Mokapo ya Ntuku Mibale na Nsambo
Yehova asilikeli bikólo
1, 2. (a) Ntango Yehova azali kopesa etumbu, tokoki komindimisa na likambo nini? (b) Nzambe akokisaka mokano nini soki amonisi nkanda na ye?
YEHOVA NZAMBE amonisaka motema molai na ye kaka epai ya basaleli na ye ya sembo te, kasi soki mokano na ye esɛngi yango, amonisaka yango mpe epai ya banguna na ye. (1 Petelo 3:19, 20; 2 Petelo 3:15) Banguna ya Yehova bayebaka motema molai na ye malamu te, bango bakanisaka ete lokola Yehova azali kosala eloko te ezali mpo ete azali na makoki te ya kosala eloko. Kasi, mokapo 34 ya mokanda ya Yisaya emonisi ete nsukansuka Yehova asambisaka banguna na ye. (Sefania 3:8) Na boumeli ya mwa ntango, Nzambe atikaki mpenza Edome mpe bikólo mosusu bábundisa basaleli na ye. Kasi Yehova ye moko abongisaki ntango na ye mpo na kopesa bango etumbu. (Deteronome 32:35) Ndenge moko mpe, na ntango oyo ye moko aponi, Yehova akopesa etumbu epai ya bato nyonso ya mokili oyo mabe, oyo bazali kotyola boyangeli na ye.
2 Ntina ya liboso oyo Nzambe akopesa etumbu ezali mpo na komonisa nguya ya bokonzi na ye mpe kokumisa nkombo na ye. (Nzembo 83:13-18) Etumbu na ye ezali mpe elembeteli ete basaleli na ye bazali mpenza bamonisi na ye mpe akobikisa bango ntango bazali kokutana na mikakatano. Lisusu, ntango Yehova azongisaka mabe, ezalaka ntango nyonso na boyokani na boyengebene na ye.—Nzembo 58:10, 11.
Bótya likebi, bino bikólo
3. Na nzela ya Yisaya, Yehova abengi bikólo básala nini?
3 Liboso ya kolobela etumbu oyo akopesa Edome, Yehova abengi bikólo nyonso na maloba ya polele ete: “Bino bikólo bóbɛlɛma ete bóyoka, bino bato [ya bikólo, bótya likebi, NW]; tiká ete mokili eyokamela mpe biloko nyonso kati na yango, [mabele malamu mpe mbuma na yango nyonso, NW].” (Yisaya 34:1) Mosakoli azali kokweisa mbala na mbala bikólo yango ya mbindo. Sikawa alingi kozongela na mokuse makambo oyo Nzambe alobaki mpo na kotɛmɛla bango. Makebisi yango ezali na ntina mpo na mikolo na biso?
4. (a) Ndenge elobelami na Yisaya 34:1, bikólo babengisami na kosala nini? (b) Lokola Yehova akosopa nkanda na ye likoló na bikólo, yango emonisi ete azali Nzambe mabe? (Talá etanda na lokasa 363.)
4 Ezali mpenza bongo. Mokonzi ya molɔ́ngɔ́ mobimba azali na ntembe monene na bato ya ebongiseli mabe ya makambo ya ntango oyo. Yango wana “bato” mpe “mokili” babengisami na koyoka nsango ya Biblia oyo Yehova alingi ete esakolama na mokili mobimba. Yisaya asaleli maloba oyo ekokani na oyo ezali na Nzembo 24:1 mpe alobi ete mokili mobimba ekoyoka nsango yango—esakweli oyo ekokisami na eleko na biso, mpamba te Batatoli ya Yehova bazali kosakola “kino nsuka na mokili.” (Misala 1:8) Kasi, bikólo bazali koyoka te. Bazali kotyola likebisi oyo ezali kolobela kobebisama na bango oyo ekómi pene. Ya solo, yango ekopekisa Yehova te ete akokisa liloba na ye.
5, 6. (a) Mpo na likambo nini Nzambe asɛngi bikólo bázongisa monɔkɔ? (b) Na lolenge nini “bangomba ekonyangwa na makila na bango”?
5 Esakweli yango elobeli sikoyo mpasi oyo ekokitela bikólo ya mbindo na mikolo ezali koya—yango ekeseni mpenza na elikya kitoko ya basaleli ya Nzambe oyo elobelami nsima. (Yisaya 35:1-10) Mosakoli yango alobi ete: “[Yehova] asiliki na [bikólo, NW] nyonso, azali na nkanda mpo na [bango nyonso. Akobebisa, NW] bango nyɛɛ, apesi bango ete bábomama. Babomami na bango bakobwakama, nsolo mabe na bibembe na bango ekobuta likoló, [bangomba ekonyangwa, NW] na makila na bango.”—Yisaya 34:2, 3.
6 Esakweli yango ebendi likebi likoló na ngambo ya makila oyo bikólo bazali na yango. Lelo oyo, bikólo ya mangomba ya boklisto ezali na ngambo koleka bikólo mosusu nyonso. Na bitumba mibale ya mokili mobimba mpe na ebele ya matata mosusu ya mikemike, batondisi mabele na makila ya bato. Nani mpenza asengeli kosɛnga ete likambo ekatama na bosembo mpo na ngambo ya makila yango nyonso? Moto mosusu te kaka Mozalisi, ye nde Mopesi-ya-Bomoi. (Nzembo 36:9) Mobeko ya Yehova esɛngaki boye: “Okopesa bomoi mpo na bomoi.” (Exode 21:23-25; Genese 9:4-6) Ndenge mobeko yango esɛngi, akosopa makila ya bikólo—tii na liwa. Lokola bakokundama te, nsolo ya bibembe na bango ekotonda na mopɛpɛ—oyo nde liwa ya nsɔni mpenza! (Yilimia 25:33) Makila oyo ekosɛngama ekokoka mpo na konyangwisa, to na maloba mosusu kolongola bangomba. (Sefania 1:17) Lokola mampinga ya basoda nyonso bakokufa, bikólo ya mokili bakomona ndenge biyangeli na bango ekokwea, oyo mbala mosusu bisakweli ya Biblia emonisaka yango lokola bangomba.—Danyele 2:35, 44, 45; Emoniseli 17:9.
7. “Makoló” ezali nini mpe “mampinga ya makoló” ezali nini?
7 Yisaya asaleli lisusu elilingi moko kitoko mpe alobi ete: “Baoyo nyonso ya mampinga ya makoló bakopɔla mpenza. Mpe makoló ekolíngama, lokola buku oyo ezali lokola rulo, mpe limpinga na bango mobimba ekokauka, lokola nkasa ya vinyo ekaukaka mpe ekweyaka mpe lokola mbuma ya figi oyo ekauká ekweyaka longwa na nzete ya figi.” (Yisaya 34:4, NW) Elobeli “mampinga ya makoló” elimboli te minzoto mpe baplanɛti. Yisaya 34 Vɛrsɛ 5 mpe 6 elobi ete mopanga ya koboma etondi na makila na “makoló” yango. Na bongo, yango esengeli kozala elilingi ya eloko moko ya mokili ya bato. (1 Bakolinti 15:50) Lokola bakonzi yango batombwami, biyangeli ya bato ekokanisamaka na makoló oyo eyangelaka bato ya mabele. (Baloma 13:1-4) Yango wana, “mampinga ya makoló” ezali komonisa mampinga ya basoda ya biyangeli yango ya bato oyo basangani esika moko.
8. Na lolenge nini makoló ya elilingi emonani “lokola buku oyo ezali lokola rulo,” mpe nini ekómeli ‘mampinga’ na yango?
8 “Mampinga” yango “ekopɔla,” ekobeba lokola mwa eloko moko ya kopɔla. (Nzembo 102:26; Yisaya 51:6) Na miso mpamba, likoló emonanaka lokola egumbami, lokola rulo moko ya ntango ya kala, oyo na momeseno bazalaki kokoma na epai ya kati. Ntango makambo oyo ekomami epai ya kati eleki na miso ya motángi, akogumba rulo yango mpe akotya yango pembeni. Ndenge moko mpe, “makoló ekolíngama lokola rulo,” yango ezali komonisa ete biyangeli ya bato esengeli kokóma na nsuka na yango. Lokola ekokóma na nsuka ya lisolo na yango, esengeli kolongolama na Armagedon. ‘Mampinga’ na bango oyo babangisaka bato bakokwea kaka lokola nkasa ya vinyo oyo ekauki ekweaka to lokola “figi oyo ekauki” elongwaka na nzete ya figi. Ntango na bango ekoleka.—Kokanisá na Emoniseli 6:12-14.
Mokolo ya kopesa etumbu
9. (a) Edome eutá wapi, mpe boyokani nini Yisalaele ezalaki na yango na Edome? (b) Yehova alobi nini mpo na Edome?
9 Sikawa, esakweli yango etaleli libota moko ya mikolo ya Yisaya—Edome. Bato ya Edome bazali bakitani ya Esau (Edome), oyo atɛkelaki lipasa na ye Yakobo bonkulutu na ye mpo na limpa mpe supu ya motane. (Genese 25:24-34) Lokola Yakobo azwaki bonkulutu na ye, Esau akómaki koyokela ndeko na ye nkanda makasi. Na nsima, libota ya Edome mpe libota ya Yisalaele bakómaki banguna, atako bauti na mapasa. Mpo na nkanda oyo azalaki koyokela basaleli ya Nzambe, Edome azali na likama ya kondongwana na nkanda ya Yehova, ye alobi sikawa ete: “Kati na makoló mopanga na ngai ekosukolama mpenza. Talá! Ekokita likoló na Edome, mpe epai ya bato oyo natindi na kobomama na bosembo. Yehova azali na mopanga; ekotonda na makila; ekopakolama na mafuta, na makila ya bana ya mpate mibali mpe ya ntaba mibali, na mafuta ya bangei ya bampate mibali. Mpo eteYehova azali na mbeka na Bosala, koboma monene kati na Edome.”—Yisaya 34:5, 6, NW.
10. (a) Yehova akweisi nani ntango asemboli mopanga na ye “na makoló”? (b) Ezaleli nini Edome amonisi ntango Babilone abundisi Yuda?
10 Edome ezali na etúká moko ya bangomba milaimilai. (Yilimia 49:16; Obadia 8, 9, 19, 21) Kasi, ata bisika-makasi wana ekozala na ntina te ntango Yehova akosembola mopanga na ye ya kosambisa “na makoló,” mpe akolongola bayangeli ya Edome na bisika na bango bitombwami. Edome ezali na basoda makasi, mpe mampinga ya basoda na yango batambolaka na bangomba na yango ya milaimilai mpo na kokɛngɛla ekólo. Kasi Edome, mboka ya nguya, akɔteli Yuda ata mwa moke te ntango mampinga ya basoda ya Babilone babundisi ye. Kutu, Edome asepeli makasi ndenge amoni bokonzi ya Yuda ekwei mpe alendisi basoda ya banguna na ye. (Nzembo 137:7) Kutu Edome abengani Bayuda oyo bakimaki epai na ye mpe akabi bango na mabɔkɔ ya basoda ya Babilone. (Obadia 11-14) Bato ya Edome bakani kozwa mokili ya Bayisalaele oyo etikali mpamba, mpe bazali kotuka Yehova na lolendo mpenza.—Ezekiele 35:10-15.
11. Ndenge nini Yehova akopesa bato ya Edome etumbu mpo na etamboli mabe na bango?
11 Yehova akangi miso na etamboli ya bato ya Edome oyo bayini bandeko na bango? Te. Kutu, alobeli Edome ete: “Bangɔmbɛ mibali ya zamba ekobunda na bango mpe bangɔmbɛ mibali oyo ezali naino bilenge na bato ya nguya; mpe mokili na bango ekopɔla na makila, mabele na bango ekopɔla na mafuta.” (Yisaya 34:7, NW) Na maloba ya elilingi, Yehova abengi bato minene mpe bato mpamba ya libota yango ete bangɔmbɛ mibali ya zamba mpe bangɔmbɛ mibali oyo ezali naino bilenge, bampate mibali oyo ezali naino bilenge mpe bantaba mibali. Mokili ya libota yango ya ngambo ya makila esengeli komɛla makila ya bato na yango moko na nzela ya “mopanga” ya Yehova.
12. (a) Yehova akosalela nani mpo na kopesa Edome etumbu? (b) Mosakoli Obadia alobi nini mpo na Edome?
12 Yehova akani kopesa Edome etumbu mpo na mabe oyo asaleli ebongiseli na ye ya mabele, oyo ebengami Siona. Esakweli elobi ete: “Yehova azali na mokolo ya kobukanisa, [mbula ya, NW] kofuta mpo na likambo ya Siona.” (Yisaya 34:8) Mwa moke nsima ya kobebisama ya Yelusaleme na mobu 607 liboso ya ntango na biso (L.T.B.), Yehova abandi komonisa nkanda na ye oyo ezali ya bosembo likoló na bato ya Edome na nzela ya mokonzi ya Babilone, Nebukadanesala. (Yilimia 25:15-17, 21) Ntango mampinga ya basoda ya Babilone bakei kobundisa Edome, eloko moko te ebikisi bato ya Edome! Ezali “mbula ya kofuta” mokili yango ya bangomba. Na nzela ya mosakoli Obadia, Yehova alobi ete: “Mpo na mobulu oyo osaleli ndeko na yo Yakobo, nsɔni ekozipa yo mpe okolongolama. . . . Lokola yo osali yango, bakosalela yo mpe bongo. Mabe oyo yo osali ekoya na motó na yo moko.”—Obadia 10, 15, NW; Ezekiele 25:12-14.
Mikolo ezali koya ezali mabe mpo na mangomba ya boklisto
13. Nani lelo azali lokola Edome, mpe mpo na nini?
13 Na mikolo na biso, ezali na ebongiseli moko oyo makambo na yango ekokani na oyo ya Edome. Ebongiseli nini? Tókanisa naino, nani na mikolo na biso abandaki kofinga mpe konyokola basaleli ya Yehova? Mangomba ya boklisto, na nzela ya bakonzi na bango ya mangomba, boye te? Ɛɛ, ezali bongo! Mangomba ya boklisto emitomboli likoló na bisika lokola ngomba na makambo ya mokili. Elukaka kozala na esika ya likoló na ebongiseli ya makambo ya bato, mpe ezali eteni monene ya Babilone Monene. Kasi Yehova alobeli ‘mbula ya kofutama’ mpo na kotɛmɛla Edome yango ya mikolo na biso mpo na etamboli na ye mabe ya kotungisa basaleli na ye, Batatoli na ye.
14, 15. (a) Nini ekokómela mokili ya Edome mpe mangomba ya boklisto? (b) Mpaka oyo ezali kozika mpe milinga oyo ezali kobuta seko na seko ezali komonisa nini, mpe yango ezali komonisa nini te?
14 Yango wana, ntango tozali kotalela eteni oyo etikali ya esakweli ya Yisaya, tozali kokanisa kaka te Edome ya kala kasi mpe mangomba ya boklisto: “Mingala na ye ya mai ekokóma lokola mpaka, mabele na ye lokola sufulu, mokili na ye ekobongwana mpaka oyo ezwi mɔtɔ. Ezala na butu to na moi ekozimisama te, milinga na ye ekobuta seko na seko.” (Yisaya 34:9, 10a, NW) Mokili ya Edome ekauki, mputulu na yango ekómi lokola sufulu mpe mingala na yango ya mai ezali na mai te, kasi nde na mpaka. Na nsima batumbi mpaka yango!—Kokanisá na Emoniseli 17:16.
15 Bato mosusu bakanisi ete lokola balobeli mɔ́tɔ, mpaka mpe sufulu, yango emonisi lifelo ya mɔ́tɔ. Kasi Edome ebwakami te na lifelo moko ya mɔ́tɔ ndenge bato balobaka mpo na kozika libela na libela. Nzokande, babebisi yango, elimwe na mokili lokola nde eziki na mɔ́tɔ mpe na sufulu. Lokola esakweli yango elobi lisusu, na nsuka, azali konyokwama libela na libela te, kasi nde atikali “mpamba . . . eloko te.” (Yisaya 34:11, 12) Molinga oyo ezali ‘kobuta seko na seko’ ezali elembo na yango. Ntango ndako moko eziki, milinga ekobaka kobuta mpo na mwa ntango nsima wana mɔ́tɔ ekufi, yango ezali komonisa bato oyo bazali kotala ete mɔ́tɔ epelaki wana. Lokola baklisto lelo oyo bazali kozwa liteya na ndenge Edome ebebisamaki, molinga ya kozika na yango ezali naino kobuta.
16, 17. Edome ekokóma ndenge nini, mpe yango ekotikala bongo ntango boni?
16 Esakweli ya Yisaya elobi lisusu ete banyama ya zamba bakoya kofanda na esika bato bazalaki kofanda na Edome; yango ezali kolobela kobebisama oyo ekómi pene: “Kobanda libota moko kino libota mosusu ekokauka; moto te akoleka kati na yango mpo na libela. Libɛki mpe mboke ekozwa esika yango, esulungutu mpe yanganga ekofanda wana mpe akotanda likoló na yango nsinga na esika ya mpamba mpe mabanga oyo etikali mpamba. Bato na ye ya lokumu—moko akozala te oyo bakobenga ye mpo na bokonzi, mpe bankumu na ye bakozala bato mpamba. Nzube ekokola likoló na ndako minene na yango, nzete ya nzube mpe matiti ya nzubenzube ekobima likoló na ndako makasi na yango; ekozala efandelo na bashakale, mpe esika ya maligbanga. Baoyo bakotala bisika oyo ezangi mai bakokutana na nyama ya makɛlɛlɛ, ata mpe demo na lolenge ya ntaba mobali akobenga moninga na ye. Wana kongabalɔki akozala na kimya mpe akozwa esika ya kopema. Wana nyoka oyo epumbwaka ekotonga zumbu na yango mpe ekobota maki.”—Yisaya 34:10b-15, NW.a
17 Na ntembe te, Edome ekokóma mokili moko oyo etikali mpamba. Ekokóma kaka esika ya banyama ya zamba, bandɛkɛ na banyoka. Lokola vɛrsɛ 10 elobi yango, kokauka ya mokili yango ekozala mpo na “libela.” Ekozongisama te.—Obadia 18.
Liloba ya Yehova ekokokisama mpenza solo
18, 19. “Mokanda ya Yehova” ezali nini, mpe “mokanda” yango ebombeli mangomba ya boklisto eloko nini?
18 Mangomba ya boklisto bazali na elikya te mpo na mikolo ezali koya, bakokani mpenza na Edome! Mangomba ya boklisto emimonisi monguna monene ya Yehova Nzambe, mpe ezali konyokola mpenza Batatoli. Mpe ntembe ezali te ete Yehova akokokisa liloba na ye. Ntango nyonso oyo moto moko akokokanisa esakweli yango na kokokisama na yango, akomona ete yango nyonso mibale ezali kokokana kaka ndenge banyama mpe bandɛkɛ oyo efandi na Edome oyo etikali mpamba ezali ‘mwasi na mobali.’ Yisaya alobi boye, mpo na baoyo bakoyekola bisakweli ya Biblia nsima: “Bóluka bino moko na kati ya mokanda ya Yehova mpe bótánga na mongongo makasi: moko te kati na bango azangi; moko te ya mobali akozanga komona oyo ya ye mwasi, mpamba te ezali monɔkɔ ya Yehova nde epesi mitindo, mpe ezali elimo na ye nde eyanganisi bango. Mpe ye nde abwakeli bango mbɛsɛ, mpe lobɔkɔ na ye ekaboleli bango esika yango na nzela na nsinga ya komeka bolai. Bakozala bankolo na yango libela na libela; bakofanda wana libota moko kino libota mosusu.”—Yisaya 34:16, 17, NW.
19 “Mokanda ya Yehova” esakolaki liboso ete kobebisama ya mangomba ya boklisto ekómi pene. “Mokanda ya Yehova” yango ezali komonisa makambo oyo Yehova akosalela banguna na ye minene mpe banyokoli oyo baboi kobongola motema, oyo bazali konyokola basaleli na ye. Makambo oyo ekomamaki mpo na Edome ya kala ekokisamaki, mpe yango elendisi elikya na biso ete esakweli oyo ezali kolobela mangomba ya boklisto—Edome ya mikolo na biso—ekokokisama. “Nsinga ya komeka bolai,” ndenge Yehova amitambwisaka, ezali kondimisa biso ete ebongiseli yango oyo ekómi pene na kokufa na elimo ekokóma esika oyo etikali mpamba.
20. Ndenge moko na Edome ya kala, mangomba ya boklisto ekokóma ndenge nini?
20 Mangomba ya boklisto esalaka nyonso oyo ekoki mpo na kozala na kimya na baninga na yango ya politiki, kasi ezali mosala ya mpunda! Emoniseli mokapo 17 mpe mokapo 18 emonisi ete Yehova, Nzambe Mozwi-na-Nguya-Nyonso, akotya na mitema na bango ete bábundisa ebongiseli nyonso ya Babilone Monene, bakisa mpe mangomba ya boklisto. Na yango, mangomba ya boklisto ya lokuta ekolongwa na mabele mobimba. Ezalela ya mangomba ya boklisto ekokóma lokola ezalela ya mawa oyo elobelami na Yisaya 34. Kutu mangomba yango ekozala te na ntango ya “etumba ya mokolo yango monene ya Nzambe Mozwi-na-Nguya-Nyonso”! (Emoniseli 16:14) Ndenge moko na Edome ya kala, mangomba ya boklisto nyonso ekolongwa na mabele mpo na “libela.”
[Maloba na nse ya lokasa]
a Na eleko ya Malaki, esakweli yango ekokisamaki. (Malaki 1:3) Malaki alobi ete bato ya Edome bazalaki na elikya ya kozwa lisusu mokili na bango oyo etikalaki mpamba. (Malaki 1:4) Kasi, yango ezalaki mokano ya Nzambe te, mpe na nsima bato mosusu, Banabatana, bazwaki mokili oyo ezalaki Edome.
[Etanda na lokasa 363]
Nzambe ya nkanda?
Maloba lokola oyo ezali na Yisaya 34:2-7 esali ete bato mosusu bákanisa ete Yehova, ndenge Makomami ya Liebele esaleli yango, azali Nzambe oyo anyokolaka bato mpe ya nkanda. Ezali mpenza bongo?
Te. Atako na bantango mosusu Nzambe amonisaka nkanda na ye, nkanda yango ezalaka mpenza ya mpambampamba te. Eutaka ntango nyonso na mitinda, kasi na mayoki mpamba te. Lisusu, esalemaka bongo mpo na komonisa ntango nyonso lotomo ya Mozalisi ete bato bákangama na ye mpe na ndenge asimbaka solo. Nkanda ya Nzambe esalemaka mpo alingaka makambo ya bosembo mpe alingaka bato bámitambwisaka na bosembo. Yehova atalelaka likambo na mobimba na yango mpe ayebaka makambo nyonso oyo etali likambo yango. (Baebele 4:13) Ayebi oyo ezali kati na motema; atalelaka malamu mpo na nini moto asali lisumu, mpo azangi boyebi, mpo na bopɔtu to asali yango na nko; mpe asalaka kozanga koponapona.—Deteronome 10:17, 18; 1 Samwele 16:7; Misala 10:34, 35.
Kasi, Yehova Nzambe “akoyokaka nkanda noki te mpe aleki na boboto mpe na solo.” (Exode 34:6) Baoyo babangaka ye mpe basalaka makasi mpo na kosalela bosembo, amoniselaka bango motema mawa na ye, mpamba te Mozwi-na-Nguya-Nyonso atalelaka kozanga kokoka oyo moto asangolá mpe amoniselaka ye motema mawa mpo na yango. Lelo oyo Nzambe asalaka yango na moboko ya mbeka ya Yesu. (Nzembo 103:13, 14) Na ntango oyo ebongi, Yehova alongolaka nkanda na ye epai ya bato oyo bandimaka masumu na bango, babongolaka motema, mpe basalelaka ye na ndenge ya solo. (Yisaya 12:1) Ya solo mpenza, Yehova azali Nzambe ya nkanda te kasi Nzambe ya esengo, ya makambo makasimakasi te kasi oyo ayambaka bato, ya kimya, mpe ya boboto mpo na bato oyo babɛlɛmaka epai na ye na lolenge malamu. (1 Timote 1:11) Yango ezali na bokeseni monene na ezaleli ya kozanga mawa mpe ya mabe ya banzambe ya lokuta ya bapakano mpe ndenge emonanaka na bililingi ya banzambe yango.
[Karte na lokasa 362]
(Mpo na komona yango, talá mokanda)
Mai Monene
Damaseke
Sidona
Tulo
YISALAELE
Dane
Mai Monene ya Galilai
Ebale Yaladene
Megido
Lamoto-gileadi
Samalia
FILISITIA
YUDA
Yelusaleme
Libina
Lakisi
Bele-Seba
Kadesi-balenea
Mai ya Mungwa
AMONA
Laba
MOABA
Kili-halasete
EDOME
Bosala
Temani
[Bililingi na lokasa 359]
Mangomba ya boklisto etondisi mabele na makila
[Elilingi na lokasa 360]
“Makoló ekolíngama, lokola buku oyo ezali lokola rulo”