Bokonzi oyo ekosala Paradis
Ntango azalaki awa na mokili, Yesu alobaki na bayekoli na ye basambelaka boye mpo na Bokonzi ya Nzambe: “Tika Bokonzi na yo eya, tika mokano na yo esalama na nse pelamoko na likóló.” (Matai 6:9, 10) Epai mosusu, ntango nyonso azalaki sé koloba mpo na “nsango malamu ya Bokonzi”. (Matai 4:23) Ya solo, koleka makambo nyonso mosusu, alobelaki mingi Bokonzi. Mpo na ntina nini? Ezali mpo ete Bokonzi ezali esaleli oyo Nzambe akosalela mpo na kosilisa bampasi nyonso oyo ezali konyokola bato lelo kati na bomoi na bango. Na nzela ya Bokonzi, Nzambe akosukisa bitumba, nzala, maladi, mabe nyonso mpe kobomana, akozongisa bomoko mpe kimya.
Okosepela kozala na bomoi kati na mokili motindo wana? Soki ee, osengeli kotanga mwa mokanda oyo. Okoyekola kati na yango ete Bokonzi ya Nzambe ezali Boyangeli, nde yango eleki biyangeli nyonso oyo bizali kotambwisa bato uta kala. Okomona mpe lolenge ya kokamwa oyo Nzambe asaleli mpo na kolimbola mokemoke epai ya basaleli na ye mikano na ye na ntina etali Bokonzi. Epai mosusu, okomona lisalisi nini Bokonzi ekoki kopesa yo uta sikawa.
Ya solo, okoki kokoma moko na bato bakoyangelama na Bokonzi ya Nzambe. Kasi liboso ya kozwa ekateli oyo, ozali na mposa ya koyeba makambo mingi na ntina oyo. Yango wana tozali kolendisa yo ete oyekola mwa mokanda oyo. Nyonso oyo yango ekoteya yo na ntina na Bokonzi ya Nzambe ezwami na Biblia.
Kasi totala naino mpo na nini tozali na mposa mpenza ya Bokonzi ya Nzambe.
Na ebandeli ya lisolo ya bato, Nzambe azalisaki moto ya kokoka mpe atiaki ye kati na paradis. Na eleko wana, mposa ya Bokonzi ezalaki te.
Kasi, Adam na Eva, baboti na biso ya liboso, bandimelaki Satana, anzelu motomboki. Ye alobelaki bango lokuta na ntina na Nzambe mpe apusaki bango na kotombokela ye. Ebongaki bongo ete bakufa, mpamba te “masumu makofutaka mbongo, mbongo yango bobele kufa”.—Baloma 6:23.
Moto azangi kokoka mpe mosumuki akoki kobota bana ya kokoka te. Yango wana bana nyonso ya Adam babotami na kozanga kokoka, na masumu mpe na bokufi.—Baloma 5:12.
Uta ntango yango, bato bayokaki mposa ya Bokonzi ya Nzambe mpo na kosalisa bango ete basikwama na etumbu ya masumu mpe ya liwa. Bokonzi ekosukola mpe nkombo ya Nzambe na lokuta nyonso oyo Satana alobaki na ntina na yango.
Jéhovah Nzambe alakaki ete “libota” ya ntina mpenza (to mokitani moko ya ntina) akobotama mpo na kosikola bato na masumu. (Genese 3:15) “Libota” wana akozala Mokonzi na Bokonzi ya Nzambe.
Elingaki kozala nani?
Mbula soko 2 000 nsima wana Adam asalaki lisumu, emonanaki moto moko ya sembo mpenza nkombo na ye Abrahame. Jéhovah alobaki na Abrahame ete atika mboka na ye oyo abotamaki kuna mpe akenda kofanda na bandako ya kapó na mokili ya Palestine.
Abrahame asalaki nyonso oyo Jéhovah azalaki kosenga ye, bakisa likambo moko ya mpasi mingi. Mpamba te Jéhovah asengaki ye ete apesa mwana na ye Yisaka lokola mbeka epai na ye likolo na etumbelo.
Mpo na koloba solo, Jéhovah azalaki mpenza na mposa ya mbeka ya bomoto te. Kasi alingaki nde koyeba soki ya solo Abrahame azali na bolingo epai na ye. Abrahame alingaki koboma mwana na ye Yisaka, nde ntango wana Jéhovah apekisaki ye.
Na ntina na kondima monene ya Abrahame, Jéhovah apesaki ye elaka ete akopesa mokili ya Palestine na bakitani na ye; lisusu, asakolaki ete Libota ya ndaka ekobima na kati na bakitani na ye mpe na bakitani ya mwana na ye Yisaka.—Genese 22:17, 18; 26:4, 5.
Yisaka abotaki bana mibale, mapasa, Esaü mpe Yakobo. Jéhovah alobaki ete Libota ya ndaka ekobima kati na bakitani ya Yakobo.—Genese 28:13-15.
Yakobo, oyo Jéhovah abongolaki nkombo na ye ekomaki Yisraele, abotaki bana mibali zomi na mibale, bana wana babotaki mpe baninga na bango bana. Nde motindo wana bakitani ya Abrahame babandaki koyikana.—Genese 46:8-27.
Nzala monene ebimaki na mokili, yango wana Yakobo mpe libota na ye bakitaki na Ezipito, mpo ete Faraon mokonzi ya Ezipito abengaki bango kuna.—Genese 45:16-20.
Kuna na Ezipito, eyebisamaki ete Libota ya ndaka akozala mokitani ya Yuda, moko kati na bana ya Yakobo.—Genese 49:10.
Na nsima Yakobo akufaki, mpe bakitani na ye babotanaki mingi kino bakomaki ekolo mobimba. Nde ntango wana bato na Ezipito babangaki makasi mpe bakomisaki bango baombo.—Exode 1:7-14.
Na nsuka, Jéhovah atindaki Moise, mobali moko ya sembo mpenza, mpo na kosenga na Faraon ya ntango wana ete atika bana ya Yisraele babima na Ezipito.—Exode 6:10, 11.
Lokola Faraon aboyaki, Jéhovah ayeisaki bitumbu zomi likóló na bato na Ezipito. Etumbu ya nsuka, atindaki anzelu ya liwâ mpo na koboma bana nyonso ya liboso ya Ezipito.—Exode mokapo 7 kino 12.
Nzambe alobaki na Bayisraele ete soki bakoboma mwana na mpate mpo na bilei na bango ya mpokwa mpe soki bakopakola makila na yango na bizibeli na bango, anzelu ya Nzambe akosala eloko te ntango akoleka likolo na bandako na bango. Yango wana bana ya liboso ya Bayisraele babikisamaki.—Exode 12:1-35.
Nsuka ya likambo ezalaki boye, Faraon atikaki Bayisraele ete balongwa na Ezipito. Nsima na yango, abongolaki makanisi na ye mpe alandaki bango mpo na kozongisa bango na Ezipito.
Jéhovah afungolaki nzela kati na mai monene ya Motane mpo ete Bayisraele bakatisa mpe bakima. Ntango Faraon mpe basoda na ye bakotaki na kati mpo na kolanda bango, mai ezongaki mpe bakufaki.—Exode 15:5-21.
Jéhovah akambaki bana ya Yisraele kati na esobe epai ya ngomba moko ebengami Sinaï. Kuna, apesaki bango mibeko na ye. Alobaki ete soki bakobatela yango, bango bakozala Bokonzi ya banganga mpe libota ya bosantu. Bayisraele bazwaki bongo likoki ya kozala na esika ya ntina kati na Bokonzi ya Nzambe.—Exode 19:6; 24:3-8.
Nsima wana Bayisraele baumelaki soki mbula moko na nse ya ngomba Sinaï, Jéhovah atelemisaki bango mpo na komema bango kino na mokili ya Palestine, mokili oyo ye alakaki yango na Abrahame, nkoko na bango.
Na Palestine, Nzambe apesaki nzela, na nsima, epai na Bayisraele ete bazála na mikonzi mpo na kotambwisa bango. Na eleko wana, Nzambe azalaki bongo na bokonzi awa na mabelé.
Mokonzi ya mibale ya Yisraele ezalaki bongo Davidi, mokitani moko ya Yuda. Davidi alongaki banguna nyonso ya Yisraele, mpe akamataki Yelusaleme, akomisaki yango mboka-mokonzi ya libota ya Yisraele.
Makambo mabimaki ntango wana Davidi azalaki mokonzi, mamonisi ete ntango Jéhovah azali kosunga mokonzi moko, moto akoki kolonga ye te.
Jéhovah alobaki ete Libota ya ndaka akozala mokitani ya Davidi.—1 Ntango 17:7, 11, 14.
Salomo, mwana ya Davidi, azalaki mokonzi nsima na ye. Ye azalaki mokonzi ya mayele, mpe Yisraele bazwaki bolamu na nse ya bokonzi na ye.
Epai mosusu, Salomo atóngákí temple moko kitoko mpo na Jéhovah na Yelusaleme. Bolamu oyo ezalaki na Yisraele ntango Salomo azalaki mokonzi, ezali komonisa mwa bamoko na mapamboli oyo Bokonzi ya Nzambe, mosika te ekopesa yango epai ya bato.—1 Mikonzi 4:24, 25.
Kasi, mikonzi mingi oyo bakitanaki na esika ya Salomo, bazalaki sembo te.
Wana bakitani ya Davidi bazalaki naino koyangela na Yelusaleme, Jehovah atindaki mosakoli na ye Yisaya ete asakola koya ya Mwana moko ya Davidi oyo akozala sembo mpe akozala mokonzi na mokili mobimba. Ye nde Libota ya ndaka.—Yisaya 9:6, 7.
Mosakoli Yisaya asakolaki ete boyangeli na ye ekozala na nkembo koleka oyo ya Salomo.—Yisaya mokapo 11 mpe 65.
Na yango, basaleli ya Nzambe babandaki komituna koleka liboso, nani akozala Libota wana.
Liboso na boyei ya Libota ya ndaka, mikonzi ya Yisraele bakomaki mabe mpenza, yango wana Jéhovah atikaki bato ya Babilone bayaki koboma mokili na bango na mobu 607 liboso na ntango na biso. Ntalo monene na bafandi na yango bakendaki boombo na Babilone. Kasi Nzambe abosanaki elaka na ye te. Libota elingaki kobima na molongo ya bakitani ya Davidi.—Ezekiele 21:25-27.
Lisolo ya libota ya Yisraele emonisi ete ata soki mokonzi ya bomoto oyo azali sembo akoki kopesa bolamu, nzokande bolamu yango ezali na ndelo. Bato ya sembo bazali kokufa mpe bakitani na bango bazali ntango nyonso sembo te. Na bongo, bato bazalaki na mposa na nini? Bazalaki na mposa ya Libota ya ndaka.
Na nsuka, nsima ya bozeli ya bambula nkoto mingi, Libota ya ndaka amonanaki. Azalaki nani?
Epai na elenge mwasi moko moyisraele, nkombo na ye Marie, Anzelu ya Nzambe apesaki eyano na motuna oyo. Asakolaki na ye ete akobota mwana mobali oyo nkombo na ye ekozala Yesu. Tala maloba ya anzelu:
“Ye akozala monene mpe akobiangama Mwana na Oyo-Aleki-Likolo. Jehovah Nzambe akopesa ye kiti na bokonzi na Davidi Tata na ye. Akozala mokonzi.”—Luka 1:32, 33.
Yesu nde Libota ya ndaka, mpe Mokonzi kati na Bokonzi ya Nzambe. Kasi mpo na nini Yesu akesenaki na bato ya sembo oyo bazalaki na bomoi liboso na ye?
Ezali mpo ete Yesu abotamaki na ekamwiseli. Mama na ye azalaki ngondo, mpe tata na ye azalaki moto te. Na liboso, Yesu azalaki kofanda na likolo. Kuna, elimo santu ya Nzambe, makasi na ye oyo ekosalaka mosala, elekisaki bomoi ya Yesu kati na libumu ya Marie. Na bongo Yesu azwaki lisumu ya Adam te mpe na bomoi na ye asalaki lisumu te.—1 Petelo 2:22.
Ekomaki ye na mbula ntuku misato, Yesu abatisamaki. Asakolaki Bokonzi ya Nzambe mpe na nsuka amilakisaki lokola Mokonzi ya Bokonzi yango.—Matai 4:23; 21:4-11.
Yesu asalaki mpe bikamwiseli mingi.
Abikisaki bato bazalaki na maladi.—Matai 9:35.
Aleisaki na ekamwiseli bato bazalaki na nzala.—Matai 14:14-22.
Mpe asekwisaki bakufi.—Yoane 11:38-44.
Bikamwiseli yango bimonisi makambo oyo Yesu akosala mpo na bolamu ya bato lokola Mokonzi na Bokonzi ya Nzambe.
Obosani te lolenge oyo mokonzi Davidi akamataki Yelusaleme mpo na kokomisa yango kapitale ya bokonzi na ye. Yesu alimbolaki ete Bokonzi ya Nzambe ekosalema na mabelé te, kasi na likóló. (Yoane 18:36) Yango wana Bokonzi ebengami “Yelusaleme ya likóló”.—Baebele 12:22, 28.
Yesu ayebisaki mibeko misengeli kotosama na baoyo balingi kozala bato bayangelami na Bokonzi wana. Mibeko yango mizali kati na Biblia. Tala oyo eleki ntina: Tosengeli kolinga Nzambe mpe kolinga mozalani na biso.—Matai 22:37-39.
Yesu ayebisaki ete akozala ye moko te kati na Bokonzi na ye. Bato basengelaki koponama mpo na kokende likóló mpe koyangela na ye elongo. (Luka 12:32; Yoane 14:3) Motuya na bango esengelaki kozala boni? Emoniseli 14:1 epesi eyano: 144 000.
Kasi, soki bobele bato 144 000 bakei likóló mpo na kozala bakonzi elongo na Yesu, elikya nini etikali mpo na bato mosusu?
Biblia elobi: “Bayengebene bakozwa mokili mpe bakofanda wana libela.”—Nzembo 37:29.
Baoyo bakofanda awa na mabelé babengami “bampate mosusu”.—Yoane 10:16.
Na bongo, bilikya bizali mibale. Jéhovah Nzambe abengaki bato 144 000 ete bakende likóló mpo na kozala mikonzi elongo na Yesu Klisto. Kasi bamilió na bato mosusu bazali na elikya ya solo ya kozala na bomoi na mabelé libela lokola bato bayangelami na Bokonzi na ye.—Emoniseli 5:10.
Satana ayinaki Yesu mpe atelemelaki ye. Yesu asakolaki mbula misato na ndambo, nsima na yango Satana akangisaki ye mpe abomisaki ye; Yesu atobolamaki nsete likolo na nzete. Mpo na nini Nzambe atikaki nzela ete Mwana na ye akufa?
Tobosana te ete tozali bakitani ya Adam, tozali kosala masumu biso banso mpe tobongi na kozwa kufa.—Baloma 6:23.
Tobosana te ete lokola Yesu abotamaki na ekamwiseli, azalaki moto ya kokoka mpe etumbu ya kufa ebongaki na ye te. Nzokande, Nzambe apesaki nzela na Satana ete ‘aswa Yesu na litindi’ mpo na koboma ye. Kasi Nzambe azongisaki ye na bomoi lokola ekelamu ya elimo oyo akoki kokufa lisusu te. Lokola Yesu azali ntango nyonso na lotomo mpo na bomoi ya bomoto ya kokoka, akoki kosalela yango mpo na kosomba biso na masumu.—Genese 3:15; Baloma 5:12, 21; Matai 20:28.
Mpo na kosalisa biso toyeba malamumalamu ndimbola ya mbeka ya Yesu, Biblia elobeli yango na nzela na bililingi ya bisakweli.
Ozali koyeba lisusu ete Jehovah amekaki bolingo ya Abrahame ntango atindaki ye ete apesa mwana na ye mbeka?
Ezalaki elilingi ya esakweli mpo na mbeka ya Yesu. Yango emonisaki bolingo nyonso oyo Jehovah azali na yango mpo na bato. Mpamba te, Jehovah apesaki nzela ete Mwana na ye akufela biso, mpo ete biso tozwa bomoi.—Yoane 3:16.
Ozali koyeba lisusu lolenge oyo Jehovah abikisaki Bayisraele na boombo na Ezipito mpe abikisaki bana na bango ya liboso ntango anzelu mobomi alekaki likolo na bango?—Exode 12:12, 13.
Yango mpe ezalaki elilingi ya esakweli. Lokola makila ya mwana na mpate elimbolaki bomoi mpo na bana ya liboso ya Yisraele, bobele bongo makila ya Yesu malimboli bomoi mpo na baoyo bandimeli ye. Mpe lokola makambo ya butu wana malimbolaki kosikwama mpo na Bayisraele, bobele bongo kufa ya Yesu esikoli bato na masumu mpe na liwa.
Nde ntina wana Yesu abengami “Mwana na Mpate na Nzambe molongoli na masumu na mokili”.—Yoane 1:29.
Nzokande, wana ezalaki ye awa na mokili, Yesu ayanganisaki bayekoli mpe abongisaki bango mpo na kosakola nsango malamu ya Bokonzi, ata nsima na kufa na ye.—Matai 10:5; Luka 10:1.
Bayekoli na ye bazalaki bato ya liboso oyo Nzambe aponaki bango mpo na koyangela elongo na Klisto kati na Bokonzi na ye.—Luka 12:32.
Ozali koyeba lisusu elaka oyo Nzambe apesaki yango epai na Bayuda? Soki bakobatela mibeko na ye, bakozala bokonzi ya banganga. Sikawa, bazwaki libaku malamu ya kosangana na Bokonzi ya Nzambe mpe kozala banganga kati na likóló soki bandimi Yesu. Kasi ntalo monene na bango baboyaki ye.
Yango wana, kobanda na eleko yango, Bayuda bazalaki lisusu libota liponami na Nzambe te. Uta ntango yango Palestine ezalaki lisusu Mabelé ya ndaka te.—Matai 21:43; 23:37, 38.
Uta eleko ya Yesu kino mikolo na biso oyo, Jéhovah asili koyanganisa baoyo bakozala mikonzi kuna na likóló elongo na Yesu. Mwa bankoto kati na bango bazali naino na bomoi awa na mabelé. Tozali kobenga bango batikali bapakolami.—Emoniseli 12:17.
Sika obandi komona nini wana Bokonzi ya Nzambe. Ezali bongo boyangeli moko ya likóló oyo Mokonzi na yango ezali bongo Yesu Klisto mpe bato 144 000 bauti na mabelé basangani na ye kati na Bokonzi yango. Bokonzi na ye ekozala likóló na bato ya sembo mpe akozala na nguya ya kopesa kimya na mabelé.
Nsima na kufa na ye, Yesu asekwisamaki mpe akendaki na likóló. Kuna azelaki ete Nzambe atiela ye elaka oyo esengeli na ye kobanda koyangela lokola Mokonzi na Bokonzi ya Nzambe. (Nzembo 110:1) Yango esalamaki ntango nini?
Kala Jehovah azalaki kopesa bandoto epai ya bato mpo na koyebisa makambo matali Bokonzi na ye.
Na mikolo ya Danyele, Jehovah apesaki ndoto motindo wana na Nebukadanezare, mokonzi ya Babilone. Kati na ndoto wana, Nebukadanezare amonaki nzete moko monene.—Danyele 4:10-37.
Nzete ekatamaki mpe mobimbi na yango ekangamaki nkamba na boumeli ya mbula nsambo.
Nzete elakisaki Nebukadanezare. Lokola mobimbi ekangisamaki na nkamba na boumeli ya mbula nsambo, bobele bongo Nebukadanezare azwaki liboma na boumeli ya mbula nsambo. Nsima na yango Nebukadanezare azongaki na makanisi malamu.
Makambo wana nyonso mazalaki elilingi ya esakweli. Nebukadanezare azali bongo elilingi ya boyangeli ya Jehovah na molongo mobimba. Na ebandeli, yango ezalaki kosalelama na nsima ya bakitani ya mokonzi Davidi na Yelusaleme. Ntango Babilone elongaki Yelusaleme na mobu 607 liboso na ntango na biso, molongo wana na bakonzi ekatamaki. Mokonzi moko lisusu te ya libota ya Davidi akokaki koyangela “kino ekoya ye oyo azali na lotomo na yango”. (Ezekiele 21:27) Ye wana nde Yesu Klisto.
Ntango boni esengelaki koleka longwa na 607 liboso na ntango na biso kino ntango oyo Yesu asengelaki kobanda koyangela? Mbula nsambo ya esakweli, elingi koloba mbula 2 520. (Emoniseli 12:6, 14) Mbula 2 520 wana ebandaki na 607 liboso na ntango na biso mpe esukaki na 1914.
Yesu abandaki bongo koyangela kuna na makóló na 1914. Yango ezalaki elembo na nini? Biblia elobeli biso yango na nzela na emonaneli moko oyo ntoma Yoane azwaki.
Yoane amonaki mwasi moko kuna na likóló oyo azalaki na mpasi ya kobota mpe abotaki mwana mobali.—Emoniseli 12:1-12.
Mwasi elakisi bongo lisángá ya Nzambe na likóló, lisángá oyo esalemi na basaleli na ye nyonso baanzelu ya Nzambe kuna na likóló. Mwana mobali elakisi bongo Bokonzi ya Nzambe. Bokonzi yango “ebotamaki” na 1914.
Nini esalemaki na nsima? Likambo ya liboso Yesu asalaki lokola Mokonzi ezalaki boye ete abenganaki Satana na makóló elongo na baanzelu oyo batombokaki esika moko na ye. Yesu abwakaki bango na nse.—Emoniseli 12:9.
Biblia elobi boye mpo na makambo malandaki nsima na yango: “Bosepela, ee likóló mpe bino bafandi wana! Mawa na mokili mpe na mai monene! Mpo ete Satana akiteli bino na kongala mingi, awa eyebi ye ete azali na mwa elaka mokuse.”—Emoniseli 12:12.
Na bongo, ntango Yesu abandaki koyangela na likóló, banguna na ye awa na nse bakomaki mabe koleka. Lokola Biblia esakolaki yango, Yesu abandaki koyangela katikati na banguna na ye.—Nzembo 110:1, 2.
Yango ebimisi nini mpo na mokili ya bato?
Yesu apesi eyano oyo: bitumba, banzala, bamaladi, koningana ya mabelé.—Matai 24:7, 8; Luka 21:10, 11.
Uta 1914, tozali konyokwama na bolozi oyo. Ezali elembo mosusu emonisi ete Bokonzi ya Nzambe ebandaki boyangeli na yango na mbula wana.
Yesu asakolaki lisusu ete ‘mitema na mabota mikozala na likóló . . . , mpe bato bakosenzwa na nsomo’. (Luka 21:25, 26) Tozali komona makambo oyo kobanda 1914.
Ntoma Paulo abakisaki ete bato bakozala “baninga na bango moko, baninga na mbongo, . . . bakozanga botosi epai ya baboti, . . . bazangi boboto, batongi, bazangi komipekisa”. (MN)—2 Timote 3:1-5.
Ozali sikawa koyeba mpo na nini tozali na mpasi mingi lelo awa na mokili? Satana afandi mpamba te. Kasi Bokonzi esili mpe kobanda mosala na yango.
Mwa ntango moke nsima na 1914, batikali na baoyo bazali na elikya ya koyangela elongo na Yesu kuna na likóló babandaki kosakola nsango malamu ya Bokonzi oyo esili kosalema. Mosala yango esili kopalangana na mabelé mobimba, lokola Yesu asakolaki yango.—Matai 24:14.
Mosala oyo ya kosakola ezali kosalema mpo na ntina nini?
Ya liboso, ezali mpo ete bato bayekola mpo na koyeba Bokonzi ya Nzambe.
Ya mibale, yango ezali kosalisa bango bapona kozála bato bayangelami na Bokonzi yango.
Yesu alobaki ete na eleko na biso bato nyonso bakokabolama na ngambo mibalé: ngambo moko “bampate”, ngambo mosusu “bantaba”.—Matai 25:31-46.
“Bampate” bazali na bolingo mpo na ye mpe mpo na bandeko na ye. “Bantaba” bazangi bolingo oyo.
“Bampate” bakozwa bomoi ya seko nzokande “bantaba” bakozwa yango te.
Mosala oyo ya kokabola bato ekokisami na nzela na kosakola nsango malamu ya Bokonzi.
Tala moko na bisakweli ya Yisaya:
“Ekozala ete na mikolo na nsuka, ngomba na ndako na Jéhovah ekokokisama likóló koleka ngomba nyonso, ekotombwama likóló na nkeka; mpe mabota nyonso bakokenda wana.”—Yisaya 2:2.
Bato bazali lelo kobika na “mikolo ya nsuka”.
“Ndako” ya losambo ya Jéhovah esili “kotombwana” likóló koleka losambo nyonso ya lokuta.
“Bikolo mingi bakokenda mpe bakoloba ete, Yakani, tobuta na ngomba na Jéhovah, epai na ndako na Nzambe na Yakobo ete alakisa biso nzela na ye mpe ete totambola na bipai bikokendaka ye.”—Yisaya 2:3.
Na bongo, bato na mabota nyonso bazali koya kosambela Jéhovah mpe bazali kobengisa bazalani na bango ete baya kosangana na bango. Bazali koyekola kotambola engebene mokano ya Jéhovah.
“Bakotula mipanga na bango ete mizála bitimweli, mpe makonga na bango ete mazála bikateli na matiti. Libota moko bakotombwela libota mosusu mopanga te, bakoyekola etumba lisusu mpe te.”—Yisaya 2:4.
Basambeli ya Jéhovah bazali na bomoko mpe na kimya.
Bokonzi ya Nzambe esili koyanganisa bato penepene na milió misato oyo bandimi kotambwisama na yango.
Bazali koyangana zingazinga na batikali ya baoyo bazali na elikya ya kokenda na likóló mpe kozala mikonzi elongo na Klisto.
Lisángá ya Nzambe ezali kopesa bango bilei ya elimo.—Matai 24:45-47.
Basali libota ya bandeko na mokili mobimba oyo bazali na bolingo ya solo kati na bango.—Yoane 13:35.
Bazali na kimya na elimo mpe bazali na elikya.—Bafilipi 4:7.
Mosika te mosala ya kosakola nsango malamu ekosila mpe “bampate” bakosila koyanganisama. Bongo Bokonzi ekosala nini?
Kobosana te: Mokonzi ya sembo Davidi alongaki banguna nyonso ya libota ya Nzambe. Bobele bongo, Mokonzi Yesu akolonga banguna.
Kala, mokonzi Nebukadanezare amonaki kati na ndoto ekeko moko monene oyo ezalaki elilingi ya bikonzi nyonso ya mokili uta ntango na ye kino mikolo na biso oyo.
Na nsima amonaki libanga moko elongwe na ngomba mpe eyei kobuka ekeko yango. Libanga wana elakisi Bokonzi ya Nzambe.
Yango elimboli kufa ya biloko mabe ya ntango oyo.—Danyele 2:44.
Tala mwa bamoko na mabongwani oyo Bokonzi ekosala:
Losambo ya lokuta ekolimwa, lokola etuteli monene oyo ebwakami kati na la mer.—Emoniseli 18:21.
Nde ntina wana baoyo nyonso balingi Nzambe balendisami ete babima UTA SIKAWA na mangomba ya lokuta.—Emoniseli 18:4.
Na nsima Mokonzi Yesu ‘akobóla mabota nyonso, mpe akokengela bango na mpimbo ya ebende’.—Emoniseli 19:15.
Yango wana, ba Témoins de Jéhovah bakotaka na makambo ya politike te, atako bazali kofuta mpako mpe bazali kotosa mibeko ya mokili na bango.
Na nsuka, ye moko Satana, “dalagona” monene, akobwakama kati na libulu mozindo.—Emoniseli 20:2, 3.
Bobele “bampate”, na maloba mosusu baoyo bandimi Mokonzi Yesu, bango nde bakobika na bolozi wana.—Matai 25:31-34, 41, 46.
Ntoma Yoane amonaki na emonaneli “bampate” oyo bakobika na bolozi wana.
“Natalaki, mpe namoni ebele monene, oyo moto te akoki kotanga motuya na bango; bauti na mabota nyonso, na mikili nyonso, na bikolo nyonso, na minoko nyonso; batelemi liboso na kiti na bokonzi mpe liboso na Mwana na Mpate. Balati “nzambala” mpembe, mpe basimbi mandalala na maboko na bango.”—Emoniseli 7:9.
“Ebele monene” esalemi na baoyo nyonso bandimi nsango malamu oyo ezali kosakolama.
Bango “bauti na bolozi monene”.—Emoniseli 7:14.
“Mandalala” elakisi ete bandimi Yesu lokola Mokonzi na bango.
Lokola balati “banzambala ya mpembe”, wana elimboli ete bazali na kondima kati na mbeka oyo Yesu apesaki.
“Mwana na Mpate”, nde Yesu Klisto.
Mapamboli nini bazali kozwa? Kobosana te ete Bayisraele bazalaki na esengo mingi na nse ya bokonzi ya Salomo, oyo azalaki mokonzi ya sembo. Nzokande, bolamu oyo ezali kozela bato na nse ya Bokonzi ya Yesu, eleki na mosika.
Kimya ekozala solo kati na bato, lisusu kati na bato mpe banyama, lokola Yisaya asakolaki yango.—Nzembo 46:9; Yisaya 11:6-9.
Mpo na Yesu, lokola abikisaki bato ya maladi ntango azalaki awa na mokili, bobele bongo akolongola maladi epai ya bato.—Yisaya 33:24.
Lokola aleisaki bibele ya bato, bobele bongo akosukisa nzala oyo ezali konyokola bato.—Nzembo 72:16.
Lokola asekwisaki bakufi, bobele bongo akozongisa bomoi epai na baoyo bazwaki libaku te ya komitia na nse ya Bokonzi ya Nzambe.—Yoane 5:28, 29.
Mokemoke, akomema bato kino ezaleli ya kokoka oyo Adam abungisaki.
Oyo nde elikya kitoko, boye te? Olingi komona ete ekokana mpo na yo? Soki ee, ozwa ekateli uta sikawa ya komitia na nse ya Bokonzi ya Nzambe mpe kokoma “mpate”.
Yekola Biblia mpe yekola mpo ete oyeba Jéhovah Nzambe elongo na Yesu.—Yoane 17:3.
Yanganaka na makita esika moko na bato mosusu oyo basili kondima Bokonzi yango.—Baebele 10:25.
Yekola mibeko ya Bokonzi yango mpe tósa yango.—Yisaya 2:3, 4.
Pesa bomoi na yo mpo na kosalela Jéhovah mpe zwá batisimo.—Matai 28:19, 20.
Boya kosala mabe: moibi, lokuta, pite, kolangwa masanga, nyonso wana ezali makambo oyo Jéhovah Nzambe asepeli na yango te.—1 Bakolinti 6:9-11.
Sangana na mosala ya kosakola nsango malamu ya Bokonzi.—Matai 24:14.
Na bongo, na lisalisi ya Nzambe, okomona esika Paradis ekozonga, oyo Adam abungisaki yango mpo na bakitani na ye, okomona na miso na yo kokokisama ya elaka oyo: “Nayoki mongongo makasi kobima na kiti na bokonzi ete, tala! Efandelo na Nzambe ezali na bato esika moko. Akofanda na bango esika moko, mpe bango bakozala bato na ye, mpe Nzambe ye mpenza akozala na bango elongo. Akolongola mpisoli nyonso na miso na bango, mpe kufa ekozala lisusu te, na mawa, na kolela, na mpasi, lisusu mpe te; mpo ete makambo na liboso masili koleka.”—Emoniseli 21:3, 4.
[Etanda na lokasa 20]
(Mpo na komona yango, talá mokanda)
607 liboso na ntango na biso 1914 ya ntango na biso
Liboso na ntango na biso | Na ntango na biso
500 1 000 1 500 2 000 2 520
[Bililingi na lokasa 11]
Abrahame
Yisaka
Yakobo
Yuda
Davidi
[Elilingi na lokasa 14]
144 000
[Bililingi na lokasa 16]
Adam
Yesu