Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • si nk. 51-53
  • Mokanda ya Biblia nimero 8—Luta

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mokanda ya Biblia nimero 8—Luta
  • “Makomami nyonso mapemami na Nzambe mpe mazali na litomba”
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • MAKAMBO MAZALI KATI NA LUTA
  • LITOMBA NA YANGO
  • Boaza ná Luta: Libala oyo moto akokaki kokanisa te
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2003
  • “Mwasi moko malamu mingi”
    Mekolá kondima na bango
  • Makanisi ya ntina na mokanda ya Luta
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2005
  • “Mwasi moko malamu mingi”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2012
Makambo mosusu
“Makomami nyonso mapemami na Nzambe mpe mazali na litomba”
si nk. 51-53

Mokanda ya Biblia nimero 8—Luta

Mokomi: Samwele

Esika ya bokomi: Yisalaele

Nsuka ya bokomi: soko 1090 L.T.B.

Boumeli ya lisoló: Mbula 11 ya litambwisi ya basambisi

1. (a) Mpo na nini mokanda ya Luta ezali te bobele lisoló mpamba ya bolingo? (b) Likambo nini ya kobenda likebi lilobelami mpo na Luta kati na Biblia?

MOKANDA ya Luta motondi na makambo ya kosepelisa mpenza oyo masuki na lisoló kitoko ya bolingo kati na Boaza mpe Luta. Nzokande, yango ezali bobele lisoló ya bolingo mpamba te. Mokano na yango ezali te ya kosepelisa moto mwa moke. Mokanda yango mozali komonisa polele mokano ya Yehova motali kobimisa mosangoli ya libula ya Bokonzi, mpe mozali kokumisa motema-boboto na Ye. (Luta 1:8; 2:20; 3:10) Bonene ya bolingo ya Yehova emonani na lolenge aponi mwasi oyo azalaki moto na Moaba, oyo azalaki kala mosambeli ya Kemose, nzambe ya bapakano, mpe oyo abongwanaki kino losambo ya solo, ete akóma nkɔ́kɔ ya Yesu Klisto. Luta azali moko kati na basi minei oyo nkombo na bango etángami kati na molɔngɔ́ ya libota libandi na Abalayama kino na Yesu. (Mat. 1:3, 5, 16) Luta mpe Esetele bazali basi mibale oyo mikanda ya Biblia mibéngami na nkombo na bango.

2. Ntango nini makambo oyo mazali na mokanda ya Luta masalemaki, mokanda yango mokomamaki ntango nini, mpe na nani?

2 “Na mikolo wana ezalaki basambisi kosambisa . . . ” Ezali na maloba wana ya ebandeli nde mokanda ya Luta mokɔti na lisoló na yango ya kosimba motema. Soki totaleli maloba wana, tozali kososola ete mokanda yango mokomamaki na nsima mpenza, elingi koloba na eleko ya bakonzi ya Yisalaele. Nzokande, makambo oyo mayebisami na mokanda yango masalemaki na boumeli ya mbula soko 11 na ntango ya basambisi. Atako nkombo ya mokomi na yango elobelami te, emonani mpenza ete ezalaki Samwele, oyo akomaki mpe mokanda ya Basambisi mpe azalaki mosembwi monene na ebandeli ya eleko ya bakonzi. Lokola bavɛrsɛ́ ya nsuka emonisi ete Davidi asilaki kokóma na lokumu, boye ekoki kolobama ete kokomama ya mokanda ya Luta esalemaki na mobu 1090 L.T.B. Samwele, oyo ayebaki malamu elaka ya Yehova etali kobimisa “nkosi” uta na libota ya Yuda, mpe oyo asalelamaki na Yehova mpo na kopakola Davidi moto na libota yango ete akóma mokonzi ya Yisalaele, asengelaki mpenza kozala na esengo ya kokoma lisoló ya bokitani ya libota wana kino Davidi.​—Gen. 49:9, 10; 1 Sam. 16:1, 13; Luta 1:1; 2:4; 4:13, 18-22.

3. Makambo nini ya solosolo mandimisi ete Luta ezali mokanda ya kanɔ́?

3 Likambo oyo ete Luta ezali mokanda ya kanɔ́ [to liste ya mikanda mindimami] ya Makomami etyami ntembe ata moke te. Endimiseli makasi ya likambo yango ezwamaki ntango Yehova apemisaki kotyama ya nkombo ya Luta na molɔngɔ́ ya bankɔ́kɔ ya Yesu kati na Matai 1:5. Bayuda bandimaka ntango nyonso ete mokanda ya Luta mozali moko na mikanda ya kanɔ́ ya Liebele. Na bongo, likambo ya kokamwa ezali te na komona ete biteni ya mokanda yango bizwamaki esika moko na mikanda mosusu ya kanɔ́ wana kati na Barulo ya Mbu Ekufá, barulo oyo ezwamaki kobanda na mobu 1947. Lisusu, mokanda ya Luta mozali na boyokani makasi elongo na mikano ya Bokonzi ya Yehova mpe elongo na masɛngami ya Mibeko ya Mose. Atako Bayisalaele bapekisamaki kobalana na Bakanana mpe bato na Moaba, oyo bazalaki basambeli na bikeko, nzokande yango etalelaki te bapaya lokola Luta oyo andimaki losambo ya Yehova. Kati na mokanda ya Luta, mobeko na ntina na kosikolama mpe na ntina na libala ya kosangola etosami kati na makambo na yango nyonso.​—Det. 7:1-4; 23:3, 4; 25:5-10.

MAKAMBO MAZALI KATI NA LUTA

4. Ekateli nini Luta atyami liboso na yango, mpe liponi na ye emonisi nini na ntina na lolenge ya losambo na ye?

4 Luta azwi ekateli ya kokangama na Naomi (1:1-22). Lisoló yango libandi na eleko moko ya nzala monene na Yisalaele. Elimeleke, mobali moko ya Beteleme, akatisi Ebale Yordani elongo na mwasi na ye Naomi mpe bana na ye mibale ya mibali, na nkombo Malehone mpe Kiliyone, mpo na kofanda na boumeli ya mwa ntango na mokili ya Moaba. Kuna, bana na ye bazwi basi oyo bazalaki bato na Moaba, moko Olepa mpe mosusu Luta. Mpasi monene ekweli libota, libosoliboso tata akufi, mpe na nsima bana na ye mibale ya mibali balandi. Basi misato batikali, oyo bazangi bana mpe bakufeli mibali; Elimeleke azwi ata mombóto moko te. Lokola azwi nsango ete Yehova atye lisusu likebi likoló na Yisalaele na kopesáká kwanga epai na libota na ye, Naomi azwi ekateli ya kosala mobembo mpo na kozonga na Yuda, mboka na ye ya kobotama. Bakilo-basi na ye bakei na ye elongo. Naomi abondeli bango ete bázonga na Moaba, kolɔmbáká na Yehova ete amonisela bango motema-boboto na ye mpo ete bázwa mibali kati na bato na bango moko. Nsukansuka, Olepa “azongi epai na bato na ye mpe epai na banzambe na ye,” kasi Luta, mwasi na sembo mpe na etingya kati na mbongwana na ye kino losambo ya Yehova, akangami na Naomi. Ekateli na ye eyebisami na lolenge kitoko mpenza na maloba oyo: “Esika ekokenda yo, ngai mpe nakokenda kuna, mpe esika ekolala yo, ngai mpe nakolala wana. Bato na yo bakozala bato na ngai mpe Nzambe na yo akozala Nzambe na ngai. Esika ekokufa yo, ngai mpe nakokufa mpe nakokundama wana. [Yehova] asalela ngai boye mpe mosusu lokola, soko eloko mosusu ekokabola kati na biso na yo, bobele kufa.” (1:15-17) Nzokande, Naomi, mwasi yango mokufeli-mobali, oyo azali na mwana te mpe oyo nkombo na ye elimboli “Elɛngi na ngai,” amipesi nkombo Mala, oyo elimboli “Bololo.”

5. Luta amonisi bizaleli kitoko nini, mpe lolenge nini Boaza alendisi ye?

5 Luta azali kolɔkɔta mbuma na elanga ya Boaza (2:1-23). Ntango bakómi na Beteleme, Naomi apesi Luta ndingisa ya kokende kolɔkɔta orge na eleko ya bobuki mbuma. Boaza, oyo azalaki nkolo elanga, mpaka Moyuda, mpe ndeko ya penepene ya Elimeleke, bokilo ya Luta, amoni ye. Atako mobeko ya Nzambe epesi ye lotómo ya kolɔkɔta mbuma, Luta amonisi komikitisa na kosɛngáká ndingisa ya kosala kati na elanga. (Lev. 19:9, 10) Ndingisa epesameli ye na esengo nyonso, mpe Boaza ayebisi ye ete alɔkɔta mbuma bobele na elanga na ye, esika moko na baseka na ye. Koyebisáká Luta ete ayokaki etamboli na ye ya malamu liboso na Naomi, Boaza alendisi ye na maloba malandi: ‘Tiká ete Yehova azongisela yo mpo na yango esalaki yo, mpe libonza mobimba epesamela yo na Yehova Nzambe na Yisalaele, oyo omibombi na nsé na mapapu na ye.’ (Luta 2:12) Na mpokwa wana, Luta akaboli na esengo nyonso mbuma ya mosala na ye elongo na Naomi mpe alimboli ete kolónga na ye na bolɔkɔti mbuma euti na boboto oyo Boaza amoniselaki ye. Na miso ya Naomi, yango emonani mpenza ete ezali lobɔkɔ ya Yehova, mpe na yango alobi ete: “Apambwama na [Yehova], oyo boboto na ye ekotikaka bato na bomoi te mpe bakufi te! . . . Moto yango azali na libota na biso, moko na bandeko na biso.” (2:20) Ɛɛ, Boaza azali solo ndeko ya penepene, oyo engebene mibeko akoki kobimisela Naomi bakitani na nkombo ya nkɔndɔ Elimeleke. Luta akóbi kolɔkɔta mbuma na bilanga ya Boaza kino eleko ya bobuki orge mpe nganu esukaki.

6. Lolenge nini Luta asɛngi libala ya kosangola, mpe eyano nini Boaza apesi?

6 Boaza, lokola mosangoli, abali Luta (3:1–4:22). Lokola anuni mingi mpe azali lisusu na makoki ya kobota te, Naomi ayebisi Luta ete akitana ye kati na libala ya kosangola. Na eleko motindo wana ya ntina mingi, nkolo mabelé azalaki na momeseno ya kokende ye moko mpo na kokɛngɛla mosala ya bopupoli mbuma, mosala oyo mozalaki kosalema na mpokwa mpo na kozwa mwa mopɛpɛ oyo mozalaki koleka nsima na molungé makasi ya mokolo. Boaza azalaki kolala na mabelé ya etutelo, mpe Luta akei kokuta ye kuna. Ayei na kozanga makɛlɛlɛ epai na Boaza, azipoli ye na makolo, mpe alali wana. Ntango Boaza alamuki na midi ya butu, Luta amimonisi ete ezali ye mpe, na boyokani na momeseno oyo basi bazalaki na yango ntango bazali kosɛnga lotómo na bango ya libala ya kosangola, asɛngi Boaza alalisa elamba na ye likoló na ye [Luta].a Boaza alobi ete, “Tiká [Yehova] apambola yo, mwana na ngai,” mpe akumisi ye mpo ete alandaki te bilenge mibali na mposa ezangi ntina to na moimi. Na esika ya kozala moto oyo azalaki kosɛnga bosangani ya mbindo, Luta amisaleli lokumu lobongi lokola “mwasi malamu.” (3:10, 11) Nzokande, Boaza ayebisi ye sikawa ete, ezali na mosangoli mosusu oyo azali ndeko ya penepene koleka ye; akosolola na ye na ntɔ́ngɔ́. Luta alali na makolo na ye mpe alamuki na ntɔ́ngɔ́ makasi. Na nsima, abonzeli Luta lɔsɔ, mpe Luta azongi epai na Naomi, oyo atuni na motema mɔ́tɔmɔ́tɔ mpenza lolenge makambo masuki.

7. Boaza asali nini na ntina ete libala lisalema, mpe mapamboli nini mazwami na yango?

7 Na ntɔ́ngɔ́, Boaza akei na ekuke ya mboka mpo na koluka mosangoli wana. Kozwáká bato zomi kati na bankumu ya mboka ete bázala batatoli to banzɛnɛnɛkɛ, apesi na mosangoli yango ya penepene esika ya liboso ete asangola nyonso oyo ezalaki na Elimeleke. Akondima kosangola yango? Eyano na ye ya liboso ezalaki ete, ɛɛ, ntango likambo yango limonanaki lokola litomba malamu mpo na kokólisa bozwi na ye. Kasi, ntango ayoki lisɛngami ya kosala libala ya kosangola elongo na Luta, abángi mpo na libula na ye moko mpe, na nsima, amonisi koboya na ye na kolongoláká lipapa, na boyokani na oyo esɛngamaki kati na mibeko. Nkombo ya moto yango etángami te kati na lisoló ya Biblia; alobelami bobele na lolenge lozangi lokumu ete “Songolo.” Na nsima, bobele liboso ya batatoli wana, Boaza akamati Luta lokola mwasi na ye ya kosangola. Ezali nde mpo na ntina moko ya moimi? Te, ezali nde mpo ete ‘nkombo ya mokufi elongolama te.’ (4:1, 10) Baoyo nyonso bazalaki kotala basɛngi na Yehova ete apambola ebongiseli wana ya bolingo, mpe mapamboli yango masopanaki na lolenge ya kokamwisa mpenza! Luta aboteli Boaza mwana mobali na ntango ya bobangé na ye, mpe Naomi akómi mobokɔli ya mwana yango. Ye atángami “mwana mobali . . . na Naomi” mpe bapesi ye nkombo Obede.​—4:17.

8. Nini emonisi lisusu ete kobima ya Mombóto ya elaka euti na ebongiseli ya Yehova?

8 Bavɛrsɛ́ ya nsuka ya mokanda ya Luta epesi molɔngɔ́ ya bakitani kobanda na Pelese, leká Boaza, kino Davidi. Bamoko kati na banganga-mayele balobi ete mabota nyonso oyo malekaki na eleko wana matángami te, mpo ete ntango oyo elekaki na kati ezalaki molai mingi, kasi bato oyo batángami bazali bobele moke. Yango ezali mpenza solo? To moto mokomoko kati na bango nde apambolamaki mpo na kozala na bomoi molai mpe kobota mwana na eleko ya bobangé na ye? Likanisi oyo ya nsuka likoki kozala ya malamu, yango emonisi polele ete kobima ya Mombóto oyo alakamaki euti na ebongiseli ya Yehova mpe na ngɔlu na ye, kasi na nguya ya moto te. Na mabaku mosusu, Yehova amonisaki nguya na ye na lolenge lokokani na oyo wana; na ndakisa na kobotama ya Yisaka, ya Samwele, mpe ya Yoane Mobatisi.​—Gen. 21:1-5; 1 Sam. 1:1-20; Luka 1:5-24, 57-66.

LITOMBA NA YANGO

9. Na makambo nini bato oyo balobelami na lisoló ya Luta bazali ndakisa malamu mpo na biso lelo?

9 Kozanga ntembe, lisoló kitoko oyo lizali mpenza na litomba, mpamba te yango ezali kosalisa baoyo balingaka boyengebene ete bátonga makasi kondima na bango. Bato nyonso kati na lisoló oyo ya kosimba motema bamonisaki kondima makasi epai na Yehova, mpe “bapesameli litatoli na nzela na kondima na bango.” (Ebe. 11:39, NW) Bakómaki ndakisa malamu mpo na biso lelo. Naomi amonisaki elikya mozindo kati na ngɔlu ya Yehova. (Luta 1:8; 2:20) Na mokano na ye mpenza, Luta atikaki mokili na ye mpo na kolanda losambo ya Yehova; amimonisaki mwasi na sembo mpe na botosi, azalaki mpe mosáli na molende. Eloko oyo epusaki Boaza na kondima mokumba na ye ya libala ya kosangola ezalaki bongo botosi na ye ya mozindo na mibeko ya Yehova mpe ezaleli na ye ya kondima na komikitisa nyonso kosala mokano ya Yehova, bakisá bolingo oyo azalaki na yango mpo na mosembwi Naomi mpe mpo na Luta, mwasi ya molende.

10. Mpo na nini lisoló lizwami na mokanda ya Luta lisengeli kolendisa elikya na biso kati na bilaka ya Bokonzi?

10 Ebongiseli ya libala oyo Yehova abandisaki mpe, engebene lisoló oyo, libala ya kosangola, esalelamaki mpo na kokumisa ye. Yehova azalaki Mobongisi ya libala ya Boaza na Luta, mpe apambolaki yango na boyokani na ngɔlu na ye; asalelaki yango lokola mwango ya kobatela malamu molɔngɔ́ ya bokonzi ya Yuda oyo mozali komema kino na Davidi mpe, na nsuka, kino Yesu Klisto, Davidi Monene. Likebi mozindo oyo Yehova atyaki mpo na kobimisa Mosangoli ya Bokonzi na boyokani na ebongiseli na ye ya malamu lisengeli kolendisa kondimisama na biso mpe kopusa biso na kozela na elikya mpenza kokokisama ya bilaka nyonso ya Bokonzi. Yango esengeli kopusa biso na kozala na mosala mingi kati na bobuki mbuma na mikolo na biso, kozaláká na elikya makasi ete tokozwa lifuti ya kokoka uta na Yehova, Nzambe na Yisalaele ya elimo, oyo ‘toyei koluka ebombamelo na nsé na mapapu’ na ye mpe oyo mikano na ye ya Bokonzi mizali kobɛlɛma na nkembo mpenza kino kokokisama na yango na mobimba. (2:12) Mokanda ya Luta mozali ekanganelo mosusu ya ntina kati na lisoló oyo lizali komema kino na Bokonzi yango!

[Maloba na nse ya lokasa]

a Búku Insight on the Scriptures, Vol. 2, lokasa 829.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto