“Nkombo na yo ezala mosantu”—kasi nkombo yango nini?
OZALI na lingomba? Soki ee, ozali kondima lokola ebele na bato mosusu ete, Moto Oyo Aleki Monene azali. Mpe na ntembe te osepelaka na Tata na Biso, libondeli liyebani mingi oyo Yesu alakisaki yango epai na bayekoli na ye mpe etindami mpenzampenza epai na Moto yango. Libondeli yango libandi na maloba oyo: “Tata na biso oyo ajali na Likoló, Nkombo na yo ejala mosanto.”—Matai 6:9, Biblia Lingala Haut-fleuve.
Osilá komituna ntina oyo Yesu atyaki ‘kosantisa,’ to kobulisa nkombo ya Nzambe na esika ya liboso kati na libondeli wana? Na nsima, alobeli makambo mosusu lokola koya ya Bokonzi na Nzambe, kokokisama ya mokano na Nzambe awa na mabelé mpe kolimbisama ya masumu na biso. Na ntango malɔmbɔ oyo mosusu makokokana, kimya ya seko ekozala na mabelé mpe bato bakozala na bomoi ya seko. Mbala mosusu okanisi ete ezali na ntina moko te. Nzokande, Yesu asɛngi biso ete tobondela liboso mpo na kokumisama ya nkombo ya Nzambe.
Soki Yesu alakisaki bayekoli na ye ete batya nkombo ya Nzambe na esika ya liboso kati na mabondeli na bango, ezali mpamba te. Emonani mpenza ete nkombo wana ezalaki na ntina monene mpo na ye, mpamba te azalaki kolobela yango mingi kati na mabondeli na ye. Na yango, na libaku moko abondelaki Nzambe liboso na bato, alobaki ete: “Tata, kumisa nkombo na yo!” Mpe Nzambe, ye moko ayanolaki ete: “Nasili kokumisa yango mpe nakokumisa yango lisusu.”—Yoane 12:28, Bible de Jérusalem.
Na butu ya mokolo mozalaki liboso ya liwa na ye, Yesu abondelaki Nzambe liboso ya bayekoli na ye, mpe bayokaki lisusu wana amonisaki ntina ya nkombo ya Nzambe. Alobaki ete: “Nasili koyebisa nkombo na yo epai na bato oyo opesaki ngai uta na mokili.” Na nsima, azongelaki ete: “Nasili koyebisa nkombo na yo epai na bango mpe nakolanda koyebisa yango.”—Yoane 17:6, 26, Bible de Jérusalem.
Mpo na nini nkombo ya Nzambe ezalaki na ntina mingi epai na Yesu? Mpo na nini ye alingaki ete yango ezala na ntina mingi mpo na biso mpe, na kolendisáká biso na kobondela mpo na kokumisama na yango? Mpo na koyeba yango, tosengeli koyeba motuya oyo bazalaki kopesa na bankombo na ntango ya kala.
Nkombo na ntango ya kala
Emonani ete Yehova Nzambe atyaki kati na moto, mposa ya kopesa nkombo na eloko nyonso. Moto ya liboso azalaki na nkombo, Adam. Na lisoló ya kozalisama, moko na mikumba ya liboso oyo Adam azalaki na yango, ezalaki bongo kopesa nkombo na banyama. Na ntango Nzambe apesaki Adam molóngani, nokinoki, Adam abéngaki ye ete “Mwasi” (’Ish·shahʹ, na Liebele). Na nsima, apesaki ye nkombo Eva, elimboli “Oyo azali na bomoi,” mpo ete “ye asengelaki kozala mama na bango nyonso bazali na bomoi.” (Genese 2:19, 23; 3:20) Kino lelo oyo, tozali kolanda bobele momeseno wana ya kopesa nkombo na bato. Ya solo, soki nkombo ezalaki te, mbɛlɛ makambo makokaki kotambola malamu te.
Na eleko ya Bayisraele, nkombo epesamaki mpamba te. Ezalaki na ndimbola na yango. Na ndakisa, nkombo ya Yisaka, oyo elimboli “Kosɛka,” ezali kokundola ete baboti na ye oyo bakómaki mibangé, basɛkaki na ntango bayokaki mpo na mbala ya liboso ete bakozwa mwana. (Genese 17:17, 19; 18:12) Nkombo ya Esau elimboli “Na nkungé mingi,” oyo emonanaki na nzoto na ye. Nkombo na ye mosusu, Edome, “Motané,” ezalaki kokundola ete atɛkaki bokonzi na ye ya mwana na liboso mpo na ndunda na supu ya motané. (Genese 25:25, 30-34; 27:11; 36:1) Atako azalaki leki, Yakobo asombaki bokonzi ya mwana na liboso epai na Esau, lipasá na ye, mpe azwaki mapamboli ya mwana ya liboso epai na Tata na ye. Uta kobotama, ndimbola na nkombo ya Yakobo ezalaki “Oyo asimbi Litindi,” to “Oyo aleki.” (Genese 27:36) Bobele bongo, nkombo ya Salomo, oyo na boumeli ya boyangeli na ye, Yisraele bazalaki na kimya mpe na bozwi, elimbolaki “Oyo na kimya.”—1 Ntango 22:9.
Lisusu, mokanda The Illustrated Bible Dictionary (Volume 1, lokasa 572) eyebisi ete: “Boyekoli ya liloba ‘nkombo’ kati na K[ondimana] ya K[ala] emonisi lolenge oyo ndimbola na yango etalelamaki na motuya na monoko ya Liebele. Nkombo epesamaki mpamba te, kasi ezalaki na boyokani na bomoto ya ye oyo amemi yango.”
Likambo oyo ete, na nzela na anzelu moko, Nzambe ayebisaki na baboti ya Yoane Mobatisi mpe na baboti na Yesu nkombo oyo basengelaki kobénga bana na bango, emonisi motuya oyo ye azali kopesa na nkombo. (Luka 1:13, 31) Ntango mosusu azalaki kobongola nkombo, to azalaki kobakisela bato nkombo mosusu, mpo na komonisa mokumba oyo basengelaki kokokisa yango kati na mokano na ye. Na ndakisa, na ntango Nzambe asakolaki ete mosaleli na ye, Abalama (“Tata na Esengo”) akokóma tata ya mabota, Abongolaki nkombo na ye ete Abalayama (“Tata na Mabota”). Mpe abongolaki nkombo ya Sarai (“Mwasi mowelani”), mwasi ya Abalayama, ete Sara (“Mwana mwasi na mokonzi”) mpamba te asengelaki kozala mama na libota ya Abalayama.—Genese 17:5, 15, 16; tala Genese 32:28; 2 Samwele 12:24, 25.
Yesu mpe ayebaki motuya ya nkombo, yango wana alobelaki nkombo ya Petelo na ntango apesaki ye mokumba na mosala. (Matai 16:16-19) Ata bikelamu ya elimo mpe bazali na nkombo. Mibale oyo balobelami kati na Biblia, ezali Gabriele mpe Mikaele. (Luka 1:26; Yuda 9) Na yango, wana moto azali kopesa nkombo na biloko bizangi bomoi lokola minzóto, bitando, bingumba, bangomba mpe bibale, azali nde komekola Mozalisi na ye. Na ndakisa, Biblia eyebisi biso ete Nzambe akobéngaka monzóto moko na moko na nkombo na yango.—Yisaya 40:26.
Ee, nkombo ezali na ntina mingi na miso na Nzambe, mpe asili kotya kati motema ya moto, mposa ya kobénga moto na moto mpe eloko na eloko na nkombo. Yango wana baanzelu, bato, banyama, minzóto mpe biloko mosusu bizangi bomoi, bizali na nkombo. Yango ebongi mpenza mpo na Mozalisi ya biloko nyonso wana ete azanga nkombo? Soko moke te. Eyebisami mpenza kati na maloba ya mokomi na Nzembo, ete: “Tika ete mosuni nyonso mosanzola nkombo na ye [Nzambe] ya bulee, lobiko na lobiko.”—Nzembo 145:21.
Mokanda The New International Dictionary of New Testament Theology (Volume 2, lokasa 649) elobi ete: “Moko na makambo ya moboko mpe ya ntina mingi na maloba ya Biblia, ezali likambo oyo ete Nzambe azangi nkombo te: azali na nkombo na ye mpenza, na nzela na yango, bato bakoki mpe basengeli kobelela ye.” Na ntembe te, Yesu azalaki kokanisa mpo na nkombo wana na ntango alobaki na bayekoli na ye ete babondelaka: “Tata na biso oyo azali na makoló. Tika ete nkombo na yo ezala mosantu!”—Matai 6:9, NW.
Na kotalela oyo nyonso touti komona, ezali na ntina ete toyeba nkombo ya Nzambe. Yo oyebi nkombo ya Nzambe mpenza?
Nkombo ya Nzambe ezali nini?
Likambo ya kokamwa ezali oyo ete, mingi kati na bamilió na basangani na mangomba ya boklisto ya lokutá, bakozala na nkaká mpo na koyanola na motuna oyo. Basusu bakoloba ete nkombo ya Nzambe ezali Yesu Klisto. Nzokande Yesu azalaki komibondela ye moko te, wana alobaki: “Nasili koyebisa nkombo na yo epai na bato oyo yo opesaki ngai kati na mokili.” (Yoane 17:6, NW) Azalaki kobondela Nzambe oyo azali na likoló, lokola mwana azali koloba na tata na ye. (Yoane 17:1) Ezali bongo nkombo ya Tata na ye oyo azali na likoló nde esengelaki ‘kozala mosantu,’ to ‘kobulisama.’
Nzokande ba Biblia mingi ya ntango na biso ezali na nkombo yango te, mpe esalelami mingi te kati na mangomba. Yango wana, na esika ete “ezala mosantu,” nkombo yango ebombami liboso na bamilió na batangi ya Biblia. Mpo na kozwa likanisi na oyo babongoli ya Biblia basalaki na nkombo ya Nzambe, totalela bobele mokapo moko epai nkombo yango esengelaki kozala: Nzembo 83:18 [19 na mabongoli mosusu]. Makomi yango mabongolami boye kati na mabongoli minei makeseni:
“Bayeba ’te yo moko ozali na nkombo ya Mokonzi, yo moko Nzambe wa likolo o mokili mobímba.” (Biblia Liloba lya Nzambe, 1982)
“Bayeba ete bobele yo nde ozali na nkombo ya Oyo-na-seko, Oyo-Aleki likoló na mokili mobimba.” (La Bible, Louis Segond, 1910)
“Boyo bo akuki kuiba Yo moko, kombo na Yo YEHOVA, Azi Motu na Likolo Nyoso na mokili nyoso.” (Biblia Lingala Uele, 1960)
“Bayeba ete ejali bobɛlɛ yo oyo ajali na nkombo Yawe Oyo-Aleki likoló na mokili mobimba.” (Biblia Lingala Haut-fleuve, 1970)
Mpo na nini nkombo ya Nzambe ezali motindo moko te kati na mabongoli makeseni? Nkombo na ye ezali MOKONZI, Oyo-na-seko, Yehova to Yawe? Nyonso oyo ezali lolenge moko?
Mpo na koyanola na motuna oyo, tosengeli komikundola ete, na ebandeli Biblia ekomamaki na Lingala te. Bakomi ya Biblia bazalaki Baebele, mpe bakomaki mingi na monoko ya Liebele mpe na Greke ya ntango na bango. Na ntango na biso, bato mingi bayebi te koloba minoko wana ya kala. Kasi Biblia ebongolamaki na minoko oyo mizali kolobama mingi lelo, mpe tokoki kosalela mabongoli mingi wana elingi biso kotanga Liloba na Nzambe.
Baklisto bazali na limemya mingi mpo na Biblia mpe bazali kondima ete “makomami nyonso mapemami na Nzambe.” (2 Timoté 3:16) Na yango, kobongola Biblia ezali mokumba monene. Soki moto alongoli na nko ndambo ya makambo mazali kati na Biblia to atiki yango pembeni, azali nde kobebisa Liloba lipemami na Nzambe. Na bongo, likebisi oyo ya Makomami likokokana epai na moto wana, ete: “Soko moto akobakisa maloba mosusu na yango, Nzambe akobakisela ye malózi masili kokomama na mokanda oyo. Soko mpe moto moko akolongola maloba mosusu na mokanda na kosakola oyo, Nzambe akolongola likabo na ye na nzeté ya bomoi.”—Emoniseli 22:18, 19; tala mpe Deteronome 4:2.
Ntembe ezali te ete mingi na babongoli ya Biblia bazali komemya yango mpe bazali mpenza na mposa ete bato nyonso bazala na yango lelo. Kasi babongoli ya Biblia bapemami na Nzambe te. Epai mosusu, mingi na bango bazali na makanisi ya mangomba na bango mpe bazali mbala mosusu komitika kopusama na makanisi mpe na bamposa na bango moko. Bakoki mpe kosala mabunga lokola bato nyonso to kozanga bososoli malamu.
Na yango, tokoki mpenza komituna mwa mituna oyo ya ntina mingi ete: Nkombo ya Nzambe ezali nani mpenza? Mpe mpo na nini mabongoli ya Biblia mazali kobénga Nzambe na nkombo ekeseni? Soki tozwi eyano na mituna oyo, tokoki kozonga na motuna oyo monene, ete: Mpo na nini kosantisa nkombo ya Nzambe ezali na ntina monene?
[Likanisi ya paragrafe na lokasa 4]
Baanzelu, bato, banyama, minzóto mpe biloko mosusu bizangi bomoi bizali na nkombo. Ebongi mpenza mpo na Mozalisi na biloko nyonso wana ete azanga nkombo?
[Likanisi ya paragrafe na lokasa 5]
Emonani mpenza ete nkombo wana ezalaki na ntina monene mpo na Yesu, mpamba te azalaki kotanga yango mingi kati na mabondeli na ye.