Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • si nk. 166-168
  • Mokanda ya Biblia nimero 37—Hagai

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mokanda ya Biblia nimero 37—Hagai
  • “Makomami nyonso mapemami na Nzambe mpe mazali na litomba”
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • MAKAMBO MAZALI KATI NA HAGAI
  • LITOMBA NA YANGO
  • “Ngai nazali na bino”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2006
  • Tiká ete bato banso bákumisa Yehova!
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1997
  • “Nakoningisa bikólo nyonso”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2021
  • Tiká ete mabɔkɔ na bino mazala na nguya
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2006
Makambo mosusu
“Makomami nyonso mapemami na Nzambe mpe mazali na litomba”
si nk. 166-168

Mokanda ya Biblia nimero 37—Hagai

Mokomi: Hagai

Esika ya bokomi: Yelusaleme

Nsuka ya bokomi: 520 L.T.B.

Boumeli ya lisoló: mikolo 112 (520 L.T.B.)

1, 2. Makambo nini toyebi na ntina na mosakoli Hagai, mpe makambo nini mibale mazali kati na nsango na ye?

HAGAI ezalaki nkombo na ye; mosakoli mpe “ntoma na Yehova” ezalaki etɛlɛmɛlo na ye, kasi autaki wapi? (Hag. 1:13) Azalaki nani? Hagai azali mosakoli ya zomi kati na baoyo babéngamaka ete basakoli ya mike, mpe azalaki mosakoli ya liboso kati na basakoli misato oyo basakolaki nsima na bozongi ya Bayuda na mokili na bango na mobu 537 L.T.B., basakoli mibale mosusu ezalaki bongo Zekalia mpe Malaki. Nkombo Hagai (na Liebele, Chag·gaiʹ) elimboli “[Abotami na] Elambo.” Mbala mosusu, yango emonisi ete abotamaki na mokolo ya elambo.

2 Lokola yango emonisami na mimeseno ya Bayuda, ezali likambo libongi na kosukisa koloba ete Hagai abotamaki na Babilone mpe azongaki na Yelusaleme elongo na Zelubabele mpe nganga monene Yosua. Hagai asalaki elongo na mosakoli Zekalia, mpe na Ezela 5:1 mpe 6:14, bango mibale bamonisami ete bazalaki kolendisa bana na boombo ete bázonga mpo na kotonga lisusu tempelo. Makambo mibale mamonisi ete azalaki mosakoli ya Yehova, na boye ete alendisaki Bayuda na kokokisa mikumba na bango epai na Nzambe mpe kati na makambo mosusu asakolaki kotetemisama ya mabota nyonso.​—Hag. 2:6, 7.

3. Eloko nini Bayuda bazangaki kososola na ntina na mokano ya bozongi na bango longwa na boombo?

3 Mpo na nini Yehova apesaki Hagai mosala wana? Ntina yango oyo: Na mobu 537 L.T.B., Siruse abimisaki mobeko oyo epesaki Bayuda ndingisa ya kozonga na mokili na bango mpo na kotonga lisusu ndako ya Yehova. Kasi ezalaki sikawa mobu 520 L.T.B., mpe tempelo esilaki naino kotongama te. Bambula nyonso wana Bayuda batikaki nzela ete botɛmɛli ya banguna mpe ezaleli ya bozangi bosepeli mpe mposa ya kozala na biloko mingi ya mosuni epekisa bango kokokisa mpenza mokano ya bozongi na bango.​—Ezl. 1:1-4; 3:10-13; 4:1-24; Hag. 1:4.

4. Nini epekisaki kotongama ya tempelo, kasi makambo nini masalemaki ntango Hagai abandaki kosakola?

4 Lokola lisoló limonisi yango, wana miboko ya tempelo miutaki kotyama (na mobu 536 L.T.B.) “bato na mokili balɛmbisaki mabɔkɔ na bato na Yuda mpe banyokolaki bango kati na kotonga. Basombaki batatoli kotɛmɛla bango mpo na kobebisa mokano na bango.” (Ezl. 4:4, 5) Na nsuka, na mobu 522 L.T.B., batɛmɛli wana oyo bazalaki Bayuda te balóngaki na kotya, na boyokani na mibeko ya Letá, epekiseli likoló na mosala. Ezalaki na mbula ya mibale ya boyangeli ya Dalio Hystaspe, mokonzi ya Perse, na mobu 520 L.T.B., nde Hagai abandaki kosakola, mpe yango elendisaki Bayuda na kozongela kotonga tempelo. Mpo na yango, bayangeli ya zingazinga batindaki nkomá epai na Dalio mpo na kosɛnga ye ete abimisa mobeko na ntina na likambo yango; Dalio azongelaki mobeko oyo mopesamaki liboso na Siruse mpe asungaki Bayuda liboso na banguna na bango.

5. Nini emonisi ete mokanda ya Hagai ezali kati na kanɔ́ ya Biblia?

5 Mpo na Bayuda ntembe ezalaki soko moke te na ntina na kozala ya esakweli ya Hagai kati na kanɔ́ ya Liebele, mpe yango endimami lisusu na ndenge Ezela 5:1 elobeli ye ete asakolaki “na nkombo na Nzambe na Yisalaele,” ndenge moko mpe na Ezela 6:14. Likambo oyo ete esakweli na ye ezali eteni ya ‘Makomami nyonso mapemami na Nzambe’ endimisami na ndenge Paulo atángi yango na Baebele 12:26 ete: “Nde sasaipi elaka na ye ezali ete, Naino mbala moko mosusu, nakoninganisa bobele mokili te kasi Likoló lokola.”​—Hag. 2:6.

6. Esakweli ya Hagai etaleli nini, mpe lolenge nini nkombo ya Yehova elobelami mingi?

6 Esakweli ya Hagai ezali na nsango minei oyo ipesamaki na boumeli ya mikolo 112. Ekomeli na ye ezali pɛtɛɛ mpe polele, mpe lolenge oyo azali kolobela mingi nkombo ya Yehova ezali mpenza likambo ya kobenda likebi. Kati na bavɛrsɛ́ 38 ya mokanda na ye, alobeli nkombo ya Yehova mbala 35, mbala 14 kati na maloba “Yehova na bibele.” Ntembe ezali te ete nsango na ye eutaki epai na Yehova: “Hagai, ntoma na [Yehova], alobaki na bato nsango na [Yehova] ete, [Yehova] alobi na bino ete, Ngai nazali na bino.”​—1:13.

7. Hagai alendisaki Bayuda na kosala nini, mpe likambo nini lilobelami kati na nsango na ye?

7 Eleko oyo ezalaki eleko moko ya ntina mingi kati na lisoló ya libota ya Nzambe, mpe mosala ya Hagai emonanaki ete ezalaki na litomba. Akimaki te mpo na kokokisa mosala na ye ya mosakoli, mpe abombaki te maloba oyo asengelaki koyebisa epai na Bayuda. Alobelaki bango polele ete ntango wana ezalaki ntango ya kopema te kasi nde ya komipesa na mosala. Ezalaki ntango mpo na kozongela kotonga ndako ya Yehova mpe kozongisa losambo ya pɛto soki balingaki kozwa bolamu uta na mabɔkɔ ya Yehova. Nsango mobimba ya Hagai emonisi ete soki moto alingi kozwa mapamboli uta na Yehova, asengeli kosalela Nzambe ya solo mpe kokokisa mosala oyo Yehova azali kosɛnga ete mosalema.

MAKAMBO MAZALI KATI NA HAGAI

8. Mpo na nini Yehova apambolaki Bayuda te mpo na oyo etalaki biloko ya mosuni?

8 Nsango ya liboso (1:1-15). Nsango yango etalelaki Moyangeli Zelubabele mpe nganga monene Yosua, kasi bato basengelaki mpe koyoka yango. Bato bakómaki koloba ete, “Naino ntango ekómi te mpo na kotonga ndako na [Yehova].” Na nzela ya Hagai, Yehova atuni motuna moko ya ntina mingi: “Ezali na ntango mpo na bino mpenza kofanda na ndako na kitoko na bino naino ndako oyo elali mpamba?” (1:2, 4) Balónaki mingi na mosuni, kasi bazwaki litomba mingi te na bilei, na komela, mpe na bilamba. Yehova apesi toli oyo ete: “Bóbanza na mitema na bino mpo na nzela na bino.” (1:7) Oyo ezali ntango ya komema banzeté mpe kotonga ndako, mpo ete Yehova akumisama. Bayuda bazali kobatela malamu bandako na bango moko, kasi ndako ya Yehova elali mpamba. Na yango, Yehova asili kokanga mamwɛ na likoló mpe kofuluka ya bilanga mpe mapamboli na ye likoló na moto mpe likoló na mosala na ye.

9. Lolenge nini Yehova alamwisi Bayuda mpo na kobanda mosala?

9 Ya solo, bakangi ntina na yango! Hagai asakolaki mpamba te. Bakonzi mpe bato babandi ‘koyoka mongongo na Yehova Nzambe na bango.’ Bobángi Yehova ezwi esika ya bobángi bato. Endimiseli ya Yehova na nzela ya ntoma na ye Hagai yango oyo: “Ngai nazali na bino.” (1:12, 13) Ezali Yehova ye moko moto alamwisi elimo ya moyangeli, elimo ya nganga monene, mpe elimo ya batikali kati na bato na Ye. Babandi kosala, bobele mikolo 23 nsima wana Hagai abandi kosakola, atako boyangeli ya Perse ebimisaki mobeko mpo na kopekisa mosala yango.

10. Bayuda mosusu bakanisi nini na ntina na tempelo oyo bazali kotonga, kasi Yehova alaki nini?

10 Nsango ya mibale (2:1-9). Sanza moko ekokaki naino te nsima wana mosala ya kotonga ezongelamaki, Hagai apesi nsango na ye ya mibale epemami. Yango etaleli Zelubabele, Yosua, mpe batikali kati na bato. Ezali solo ete ndambo na Bayuda oyo bazongaki longwa na boombo, baoyo bamonaki tempelo ya liboso etongamaki na Salomo bakanisaki ete tempelo oyo ekokokana na oyo ya liboso te. Kasi maloba ya Yehova na bibele mazali nini? ‘Bózala makasi mpe bósala mosala, mpamba te nazali elongo na bino.’ (2:4) Yehova akundweli bango kondimana oyo asalaki elongo na bango, mpe ayebisi bango ete bábanga te. Akembisi bango na elaka oyo ete akoningisa mabota nyonso mpe akosala ete biloko kitoko na bango iyeisama na kati mpe akotondisa ndako na ye na nkembo. Nkembo ya ndako oyo ya nsima ekozala kútu monene koleka oyo ya liboso, mpe kati na esika oyo akopesa kimya.

11. (a) Na ndakisa nini Hagai amonisi bopɔtu ya banganga? (b) Yango ebimisaki litomba nini?

11 Nsango ya misato (2:10-19). Sanza mibale na mikolo misato na nsima, Hagai alobeli banganga. Asaleli ndakisa moko mpo na komonisa likanisi na ye. Nganga oyo akomema mosuni na bulɛɛ akokómisa nde bulɛɛ eloko nyonso oyo ye akosimba? Eyano ezali ete, te. Kosimba eloko ya mbindo, lokola ebembe, ekokómisa mbindo moto oyo asimbi yango? Eyano ezali ɛɛ. Hagai amonisi bongo lolenge ya kosalela ndakisa wana. Bato na mokili bazali mbindo mpamba te bazali komonisa bopɔtu mpo na losambo ya pɛto. Likabo nyonso oyo bazali kopesa ezali mbindo na miso na Yehova Nzambe. Mpo na yango, Yehova apamboli misala na bango te, mpe lisusu atindeli bango molungé makasi, na mbombo, mpe matandala. Tiká ete bábongola nzela na bango. Na bongo Yehova akopambola bango.

12. Nsango nini ya nsuka Hagai apesi epai na Zelubabele?

12 Nsango ya minei (2:20-23). Hagai apesi nsango oyo sé mokolo moko na nsango ya misato, kasi yango etaleli Zelubabele. Lisusu Yehova alobeli ‘kotetema ya lola mpe mabelé,’ kasi na mbala oyo motó na likambo oyo ekei kino kobebisama libela ya makonzi ya mabota. Mingi bakokwea, “moko na moko na mopanga na ndeko na ye.” (2:21, 22) Hagai asukisi esakweli na ye na kondimisáká Zelubabele ete azali na ngɔlu ya Yehova.

LITOMBA NA YANGO

13. Matomba nini mazwamaki nokinoki na esakweli ya Hagai?

13 Nsango minei oyo Yehova apesaki na nzela ya Hagai ezalaki na litomba mingi mpo na Bayuda ya mikolo wana. Balendisamaki na kokende liboso kati na mosala, mpe nsima na mbula minei na ndambo, tempelo esilaki kotongama mpo na kotambwisa losambo ya solo kati na Yisalaele. (Ezl. 6:14, 15) Yehova apambolaki mosala na bango ya molende. Ezalaki na ntango oyo tempelo ezalaki kotongama nde Dalio, mokonzi ya Perse, atalelaki mikanda ya Letá mpe andimisaki lisusu mobeko oyo mopesamaki na Siruse. Na yango mosala ya tempelo esilaki na lisungi ya mobeko na ye.​—Ezl. 6:1-13.

14. Toli nini ya mayele Hagai apesi mpo na mikolo na biso?

14 Esakweli oyo ezali mpe na batoli ya mayele mpo na biso lelo. Lolenge nini? Ya liboso, emonisi ntina mpo na ekelamu nyonso ete atya matomba ya losambo ya Nzambe liboso ya matomba na ye moko. (Hag. 1:2-8; Mat. 6:33) Ezali lisusu komonisa ete moimi ememaka bolóngi te, ete ntina ezali te ya kozala na mposa ya koluka biloko mingi ya mosuni; ezali kimya mpe lipamboli ya Yehova nde epesaka bozwi. (Hag. 1:9-11; 2:9; Mas. 10:22) Ezali lisusu mpe komonisa ete mosala ya Nzambe yango moko ekoki te mpo na kokómisa moto pɛto, kasi esengeli ete yango esalema na bopɛto nyonso, na molimo mobimba, mpe yango esengeli te kobebisama na etamboli ya mbindo. (Hag. 2:10-14; Kols. 3:23; Lom. 6:19) Emonisi ete basaleli ya Nzambe basengeli te kozanga elikya, na kokanisáká “mikolo malamu ya kala,” kasi basengeli nde kotala liboso, ‘kotyáká mitema na bango likoló na nzela na bango’ mpe kolukáká kopesa nkembo epai na Yehova. Na bongo Yehova akozala elongo na bango.​—Hag. 2:3, 4; 1:7, 8, 13; Filp. 3:13, 14; Lom. 8:31.

15. Matomba nini mazwamaka na kozala na molende ya kotosa maye malobelami na mokanda ya Hagai?

15 Wana bamipesaki na mosala ya tempelo, Bayuda bazwaki ngɔlu ya Yehova, mpe bapambwamaki. Botɛmɛli esilaki. Mosala esilaki na ntango oyo esengelaki. Ntango nyonso Yehova apambolaka mosala mosalemi na kozanga bobángi mpe na molende. Mikakatano ya solosolo, to ya makanisi, mikoki kolóngama na komonisáká kondima makasi. Kotosa “liloba na Yehova” epesaka matomba.​—Hag. 1:1.

16. Boyokani nini ezali kati na esakweli ya Hagai mpe elikya ya Bokonzi, mpe yango esengeli kopusa biso na kosala mosala nini lelo?

16 Ezali boni mpo na esakweli oyo elobi ete Yehova ‘akotetemisa lola mpe mabelé’? Ntoma Paulo asaleli Hagai 2:6 na maloba oyo: “Nde sasaipi elaka na [Nzambe] ezali ete, Naino mbala moko mosusu, nakoninganisa bobele mokili te kasi Likoló lokola. Liloba yango ete, Naino mbala moko, elobi ete biloko bikoningana ikolongolama ata bizalisami, ete yango ikoningana te iumela. Yango wana tiká ete tózala na matɔ́ndi mpo tozwi bokonzi bokokoka koningana te mpe tiká ete tósambela Nzambe na motindo mokosepelisa ye na nsɔ́mɔ mpe na botosi. Mpo ete Nzambe na biso azali mɔ́tɔ mokozikisaka.” (Ebe. 12:26-29) Hagai amonisi ete koningana yango ezali mpo na ‘kokweisa kiti na makonzi mpe kobebisa nguya na makonzi na mabota.’ (Hag. 2:21, 22) Na bokeseni, ntango atángaki esakweli oyo, Paulo alobeli Bokonzi ya Nzambe ete ‘ekoki koningana te.’ Na bongo awa ezali biso kotalela elikya oyo ya Bokonzi, tiká ete ‘tózala makasi mpe tósala mosala,’ na kosaleláká Nzambe mosala na bulɛɛ. Tiká mpe tóyeba ete, liboso ete Yehova akweisa mabota ya mabelé, eloko kitoko esengeli kobimisama epai na bango mpo na kobikisama: ‘Nakotetemisa mpe mabota nyonso mpe biloko kitoko na mabota ekoingela mpe ekotondisa ndako oyo na nkembo. Yehova na bibele alobi bongo.’—2:4, 7.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto