Loyembo 224
“Bókamata ekanganeli na ngai”
(Matai 11:28-30, NW)
1. Na bat’oyo balɛmbi,
Mpe bango banyokwami,
Klist’alobi: ‘Yakáni!
Bokozwa libɔndisi.’
2. ‘Nazali mosɔkɛmi,
Mpe nalóngi mokili.
Bótonda bolingo bɛɛ,
Koyin’ekozala te.’
3. ‘Mokumba na ngai pɛtɛɛ.
Ezali bozito te.
Nakopesa na bango
Bazali na bosembo.’
4. Tómem’ekanganeli
Ya Nkolo, Mobikisi.
Soki tokolanda ye,
Solo, tokokwea te.