“Ekanganeli na ngai ezali ya bopɔlɔ mpe mokumba na ngai ezali pɛpɛlɛ”
“Bókamata ekanganeli na ngai likoló na bino mpe bóyekola na ngai.”—MATAI 11:29.
1, 2. (a) Likambo nini oyo osilá komona na bomoi na yo oyo epesaki yo bopemi? (b) Tosengeli kosala nini mpo na kozwa bopemi oyo Yesu alakaki?
KOSUKOLA na mai ya mwa mpiɔ na mpokwa wana na moi molungé ezalaki makasi, to kolala mpongi malamu na butu nsima ya mokolo moko ya mosala makasi mpe ya kolɛmbisa—ah oyo nde bopemi kitoko! Ezalaka mpe bongo soki balongoli biso bozito moko ya monene to mpe na ntango masumu mpe mabungá na biso malimbisami. (Masese 25:25; Misala 3:19) Bopemi oyo makambo wana ya kosepelisa epesaka eyikisaka biso mpiko, mpe epesaka biso nguya ya kosala lisusu mingi koleka.
2 Baoyo nyonso bazali kokumba bozito mpe balɛmbi bakoki koya epai na Yesu, mpamba te ezali mpenza eloko oyo ye alaki bango—bopemi. Nzokande, mpo na kozwa bopemi oyo ebongi mpenza, ezali na likambo moko oyo tosengeli kozala na bolingo malamu ya kosala yango. Yesu alobaki ete: “Bókamata ekanganeli na ngai likoló na bino mpe bóyekola na ngai; bokozwa kopema mpo na milimo na bino.” (Matai 11:29) Ekanganeli yango ezali nini? Lolenge nini ekopesaka bopemi?
Ekanganeli ya bopɔlɔ
3. (a) Mitindo nini ya bikanganeli bisalelamaki kati na lisoló na Biblia? (b) Ndimbola nini ya elilingi epesami na ntina na ekanganeli?
3 Lokola bazalaki kofanda na etúká oyo mosala ya bilanga ezalaki kosalema mingi, Yesu mpe bayoki na ye bayebaki malamu eloko babéngi ekanganeli. Ekanganeli ezali mpenza libaya moko molai oyo ezali na bisika mibale bibongisami na nsé na yango mpo ete ekoka malamu na nkingo ya banyama mibale ya mosala, mingimingi ngombe, mpo na kokangisa bango esika moko ete bákoka kobenda etimweli, likálo, to mokumba ya lolenge mosusu. (1 Samwele 6:7) Ezalaki mpe na bikanganeli oyo ezalaki kosalelama mpo na bato. Bizalaki bobele biteni ya mabaya to ya nzeté ekumbami likoló na mapeka mpe mokumba mokangisami na bansonge na yango. Na lisalisi na yango, basáli-bilanga bazalaki na likoki ya komema mikumba minene. (Yilimia 27:2; 28:10, 13) Na ntina na boyokani kati na yango na bozito mpe mosala makasi, ekanganeli esalelamaka mingi na lolenge ya elilingi kati na Biblia mpo na komonisa boyangeli mpe bokonzi.—Deteronome 28:48; 1 Mikonzi 12:4; Misala 15:10.
4. Nini emonisami na ekanganeli oyo Yesu azali kopesa epai na baoyo bazali koya epai na ye?
4 Na yango, nini ezali ekanganeli oyo Yesu abyangaki baoyo bazali koya epai na ye mpo na kozwa kopema ete bámema yango? Tómikundola ete alobaki: “Bókamata ekanganeli na ngai likoló na bino mpe bóyekola na ngai.” (Matai 11:29) Ye oyo ayekolaka azali moyekoli. Na bongo, kokamata ekanganeli ya Yesu elimboli mpenza kokóma moyekoli na ye. (Bafilipi 4:3) Nzokande, yango esuki te bobele na koyeba mateya na ye na motó. Ezali kosɛnga kosalela yango—kosala mosala oyo ye asalaki mpe kozala na lolenge ya bomoi oyo ye azalaki na yango. (1 Bakolinti 11:1; 1 Petelo 2:21) Ezali kosɛnga kotosa bokonzi na ye na bolingo malamu nyonso mpe kotosa baoyo ye apesi bango bokonzi. (Baefese 5:21; Baebele 13:17) Elimboli kokóma moklisto oyo amipesi mpe azwi batisimo, kondimáká bongo mabaku malamu mpe mikumba nyonso oyo komipesa wana ememaka. Yango ezali ekanganeli oyo Yesu azali kopesa epai na baoyo nyonso bazali koya epai na ye mpo na kozwa libɔndisi mpe bopemi. Ozali pene ya kondima yango?—Yoane 8:31, 32.
5. Mpo na nini kokamata ekanganeli ya Yesu esengeli te kozala likambo ya mpasi mingi?
5 Kozwa bopemi na komemáká ekanganeli—oyo ezali maloba ya bongolabongola te? Soko moke te, mpamba te Yesu alobaki ete ekanganeli na ye ezali ya “bopɔlɔ.” Liloba oyo elimboli ya makasi te, ya kosepelisa, ya kitoko. (Matai 11:30; Luka 5:39; Baloma 2:4; 1 Petelo 2:3) Lokola azalaki mosáli monene na mabaya, ekoki mpenza kozala ete Yesu asilaki kosala bitimweli mpe bikanganeli, mpe ayebaki lolenge ya kobongisa ekanganeli mpo ete ekokana malamu na boye ete mosala monene mosalema kozanga koyokisa mpasi. Akokaki mbala mosusu kozinga yango na biteni ya bilamba to na mposo ya nyama. Mingi ezalaki kosalema na motindo wana mpo ete ekoka te koyokisa mpasi mingi na nkingo. Bobele bongo, ekanganeli ya elilingi oyo Yesu azali kopesa biso ezali ya “bopɔlɔ.” Ata soki kozala moyekoli na ye esɛngaka kokokisa masɛngami mpe mikumba, ezali likambo ya mpasi te mpe ya konyokola te, kasi ya kopemisa. Mibeko ya Tata na ye ya likoló, Yehova, mizalaka mpe na bozito te.—Deteronome 30:11; 1 Yoane 5:3.
6. Mbala mosusu Yesu alingaki koloba nini na ntango ayebisaki ete: “Bókamata ekanganeli na ngai”?
6 Ezali mpe na likambo mosusu oyo ezali kosala ete ekanganeli ya Yesu ezala ya “bopɔlɔ” to ya pɛtɛɛ mpo na komema. Wana alobaki ete: “Bókamata ekanganeli na ngai likoló na bino,” ekoki kozala ete alingaki kolobela moko na makambo oyo mibale. Soki azalaki kolobela ekanganeli oyo ezali na biteni mibale, elingi koloba, oyo ekangisaka banyama mibale ya mosala mpo na kobenda bozito, na bongo azalaki kobénga biso ete tózala na nsé ya ekanganeli moko elongo na ye. Oyo nde lipamboli—kozala na Yesu pembeni na biso, azali kobenda bongo mokumba na biso elongo na biso! Na ngámbo mosusu, soki Yesu azalaki kolobela ekanganeli oyo basáli nyonso ya bilanga bazalaki kosalela, na bongo azalaki kopesa biso mwango oyo na lisalisi na yango tokoki koyeisa pɛtɛɛ mokumba nyonso oyo tosengeli komema. Ata soki ezali oyo ya liboso to oyo ya mibale, ekanganeli na ye ezali liziba ya kopesa bopemi mpamba te ayebisi biso ete: “Zambi ngai nazali na bopɔlɔ mpe na motema mosɔkɛmi.”
7, 8. Libúngá nini basusu basalaka na ntango bamiyokaka ete batungisami?
7 Na bongo, tosengeli kosala nini soki tomiyoki ete mokumba oyo tozali komema na ntina na mikakatano ya bomoi ezali koleka kilo mpe ezali kopesa biso mpasi mingi na makanisi? Basusu bakoki koloba na libúngá nyonso ete ekanganeli ya kozala moyekoli ya Yesu Klisto ezali mpasi mingi to ezali kosɛnga makambo mingi, nzokande kokokisama ya bamposa ya mokolo na mokolo nde ezali kopesa bango bozito. Basusu oyo bazali kati na ezalela wana bazali kotika koyangana na makita, to bazali kotika kosangana na mosala ya kosakola, mpamba te mbala mosusu bazali kokanisa ete bakozwa mwa bopemi. Nzokande, ezali libúngá monene.
8 Tozali na botɔ́ndi mpo ete ekanganeli oyo Yesu azali kopesa ezali ya “bopɔlɔ.” Soki tokangisi yango malamu te, ekoki kosala biso mpasi. Na bongo ekosɛnga na biso ete tótala malamu mpenza ekanganeli oyo ezali likoló na mapeka na biso. Soki, mpo na ntina moko to mosusu, ekanganeli yango etyami mobulumobulu to etyami na lolenge lobongi te, kosalela yango ekosɛnga te bobele kosala milende mingi, kasi lisusu, ekopesa biso mpasi na nsima. Elingi koloba ete, soki misala ya teokrasi ebandi komonana lokola ete ezali bozito mpo na biso, tosengeli kososola malamu mpo na koyeba soki tozali kokokisa yango na lolenge oyo esengeli. Nini ezali kopusa biso na kosala oyo tozali kosala? Tomibongisaka malamu mpenza na ntango tokendaka na makita? Tomibongisaka malamu na nzoto mpe na makanisi na ntango tosanganaka na mosala ya kosakola? Tozalaka na boyokani ya penepene mpe ya malamu elongo na basusu kati na lisangá? Mpe, likoló na nyonso, boyokani na biso elongo na Yehova Nzambe mpe na Mwana na ye, Yesu Klisto ezali lolenge nini?
9. Mpo na nini ekanganeli ya boklisto ekoki te kozala bozito boleki monene?
9 Na ntango tozali kondima na motema mobimba ekanganeli oyo Yesu azali kopesa biso mpe tozali koyekola komema yango na lolenge elongobani, ntina ezali te ete yango emonana lokola nde ezali bozito oyo eleki biso kilo. Ya solo, soki tokoki komona yango kati na makanisi na biso—Yesu na nsé ya ekanganeli moko elongo na biso—ezali mpasi te mpo na biso komona nani mpenza azali komema eteni eleki monene ya bozito. Ezali lokola mwana moke oyo azali koyekola kotambola asimbi yenda ya pusupúsu na ye, kokanisáká ete azali kotindika yango, kasi mpo na koloba solo, ezali moboti na ye nde azali kopusa yango. Lokola azali Tata ya bolingo, Yehova Nzambe ayebi malamu esika makasi na biso esukaka mpe ayebi bolɛmbu na biso, mpe akokisaka bamposa na biso na nzela ya Yesu Klisto. Paulo alobaki ete: “Nzambe na ngai akokisa bosɛnga mobimba na bino pelamoko bozwi na ye na nkembo kati na Klisto Yesu.”—Bafilipi 4:19; kokanisá na Yisaya 65:24.
10. Likambo nini moklisto moko oyo atalelaka mokumba na ye ya kozala moyekoli na lolenge lobongi mpenza asili komona yango?
10 Baklisto mingi oyo basilá komipesa basili komona yango kati na makambo na bango moko. Na ndakisa, Jenny, amoni ete kosalela Yehova lokola mobongisi-nzela mosungi sanza nyonso mpe kosala mosala makasi ya mosuni ya mokolo mobimba oyo etungisaka mingi epesaka ye mpasi mingi na makanisi. Atako bongo, azali komiyoka ete mosala ya mobongisi-nzela mosungi esalisaka ye mpenza mpo na kozala ntango nyonso na bokatikati. Kosalisa bato ete báyekola solo ya Biblia mpe komona bango kobongola lolenge ya bomoi na bango mpo na kondimama epai na Nzambe—ezali yango nde epesaka ye esengo eleki monene kati na bomoi na ye oyo etondi na makambo mingi. Andimi na motema na ye mobimba maloba ya Masese, oyo elobi ete: “Mapamboli ya [Yehova] ikoyeisa bozwi, akobakisa mawa na yango te.”—Masese 10:22.
Mokumba ya pɛpɛlɛ
11, 12. Yesu alingaki koloba nini na ntango ayebisaki ete: “Mokumba na ngai ezali [pɛpɛlɛ, NW]”?
11 Likoló na elaka ya kopesa biso ekanganeli ya “bopɔlɔ” Yesu alendisi biso lisusu ete: “Bozito na ngai ezali [pɛpɛlɛ, NW].” Ekanganeli ya “bopɔlɔ” esalaka ete mosala mozala makasi te; soki mokumba mpe eyeisami pɛpɛlɛ, mosala ekozala mpenza esengo. Kasi, Yesu alingaki koloba nini kati na maloba wana?
12 Kanisá naino oyo mosáli bilanga akoki kosala mpo na kosanzé misala ya banyama na ye, na ndakisa kotika kotimola mabelé mpo na kobanda kobenda likálo. Akolongola liboso etimweli mpe na nsima akokangisa likálo. Ekozala bozoba mpo na ye soki akokangisa elongo etimweli mpe likálo na banyama. Lolenge moko, Yesu alobaki te epai na bato ete bábakisa mokumba na ye likoló na oyo bazalaki na yango liboso. Ayebisaki bayekoli na ye ete: “Mosáli akoki kotósa bankóló mibale te.” (Luka 16:13) Na yango, Yesu alingaki komonisa bato liponi oyo basengelaki kosala. Balingaki nde kosepela kokóba komema mokumba oyo bazalaki na yango, to balingaki kokitisa yango mpe kondima oyo ye azalaki kopesa bango? Yesu apesaki bango elendiseli etondi na bolingo: “Mokumba na ngai ezali [pɛpɛlɛ, NW].”
13. Bato na eleko na Yesu bazalaki komema mokumba nini, mpe yango ebimisaki mbuma nini?
13 Na mikolo na Yesu, bato bazalaki konyokwama na mokumba moko ya kilo mingi oyo bakonzi mabe ya Baloma mpe bakonzi ya mangomba oyo bazalaki bakósi batyelaki bango. (Matai 23:23) Mpo na komeka komilongola na nsé ya mokumba ya Baloma, basusu bazalaki koluka kokɔtisa mbongwana na lolenge na bango moko. Bamikɔtisaki na kowelana ya politiki, kasi bazwaki bobele mpasi. (Misala 5:36, 37) Basusu bamipesaki na kobongisa ezalela ya makambo na bango na komipesáká mpenza na konduka biloko ya mosuni. (Matai 19:21, 22; Luka 14:18-20) Na ntango Yesu alakaki bango libɔndisi na kobéngáká bango ete bákóma bayekoli na ye, bango nyonso te nde bazalaki pene ya kondima yango. Bazalaki kokakatana mpo na kokitisa mokumba na bango oyo bazalaki komema, atako ezalaki kilo, mpe kokamata oyo ya Yesu. (Luka 9:59-62) Oyo nde libúngá monene!
14. Lolenge nini mitungisi ya bomoi mpe mposa ya bozwi ya mosuni ekoki kolɛmbisa biso?
14 Soki tozali na bokɛngi te, tokoki mpe kosala libúngá monene motindo moko lelo oyo. Kokóma moyekoli ya Yesu ezali kosikola biso ete tólanda te mikano motindo moko lokola bato ya mokili. Atako tosengeli ntango nyonso kosala makasi mpo na kozwa biloko ya kobikela mokolo na mokolo, tosalaka te ete biloko wana bizala makambo maleki ntina kati na bomoi na biso. Nzokande, mitungisi ya bomoi mpe kongɛnga ya biloko kitoko ya mosuni ekoki kobenda biso na nguya nyonso. Soki topesi yango nzela, bamposa motindo wana ekoki nkutu konyata solo oyo tondimaki na esengo nyonso. (Matai 13:22) Tokoki komibanzabanza mingi mpo na kokokisama ya bamposa wana na boye ete mikumba na biso ya boklisto mikoki kokóma masɛngisi ya kolɛmbisa oyo tolingi kosala yango nokinoki mpe likolólikoló. Na ntembe te, tokoki komizela te ete tokozwa bopemi kati na mosala na biso mpo na Nzambe soki esalemi na elimo wana.
15. Likebisi nini Yesu apesaki na ntina na mposa ya bozwi ya mosuni?
15 Yesu amonisaki ete bomoi ya kosepelisa eyaka te na kosaláká makasi mpo na kokokisa makambo oyo tolingaka, kasi na kotyáká likebi na makambo oyo maleki ntina kati na bomoi. Alobaki ete: “Bótungisa mitema na bino te ete bokolya nini mpe ete bokomela nini soko ete bokolatisa nzoto na bino nini. Mpo ete bomoi eleki bilei te? Mpe nzoto eleki bilamba te?” Na nsima abendaki likebi likoló na bandeke ya likoló mpe alobaki ete: “Bótala bandeke na likoló ete bakokónaka te mpe bakobukaka te, bakoyanganisaka na ebombelo mpe te; nde Tata na bino na likoló azali koleisa bango.” Wana alobaki na ntina na fololo na elanga, amonisaki ete: “Ikosalaka mosala te, ikotongaka busi mpe te. Nde nazali koloba na bino ete Salomo na nkembo na ye nyonso alati bilamba lokola moko na yango te.”—Matai 6:25-29.
16. Makambo mamonisi nini na ntina na mbuma oyo ebimaka mpo na komipesa na koluka bobele biloko ya mosuni?
16 Tokoki kozwa liteya kati na bandakisa oyo ya pɛtɛɛ? Emonanaka mingi ete wana moto azali kosala makasi mpenza mpo na kobongisa ezalela ya makambo na ye na ntina etali mosolo, akomikɔtisa mpe mingi kati na mikano ya mokili mpe bozito na mapeka na ye ekokóma lisusu monene mingi. Mokili ezali na bato mingi ya mombongo oyo, mpo na koluka biloko mingi ya mosuni mpe lokumu na yango, babebisaki mabota na bango, bazindisaki mabala na bango, babebisaki kolɔngɔ́nɔ́ na bango ya nzoto, mpe bazwaki mpasi ndenge na ndenge. (Luka 9:25; 1 Timoté 6:9, 10) Albert Einstein, ye oyo azwaki libonza ya Prix Nobel, alobaki mokolo mosusu ete: “Bozwi, bolóngi oyo emonani na miso ya bato, koyebana mingi, bomengo—yango ezalaka ntango nyonso biloko ya kotyolama mpo na ngai. Nabanzi ete bomoi oyo ezangi mindɔndɔ́ mpe ezangi lolɛ́ndɔ ezali oyo eleki mpenza malamu mpo na moto nyonso.” Yango ezali bobele kozongelama ya toli oyo ya ntoma Paulo ete: “Komipesa na makambo ya Nzambe, elongo na ezaleli ya komikokela, ezali nzela ya litomba monene.”—1 Timoté 6:6, NW.
17. Biblia ezali kolendisa biso na lolenge nini ya bomoi?
17 Ezali na likambo moko ya ntina mingi oyo tosengeli te kotalela yango na motuya moke. Atako “bomoi oyo ezangi mindɔndɔ́ mpe ezangi lolɛ́ndɔ” ezali na matomba mingi, bobele yango moko ekoki te mpo na kopesa bosepeli. Ezali na bato mingi oyo lolenge na bango ya bomoi ezangi mindɔndɔ́ bobele mpo na ezalela ya makambo nde esali ete bázala bongo, kasi bazali na bosepeli te to na esengo te. Biblia ezali kolendisa biso te ete tóboya kosepela na biloko ya mosuni mpe tómitangola na bato. Likebi etyami mingi likoló na ezaleli ya kobanga Nzambe, kasi te likoló na ezaleli ya komikokela. Ezali bobele soki tosangisi makambo oyo mibale nde tokozala na “nzela ya litomba monene.” Litomba nini? Na nsima, bobele kati na mokanda wana, Paulo amonisi ete baoyo ‘balikyaka te epai na bozwi bozangi koumela kasi balikyaka nde epai na Nzambe’ “bakomitongela miboko kitoko mpo na ekeke ekoya, ete básimba [bomoi ya solosolo, NW].”—1 Timoté 6:17-19.
18. (a) Lolenge nini tokoki kozwa bopemi ya solo? (b) Lolenge nini tosengeli kotalela mbongwana oyo tosengeli mbala mosusu kosala?
18 Tokozwa bopemi soki toyekoli kokitisa mikumba na biso ya kilo oyo tozali komema mpe kokamata mokumba ya pɛpɛlɛ oyo Yesu azali kopesa biso. Bato mingi oyo babongisaki makambo ya bomoi na bango na boye ete bákoka kosangana mingi lisusu na mosala ya Bokonzi basili komona nzela oyo ezali komema na bomoi ya esengo mpe ya kosepela na biloko oyo bazali na yango. Ya solo, ezali kosɛnga kozala na kondima mpe mpiko mpo na kolanda nzela wana, mpe mabaku makoki kozala na nzela. Kasi Biblia ezali kokundwela biso ete: “Ye oyo akotala mipepe akokóna te, mpe ye oyo akotalaka mapata akobuka te.” (Mosakoli 11:4) Makambo mingi mamonanaka mpenza pɛtɛɛ nsima ya kozwa ekateli ya kosala yango. Emonani lokola ete likambo lileki mpasi ezali bongo kozwa ekateli. Tokoki komilɛmbisa mpo na kokakatana soki tokondima mokumba yango ya mpasi to soki koboya yango. Soki tokomonisa ezaleli ya mpiko mpe tokondima mokumba yango, tokokamwa na komona ete ekozala mpenza lipamboli. Mokomi na Nzembo alendisi biso ete: “Meká mpe sosolá ete [Yehova] azali malamu.”—Nzembo 34:8; 1 Petelo 1:13.
“Kopema mpo na milimo na bino”
19. (a) Makambo nini tosengeli komizela na yango wana makambo na mokili ezali sé kobeba? (b) Wana tozali na nsé ya ekanganeli ya Yesu, tondimisami na likambo nini?
19 Ntoma Paulo akundwelaki baklisto ya ekeke ya liboso ete: “Ekoki na biso kokɔta na Bokonzi na Nzambe na nzela na bolɔ́zi mingi.” (Misala 14:22) Yango ezali mpe bongo lelo oyo. Awa makambo na mokili mazali sé kobeba, mitungisi oyo mizali koyela bato oyo basili kozwa ekateli ya kotambwisa bomoi na bango na boyengebene nyonso mpe na kobanga Nzambe ekokóma mpe makasi. (2 Timoté 3:12; Emoniseli 13:16, 17) Nzokande, tozali na mayoki motindo moko na Paulo, na ntango alobaki ete: “Bakokamolaka biso bipai nyonso nde tokobukana te; bakotungisaka biso nde tokotikaka elikya te; bakonyokolaka biso nde ye akosabolaka biso te; bakokweisaka biso na nsé nde tokobebaka te.” Ezali mpo ete tokoki kotya motema na Yesu Klisto ete apesa biso makasi oyo eleki makoki na biso. (2 Bakolinti 4:8, 9) Na kondimáká ekanganeli ya kozala bayekoli ya Klisto na motema na biso mobimba, tokosepela na kokokisama ya elaka oyo ya Yesu, ete: “Bokozwa kopema mpo na milimo na bino.”—Matai 11:29.
Okoki kolimbola?
◻ Ekanganeli nini ya bopɔlɔ Yesu apesaki?
◻ Tosengeli kosala nini soki tomiyoki ete ekanganeli na biso ezali kokóma bozito mingi?
◻ Yesu alingaki koloba nini wana alobaki ete: “Mokumba na ngai ezali [pɛpɛlɛ, NW]”?
◻ Lolenge nini tokoki kondimisama ete mokumba na biso ezala ntango nyonso pɛpɛlɛ?