Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • si nk. 151-153
  • Mokanda ya Biblia nimero 31—Obadia

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mokanda ya Biblia nimero 31—Obadia
  • “Makomami nyonso mapemami na Nzambe mpe mazali na litomba”
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • MAKAMBO MAZALI KATI NA OBADIA
  • LITOMBA NA YANGO
  • Yehova asilikeli bikólo
    Esakweli ya Yisaya—Pole mpo na bato nyonso, Volimi I
  • Na kati ya Obadia
    Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
  • Makanisi ya ntina na mokanda ya Obadia, ya Yona mpe ya Mika
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2007
  • Makebisi na Nzambe oyo matali yo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1989
“Makomami nyonso mapemami na Nzambe mpe mazali na litomba”
si nk. 151-153

Mokanda ya Biblia nimero 31—Obadia

Mokomi: Obadia

Nsuka ya bokomi: soko 607 L.T.B.

1. Nini emonisi ete nsango epesami nde ezali na ntina mingi koleka momemi-nsango yango?

BOBELE na bavɛrsɛ́ 21, Obadia, mokanda oyo eleki mokuse kati na Makomami ya Liebele, esakoli lisambisi ya Nzambe oyo etyaki nsuka na libota moko, mpe lisusu ezali kosakola bolóngi ya Bokonzi ya Nzambe. Maloba ya ebandeli malobi sé ete: “Emonaneli na Obadia.” Ntango mpe esika abotamaki, libota na ye, makambo matali bomoi na ye—elobelami te. Ya solo, koyeba mosakoli ezali likambo ya ntina mpenza te; nsango na ye nde ezali na ntina, mpe ebongi bongo, mpamba te, lokola Obadia ye moko alobelaki yango, ezali ‘nsango euti epai na Yehova.’

2. Esakweli ya Obadia etaleli mpenza mboka nini, mpe nini esali ete bafándi na yango bázala na nsɔ́mɔ te?

2 Nsango oyo etaleli mpenza Edome. Longwa na súdi ya Mbu Ekufá kino na Alaba, mokili ya Edome, oyo eyebani lokola Ngomba Seili, ezali mboka oyo etondi na ngomba milai mpe na mabwaku mozindo. Na bisika mosusu, molɔngɔ́ ya ngomba oyo izali na ɛ́sti ya Alaba ikómaka na bosanda ya mɛtɛlɛ 1700. Etúká ya Temana ezwaki lokumu mingi mpo na mayele mpe mpo na mpiko ya bato na yango. Na kotalela esika mokili ya Edome ezalaki mpe lolenge yango ebatelamaki na biloko bizalisami, okoyeba mpo na nini bafandi na yango bazalaki na nsɔ́mɔ ya eloko moko te mpe mpo na nini batondaki na lolendo.a

3. Baedome bamimonisaki lokola bandeko epai na Yisalaele?

3 Baedome bazalaki bakitani ya Esau, ndeko ya Yakobo. Nkombo ya Yakobo ebongwanaki Yisalaele, yango wana Baedome bazalaki mpenza bandeko ya penepene ya Bayisalaele, na boye ete batalelamaki solo lokola ‘bandeko.’ (Det. 23:7) Nzokande, etamboli ya Edome emonisaki ezaleli ya bondeko te. Mwa moke liboso ete Bayisalaele bákɔta na Mokili ya Ndaka, Mose atindaki bato epai na mokonzi ya Edome mpo na kosɛnga ndingisa ya koleka na kimya nyonso na mokili na ye, kasi mpo na komonisa koyina oyo bazalaki na yango, Baedome baboyaki mpenza mpe bamonisaki koboya na bango na kolukáká kobundisa Bayisalaele. (Mit. 20:14-21) Atako bayangelamaki na Davidi, na nsima bayangaki mwango elongo na Amona mpe Moaba mpo na kobundisa Yuda na mikolo ya Yosafata, batombokelaki mokonzi Yolama, mwana ya Yosafata, bakamataki Bayisalaele bakangami longwa na Gaza mpe na Tulo, mpe babundisaki Yuda na mikolo ya mokonzi Ahaza mpo na kokamata bakangami lisusu mingi.​—2 Nta. 20:1, 2, 22, 23; 2 Mik. 8:20-22; Amo. 1:6, 9; 2 Nta. 28:17.

4. (a) Makambo nini ya mabe mapusaki Obadia na kotɔndɔla Edome? (b) Elembeteli nini emonisi ete mobu 607 L.T.B. nde ekoki mpenza kozala dati ya kokomama na yango?

4 Koyina wana eyaki makasi na mobu 607 L.T.B. ntango Yelusaleme ebebisamaki na mampinga ya Babilone. Baedome basukaki te bobele na kotala mpe kondima likambo yango, kasi bapusaki babundisi ete bábebisa yango nyɛɛ. Bazalaki konganga ete: “Buká yango! Buká yango! Kitisá bango kino moboko!” (Nz. 137:7) Ntango babɛtaki mbɛsɛ mpo na kokabola biloko oyo bipunzamaki, bango mpe bazwaki oyo ya bango libóndo; mpe ntango Bayuda oyo babikaki bazalaki kosala makasi mpo na kokima mboka, bakangaki nzela mpe bazongisaki bango na mabɔkɔ ya banguna. Ezali misala ya mabe oyo ye asalaki na ntango ya kobebisama ya Yelusaleme nde ezali mpenza ntina monene ya kotɔndɔlama oyo Obadia akomaki, mpe kozanga ntembe, yango ekomamaki na ntango oyo bato babosanaki naino te misala mabe wana ya Edome. (Obad. 11, 14) Lokola Edome akangamaki mpe apunzamaki mpenza na Nebukadanesala soko mbula mitano nsima na kobebisama ya Yelusaleme, mokanda oyo esengelaki kokomama liboso ya likambo wana; mobu 607 L.T.B. epesami lokola dati oyo yango ekokaki mpenza kokomama.

5. (a) Nini emonisi ete lisoló ya Obadia ezali sembo mpe solo? (b) Lolenge nini Obadia akokisaki masɛngami ya mosakoli ya solo, mpe mpo na nini nkombo na ye ebongi mpenza?

5 Esakweli ya Obadia na ntina na Edome ekokisamaki—na mobimba na yango! Wana makambo na yango mandongwanaki mpenza, esakweli elobi ete: “Ndako na Yakobo ekozala mɔ́tɔ mpe ndako na Yosefe lolemo na mɔ́tɔ, mpe ndako na Esau lokola mpumbulu; bakozikazika kati na bango mpe bakolya bango. Moko akotikala kati na ndako na Esau te, mpo ete [Yehova] alobi bongo.” (V. 18) Edome azalaki kosalela mompanga mpe akufaki na mompanga, mpe elembo ya bakitani na ye ezali te. Na bongo, lisoló oyo limonani ete lizali sembo mpe solo. Obadia akokisaki masɛngami nyonso ya mosakoli ya solo: Alobaki na nkombo ya Yehova, esakweli na ye ekumisaki Yehova, mpe ezalaki solo lokola lisoló elandi ekomonisa yango. Nkombo na ye elimboli “Mosaleli ya Yehova.”

MAKAMBO MAZALI KATI NA OBADIA

6. Lolenge nini Yehova alobi na ntina na Edome, mpe akokweisa ye longwa na nini?

6 Kosambisama ya Edome (V. 1-16). Na etindá ya Yehova, Obadia ayebisi emonaneli na ye. Mabota mabyangami kosangana mpo na kobundisa Edome. Nzambe apesi etindá ete: “Bótɛlɛma! Tótɛmɛla ye na etumba!” Na nsima, kolobeláká Edome, ameki motuya ya etɛlɛmɛlo na ye. Edome azali bobele libota moke katikati na mabota mpe ayinami, nzokande azali na lolendo. Azali na nsɔ́mɔ te mpo ete azali katikati na ngomba itombwani, andimisami ete moto moko akoki kokweisa ye te. Kasi, Yehova alobi ete ata soki efandelo na ye ezalaki mosika lokola oyo ya mpongo, ata soki ezalaki penepene na minzoto, longwa kuna akokweisa ye. Abongi na kozwa etumbu.​—V. 1.

7. Kino na meko nini Edome esengelaki kopunzama?

7 Nini esengeli kokómela ye? Soki bayibi basengelaki kopunza Edome, balingaki kokamata bobele oyo balingi. Ata balɔkɔti na miwiti bakotika mbuma mosusu. Kasi likambo oyo likokómela bana na Esau ezali mpenza mabe koleka. Bozwi na yango nyonso ekopunzama. Bato oyo basalaki kondimana na Edome nde bakobalukela ye. Baoyo bazalaki baninga na ye ya penepene bakokanga ye na motambo lokola moto oyo azangi bososoli. Mibali na ye oyo bayebani mpo na mayele mpe babundi na ye oyo bayebani mpo na makasi bakosunga ye te na ntango ya mpasi monene oyo ekokómela ye.

8. Mpo na nini etumbu ya Edome ezalaki mpenza makasi?

8 Kasi mpo na nini etumbu makasi boye? Ezali na ntina na mobulu oyo bana na Edome basalelaki bana na Yakobo, bandeko na bango! Basepelaki ntango Yelusaleme ekweaki mpe kútu basanganaki na babundisi mpo na kokabola biloko oyo bipunzamaki. Na botɔndɔli moko makasi, lokola nde Obadia azalaki komona na miso misala mabe oyo azalaki kosala, alobi na Edome ete: Osengeli te kosepela na mpasi ya ndeko na yo. Osengeli te kokangisa nzela na baoyo bazali kokima mpe kopesa bango na mabɔkɔ ya banguna. Mokolo ya kosambisama ya Yehova ebɛlɛmi, mpe okobyangama mpo na kozongisa monɔkɔ. Lolenge yo osalaki, ezali yango nde ekosalema epai na yo.

9. Kobongisama lisusu nini esakolamaki?

9 Kobongisama lisusu mpo na ndako ya Yakobo (V. 17-21). Na bokeseni, ndako ya Yakobo esengeli kobongisama lisusu. Mibali bakozonga na Ngomba Siona. Bakobebisa ndako ya Esau lokola mɔ́tɔ ekozikisaka mpumbulu. Na súdi, bakokamata Negebe, mpe etúká ya bangomba ya Esau mpe Sefela; na nɔ́rdi, bakokamata Efelaima mpe Samalia, mpe etúká na bango ekokóma kino na Salepata; na ɛ́sti bakozwa teritware ya Gileadi. Lolendo ya Edome ekosuka, Yakobo asengeli kobongisama lisusu, mpe “bokonzi ekozala mpe na Yehova.”​—V. 21.

LITOMBA NA YANGO

10. Bisakweli nini mosusu bisakolaki kosambisama ya Edome, mpe mpo na nini ezali na litomba kotalela yango elongo na oyo ya Obadia?

10 Komonisáká bosolo ya kokokisama ya nsango ya kosambisama na ntina na Edome, Yehova asakolaki mpe kosambisama motindo moko na nzela ya basakoli na ye mosusu. Bisakweli bileki monene kati na yango ezali oyo ekomami na Yoele 3:19; Amosa 1:11, 12; Yisaya 34:5-7; Yilimia 49:7-22; Ezekiele 25:12-14; 35:2-15. Bansango ya liboso elobeli mpenza misala ya koyina oyo misalemaki kala, nzokande ezali polele ete oyo ya nsima etaleli kosambisama na ntina na Edome mpo na etamboli na ye oyo esengeli kolimbisama te, oyo Obadia alobeli yango, na ntango bato na Babilone bakamataki Yelusaleme. Yango ekolendisa kondima na biso kati na nguya oyo Yehova azali na yango mpo na kosakola makambo soki totaleli lolenge bampasi oyo esakolamaki ekwelaki Edome. Lisusu, yango ekotonga elikya na biso kati na Yehova lokola Nzambe oyo akokisaka ntango nyonso mokano na ye.​—Yis. 46:9-11.

11, 12. (a) Lolenge nini baoyo basalaki “kimya na” Edome balóngaki ye? (b) Matambe nini mamemaki Edome kino na “kobomama libela”?

11 Obadia asakolaki ete “bato nyonso bandimani na” Edome, baoyo “bazalaki na kimya” elongo na ye, bango nde bakolónga ye. (Obad. 7) Kimya oyo Babilone asalaki elongo na Edome eumelaki te. Na boumeli ya ekeke ya motoba L.T.B., mampinga ya Babilone oyo matambwisamaki na Mokonzi Nabonide makamataki Edome.b Atako bongo, mbula monkámá nsima wana Nabonide akamataki mboka, Edome, na kondimisama nyonso, alikyaki ete akotɛlɛma lisusu, mpe na ntina na yango, Malaki 1:4 eyebisi ete: “Soko Edome akoloba ete, Tokweisami na nsé nde tokobutwa mpe tokotonga bisika na mpamba, [Yehova] na bibele alobi ete, Bakotonga nde ngai nakokweisa na nsé.” Atako milende ya Edome mpo na kotɛlɛma, na ekeke ya minei L.T.B. bato ya Nabata bafandaki mpenza kati na mboka. Lokola babenganaki bango na mokili na bango, Baedome bafandaki na ngámbo ya súdi ya Yuda, oyo ekómaki kobéngama Iduma. Balóngaki soko moke te na kokamata lisusu mokili ya Seili.

12 Engebene Josèphe, na ekeke ya mibale L.T.B., Baedome oyo batikalaki bayangelamaki na Jean Hyrcan I, mokonzi Moyuda, basɛngisamaki na kondima kokatama ngenga, mpe babandaki mokemoke kokɔtisama na teritware ya Bayuda na nsé ya moyangeli Moyuda. Nsima wana Baloma babebisaki Yelusaleme na mobu 70 T.B., nkombo na bango elimwaki kati na lisoló ya bato.c Esalemaki lokola Obadia asilaki kosakola yango ete: “Okozɛngama libela. . . . Moko akotikala kati na ndako na Esau te.”​—Obad. 10, 18.

13. Nini ekómelaki Bayuda, na bokeseni na Baedome?

13 Na bokeseni na libebi ya Edome, Bayuda bazongisamaki lisusu na mokili na bango na mobu 537 L.T.B. na nsé ya litambwisi ya moyangeli Zelubabele, epai batongaki lisusu tempelo kati na Yelusaleme mpe bafandaki mpenza na mboka.

14. (a) Likebisi nini tozali kokuta kati na likambo oyo likómelaki Edome? (b) Lokola Obadia andimaki yango, biso banso tosengeli kondima likambo nini, mpe mpo na nini?

14 Emonani polele ete lolendo mpe komitombola eyeisaka mpasi! Tiká ete baoyo nyonso bazali komikumisa na lolendo nyonso mpe kosepela makasi na bampasi oyo izali kokwela basaleli ya Nzambe bázwa likebisi na likambo likómelaki Edome. Tiká bándima, lokola Obadia andimaki yango ete ‘bokonzi esengeli kokóma ya Yehova.’ Baoyo bazali kobundisa Yehova mpe basaleli na ye bakobomama mpo na libela, kasi Bokonzi monene ya Yehova mpe etɛlɛmɛlo na ye ya seko lokola mokonzi ekolóngisama mpo na libela!—V. 21.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Búku Insight on the Scriptures, Vol. 1, lokasa 679.

b Búku Insight on the Scriptures, Vol. 1, lokasa 682.

c Búku Jewish Antiquities, XIII, 257, 258 (ix, 1); XV, 253, 254 (vii, 9).

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto