Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • rs lok. 234-lok. 238
  • Kosangisa nzoto

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Kosangisa nzoto
  • Ndenge ya kosolola na bato na Makomami
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Soki moto atuni—
  • Biyano na mituna zomi na likambo ya kosangisa nzoto
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2011
  • Kosangisa nzoto liboso ya kobala
    Lamuká!—2013
  • Kosangisa nzoto mibali na mibali to basi na basi ekoki kondimama?
    Lamuká!—2012
Ndenge ya kosolola na bato na Makomami
rs lok. 234-lok. 238

Kosangisa nzoto

Ndimbola: Likambo oyo etali kaka bikelamu ya mabele, oyo esalaka ete mwasi ná mobali básangana mpo bábota. Bokeseni oyo ezali kati na binama ya kobotela ya mwasi ná mobali esalá ete makambo na bango mpe ekesana. Lokola Nzambe nde azali Liziba ya bomoi mpe lokola bato basengeli komonisa bizaleli na ye, esengeli kotalela likambo ya kobota na nzela ya kosangisa nzoto na limemya mpenza.

Biblia eteyaka ete kosangisa nzoto ezali lisumu?

Eba. 1:28: “Nzambe apambolaki bango [Adama ná Eva] mpe Nzambe alobaki na bango ete: ‘Bóbota mpe bókóma mingi mpe bótondisa mabele.’” (Mpo Adama ná Eva bátosa etinda yango, basengelaki kosangisa nzoto, boye te? Kosala bongo ekokaki kozala lisumu te kasi eyokanaki na mokano ya Nzambe mpo na kotondisa mabele. Bato mosusu bakanisaka ete ‘mbuma’ oyo Nzambe ‘apekisaki’ Adama ná Eva ezalaki mbala mosusu kosangisa nzoto. Kasi likanisi yango eyokani te na etinda ya Nzambe oyo touti kolobela. Eyokani mpe te na likambo oyo ete, atako Adama ná Eva balyaki mbuma oyo Nzambe apekisaki na Edene, mbala ya liboso oyo Biblia elobi ete basangisaki nzoto ezali nsima ya ntango oyo Nzambe abenganaki bango na Edene.—Eba. 2:17; 3:17, 23; 4:1.)

Eba. 9:1: “Nzambe apambolaki Noa ná bana na ye mpe alobaki na bango ete: ‘Bóbota mpe bókóma mingi mpe bótondisa mabele.’” (Nsima ya Mpela ya mikolo ya Noa, Nzambe apambolaki lisusu bato mpe apesaki bango lisusu etinda ya kobota. Likanisi ya Nzambe mpo na kosangisa nzoto na ndenge oyo endimami ebongwani te.)

1 Ko. 7:2-5: “Lokola pite epalangani mingi, mobali mokomoko azala na mwasi na ye moko mpe mwasi mokomoko azala na mobali na ye moko. Mobali apesa mwasi na ye eloko oyo asengeli na yango; kasi mwasi mpe asala ndenge wana epai ya mobali na ye. . . . Bópimelanaka yango te, longola kaka soki bino mibale boyokani mpo na ntango oyo botye, . . . mpo Satana akoba te komeka bino mpo na kozanga komipekisa na bino.” (Pite nde ezali mabe, kasi kosangisa nzoto kati na mwasi ná mobali oyo babalaná ezali mabe te.)

Kosangisa nzoto liboso ya kobala ezali mabe?

1 Tes. 4:3-8: “Talá eloko Nzambe alingi . . . ete bóboya pite; ete mokomoko na bino ayeba kopekisa nzoto na ye na kosantisama mpe lokumu, na mposa ya lokoso ya kosangisa nzoto te ndenge mpe bikólo wana oyo bayebi Nzambe te bazalaka na yango; ete moto moko te akóma tii na kosalela ndeko na ye mabe mpe kobɔtɔla ntomo na ye na likambo yango, mpamba te Yehova nde apesaka etumbu mpo na makambo nyonso wana, kaka ndenge toyebisaki bino yango liboso mpe lisusu topesaki bino litatoli malamumalamu. Mpo Nzambe abengaki biso, mpo na kondima mbindo te, kasi nde mpo na kosantisama. Na yango, moto oyo azali kotyola, atyoli moto te, kasi Nzambe, oyo azali kotya elimo santu na ye na kati na bino.” (Liloba ya Grɛki porneia, oyo ebongolami na “pite,” elimboli kosangisa nzoto kati na bato oyo babalaná te, to na moto oyo azali mobalani na yo te.)

Ef. 5:5: “Moto moko te ya pite to moto ya mbindo to moto ya lokoso—oyo elakisi kozala mosambeli ya bikeko—azali na libula na bokonzi ya Kristo mpe ya Nzambe.” (Yango elingi koloba te ete moto oyo kala azalaki kosala pite akoki te kozwa mapamboli ya Bokonzi ya Nzambe; kasi mpo Nzambe andima moto yango, asengeli kotika etamboli na ye ya kala. Talá 1 Bakorinti 6:9-11.)

Biblia endimaka libala ya makango?

Talá nkasa 249, 250, na motó ya likambo “Libala.”

Biblia elobi nini mpo na kosangisa nzoto mibali na mibali to basi na basi?

Rom. 1:24-27: “Na kolanda bamposa ya mitema na bango, Nzambe atiki bango básala makambo ya mbindo, mpo nzoto na bango moko eyoka nsɔni . . . Nzambe atiki bango bálanda bamposa ya kosangisa nzoto na ndenge ya nsɔni, mpo basi na bango batiki ndenge oyo esengeli kosangisa nzoto, bakómi kosangisa nzoto na ndenge oyo esengeli te; mibali mpe ndenge moko batiki ndenge oyo esengeli kosangana na mwasi mpe bakómi kozika mpenza na mposa makasi bango na bango, mibali ná mibali, bazali kosala makambo ya nsɔni mpe bazali kozwa mbano mobimba, oyo ebongi mpenza na libunga na bango.”

1 Tim. 1:9-11: “Babimisaka mibeko mpo na moyengebene te, kasi mpo na bato oyo babukaka mibeko mpe bato ya motó makasi, bato oyo batyolaka Nzambe mpe basumuki, . . . bato ya pite, mibali oyo balalaka na mibali, . . . mpe mpo na likambo nyonso oyo ezali kotɛmɛla mateya oyo epesaka litomba na kolanda nsango malamu ya nkembo ya Nzambe ya esengo.” (Talá Balevi 20:13.)

Yuda 7: “Sodoma ná Gomora ná bingumba ya zingazinga na yango, nsima wana . . . balandaki nzoto ya mosuni mpo na kosalela yango na ndenge ebongi te, batyami liboso na biso lokola ndakisa ya kokebisa na ndenge bazwaki etumbu ya lisambisi ya mɔtɔ ya seko.” (Liloba “sodomi” eutá na nkombo Sodoma, mpe elimboli kosangisa nzoto mibali na mibali to basi na basi. Talá Ebandeli 19:4, 5, 24, 25.)

Ndenge nini bakristo ya solo batalelaka mibali oyo bazalaki kala kosangisa nzoto na mibali to basi oyo bazalaki kala kosangisa nzoto na basi?

1 Ko. 6:9-11: “Ezala bato ya pite, basambeli ya bikeko, bato ya ekobo, mibali oyo bazwamá mpo na kosangisaka na bango nzoto na ndenge oyo ebongisamá te, mibali oyo balalaka na mibali . . . bakozwa libula ya bokonzi ya Nzambe te. Nzokande bamosusu na kati na bino bazalaki ndenge wana. Kasi bosukwami pɛɛ, kasi bosantisami, kasi botángami bayengebene na nkombo ya Nkolo na biso Yesu Kristo mpe na elimo ya Nzambe na biso.” (Ata soki moto amipesaki na makambo ya ndenge wana, soki atiki etamboli ya mbindo oyo azalaki na yango, alandi mitinda ya sembo ya Yehova, mpe andimi ebongiseli oyo Nzambe azwi mpo na kolimbisa masumu na nzela ya Kristo, akoki kokóma pɛto na miso ya Nzambe. Nsima ya kobongwana, akoki kondimama na lisangá ya bokristo.)

Bakristo ya solo bayebaka ete moto oyo alingi mpenza kosepelisa Yehova akoki kolonga bamposa ya mabe oyo ekɔtelá ye makasi, ata oyo azwá na baboti na ye, oyo euti na nzoto na ye moko to na makambo ya esika oyo akolá. Bato mosusu bazalaka motema mɔtɔmɔtɔ. Ntango mosusu kala bazalaki kosilika noki mpenza; kasi lokola bayebi mokano ya Nzambe, mpe bazali na mposa ya kosepelisa ye, elimo santu esalisi bango bálona ezaleli ya komipekisa. Moto akoki kozala molangwi-masanga, kasi, soki azwi mokano ya malamu, akoki kotika komɛla, mpe na yango akolangwa lisusu te. Bobele bongo, mobali akoki kozala na mposa makasi ya kosangisa nzoto na mibali, mpe mwasi akoki kozala na mposa makasi ya kosangisa nzoto na basi, kasi soki basaleli toli ya Liloba ya Nzambe, bakoki kotikala pɛto mpe bakotika momeseno yango. (Talá Baefese 4:17-24.) Yehova alingi te tókanisa ete kozala na etamboli mabe ekosala biso eloko te; azali koyebisa biso polele mpe na boboto mpenza mikakatano oyo eutaka na etamboli mabe, mpe azali kosalisa mingi mpenza baoyo balingi ‘kolongola bomoto ya kala elongo na misala na yango, mpe kolata bomoto ya sika.’—Kol. 3:9, 10.

Toli ya Biblia na makambo etali kosangisa nzoto esilá ngala mpe eleki makasi?

1 Tes. 4:3-8: “Nzambe alingi . . . ete bóboya pite . . . Na yango, moto oyo azali kotyola, atyoli moto te, kasi Nzambe, oyo azali kotya elimo santu na ye na kati na bino.” (Toli ya Biblia mpo na kosangisa nzoto ezali te makambo oyo bato moko boye ya kalakala babimisá. Toli yango euti nde na Mozalisi ya moto; emonisi polele makambo oyo Nzambe asɛngi mpo moto andimama na ye; ezali kopesa malako oyo ekosalisa mabota bázala na kimya mpe na esengo, mpe báyeba kofanda na bato. Baoyo basalelaka toli yango babatelaka mitema na bango ezoka te mpe bazwaka te bamaladi ya mabe oyo euti na etamboli ya mbindo. Toli ya Biblia esilaka ngala te, mpe ebongi mpo na kosalisa baoyo balingi kozala na lisosoli ya malamu na miso ya Nzambe mpe kozala na bomoi oyo ezangi mindɔndɔ.)

Soki moto atuni—

‘Ndenge nini botalelaka likambo ya kosangisa nzoto mibali na mibali to basi na basi?’

Okoki koyanola: ‘Totalelaka yango ndenge oyo Biblia elobi. Nandimaka ete makambo oyo Biblia elobi ezali na ntina mingi koleka makanisi ya bato, mpo yango ezali kopesa biso makanisi ya Mozalisi ya bato. (1 Ko. 6:9-11) Osengeli koyeba ete bato mosusu oyo bakómi bakristo bazalaki kala kosangisa nzoto mibali na mibali to basi na basi. Kasi lokola balingi Nzambe mpe lokola ye azali kosalisa bango na elimo na ye, babongwaná.’

To okoki koloba: ‘Na mokuse nakoloba ete namonaka ete bato mingi oyo balobaka ete kosangisa nzoto mibali na mibali to basi na basi ezali mabe te bandimaka te ete Biblia ezali Liloba ya Nzambe. Tiká natuna yo naino: Ndenge nini otalelaka Biblia?’ Soki moto alobi ete andimelaka Biblia, mbala mosusu okoki kobakisa: ‘Likambo ya kosangisa nzoto mibali na mibali to basi na basi ebandi lelo te. Biblia emonisi polele likanisi ya Yehova Nzambe, mpe likanisi yango ebongwani te. (Okoki mbala mosusu kosalela makanisi oyo ezali na nkasa 235, 236.)’ Soki moto yango andimaka te ete Nzambe azali to andimelaka Biblia te, okoki kobakisa: ‘Soki Nzambe azalaka te, na ntembe te tolingaki kozongisa monɔkɔ epai na ye te mpe na yango tolingaki kosala ndenge tolingi. Na yango, motuna tosengeli komituna yango oyo: Nzambe azali mpenza mpe ye moto asalaki ngai [okoki mbala mosusu kobakisa: Biblia ekomamaki mpenza na litambwisi ya elimo ya Nzambe]? (Salelá makanisi oyo ezali na nkasa 397-403 to 101-110.)’

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto