Basantu
Ndimbola: Mangomba mosusu ya bokristo ya nkombo mpamba eteyaka ete basantu ezali bato oyo bakufá, oyo bazali sikoyo na Kristo na likoló, mpe oyo Eklezia endimi ete bazali basantu mpe bazali bato oyo bayebani mingi mpo na bizaleli na bango ya malamu. Na likita monene oyo Lingomba ya Katolike esalaki na engumba Trente (Concile de Trente) bakomaki esakola ya boyambi oyo elobaki ete esengeli kosambelaka basantu mpo balobelaka bato epai ya Nzambe mpe esengeli kosambelaka bitiká ya basantu mpe bikeko na bango. Bandimi ya mangomba mosusu mpe babelelaka basantu mpo básalisa bango. Mangomba mosusu mpe eteyaka ete bandimi na bango nyonso bazali basantu mpe bazali na lisumu te. Na Biblia, bavɛrsɛ mingi elobeli basantu. Esaleli liloba yango mpo na kolobela bayekoli ya Kristo 144 000 oyo batyami mafuta na elimo.
Biblia eteyi ete moto asengeli naino kokóma na nkembo ya likoló liboso andimama ete azali mosantu?
Ya solo, Biblia elobeli basantu oyo bazali na likoló. Elobi ete Yehova azali “Mosantu [na Grɛki, hagion].” (1 Pe. 1:15, 16; talá Balevi 11:45.) Ntango Yesu Kristo azalaki awa na mabele abengamaki “Mosantu [hagios] ya Nzambe” mpe na likoló azali kobengama “Mosantu [hagios].” (Mrk. 1:24; Boy. [Em.] 3:7, LNz) Baanzelu mpe bazali ‘basantu.’ (Bik. [Mis.] 10:22, LNz) Na Grɛki ya kala, liloba kaka moko wana esalelami mpo na kolobela bato ebele awa na mabele.
Bik. [Mis.] 9:32, 36-41, LNz: “Petro azalaki koleka o bisika mingi, akei mpe kotala basantu [hagious] o Lida. O ntei ya bayekoli ba Yope ezalaki mwasi moko nkombo ’te Tabita [oyo akufaki] . . . [Petro] amibongoli epai ya ebembe, alobi: ‘Tabita, teleme.’ Tabita afungoli miso, amoni Petro mpe amifandisi. Petro asimbi ye na loboko mpe atelemisi ye. Abengi basantu mpe basi bazenge [basi oyo mibali bakufá], mpe alakisi bango ’te azali na bomoi.” (Emonani polele ete basantu yango bakendeki naino na likoló te, mpe mpo moto azala mosantu, esengelaki kaka te ete ayebana mingi lokola Petro.)
2 Ko. 1:1; 13:12, JB: “Paulo, oyo atyami na Nzambe mpo na kozala ntoma ya Kristo Yesu, mpe Timote, moko ya bandeko na biso, epai na eklezia ya Nzambe oyo ezali na Korinti mpe epai ya basantu [hagiois] nyonso na Akaya mobimba.” “Bópesana mbote na lipwɛpwɛ mosantu. Basantu nyonso batindeli bino mbote.” (Bakristo wana nyonso ya siɛklɛ ya liboso oyo bapɛtolamaki na makila ya Kristo mpe baponamaki mpo na mosala ya Nzambe mpo bázala bazwi-ya-libula elongo na Kristo babengamaki basantu. Esengelaki te ete bákufa naino mpo bákóma basantu.)
Biblia elobi ete tosengeli kobondelaka “basantu” mpo bálobela biso epai ya Nzambe?
Yesu Kristo alobaki ete: “Bongo bosambelaka boye: ‘Tata wa biso ozali o likoló . . .’” Na yango mabondeli esengeli kokende epai ya Tata. Yesu alobaki mpe ete: “Ngai nazali Nzela, Bosolo mpe Bomoi. Moto moko te akokende epai ya Tata, soko liboso aleki epai ya ngai te. Eye bokosenge o nkombo ya ngai, nakosala yango.” (Mat. 6:9; Yoa. 14:6, 14, LNz) Na maloba wana, Yesu aboyaki mpenza likanisi oyo bato bazalaka na yango ete moto mosusu, longola ye, akoki kolobela bango epai ya Nzambe. Ntoma Paulo abakisaki lisusu mpo na Kristo ete: “Yezu Kristu, oyo akufaki mpe asekwi, afandi o loboko la mobali la Nzambe mpe azali molobeli wa biso.” “Baye bakobeleme na Nzambe na nguya ya ye, . . . akoumela na bomoi seko mpo te alobela bango.” (Rom. 8:34; Ebr. 7:25, LNz) Soki tolingi mpenza ete Nzambe ayokaka mabondeli na biso, ekozala malamu ete tóbondelaka ye ndenge Liloba na ye ezali kolakisa biso, boye te? (Talá mpe nkasa 356, 357, na motó ya likambo “Maria.”)
Ef. 6:18, 19, JB: ‘Bólɛmba te mpo na kosɛnzɛla mpe kobondela mpo na basantu banso; mpe bóbondela mpo na ngai mpo nazwa libaku ya kofungola monɔkɔ na ngai mpe naloba kozanga kobanga mobombamo ya nsango elamu.’ (Na bavɛrsɛ oyo, Paulo alendisi bakristo bábondela mpo na basantu, kasi te ete bábondela bango to bábondela na nzela na bango. Buku moko (New Catholic Encyclopedia, ya 1967, Vol. XI, lok. 670) elobi: “Mbala mingi K[ondimana] ya S[ika] emonisi ete mabondeli oyo moto asali ye moko to oyo esalemi na eklezia elongo na bato mosusu, ezali kopesama epai ya Tata Nzambe na nzela ya Kristo.”)
Rom. 15:30, LNz: “Bandeko, nasengi bino mpo ya Mokonzi wa biso Yezu Kristu mpe mpo ya bolingi bwa Elimo Santu, bósalisa ngai o etumba eye: bósambelaka Nzambe mpo ya ngai.” (Atako ntoma Paulo azalaki mosantu, asɛngaki baninga na ye bakristo oyo bazalaki mpe basantu ete básambela mpo na ye. Kasi tosengeli kosimba ete Paulo abondelaki baninga na ye basantu te, mpe mabondeli oyo bango basalaki mpo na ye epekisaki Paulo te ete abondela Tata mpo akoba kozala na boyokani malamu elongo na Ye. Talá Baefese 3:11, 12, 14.)
Ndenge nini tosengeli kotalela likambo ya kosambela bitiká mpe bikeko ya “basantu”?
Buku moko (New Catholic Encyclopedia ya 1967, Vol. XII, lok. 234, 235) elobi: “Ezali na ntina te koluka na kati ya Kondimana ya Kala elembeteli oyo emonisi ete bazalaki kosambela bitiká ya basantu; Kondimana ya Sika mpe elobeli yango te. . . . Emonani ete mpo na Origène [“Tata” ya Lingomba], momeseno ya kokumisa eloko oyo ezali komonana ezali momeseno ya bapakano.”
Tóyeba ete Nzambe nde akundaki Moize, mpe moto ata moko te amoná esika lilita na ye ezalaki. (Mib. 34:5, 6) Kasi Yuda 9 eyebisi biso ete Mikaele, anzelu-mokonzi ná Zabolo bawelanaki mpo na nzoto ya Moize. Mpo na nini? Biblia emonisaki polele ete Nzambe akundaki nzoto ya Moize na ndenge ete bato báyeba te esika yango ezali. Monguna alingaki nde ete bato bámona yango, bátya yango na esika oyo bato bakobanda kotala yango mpe mbala mosusu bákóma kosambela yango?
Mpo na likambo etali kosambela bikeko ya “basantu,” talá motó ya likambo “Bikeko.”
Mpo na nini na mangomba mosusu “basantu” bazalaka na sɛrklɛ moko oyo ezali kongɛnga na motó?
Buku moko (The New Catholic Encyclopedia ya 1967, Vol. XII, lok. 963) elobi: “Elembo ya basantu nyonso oyo eyebani mingi ezali elembo ya lipata, sɛrklɛ moko oyo ezali kongɛnga oyo ezingaka motó na bango. Bato babandaki kosalela elembo yango liboso ya eleko ya Kristo, mpe bililingi na yango emonanaka na mayele ya ntɔki ya bapakano ya Bagrɛki; bazalaki kotya sɛrklɛ wana na mayemi ya langilangi mpe na mbongo ya bibende, mpo na mwa banzambe lokola Neptune, Jupiter, Bacchus, mpe mingimingi Apollon (nzambe ya moi).”
Buku mosusu (The New Encyclopædia Britannica, 1976, Micropædia, Vol. IV, lok. 864) elobi: “Mbala mingi, na mayele ya ntɔki ya Bagrɛki mpe Baroma, nzambe-moi Hélios mpe baampɛrɛrɛ ya Roma bazali komonana balati motole moko oyo ezali kongɛnga makasi. Lokola momeseno yango eutaki na bapakano, bakristo ya siɛklɛ ya liboso baboyaki kosalela yango na mayele na bango ya ntɔki; kasi baampɛrɛrɛ oyo bazalaki bakristo bandimaki ete na bafɔtɔ na bango batyaka mwa lipata oyo ezali lokola sɛrklɛ. Na katikati ya siɛklɛ ya minei, babandaki mpe kolakisa Kristo na elembo wana . . . Na siɛklɛ ya motoba nde bato bakómaki na momeseno ya kotya sɛrklɛ na bililingi ya Ngɔndɔ Maria mpe basantu mosusu.”
Ebongi mpenza ete bakristo básalelaka bilembo ya bapakano?
“Mwinda mokoyokanaka nde na molili? Kristu na Belial [Satana], bakoki nde koyokana? Bondeko nini bokoki kozala kati ya mokristu na mopagano? Tempelo ya Nzambe ekoki nde kozala esika yoko na bikeko biye bakokumisaka? Kasi biso tozali tempelo ya Nzambe wa bomoi. . . . Yango wana Mokonzi alobi: Bólongwa o kati ya bato basusu, bófanda mosika na bango. Bósimba eloko mbindo te, mpe ngai nakoyamba bino. Nakozala lokola tata wa bino, mpe bino bokozala lokola bana babali na bana basi ba ngai. Mokonzi wa bokasi bonso alobi bongo.”—2 Ko. 6:14-18, LNz.
Bandimi nyonso ya lingomba moko bakoki kozala basantu mpe na bongo kozala na lisumu te?
Ezali mpenza solo ete na siɛklɛ ya liboso bato nyonso ya lisangá ya bokristo bazalaki basantu. (1 Ko. 14:33, 34; 2 Ko. 1:1; 13:13, Sg, NW) Biblia elobi ete bazali bato oyo Nzambe ‘alimbisi masumu na bango’ mpe “asantisi” bango. (Bik. [Mis.] 26:18; 1 Ko. 1:2, LNz, NW) Atako bongo, bazalaki kotuta ntolo te ete bazali na lisumu ata moko te. Bazalaki bana ya Adama, mosumuki. Yango wana, basengelaki kobunda etumba makasi mpo na kosala oyo ezali malamu, ndenge Paulo andimaki yango na komikitisa nyonso. (Rom. 7:21-25) Lisusu ntoma Yoane amonisaki polele ete: “Soko tolobi: ‘Tozali na lisumu te,’ tozali komikosa, mpe tozali na bosolo o motema te.” (1 Yoa. 1:8, LNz) Na yango, kozala mosantu na ndenge oyo liloba yango esalelami mpo na bayekoli ya solo ya Kristo, elimboli te ete bayekoli yango bazali na lisumu ata moko te.
Mpo na koyeba soki bakristo nyonso ya solo ya lelo bazali basantu mpe bazali na elikya ya kokende na likoló, talá nkasa 272-276.
Soki moto atuni—
‘Ondimaka ete basantu bazali?’
Okoki koyanola: ‘Basantu oyo wapi olingi kolobela?’ Soki moto yango atángi Maria to bantoma, okoki mpe kobakisa: (1) ‘Ya solo, Biblia elobeli bango, mpe nandimaka makambo oyo elobi. Kasi, natyaka mpenza likebi mingi na makambo oyo bazali kosala lelo mpe ndenge oyo ekoki kosalisa biso; nayebi te, yo mpe osalaka bongo? . . . Biblia elobi makambo ya ntina mingi mpo na bango, mpe nakosepela koyebisa yo yango. (Em. 5:9, 10)’ [Liyebisi: mpo na koyeba ndenge ya koloba soki motuna oyo moto abimisi euti na maloba oyo ezali na bavɛrsɛ oyo, okoki kosalela Biblia Liloba lya Nzambe oyo elobi “bakoyangela mokili.” Bible na Lingala ya lelo oyo elobi “bakotambwisa mokili.”] (2) ‘Bomoi ekozala ndenge nini ntango guvɛrnema yango ekoyangela? (Em. 21:2-4)’
To okoki koloba (Soki ozalaki na Lingomba ya Katolike): ‘Na boumeli ya bambula mingi nazalaki kosala bafɛti ya basantu mpe kosambela bango mbala na mbala. Kasi, natángaki likambo moko na kati ya Biblia, oyo etindaki ngai naluka koyeba soki likambo yango ezali malamu. Nalingi kolakisa yo likambo yango. (Talá lokasa 73.)’