.
Tósalisaka bango
Balingi bosembo,
Ete Yehova Nzambe
Abikisa bango.
Tokoyembela Nzambe,
Matɔndi manso’epai na ye;
Tokopambwama mingi,
Nsima n’etumba monene.