Boaza ná Luta: Libala oyo moto akokaki kokanisa te
MOSALA ezali kotɔka na esika oyo bazali kopupola orje pene na Beteleme. Mosala ebandaki banda ntɔngɔ mpenza. Bato ya mosala bazali mpenza na nzala; kasi, ntango bazali koyoka nsolo kitoko ya orje oyo bazali kokalinga, bazali koyeba ete ntango ya kolya ekoki. Moto na moto akozwa mbano na mosala oyo azali kosala.
Boaza, mobali moko oyo azali nkolo mabelé mpe azali na bozwi mingi, azali kolya mpe komɛla mpe na nsima, amisemboli pembeni ya libondo ya orje. Na nsima, mosala esili, mpe moto na moto azali koluka mwa esika ya malamu mpo na kolala. Boaza azali na esengo, amizipi mpe alali mpɔngi.
Bakutani kasi moto moko amoni bango te
Na midi ya butu, Boaza alamuki mpo azali kolɛnga na malili. Moto moko alongolaki elamba oyo amizipaki na makolo mpe alali pembeni na ye! Lokola azali koyeba moto yango te mpo na molili, atuni ye: “Yo nani?” Ayoki mongongo ya mwasi oyo alobi na ye ete: “Ngai Luta moombo na yo ya mwasi, osengeli kotanda nsongɛ ya elamba na yo likoló ya moombo na yo ya mwasi, mpo ozali mosikoli.”—Luta 3:1-9, NW.
Bazali kosolola kaka bango mibale na molili. Basi bazalaki kokende ndenge wana te na esika ya kopupola orje. (Luta 3:14) Atako bongo, lokola Boaza andimi alala pembeni na ye, Luta alali na makolo na ye tii liboso ntɔngɔ etana, alamuki mpe akei mpo bato bázwela ye makanisi mabe te.
Bayokanaki nde mpo bákutana mwasi na mobali? Luta, mwasi ya mobola oyo mpe akufelá mobali mpe moto ya mboka mosusu, asalelaki mayele mabe mpo mobali wana oyo azalaki moto ya mbongo alinga ye? To Boaza amonaki yango libaku malamu lokola Luta azalaki kaka ye moko na butu wana? Makambo oyo elekaki na kati ya bato wana mibale ezali komonisa bosembo mpe bolingo ya Nzambe. Lisusu, makambo yango ezali mpenza kosimba motema.
Kasi, Luta azalaki nani? Azalaki koluka nini? Mpe Boaza, mobali yango ya bozwi, azalaki nani?
“Mwasi malamu”
Bambula mingi liboso ete likambo wana esalema, nzala ekɔtaki na Yuda. Libota moko ya bato minei—Elimeleke ná mwasi na ye, Naomi; ná bana na bango mibale ya mibali, Mahelone na Kiliyone—bakendaki kofanda na Moaba, mboka oyo mabelé na yango ezalaki malamu. Bana mibali wana babalaki basi ya Moaba, Luta ná Olepa. Mobali wana ná bana na ye bakufaki; nde na nsima, basi yango misato bayokaki ete nzala esilaki na Yisalaele. Yango wana Naomi—mwasi oyo mobali na ye na bana bakufaki—azwaki ekateli ya kozonga, na mawa na ye, na mboka na ye.—Luta 1:1-14.
Ntango bazalaki kozonga na Yisalaele, na nzela, Naomi andimisaki Olepa azonga na mboka na ye. Na nsima, alobaki na Luta ete: “Talá! Mbanda na yo akufelá mobali azongi epai ya bato na ye mpe epai ya banzambe na ye. Zongá yo na mbanda na yo.” Kasi, Luta alobaki ete: “Osɛnga ngai te ete natika yo, to natika kolanda yo. . . . Esika okokende ngai mpe nakokende, . . . bato na yo bakozala bato na ngai, mpe Nzambe na yo Nzambe na ngai. Esika yo okokufa ngai mpe nakokufa, mpe nakokundama esika wana.” (Luta 1:15-17, NW) Na bongo, basi yango mibale oyo bakufelá mibali bazongaki na Beteleme. Kuna, bolingo oyo Luta azalaki na yango mpo na Naomi mpe ndenge oyo azalaki kobatela ye ekamwisaki bato; yango wana balobaki ete “aleki bana mibali nsambo na malamu mpo na [Naomi].” Bato mosusu balobaki ete azali “mwasi malamu.”—Luta 3:11; 4:15.
Kuna na Beteleme, na ebandeli ya eleko ya kobuka orje, Luta alobaki na Naomi ete: “Tiká nakenda na elanga mpe nalɔkɔta mbuma na nsima na ye oyo akoyokela ngai boboto.”—Luta 2:2.
Ayebaki te, nzokande, elanga epai akendaki ezalaki ya Boaza, ndeko ya bokilo na ye Elimeleke. Asɛngaki mokɛngɛli nzela mpo na kolɔkɔta mbuma. Lokola azalaki kolɔkɔta na molende, mokɛngɛli akumisaki ye na miso ya Boaza.—Luta 1:22–2:7.
Mobateli mpe mosungi
Boaza azali mosambeli ya solosolo ya Yehova. Mokolo nyonso na ntɔngɔ, Boaza azalaki kopesa bato na ye ya mosala mbote na maloba oyo: “[Yehova] azala na bino!” mpe bango bazalaki kozongisa ete: “[Yehova] apambola yo!” (Luta 2:4) Boaza atalaki ndenge oyo Luta azalaki kosala na molende mpe ayokaki ete aboyaki kotika Naomi; mpo na yango, apesaki mitindo mpo na ndenge oyo akobanda kolɔkɔta. Na mokuse alobaki na ye boye: ‘Fandá kaka awa na elanga na ngai; kokende epai mosusu te. Salá esika moko na bilenge basi na ngai; bakobatela yo. Nalobi na bilenge mibali na ngai ete moto asimba yo te. Soki oyoki mposa ya mai, bakotokela yo mai ya mpio.’—Luta 2:8, 9, NW.
Luta agumbamaki tii na mabelé mpe alobaki ete: ‘Ndenge nini nazwi boboto na miso na yo, nzokande nazali mopaya?’ Boaza azongisaki ete: ‘Nayoki nyonso oyo osali mpo na bokilo na yo nsima ya liwa ya mobali na yo—ndenge oyo otiki tata na yo, mama na yo bandeko na yo, mpe mboka na yo mpo na kozala na kati ya bato oyo oyebaki liboso te. Tiká Yehova apesa yo mbano na ndenge ozali kosala. Tiká ete apesa yo lifuti ya kokoka.’—Luta 2:10-12, NW.
Boaza azalaki koluka kobenda likebi mwasi wana te. Apesaki ye longonya oyo eutaki mpenza na motema. Luta azalaki mpenza na komikitisa, mpe apesaki Boaza botɔndi mpo na maloba na ye ya kobɔndisa. Amonaki ete abongaki na lokumu wana te mpe azongelaki mosala na ye na molende lisusu koleka. Na nsima, na ngonga ya kolya, Boaza abengaki Luta ete: ‘Yaká awa, lyá mwa mampa mpe tyá eteni na yo na kati ya vinɛgre.’ Alyaki, atondaki mpe abombaki ndambo mosusu mpo na Naomi.—Luta 2:14, NW.
Tii mpokwa, Luta alɔkɔtaki soki litre 22 ya orje. Amemaki yango ná biloko ya kolya oyo etikalaki na ndako epai ya Naomi. (Luta 2:15-18) Naomi asepelaki komona ebele ya biloko wana mpe atunaki ete: “Olɔkɔti wapi lelo? . . . Moto oyo amoni yo apambwama.” Ntango ayokaki ete ezali Boaza, Naomi alobaki ete: “Tiká Yehova apambola moto yango, oyo alongoli boboto ya motema na ye te epai ya bato na bomoi mpe bakufi. . . . Moto wana azali ndeko na biso. Azali moko ya basikoli na biso.”—Luta 2:19, 20, NW.
Luta azwi “esika ya kopema”
Lokola Naomi azalaki na mposa ete bokilo na ye azwa “esika ya kopema,” to ndako, asalelaki libaku yango mpo na kosɛnga kosikolama, ndenge esɛngamaki na Mibeko ya Nzambe. (Levitike 25:25; Deteronome 25:5, 6) Mpo na kobenda likebi ya Boaza, Naomi ayebisaki Luta likambo oyo asengelaki mpenza kosala mpe likambo yango ekoki kutu kokamwisa. Luta amibongisaki mpe asimbaki malamu ndenge akosala, mpe na butu, akendaki na esika oyo bapupolaka orje ya Boaza. Akutaki ye alali mpɔngi. Alongolaki elamba oyo amizipaki na makolo mpe azelaki ye alamuka.—Luta 3:1-7, NW.
Ntango Boaza alamukaki, likambo oyo Luta asalaki esalisi ye ayeba nini oyo ye azalaki kosɛnga, yango wana ‘alalisaki elamba na ye na likoló ya moombo na ye ya mwasi.’ Likambo oyo Luta asali esalisi mobange Moyuda wana na koyeba ete azali na mokumba ya kosikola ye, mpamba te azali ndeko ya Mahelone, mobali ya Luta oyo akufaki.—Luta 3:9.
Boaza ayebaki te ete Luta akoya epai na ye na butu wana. Kasi, makambo oyo Boaza asalaki na nsima ezali komonisa ete akokaki kondima kokokisa mposa ya Luta ya kosikola ye. Boaza aboyaki te kosala oyo Luta asɛngaki ye.
Ekoki mpenza kozala ete mongongo ya Luta emonisaki ete azalaki na mwa kobanga, yango wana Boaza alobaki na ye mpo na kokitisa ye motema ete: “[Sikoyo], mwana na ngai, bangá te. Nakosalela yo yango nyonso elɔmbi yo, mpo ete bato na ngai nyonso na mboka bayebi ete ozali mwasi malamu.”—Luta 3:11.
Emonani ete Boaza amonaki mabe moko te na oyo Luta asalaki mpo alobi boye: “Tiká opambwama na Yehova, mwana na ngai. Omonisi motema-boboto mbala ya mibale koleka mbala ya liboso.” (Luta 3:10, NW) Liboso, Luta amoniselaki Naomi motema-boboto. Ya mibale, amimoniseli Boaza oyo azali mobange, motema-boboto, mpamba te azali mosikoli. Andimi kobota bana na nkombo ya Mahelone, mobali na ye oyo akufá, mpe mpo na Naomi.
Mosikoli moko aboyi
Mokolo oyo elandaki, Boaza abengaki mosikoli moko; Biblia ebengi ye “Songolo,” oyo azali ndeko mpenza ya Naomi koleka Boaza. Liboso ya bato mpe mikóló ya mboka, Boaza alobaki ete: ‘Nakanisaki ete nasengeli koyebisa yo ete yo nde ozali na lotomo ya kosomba epai ya Naomi ndambo ya mabelé oyo ezalaki ya mobali na ye Elimeleke, mpamba te asengeli kotɛkisa yango.’ Boaza abakisaki ete: ‘Olingi kosomba yango? Soki te, boye ngai nakosomba yango.’ Songolo andimi kosomba yango.—Luta 4:1-4.
Kasi, Songolo ayebi te ete likambo mosusu etikalaki! Boaza alobaki liboso ya batatoli ete: “Mokolo oyo okosomba mabelé na mabɔkɔ ya Naomi, ezali mpe na mabɔkɔ ya Luta Momoaba, mwasi ya moto akufi, nde osengeli kosomba yango mpo na kotombola nkombo ya moto akufi likoló na libula na ye.” Lokola ndeko mpenza abangaki ete abungisa libula na ye, aboyaki kozwa lotomo na ye ya kosomba mpe alobaki ete: “Nakoki kosikola yango te.”—Luta 4:5, 6, NW.
Momeseno ezalaki ete moto oyo aboyi kosikola asengeli kolongola lipapa na ye mpe kopesa yango epai ya ndeko na ye. Ntango mosikoli alobaki na Boaza ete, “Sombá yango mpo mpenza,” alongolaki lipapa na ye. Na nsima, Boaza alobaki na mikóló mpe na bato nyonso ete: “Bino bozali batatoli lelo ete ngai nazwi na mabɔkɔ ya Naomi yango nyonso ezalaki na Elimeleke mpe yango nyonso ezalaki na Kiliyone mpe na Mahelone., Nazwi mpe Luta, Momoaba, mwasi na Mahelone, lokola mwasi na ngai mpo na kozongisa nkombo ya mokufi na libula na ye . . . Bino bozali batatoli lelo oyo.”—Luta 4:7-10.
Bato nyonso oyo bazalaki na ekuke ya mboka balobaki na Boaza ete: “Tiká Yehova apesa mwasi oyo akɔti na ndako na yo azala lokola Laele mpe Lea, baoyo bango nyonso mibale batongaki ndako ya Yisalaele. Mpe yo, monisá makasi na yo na Efelata mpe omisalela nkombo malamu na Beteleme.”—Luta 4:11, 12, NW.
Lokola bato nyonso batombelaki bango mokako swaa, Boaza abalaki Luta. Abotelaki ye mwana mobali mpe bapesaki ye nkombo Obede, mpe na ndenge yango, Luta ná Boaza bakómaki bankɔkɔ ya Mokonzi Davidi mpe bongo, bankɔkɔ ya Yesu Klisto.—Luta 4:13-17; Matai 1:5, 6, 16.
“Libonza mobimba”
Na lisolo mobimba, banda na ntango oyo bapesaki basali mbote ya boboto tii ntango andimaki mokumba ya kobatela nkombo ya Elimeleke, Boaza amimonisaki ete azali moto oyo akokisaka maloba na ye mpe oyo azali na bokonzi. Lisusu, azalaki moto ya komipekisa, ya kondima, mpe ya sembo. Boaza azalaki mpe kokaba, azalaki na boboto, na makambo ya mbindo te, mpe azalaki mpenza kotosa mibeko ya Yehova.
Luta amonisaki bolingo na ye mpo na Yehova, bosembo na ye epai ya Naomi, mpe makasi na ye na mosala mpe amonisaki ete azalaki na komikitisa. Ezali likambo ya kokamwa te ete bato báloba ete azali “mwasi malamu.” Alyaki “kwanga ya gɔigɔi” te, azalaki kosala mosala makasi mpo na kozwa eloko ya kopesa bokilo na ye oyo azalaki na bosɛnga. (Masese 31:27, 31) Na ndenge oyo asungaki Naomi, na ntembe te Luta ayokaki esengo ya kopesa.—Misala 20:35; 1 Timote 5:4, 8.
Talá bandakisa ya malamu tozali kokuta na mokanda ya Luta! Yehova abosanaki Naomi te. Luta azwaki “libonza mobimba” ya kokóma nkɔkɔ ya Yesu Klisto. Boaza azwaki “mwasi malamu.” Bato yango bazali ndakisa ya kondima mpo na biso.
[Etanda na lokasa 26]
Mwa elikya
Soki ekómeli yo omiyoka ete mpasi elekeli yo, lisolo ya Luta ekoki kopesa yo elikya ata moke. Ezali mpenza lisolo malamu na nsuka ya mokanda ya Basambisi. Mokanda ya Luta ezali koyebisa ndenge oyo Yehova asalelaki mwasi moko oyo mobali na ye akufá oyo autaki na Moaba, ekólo ya bapaya, mpo na kopesa libota na ye mokonzi. Soki tokanisi makambo oyo mokanda ya Basambisi elobeli, tokomona ete kondima ya Luta ezali lokola mwinda oyo ezalaki kongɛnga na eleko wana.
Nsima ya kotánga lisolo ya Luta, okoki kozala na elikya ete atako bampasi ekoki kozala makasi ndenge nini, Nzambe azangaka te kobatela bato na ye mpe akokisaka mokano na ye.