Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w02 15/9 nk. 4-7
  • Ndenge nini basantu ya solo bakoki kosalisa yo?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Ndenge nini basantu ya solo bakoki kosalisa yo?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2002
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Nzambe akómisi bango basantu
  • Likambo ya kosɛnga basantu lisalisi mpe kosɛnga bango bálobela biso epai ya Nzambe
  • Makambo oyo basantu basalaka
  • Mapamboli oyo bato bakozwa ntango Bokonzi ekoyangela
  • Basantu
    Ndenge ya kosolola na bato na Makomami
  • Tosengeli kobondelaka basantu?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2013
  • Boyokani kati na “Tempelo ya Nzambe” mpe bikeko na Grèce?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1997
  • Nasengeli kobondela basantu?
    Biyano na mituna ya Biblia
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2002
w02 15/9 nk. 4-7

Ndenge nini basantu ya solo bakoki kosalisa yo?

LILOBA ya Grɛki oyo ebongolami na “mosantu” na kati ya Makomami ezalaki kosalelama mpo na nani? Buku moko oyo elimbolaka maloba ya Biblia (An Expository Dictionary of New Testament Words) elobi boye: “Soki basaleli liloba yango na boike (pluriel), na ndakisa mpo na bandimi, elakisaka bandimi nyonso; elakisaka kaka te bato oyo bazali na bosantu oyo eleki mpenza, to bato oyo bakufá kasi basalaki makambo ya bosantu mpenza na bomoi na bango.”

Yango wana, ntoma Paulo azalaki kobenga baklisto nyonso ya ekeke ya liboso ete basantu ya solo. Na ndakisa, atindaki mokanda moko oyo akomaki na eleko wana “epai ya lisangá ya Nzambe oyo ezali na Kolinti, elongo na basantu nyonso oyo bazali na [etúká ya] Akaya mobimba.” (2 Bakolinti 1:⁠1) Na nsima, Paulo akomaki mokanda “epai ya baoyo nyonso bazali na Loma lokola balingami ya Nzambe, babengami mpo na kozala basantu.” (Baloma 1:⁠7) Ezali polele ete basantu yango bazalaki naino na bomoi; lisusu, ezali te ete baponamaki basantu mpo bazalaki na bizaleli malamu koleka bandimi mosusu nyonso. Na bongo, mpo na nini babengaki bango basantu?

Nzambe akómisi bango basantu

Liloba ya Nzambe ezali komonisa ete ezali bato te to ebongiseli moko te nde ekómisaka moto mosantu. Makomami elobi boye: “[Nzambe] abikisaki biso mpe abengaki biso na kobengama moko mosantu, mpo na misala na biso te, kasi mpo na mokano na ye moko mpe mpo na boboto monene na ye.” (2 Timote 1:⁠9) Kobengama na Yehova nde ekómisaka moto mosantu, mpo na boboto monene ya Yehova mpe na boyokani na mokano na Ye.

Basantu ya lisangá ya boklisto bazali kati na “kondimana ya sika.” Makila ya Yesu Klisto oyo esopamaki ekómisaki kondimana yango likambo ya solo mpe yango nde ekómisaka baoyo bazali na kati ya kondimana yango basantu. (Baebele 9:15; 10:29; 13:​20, 24) Lokola Nzambe azali komona bango pɛto, bazali ‘bonganga-nzambe moko mosantu mpe bazali kopesa bambeka ya elimo oyo endimami na Nzambe na nzela ya Yesu Klisto.’​—⁠1 Petelo 2:​5, 9.

Likambo ya kosɛnga basantu lisalisi mpe kosɛnga bango bálobela biso epai ya Nzambe

Ebele ya bato bakanisaka ete “basantu” bakoki kopesa bandimi nguya moko boye; yango wana, mpo na kopesa “basantu” yango limemya makasi, basalelaka biloko oyo “basantu” yango batiká mpe basɛngaka “basantu” yango bálobela bango epai ya Nzambe. Biblia eteyi likambo ya ndenge wana? Na Lisolo Likoló ya Ngomba, Yesu ateyaki bayekoli na ye ndenge ya kosolola na Nzambe; alobaki boye: “Na bongo, bosengeli kobondela ndenge oyo: ‘Tata na biso na likoló, tiká nkombo na yo esantisama.’ ” (Matai 6:⁠9) Mabondeli ebongi kopesama kaka epai ya Yehova Nzambe.

Bato mosusu ya teoloji basalelaka mokapo ya Baloma 15:30 mpo na komonisa ete kosɛnga “basantu” bálobela biso epai ya Nzambe ezali mabe te; vɛrsɛ yango elobi boye: “Nazali kolendisa bino, bandeko, na nzela ya Nkolo na biso Yesu Klisto mpe na nzela ya bolingo ya elimo, ete bóboma nzoto elongo na ngai na kati ya mabondeli epai ya Nzambe mpo na ngai.” Paulo azalaki nde kolendisa bandimi yango bábondela ye to bátánga nkombo na ye ntango bazali kosolola na Nzambe? Te. Atako Biblia elendisaka biso tóbondelaka mpo na basantu ya solo, epai moko te Nzambe asɛngi biso tóbondelaka bango to na nzela na bango.​—⁠Bafilipi 1:​1, 3, 4. 

Nzokande, Nzambe asili kopona Moyokanisi moko mpo na mabondeli na biso. Yesu Klisto alobaki boye: “Ngai nazali nzela mpe solo mpe bomoi. Moto moko te azali koya epai ya Tata soki na nzela na ngai te.” Yesu alobaki mpe ete: “Nyonso oyo bokosɛnga na nkombo na ngai, nakosala yango, mpo Tata azwa nkembo mpo na Mwana. Soki bosɛngi eloko na nkombo na ngai, nakosala yango.” (Yoane 14:​6, 13, 14) Tokoki mpenza kozala na elikya ete Yehova ayokaka mabondeli oyo esalemi na nkombo ya Yesu. Mpo na Yesu, Biblia elobi ete: “Azali mpe na likoki ya kobikisa na mobimba mpenza baoyo bazali kopusana epai ya Nzambe na nzela na ye, mpamba te azali ntango nyonso na bomoi mpo na kolobela bango.”​—⁠Baebele 7:⁠25.

Lokola Yesu azali pene ya kolobela bato, mpo na nini, na mabondeli oyo bandimi ya mangomba ya boklisto basalaka basɛngaka “basantu” básalisa bango? Will Durant, moto ya mayele na makambo ya kala, amonisi na buku na ye (The Age of Faith) ndenge oyo momeseno yango ebandaki. Durant alobi ete bato bazalaki kobanga Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso mpe bazalaki komona ete kopusana epai ya Yesu nde ezalaki mpasi te. Kasi, nsima na yango, alobi boye: ‘Lokola bazalaki mpenza kotosa te makambo libwa oyo Yesu amonisaki na Lisolo Likoló ya Ngomba ete yango nde epesaka moto bolamu, bato balingaki lisusu koloba na Yesu ye moko te. Bamonaki malamu kobondela mosantu moko oyo, na ntembe te azali kuna na likoló, mpamba te asili kotombolama na molɔngɔ ya basantu, mpe kosɛnga ye alobela bango epai ya Klisto.’ Tosengeli mpenza kobanga kobondela Nzambe ye moko na nzela ya Yesu?

Biblia ezali koteya biso ete ntango tozali kobondela Nzambe, na nzela ya Yesu tokoki kozala na “elobeli ya polele mpe nzela ya kopusana pene kozanga kokakatana.” (Baefese 3:​11, 12) Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso azali mpenza mosika te na biso bato mpo azanga koyoka mabondeli na biso. Davidi, mokomi ya nzembo, abondelaki na elikya mpenza ete: “Yo [Moyoki ya, NW] mabondeli; bato nyonso bakoya epai na yo.” (Nzembo 65:⁠2) Yehova apesaka nguya te na nzela ya biloko oyo “basantu” batiká, kasi asopaka nde elimo santu na ye likoló ya baoyo basɛngaka ye yango na kondima. Yesu apesaki makanisi oyo: “Soki bino, atako bozali bato mabe, boyebi ndenge ya kopesa bana na bino makabo ya malamu, Tata na likoló akopesa elimo santu mingi boni epai ya baoyo bazali kosɛnga ye yango!”​—⁠Luka 11:⁠13.

Makambo oyo basantu basalaka

Basantu oyo Paulo akomelaki mikanda basilá kokufa kala mpenza mpe, na nsima, basengelaki kozwa “motole ya bomoi,” kosekwa mpo na kokende na likoló. (Emoniseli 2:10) Ata bato oyo baleki molende mpo na kosambela Nzambe bandimaka ete kopesa basantu yango ya solo limemya makasi ekoki te kobatela moto na maladi, na koningana ya mabele to na mpela to mpe na makama mosusu ya ndenge wana, na mikakatano ya mbongo, na konuna to mpe na liwa. Na bongo, okoki ntango mosusu komituna boye: ‘Basantu ya Nzambe bamibanzabanzaka mpenza mpo na biso? Tosengeli kolikya ete bakosalisa biso?’

Na esakweli moko oyo Danyele akomaki, basantu bazalaki mpenza na esika monene. Na ekeke ya motoba liboso ya ntango na biso (L.T.B.), Danyele amonaki emonaneli moko ya kokamwa; makambo oyo yango elobelaki ezali kokokisama tii na mikolo na biso. Amonaki banyama minei ya nsɔmɔ bazali kobima na mai monene; banyama yango bazali kolakisa nde baguvɛrnɛma ya bato oyo ezali kokoka te kokokisa bamposa ya solosolo ya bato. Nsima na yango, Danyele asakolaki boye: “Nde [basantu, NW] ya Oyo-Aleki-Likoló bakozwa bokonzi, mpe bakozala na yango seko, lobiko na lobiko.”​—⁠Danyele 7:​17, 18.

Paulo amonisaki ete ‘libula yango mpo na basantu,’ to koyangela elongo na Yesu kuna na likoló, ezali mpenza likambo ya solo. (Baefese 1:​18-21) Makila ya Yesu epesaki basantu 144 000 nzela ya kosekwa mpe kozwa nkembo na likoló. Ntoma Yoane alobaki boye: “Esengo mpe mosantu moto nyonso oyo azwi lisekwa ya liboso; likoló na bango liwa ya mibale ezali na bokonzi te, kasi bakozala banganga-nzambe ya Nzambe mpe ya Klisto, mpe bakoyangela elongo na ye mbula yango nkóto.” (Emoniseli 20:​4, 6; 14:​1, 3) Na emonaneli moko, Yoane ayokaki ebele ya bikelamu ya likoló bazali koyemba liboso ya Yesu wana asili kozwa nkembo, ete: “Na makila na yo osombelaki Nzambe bato na mabota nyonso mpe na minɔkɔ nyonso mpe na mikili nyonso mpe na bikólo nyonso, mpe okómisi bango bokonzi mpe banganga-nzambe mpo na Nzambe na biso, mpe basengeli koyangela mabelé.” (Emoniseli 5:​9, 10) Oyo nde likambo ya kokitisa mpenza motema! Yehova Nzambe ye moko aponi malamumalamu bato yango. Lisusu, ntango bazalaki awa na mabele, basalelaki ye na bosembo mpenza; bakutanaki na mikakatano nyonso oyo ekómelaka bato. (1 Bakolinti 10:13) Yango wana, tokoki mpenza kozala na elikya ete basantu yango oyo basekwi bakozala na motema mawa mpe bakoyeba komitya na esika na biso ntango bakozala bakonzi; bakoyeba mpe bolɛmbu na biso mpe makambo oyo tokoki te kosala.

Mapamboli oyo bato bakozwa ntango Bokonzi ekoyangela

Mosika te, Bokonzi ya Nzambe ekolongola mabe mpe bampasi nyonso awa na mabele. Na ntango wana, bato bakozala pene mpenza na Nzambe. Yoane akomaki boye: “Bongo nayokaki mongongo moko ya makasi euti na kiti ya bokonzi elobi ete: ‘Talá! Hema ya Nzambe ezali elongo na bato, mpe akofanda elongo na bango mpe bakozala bato na ye. Mpe Nzambe ye moko akozala elongo na bango.’ ” Likambo yango ekomemela bato mapamboli ebele mpenza, mpamba te esakweli yango elobi lisusu boye: “Akopangwisa mpisoli nyonso na miso na bango, mpe liwa ekozala lisusu te, ná mawa ná koganga ná mpasi ekozala lisusu mpe te. Makambo ya kala esili koleka.”​—⁠Emoniseli 21:​3, 4.

Ekozala mpenza ntango moko ya esengo! Boyangeli malamu mingi ya Klisto Yesu na basantu yango 144 000 ekopesa makambo mosusu oyo Mika 4:​3, 4 elobeli boye: “[Yehova] akosambisa kati na mabota mingi, akopamela mabota na nguya mosika; bakotula mipanga na bango ete mizala bitimweli, mpe makɔnga na bango ete mazala bikateli na matiti. Libota moko bakotombwela libota mosusu mopanga te, bakoyekola etumba lisusu mpe te. Bakofanda mpe na nse, moto na moto na nse ya [nzete na ye ya vinyo, NW] mpe na nzete na ye ya [figi, NW], moto moko akobangisa bango te mpo ete monɔkɔ ya [Yehova] na bibele elobi bongo.”

Basantu bazali kobenga bato bázwa mapamboli wana. Basantu ya solo, oyo bakokanisi bango na mwasi ya libala, bazali koloba ntango nyonso ete: “ ‘Yaká!’ Mpe tiká moto nyonso oyo ayoki aloba ete: ‘Yaká!’ Mpe tiká moto nyonso oyo azali na mposa ya mai aya; tiká moto nyonso oyo alingi, akamata mai ya bomoi ofele.” (Emoniseli 22:17) ‘Mai yango ya bomoi’ ezali komonisa makambo nini? Ezali komonisa makambo ebele oyo moko na yango ezali boyebi ya solosolo ya mikano ya Nzambe. Na libondeli moko oyo Yesu asalaki epai ya Nzambe, alobaki boye: “Oyo elakisi bomoi ya seko, báyekola koyeba yo, Nzambe kaka moko ya solosolo, mpe moto oyo otindaki, Yesu Klisto.” (Yoane 17:⁠3) Okoki kozwa boyebi yango soki ozali koyekola Biblia mbala na mbala. Tozali mpenza na esengo ete na nzela ya Liloba ya Nzambe, tokoki kososola banani oyo bazali mpenza basantu mpe toyebi ndenge oyo Nzambe akopesa bango mosala oyo ekomemela bato bolamu libela na libela!

[Elilingi na lokasa 4]

Na lisalisi ya elimo santu, Paulo akomelaki basantu ya solo mikanda

[Elilingi na lokasa 5]

Bantoma ya sembo ya Yesu bakómaki basantu ya solo

[Elilingi na lokasa 6]

Na nzela ya Yesu, tokoki kobondela Nzambe na elikya

[Elilingi na lokasa 7]

Basantu oyo basekwi bakozala bakonzi ya motema mawa ntango bakoyangela mabele

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto