Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w06 15/4 nk. 25-29
  • Tiká ete mabɔkɔ na bino mazala na nguya

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Tiká ete mabɔkɔ na bino mazala na nguya
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2006
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Makambo oyo eleki ntina
  • Nzambe alaki ete akozala na basaleli na ye ya sembo
  • Mapamboli mpo na libela
  • “Ngai nazali na bino”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2006
  • Makanisi ya ntina na mokanda ya Hagai mpe ya Zekalia
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2007
  • Mokanda ya Biblia nimero 37—Hagai
    “Makomami nyonso mapemami na Nzambe mpe mazali na litomba”
  • Mokanda ya Biblia nimero 38—Zekalia
    “Makomami nyonso mapemami na Nzambe mpe mazali na litomba”
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2006
w06 15/4 nk. 25-29

Tiká ete mabɔkɔ na bino mazala na nguya

“Tiká ete mabɔkɔ na bino mazala na nguya, bino bato bakoyokaka na mikolo oyo maloba oyo longwa na monɔkɔ ya basakoli.”​—ZEKALIA 8:9.

1, 2. Mpo na nini mokanda ya Hagai ná oyo ya Zekalia esengeli kobenda likebi na biso?

ESAKWELI ya Hagai ná oyo ya Zekalia ekomamá eleki sikoyo mbula soki 2500, kasi ezali na ntina mpo na yo. Mikanda yango ezali kaka te masolo mpamba. Ezali na kati ya “makambo nyonso oyo ekomamaki kala . . . mpo na kolakisa biso.” (Baloma 15:4) Makambo mingi oyo mikanda yango elobeli etindi biso tókanisa makambo oyo ezali kosalema banda Bokonzi ebandaki koyangela na likoló na 1914.

2 Ntoma Paulo akanisaki makambo oyo libota ya Nzambe ekutanaki na yango bambula mingi liboso mpe akomaki boye: “Nzokande makambo wana ezalaki kokómela bango lokola bandakisa, mpe ekomamaki mpo na kozala likebisi epai na biso baoyo bansuka ya bibongiseli ya makambo ekómeli.” (1 Bakolinti 10:11) Na bongo, okoki komituna boye, ‘Mokanda ya Hagai ná ya Zekalia ezali na ntina nini na mikolo na biso?’

3. Hagai ná Zekalia balobelaki mingimingi likambo nini?

3 Ndenge lisolo oyo eleki emonisaki yango, mokanda ya Hagai ná oyo ya Zekalia etalelaki makambo oyo elekaki ntango Bayuda bazongaki na mokili na bango nsima ya kouta na boombo na Babilone. Basakoli yango mibale balobelaki mingimingi mosala ya kotonga lisusu tempelo. Bayuda batyaki fondasyo ya tempelo na mobu 536 L.T.B. Atako mibange mosusu bazalaki kokanisa mikolo ya kala, Bayuda mingi bazalaki ‘koganga mpo na esengo.’ Nzokande, likambo moko ya monene koleka oyo wana esalemi na mikolo na biso. Likambo nini?​—Ezela 3:3-13.

4. Likambo nini esalemaki nsima ya Etumba ya Liboso ya mokili mobimba?

4 Mwa moke nsima ya Etumba ya Liboso ya mokili mobimba, bapakolami ya Yehova babimaki na boombo ya Babilone Monene. Likambo yango emonisaki mpenza ete Yehova azalaki na bango elongo. Liboso na yango, emonanaki lokola nde bakonzi ya mangomba mpe ya politiki balongaki kosukisa mosala ya kosakola mpe ya koteya oyo Bayekoli ya Biblia bazalaki kosala. (Ezela 4:8, 13, 21-24) Kasi, Yehova Nzambe alongolaki makambo nyonso oyo ezalaki kopekisa mosala ya kosakola mpe ya kokómisa bato bayekoli. Kobanda 1919, mosala ya Bokonzi ekendaki liboso mpe eloko moko te ekokaki kopekisa yango.

5, 6. Ndenge nini Zekalia 4:7 ekokokisama malamumalamu?

5 Tokoki mpenza kolikya ete Yehova akokoba kozala elongo na basaleli na ye na mosala ya kosakola mpe ya koteya oyo bazali kosala na mikolo na biso. Na Zekalia 4:7, tozali kotánga boye: “Akobimisa libanga ya motó na kati, wana ekoganga bato ete, Ngɔlu! Ngɔlu ezala na yango!” Ndenge nini kokokisama monene ya likambo yango ekosalema na ntango na biso?

6 Zekalia 4:7 ezali kolobela ntango oyo kaka losambo ya solo ya Nkolo Mokonzi ekotikala na mabelé mobimba, oyo ezali lopango ya tempelo na ye ya elimo. Tempelo yango ezali ebongiseli oyo Yehova azwi mpo na kosambela ye na nzela ya mbeka ya mbɔndi oyo Klisto Yesu apesaki mpo na kosikola biso. Ya solo, tempelo monene ya elimo ebandaki na ekeke ya liboso. Kasi, bato nyonso te awa na mabelé nde bazali na kati ya losambo ya solo. Bamilio ya bato bazali kosalela Nzambe na lopango ya tempelo ya elimo awa na mabelé. Na Boyangeli ya Mbula Nkóto ya Yesu Klisto, bato yango ná ebele ya bato mosusu oyo bakosekwa bakokóma mokemoke bato ya kokoka. Na nsuka ya mbula nkóto yango, kaka basambeli ya solo ya Nzambe nde bakotikala na mabelé oyo epɛtolami.

7. Yesu azali kokokisa mokumba nini oyo ekosala ete kaka losambo ya solo etikala na mokili mobimba na mikolo na biso, mpe mpo na nini likambo yango esengeli kolendisa biso?

7 Guvɛrnɛrɛ Zelubabele ná Nganga-nzambe Monene Yosua bazalaki wana ntango mosala ya kotonga tempelo esilaki na mobu 515 L.T.B. Zekalia 6:12, 13 esakolaki ete Yesu akokokisa mokumba ya ndenge wana oyo ekosala ete kaka losambo ya solo etikala na mokili mobimba: “[Yehova] na bibele alobi boye ete, Talá moto oyo nkombo na ye ezali Etape. Akokola na esika na ye mpe akotonga Tempelo ya [Yehova]. . . . Mpe akokumba nkembo na ye, akofanda mpe akozala mokóló likoló ya kiti na ye ya bokonzi. Akozala [nganga-nzambe, NW] likoló ya kiti na ye ya bokonzi.” Lokola Yesu, moto oyo azali na likoló mpe azali kobatela molɔngɔ ya bakonzi ya libota ya Davidi, azali kotambwisa mosala ya Bokonzi na tempelo ya elimo, okanisi ete moto moko akoki kopekisa mosala yango ekende liboso? Te! Omoni te ete likambo yango esengeli mpenza kolendisa biso tókende ntango nyonso liboso na mosala ya kosakola mpe tótika te ete mitungisi ya bomoi ezongisa biso nsima?

Makambo oyo eleki ntina

8. Mpo na nini tosengeli kotya mosala ya tempelo ya elimo na esika ya liboso na bomoi na biso?

8 Mpo Yehova azala ntango nyonso elongo na biso mpe apambola biso, tosengeli kotya mosala ya tempelo ya elimo na esika ya liboso na bomoi na biso. Na bokeseni na Bayuda oyo bazalaki koloba ete, “Naino ntango ekómi te,” tosengeli kobosana te ete tozali na “mikolo ya nsuka.” (Hagai 1:2; 2 Timote 3:1) Yesu alobaki ete bayekoli na ye ya sembo bakosakola nsango malamu ya Bokonzi mpe bakokómisa bato bayekoli. Tosengeli kokeba ete tózwa te na motuya moke mokumba kitoko ya kosakola oyo bapesi biso. Mosala ya kosakola mpe ya koteya, oyo mokili ya Satana elongaki kopekisa mpo na mwa ntango moke, ezongaki na 1919, kasi ekómi naino na nsuka te. Nzokande, tóyeba ete mokolo mosusu ekosuka!

9, 10. Nini esengeli mpo na kozwa mapamboli ya Yehova, mpe yango ezali kosɛnga biso nini?

9 Nzambe akopambola mokomoko na biso mpe biso nyonso lokola lisangá soki tozali komipesa mobimba na mosala yango. Tótalela elaka ya Yehova oyo ekoki kolendisa biso. Ntango Bayuda bazongelaki losambo ya Yehova na motema mobimba mpe bazongelaki kotya fondasyo ya tempelo na molende nyonso, Yehova alobaki boye: “Longwa na mokolo oyo nakopambola bino.” (Hagai 2:19) Bakómaki na boyokani malamu na Yehova. Talá mapamboli oyo Nzambe alakaki bango: “Kokona ya kimya ekozala; miwiti ekobimisa mbuma na yango mpe mabelé ekobimisa kofuluka na yango; mpe lola ekopesa mamwɛ na yango. Nakosangolisa litika ya bato oyo biloko oyo nyonso.”​—Zekalia 8:9-13.

10 Se ndenge Yehova apambolaki Bayuda na elimo mpe na mosuni, akopambola mpe biso soki tozali kosala na molende mpe na motema ya esengo mosala oyo apesi biso. Mapamboli yango ekomonana na makambo lokola kimya kati na biso, libateli, bomɛngo mpe bokoli ya elimo. Kasi, tóbosana te ete mpo Yehova akoba kopambola biso, tosengeli kosala mosala na tempelo ya elimo na ndenge oyo Ye alingi tósala yango.

11. Ndenge nini tokoki komitalela?

11 Sikoyo nde ntango ya ‘kobanza na mitema na biso mpo na banzela na biso.’ (Hagai 1:5, 7) Tosengeli kofanda mpe kotalela makambo oyo tozali kotya na esika ya liboso na bomoi na biso. Lelo oyo, Yehova akopambola biso soki tozali kokumisa nkombo na ye mpe tozali kokende liboso na mosala ya tempelo na ye ya elimo. Esengeli omituna boye: ‘Nakómi kotya makambo mosusu na esika ya liboso? Molende na ngai mpo na losambo ya solo mpe mosala ya Yehova ezali ndenge nini soki nakokanisi yango na ntango nazwaki batisimo? Koluka bomɛngo ezali nde kolongola likebi na ngai epai ya Yehova mpe Bokonzi na ye? Kobanga bato, elingi koloba komitungisa mpo na oyo bato mosusu bakoki koloba, ezali kozongisa ngai nsima?’​—Emoniseli 2:2-4.

12. Hagai 1:6, 9 elobeli likambo nini oyo ekómelaki Bayuda?

12 Tolingi te ete Nzambe apimela biso mapamboli na ye mpo tozali kopesa motuya moke na mosala ya kokumisa nkombo na ye. Tóbosana te ete Bayuda oyo bautaki na boombo babandaki mosala malamu, kasi na nsima, ndenge Hagai 1:9 elobi yango, ‘moto na moto apotaki mbangu na ndako na ye moko.’ Bakómaki kokanisa mingimingi bamposa na bango ya mokolo na mokolo mpe bomoi na bango. Yango wana, ‘bazalaki kobuka bobele moke,’ elingi koloba ete bilei, masanga mpe bilamba ezalaki mingi te. (Hagai 1:6) Yehova apimelaki bango mapamboli na ye. Likambo yango ezali koteya biso nini?

13, 14. Ndenge nini tokoki kosalela liteya oyo ezali na Hagai 1:6, 9, mpe mpo na nini ezali na ntina mingi?

13 Tomoni ete mpo Yehova akoba kopambola biso, tosengeli te kozongisa losambo na ye nsima mpe komipesa na koluka matomba na biso moko. Yango ekoki kolimbola koluka kozala na bomɛngo, koluka kokóma na bozwi nokinoki, kotánga bakelasi milaimilai mpo na kozwa mosala ya lokumu na mokili, to kokóma bato minene na mokili.

14 Makambo yango ezali mabe te. Kasi, omoni te ete soki tokanisi bomoi ya seko, nyonso wana ezali kaka “misala ya kokufa”? (Baebele 9:14) Na ndenge nini? Ezali misala ya kokufa na elimo, ezangi ntina mpe ebotaka mbuma te. Soki moto akangami na misala yango, akoki kokufa na elimo. Likambo yango ekómelaki baklisto bapakolami mosusu na ntango ya bantoma. (Bafilipi 3:17-19) Esili mpe kokómela baklisto mosusu na ntango na biso. Ekoki kozala ete oyebi baklisto mosusu oyo bazalaki mokemoke kotika lisangá mpe misala ya boklisto; lelo oyo bakanisaka kutu te kozongela kosalela Yehova. Tozali kolikya ete baklisto yango bakozonga epai ya Yehova, kasi tomoni ete kolanda “misala ya kokufa,” ekoki kobebisa boninga na biso na Yehova mpe kozangisa biso mapamboli na ye. Yango ekozala likambo ya mawa mpenza. Makambo wana ekoki kosala ete tóbungisa esengo mpe kimya oyo elimo ya Nzambe epesaka. Ekozala mpe mawa mingi soki tobungisi boninga ya boklisto!​—Bagalatia 1:6; 5:7, 13, 22-24.

15. Ndenge nini Hagai 2:14 ezali komonisa ete tosengeli kozwa losambo na biso na lisɛki te?

15 Tosengeli kozwa likambo yango na lisɛki te. Tótala ndenge Hagai 2:14 emonisi makanisi ya Yehova mpo na Bayuda oyo babosanaki ndako na ye ya losambo mpe bamipesaki na kotonga to kobongisa bandako na bango moko. “[Yehova] alobi ete, Bato oyo bazali boye mpe libota oyo ezali boye liboso na ngai. Mpe misala nyonso ya mabɔkɔ na bango ezali boye liboso na ngai mpe biloko nyonso bikokaba bango wana ezali boye. [Ezali mbindo, NW].” Lokola Bayuda babosanaki losambo ya solo, Yehova akokaki te kondima bambeka oyo bazalaki kopesa na mitema mibale na etumbelo oyo batongaki na Yelusaleme.​—Ezela 3:3.

Nzambe alaki ete akozala na basaleli na ye ya sembo

16. Na kotalela bimonaneli oyo Zekalia azwaki, Bayuda bakokaki kozala na elikya nini?

16 Na nzela ya bimonaneli mwambe oyo Zekalia azwaki, Nzambe alakaki ete akozala na Bayuda oyo bazongelaki mosala ya kotonga lisusu tempelo. Na emonaneli ya liboso, Yehova alakaki ete mosala ya kotonga tempelo ekokende tii na nsuka mpe ete Yelusaleme ná Yuda ekozala na biloko mingi ntango nyonso oyo Bayuda bakosala mosala oyo Nzambe apesaki bango. (Zekalia 1:8-17) Emonaneli ya mibale emonisaki ete baguvɛrnema nyonso oyo ezalaki kotɛmɛla losambo ya solo ekosuka. (Zekalia 1:18-21) Bimonaneli mosusu emonisaki ete Nzambe akobatela bango na mosala ya kotonga, bato ya bikólo ndenge na ndenge bakoya kosambela na ndako ya Yehova oyo esili kotongama, bakozala na kimya mpe libateli ya solosolo, makambo oyo emonanaki lokola nde ekopekisa mosala oyo Nzambe apesaki bango ekolongwa, mabe ekozala lisusu te, mpe baanzelu bakokɛngɛla mpe bakobatela bango. (Zekalia 2:5, 11; 3:10; 4:7; 5:6-11; 6:1-8) Lokola Nzambe alakaki makambo nyonso wana, okoki komona ntina oyo bato ya botosi babongolaki bomoi na bango mpe batyaki makanisi na bango na mosala oyo mpo na yango Nzambe alongolaki bango na boombo.

17. Na kotalela ndanga oyo tozali na yango, mituna nini tosengeli komituna?

17 Ndenge moko mpe, ndanga oyo tozali na yango ete losambo ya solo ekolonga esengeli kolendisa biso tómipesa na mosala ya Bokonzi mpe kotinda biso tókanisaka ndako ya losambo ya Yehova. Omituna boye: ‘Soki nandimaka mpenza ete sikoyo nde ntango ya komipesa na mosala ya kosakola nsango malamu ya Bokonzi mpe kokómisa bato bayekoli, mikano na ngai mpe bomoi na ngai ezali komonisa yango? Nalekisaka mpenza ntango oyo ekoki na koyekola bisakweli ya Liloba ya Nzambe, komanyola likoló na yango, mpe kolobela yango ntango nakutani na baninga baklisto mpe bato mosusu?’

18. Na kotalela Zekalia mokapo 14, makambo nini ekosalema na mikolo ekoya?

18 Zekalia alobelaki kobomama ya Babilone Monene mpe etumba ya Armagedona oyo ekolanda yango. Tozali kotánga boye: “Ekozala mokolo moko oyo eyebani na [Yehova], na moi te mpe na butu te, kasi na ntango ya mpokwa pole ekozala.” Ya solo, mokolo ya Yehova ekozala mokolo ya molili mpe ya malili mpo na banguna na ye awa na mabelé! Kasi mpo na basambeli ya sembo ya Yehova, yango ekozala mokolo ya pole oyo ekokita te mpe ya esengo. Zekalia alobelaki mpe ndenge oyo, na mokili ya sika, biloko nyonso ekosakola bosantu ya Yehova. Losambo ya solo na tempelo monene ya elimo ekozala losambo kaka moko na mabelé mobimba. (Zekalia 14:7, 16-19) Yango ezali elaka ya malamu mpenza! Tokomona ndenge makambo oyo esakolamaki ekokokisama mpe ndenge oyo bokonzi ya Yehova ekolongisama. Ya solo, mokolo ya Yehova ekokesana na mikolo mosusu nyonso!

Mapamboli mpo na libela

19, 20. Mpo nini maloba ya Zekalia 14:8, 9 ezali kolendisa yo?

19 Nsima ya kolongisama monene ya bokonzi ya Yehova, Satana ná bademo na ye bakobwakama na lobwaku mozindo, epai bakosala lisusu eloko moko te. (Emoniseli 20:1-3, 7) Na nsima, na Boyangeli ya Mbula Nkóto ya Klisto, Nzambe akosopa ebele ya mapamboli. Zekalia 14:8, 9 elobi boye: “Na mokolo yango mai ya bomoi ekobima na Yelusaleme, ndambo na yango kino mai na epai na ebimelo ya moi mpe ndambo na yango kino mai ya elimwelo ya moi; ekozala mpe boye na ntango ya moi makasi mpe na ntango ya mpiɔ. Mpe [Yehova] akozala mokonzi likoló ya mokili mobimba; na mokolo yango [Yehova] akozala moko mpe nkombo na ye moko.”

20 “Mai ya bomoi,” to “ebale moko ya mai ya bomoi,” oyo ezali komonisa bibongiseli nyonso oyo Yehova azwi mpo na kopesa bomoi, ekokoba kotyola longwa na kiti ya Bokonzi ya Masiya. (Emoniseli 22:1, 2) Ebele ya bato oyo bazali kosambela Yehova, baoyo bakobika na Armagedona, bakolongwa na etumbu ya liwa oyo Adama atikelá biso. Ata baoyo bakufá bakozwa mapamboli yango mpamba te bakosekwa. Yango ekozala eleko ya sika mpo na boyangeli ya Yehova awa na mabelé. Na mabelé mobimba, bato bakondima Yehova lokola Nkolo Mokonzi, Nzambe kaka moko oyo basengeli kosambela.

21. Ekateli nini tosengeli kozala na yango?

21 Soki tokanisi makambo nyonso oyo Hagai ná Zekalia basakolaki mpe nyonso oyo esili kokokisama, tozali na bantina ya solosolo ya kokende liboso na mosala oyo Nzambe apesi biso na lopango ya tempelo ya elimo awa na mabelé. Liboso tókóma na ntango oyo kaka losambo ya solo ekotikala na mabelé mobimba, tiká tókoba kotya Bokonzi na esika ya liboso. Zekalia 8:9 ezali kolendisa biso na maloba oyo: “Tiká ete mabɔkɔ na bino mazala na nguya, bino bato bokoyokaka na mikolo oyo maloba oyo longwa na monɔkɔ ya basakoli.”

Ozali koyeba lisusu?

• Makambo nini oyo ezali na mokanda ya Hagai mpe ya Zekalia emonisi ntina ya mikanda yango lelo oyo?

• Mokanda ya Hagai mpe oyo ya Zekalia ezali koteya biso nini mpo na makambo oyo tosengeli kotya na esika ya liboso?

• Mpo na nini boyekoli ya esakweli ya Hagai mpe ya Zekalia ezali kopesa biso elikya mpo na mikolo ezali koya?

[Elilingi na lokasa 26]

Hagai ná Zekalia balendisaki Bayuda básala mosala na motema mobimba mpe na bongo Nzambe akopambola bango

[Bililingi na lokasa 27]

Ozali nde ‘kopota mbangu mpo na ndako na yo moko’?

[Elilingi na lokasa 28]

Yehova alakaki mapamboli, mpe apesaki yango

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto