Elikya nini ezali mpo na balingami na biso oyo basili kokufa?
Yobo atunáká motuna oyo: “Moto awei akoki nde kosekwa lisusu?” (Yobo 14:14, Liloba lya Nzambe). Mbala mosusu osila komituna motuna oyo. Okooka ndenge nini soko bayebisi yo ete okoki komona lisusu balingami na yo mpe okoki kozala na bomoi na mabelé na ezalela ya kokoka?
Tala elaka oyo Biblia epesi: “Bakufi na yo bakobika bakotelema.” Elobi lisusu boye: “Bayengebene bakosangola mokili mpe bakofanda wana libela.”—Yisaya 26:19; Nzembo 37:29.
Mpo na kozala mpenza na kondima na bilaka motindo yango, esengeli na biso koyanola na mwa mituna ya moboko: Mpo na nini moto akufaka? Bakufi bazali wapi? Ndenge nini tokoki kondima solo ete bakozonga na bomoi?
Liwa, mpe ezalela na bakufi
Biblia emonisi polele ete na ebandeli mokano na Nzambe ezalaki te ete moto akufa. Azalisaki babalani ya liboso, Adam mpe Eva, atyaki bango kati na paradis oyo ezalaki awa na mabelé na Edene, mpe apesaki bango nzela ya kobota bana mpe koyeisa monene efandelo na bango oyo ezalaki paradis, kino na mokili mobimba. Mobali mpe mwasi bakokaki kokufa bobele soki baboyaki kotosa mibeko na Nzambe.—Genese 1:28; 2:15-17.
Adam mpe Eva bazangaki botondi na boboto na Nzambe mpe babukaki mobeko; mpo na yango bazwaki etumbu oyo elakamaki mpo na bango. Nzambe alobaki na Adam ete: ‘Okozonga na mabelé mpo ete okamatamaki na yango. Ozali mputulu, mpe okozonga kati na mputulu.’ (Genese 3:19) Liboso ete azalisama, Adam azalaki epai moko te; azalaki mputulu. Lokola azangaki botosi to asalaki lisumu, azwaki etumbu ya kozonga na mputulu, azalaki lisusu te.
Na bongo, liwa elimboli kozanga bomoi. Biblia emonisi bokeseni kati na makambo oyo mibale: “Lifuta ya masumu ezali liwa, kasi likabo oyo Nzambe akopesa, ezali bomoi ya seko.” (Baloma 6:23, NW) Komonisaka ete kati na liwa moto akoyebaka lisusu ata likambo moko te, Biblia elobi: “Mpo ete bato na bomoi bayebi ete bakokufa; nde bakufi bayebi likambo te.” (Mosakoli 9:5) Soko moto akufi, Biblia elobi ete: “Elimo na ye ebimi, akozonga na mputulu; na mokolo yango atiki kokanisa”.—Nzembo 146:3, 4, NW.
Nzokande, lokola Adam mpe Eva bazali bobele bango nde babukaki mobeko oyo epesamaki na Edene, mpo na nini biso banso tozali kokufa? Mpamba te biso banso tobotami nsima wana Adam abukaki mobeko; tosangolaki bongo lisumu mpe liwa epai na ye. Tala ndimbola oyo Biblia epesi na ntina na likambo wana: “Na bongo, mabe ekotaki na mokili mpo na moto moko [Adam], mpe kufa ekotaki mpo na mabe. Kufa mpe epalangani epai na bato nyonso mpo ete bato nyonso basali mabe.”—Baloma 5:12; Yobo 14:4.
Kasi moto mosusu akoki koloba boye: ‘Bato bazali na molimo oyo ezangi kokufa mpe oyo etikalaka na bomoi ata nsima na liwa, boye te?’ Ezali mpenza liteya oyo esli kopalangana mingi, bamoko bazali kutu koloba ete liwa ezali kofungola nzela na bomoi mosusu. Nzokande, likanisi yango euti na Biblia te. Liloba na Nzambe elobi ete ozali molimo, molimo na yo ezali yo, elongo na makanisi mpe makoki na yo ya nzoto. (Genese 2:7; Yilimia 2:34; Masese 2:10) Biblia elobi lisusu ete: “Molimo oyo asali lisumu, ye akokufa.” (Ezekiele 18:4) Ata esika moko te Biblia eteyi ete moto azali na molimo oyo ekufaka te mpe etikalaka na bomoi nsima na liwa ya nzoto.
Ndenge nini moto akoki kozonga na bomoi?
Nsima wana lisumu mpe liwa ekotaki na mokili, Nzambe amonisaki mokano na ye ya kozongisa bakufi na bomoi na nzela na lisekwa. Yango wana Biblia elobi: “Abrahame azalaki na elikya ete Nzambe azali na nguya ya kosekwisa [mwana na ye Yisaka] na bakufi.” (Baebele 11:17-19, NW) Elikya ya Abrahame ezalaki na moboko, mpamba te Biblia elobi na ntina na Mozwi-na-Nguya-Nyonso: “Azali Nzambe na bakufi te, kasi na bato na bomoi, mpo ete mpo na ye bato nyonso bazali na bomoi.”—Luka 20:37, 38.
Ee, Nzambe Mozwi-na-Nguya-Nyonso azali bobele na nguya te, kasi azali lisusu na mposa ya kosekwisa moto nyonso oyo ye aponi. Yesu Klisto ye moko alobaki: “Bokamwa na likambo oyo te, mpo ete ntango ekoya wana [baoyo] nyonso bazali kati na nkunda bakoyoka mongongo na ye mpe bakobima.”—Yoane 5:28, 29; Misala 24:15.
Mwa ntango moke nsima na koloba maloba oyo, mpe wana ezalaki ye kokota na mboka Naïna, Yesu akutanaki na bato bazalaki kokenda kokunda ebembe. Elenge mobali oyo akufaki azalaki mwana bobele moko ya mwasi moko mokufeli-mobali. Emonaki ye mawa makasi ya mwasi wana, ayokaki mawa na motema mpe kolobaka na ebembe, apesaki etinda ete: “Elenge mobali, nalobi na yo ete telema!” Na bongo elenge mobali atelemaki mpe Yesu apesaki ye epai na mama na ye.—Luka 7:11-17, NW.
Lokola esalamaki mpo na mwasi mokufeli-mobali oyo, esengo ezalaki mpe monene ntango akendaki na ndako na Yailo, mokonzi na eyanganelo na Bayuda, oyo akufelaki mwana mwasi ya mbula zomi na mibale. Nzokande, ntango Yesu akomaki epai na Yailo, abelemaki epai na mwana oyo akufaki mpe alobaki ete: “Elenge mwasi, telema!” Mpe atelemaki!—Luka 8:40-56, NW.
Nsima na yango, Lazare, moninga na Yesu, akufaki. Ntango Yesu akomaki na ndako na ye, mikolo minei misilaki koleka uta akufaki. Atako ayokaki mawa mingi, Malata, ndeko mwasi na Lazare, amonisaki ete azalaki na elikya na kolobaka: “Nayebi ete akosekwa na lisekwa na mokolo na nsuka.” Kasi Yesu akendaki kino na nkunda, asengaki ete balongola libanga mpe abyangaki: “Lazare, bima libanda!” Mpe Lazare abimaki!—Yoane 11:11-44.
Tokanisa moke. Lazare azalaki ndenge nini na mikolo minei oyo alekisaki kati na bakufi? Alobaki te ete autaki likoló to autaki na lifelo; alingaki solo koloba bongo soko akendaki na bisika yango. Lazare ayebaki lisusu eloko moko te kati na bakufi, mbele atikalaki kuna kino na “lisekwa na mokolo na nsuka” soko Yesu azongisaki ye na bomoi te.
Ezali solo ete mirakle oyo nyonso ya Yesu ezalaki se bolamu mpo na mwa ntango moke, mpamba te bato oyo ye asekwisaki bakufaki lisusu. Kasi, esili koleka mibu 1 900, apesaki elembeteli ete bato bakoki kozonga na bomoi na nzela na nguya na Nzambe. Na yango, na mirakle oyo asalaki, Yesu amonisaki makambo makosalama awa na mabelé, ntango Bokonzi na Nzambe ekoyangela mokili.
Soki molingami na yo akufi
Wana monguna oyo, liwa, ezwi molingami na biso, tokoki kozala na mawa makasi ata tozali na elikya ya lisekwa. Abrahame andimaki ete mwasi na ye akozonga na bomoi, kasi ata bongo totangi ete “ayaki mpo na koyoka mawa mpo na Sara mpe mpo na kolela ye”. (Genese 23:2) Yango ezali boni mpo na Yesu? Ntango Lazare akufaki, ‘ayokaki mawa na motema mpe amitungisaki’, mpe na nsima “atangisaki mpisoli”. (Yoane 11:33, 35) Na yango, kolela molingami oyo akufi ezali likambo ya mabe te.
Kokufela mwana ezali likambo ya mpasi mingi mpo na mama. Yango wana Biblia elobeli mpo na mawa makasi ya mama moko oyo akufelaki mwana. (2 Mikonzi 4:27) Ezali solo ete mpasi motindo oyo ekopesa mpe mawa mingi epai na tata. Mokonzi David alelaki boye ntango mwana na ye Abisalome akufaki: ‘Ebongaki ete ngai nakufa na esika na yo.’—2 Samwele 18:33.
Nzokande na ntina na kondima na biso na lisekwa, tokoki kolonga mawa na biso. Lokola Biblia elobi yango, ‘boyoka mawa te lokola bamosusu baoyo bazali na elikya te.’ (1 Batesalonike 4:13) Tokobelema nde epai na Nzambe na nzela na libondeli, mpe Biblia elaki ‘ete akosunga biso’.—Nzembo 55:22.
Soki liyebisi lizali te, mikapo ya Biblia mizwami na Biblia Lingala, haut-fleuve, 1970. NW elakisi New World Translation of the Holy Scriptures.