Mokanda ya Biblia nimero 55—2 Timoté
Mokomi: Paulo
Esika ya bokomi: Loma
Nsuka ya bokomi: soko 65 T.B.
1. Minyoko nini mingalaki kati na Loma na mobu soko 64 T.B., mpe mpo na ntina nini?
MPO na mbala ya mibale, Paulo akómi lisusu mokangami na mboka Loma. Nzokande, bolɔ́kɔ oyo ya mibale ezalaki mpasi mingi koleka oyo ya liboso. Ezalaki pene na mobu 65 T.B. Mɔ́tɔ monene ezikisaki Loma na sanza ya Yulí ya mobu 64 T.B., kobebisáká biloko mingi ya bitúká 10 kati na bitúká 14 ya mboka yango. Engebene Tacite, ye Moloma mokomi na makambo ya kala, Mokonzi Néron azalaki na makoki te ya “kosilisa nungúnungú oyo ezalaki kotambola ete mɔ́tɔ monene wana eutaki na etindá oyo epesamaki ete bátya yango. Boye, mpo na kolongola efundeli yango, Néron, na nkó nyonso, akweisaki ngambo mpe minyoko ya nsɔ́mɔ likoló na etuluku moko ya bato oyo bayinamaki mpo na mabe na bango mpe oyo bibele bazalaki kobénga bango ete baklisto. . . . Etuluku monene ya bato bakweisamaki na lisambisi, mingi mpenza mpo na kozika ya engumba te, kasi mpo na boyini bato. Liwa na bango lityolamaki na lolenge nyonso. Kozipamáká na mposo ya nyama, bapasolamaki na bambwa mpe bakufaki, to babákaki bango na bikulusu, to batindamaki na kobwakama na mɔ́tɔ mpe bazikaki, mpo na kopesa kongɛnga kati na butu, ntango pole ya moi esilaki. Néron apesaki bilanga na ye mpo ete makambo yango masalema kuna . . . Mayoki ya mawa ebimaki; mpamba te likambo yango lisalemaki te na lolenge bazalaki komizela na yango, ete bato wana bábomama mpo na bolamu ya bato banso; kasi, babomamaki nde mpo na kokokisa mposa ya libomi oyo ezalaki kati na moto moko.”a
2. Kati na ezalela ya lolenge nini Paulo akomaki mokanda ya mibale epai na Timoté, mpe mpo na nini azali kolobela Onesifolo na botɔ́ndi nyonso?
2 Emonani ete ezalaki pene na ntango ya minyoko yango ya nsɔ́mɔ nde Paulo akómaki lisusu mokangami na mboka Loma. Mbala oyo bakangaki ye minyɔlɔlɔ. Azalaki komizela te ete akobima na bolɔ́kɔ, kasi azalaki sé kozela lisambisi ya nsuka mpe kobomama na ye. Bobele bato moke nde bazalaki kokende kotala ye. Ya solo, moto akokaki te komimonisa polele ete azali moklisto mpamba te yango elingaki kotya ye na likámá ya kokangama mpe kobomama nsima na minyoko makasi. Na bongo, Paulo akokaki kokoma na botɔ́ndi nyonso na ntina na moto oyo ayaki kotala ye uta na Efese ete: “Tiká ete Nkolo ayokela libota na Onesifolo mawa zambi mbala mingi ayikisi ngai mpiko mpe ayoki nkanga na ngai nsɔ́ni te. Ekómaki ye na Loma aluki ngai na etingya mpe azwi ngai.” (2 Tim. 1:16, 17) Kokomáká mokanda na ntango liwa na ye libɛlɛmaki, Paulo amibéngi ye moko “ntoma na Klisto Yesu mpo na mokano na Nzambe pelamoko elaka na bomoi kati na Klisto Yesu.” (1:1) Paulo ayebaki ete bomoi kati na Klisto ezalaki kozela ye. Ateyaki kati na bingumba mingi ya minene na mokili ya ntango wana, longwa na Yelusaleme kino Loma, mpe ekoki kozala ete ateyaki ata kino mosika na Espagne. (Lom. 15:24, 28) Apotaki na bosembo nyonso kino nsuka.—2 Tim. 4:6-8.
3. Mokanda ya mibale epai na Timoté mokomamaki ntango nini, mpe lolenge nini yango epesi matomba na baklisto na boumeli ya bileko mingi?
3 Mokanda yango momonani ete mokomamaki soko na mobu 65 T.B., mwa moke liboso ya kobomama ya Paulo lokola martíru. Mbala mosusu, Timoté azalaki sé na Efese, mpamba te Paulo alendisaki ye ete atikala kuna. (1 Tim. 1:3) Sikawa, mpo na mbala ya mibale, Paulo asɛngi na Timoté ete aya nokinoki epai ye azali, mpe alɔmbi ye ete amema mpe Malako elongo na ye, mpe lisusu kazaka mpe barulo oyo Paulo atikaki yango na Toloa. (2 Tim. 4:9, 11, 13, 21) Lokola mokomamaki na ntango moko ya mpasi, mokanda yango mozali na bilendiseli ya nguya mpo na Timoté, mpe mozali kokóba kopesa bilendiseli ya litomba mpenza epai na baklisto nyonso ya solo na boumeli ya bileko oyo bizali kolandana uta ntango yango.
4. Nini endimisi bosolo ya mokanda ya mibale epai na Timoté mpe nini emonisi ete yango ezali eteni ya Makomami mapemami?
4 Bosolo ya mokanda ya mibale epai na Timoté, mpe likambo oyo ete yango ezali eteni ya Makomami mapemami, emonisami na bilembeteli oyo tosilaki kolobela na mokanda ya liboso epai na Timoté. Yango endimamaki mpe esalelamaki na bakomi mpe balimboli ya ntango ya kala, bakisá mpe Polycarpe oyo azalaki na bomoi na ekeke ya mibale T.B.
MAKAMBO MAZALI KATI NA TIMOTÉ YA MIBALE
5. Lolenge nini ya kondima ezali kati na Timoté, mpe asengeli kolanda kosala nini?
5 ‘Kosimba lolenge ya maloba ya sembo’ (1:1–3:17). Paulo ayebisi Timoté ete abosanaka ye te kati na mabondeli na ye mpe ete azali na mposa makasi ya komona ye. Amikundoli ‘kondima ezangi bokosi’ oyo ezali kati na Timoté mpe oyo ezalaki liboso epai na nkɔ́kɔ na ye Loisi mpe na mama na ye Enisi. Timoté asengeli kopelisa, lokola mɔ́tɔ, likabo oyo lizali kati na ye, ‘mpo ete Nzambe apesaka elimo ya kobangabanga te, kasi elimo ya nguya mpe ya bolingo mpe ya makanisi mabongi.’ Na yango, tiká te ete ayoka nsɔ́ni mpo na kopesa litatoli mpe andima mpasi mpo na nsango malamu, mpamba te ngɔlu ya Nzambe esili komonisama polele na nzela ya komonana ya Mobikisi, Klisto Yesu. Timoté asengeli ‘kolanda kosimba lolenge ya maloba ya sembo’ oyo ayokaki epai na Paulo, kobateláká yango lokola likabo malamu.—1:5, 7, 13.
6. Toli nini Paulo apesi na ntina na mateya, mpe na lolenge nini Timoté akoki kozala mosaleli oyo abongi mpe mbeki ya lokumu?
6 Makambo oyo ayekolaki epai na Paulo, Timoté asengeli kopesa yango na mabɔkɔ ya “bato na sembo, baoyo babongi kolakisa bamosusu.” Timoté asengelaki komimonisa mpenza ete azalaki sodá ya solosolo ya Klisto Yesu. Sodá aboyaka makambo ya mombongo. Mpe lisusu, moto oyo azwaka motole kati na masano asalaka engebene mibeko ya lisano. Mpo na kozwa bososoli, Timoté asengeli ntango nyonso kokanisa maloba ya Paulo. Makambo ya ntina mpo na komikundwela mpe kokundwela basusu mazali oyo ete “Yesu Klisto asekwaki longwa na bakufi mpe azalaki mombóto ya Davidi, NW,” mpe ete lobiko mpe nkembo na seko kati na Klisto, koyangela lokola mikonzi elongo na ye, ezali mbano mpo na baponami oyo bazali koyika mpiko. Timoté asengeli kosala nyonso ekoki na ye mpo na komimonisa mosaleli na Nzambe oyo abongi, asengeli koboya bilobaloba oyo bizali kokweisa makambo ya bulɛɛ, oyo ezali kopalangana lokola mpota ya mayíná. Kati na ndako, mbeki ya lokumu ebombamaka esika moko te na mbeki ezangi lokumu, bobele bongo Paulo alendisi Timoté ete ‘okimaka mposa nyonso na bolenge mpe olandaka boyengebene mpe kondima mpe bolingo mpe kimya, esika moko na bango bakobyanga nkombo na Nkolo na mitema pɛto.’ Moombo ya Nkolo asengeli kozala na boboto epai na bato banso, asengeli kozala moteyi malamu, oyo azali koteya na kosɔkɛma nyonso.—2:2, 8, 22.
7. Mpo na nini Makomami mapemami mazali na litomba mingi mpenza ‘na mikolo ya nsuka’?
7 ‘Na mikolo na nsuka,’ ntango ya mpasi ekoya mpe bato na bokosi bakobima, oyo bakomimonisa ete bazali bato bakangami epai na Nzambe, ‘baoyo bandimi koyekola epai na bato nyonso nde bakoki kokóma na boyebi ya sikisiki ya solo te.’ Kasi Timoté alandaki na penepene mpenza mateya ya Paulo, lolenge na ye ya bomoi, mpe minyoko na ye, oyo Nkolo asikolaki ye na yango. Abakisi ete “Ɛɛ, bango nyonso bazali na mposa na ezaleli na kosambela kati na Klisto Yesu bakonyokolama.” Nzokande, Timoté asengeli koumela kati na makambo oyo ayekolaki uta bomwana, oyo makoki kopesa ye mayele mpo na lobiko, mpamba te “Makomami nyonso mapemami na Nzambe mpe mazali na litomba, NW.”—3:1, 7, 12, 16.
8. Paulo alendisi Timoté na kosala nini, mpe na likambo yango, lolenge nini Paulo asepeli?
8 Kokokisa mosala na mobimba mpenza (4:1-22). Paulo atindi Timoté ete “osakola liloba” na etingya mpenza. (4:2) Ntango ezali koya wana bato bakondima lisusu mateya ya sembo te nde bakobaluka epai na balakisi na lokuta, kasi Timoté asengeli komisɛnzɛla, ‘kosala mosala na mopalanganisi na nsango malamu, kokokisáká mosala na ye nyɛɛ.’ Koyebáká ete liwa na ye likomaki pene, Paulo asepeli ete abundaki etumba malamu, ete apotaki kati na komekana na mbangu kino nsuka mpe abatelaki kondima. Sikawa, na elikya mpenza, azali kozela mbano, “motole na boyengebene.”—4:5, 8.
9. Elikya nini Paulo amonisi kati na nguya ya Nkolo?
9 Paulo abyangi Timoté ete aya nokinoki epai na ye mpe apesi malako na ntina na mobembo yango. Ntango Paulo asambaki mpo na mbala ya liboso, moto nyonso asundolaki ye, kasi Nzambe apesaki ye nguya na boye ete mosala ya kosakola mókoka kosalema na bozindo mpenza kati na mabota. Ɛɛ, andimisami ete Nkolo akosikola ye longwa na misala nyonso mabe mpe akobikisa ye mpo na Bokonzi na Ye ya likoló.
LITOMBA NA YANGO
10. (a) Litomba nini ya sikisiki ya “Makomami nyonso” lilobelami mingi na mokanda ya mibale ya Timoté, mpe baklisto basengeli kosala makasi mpo na kokóma banani? (b) Bopusi nini esengeli kopɛngolama, mpe lolenge nini yango ekoki kosalema? (c) Na likambo nini mposa makasi ezali ntango nyonso komonana?
10 “Makomami nyonso mapemami na Nzambe mpe mazali na litomba.” Mazali na litomba na nini? Paulo ayebisi biso kati na mokanda na ye ya mibale epai na Timoté ete: “Na mateya, na mpamela, mpo na kosembola mpe mpo na kobɔkɔla, kati na boyengebene, ete moto na Nzambe azala mobongi, oyo aselingwi mpo na misala nyonso malamu.” (3:16, 17) Bongo, litomba ya “mateya” lilobelami mingi na mokanda oyo. Baoyo nyonso balingaka boyengebene lelo bakosepela kolanda toli ya mayele oyo epesami na mokanda yango, na kosaláká makasi mpo na kokóma balakisi na Liloba mpe na kosaláká oyo ekoki na bango mpo na kokóma basaleli na Nzambe oyo babongi, ‘kosemboláká liloba na solo.’ Lokola na Efese na mikolo ya Timoté, bobele bongo, na ekeke ya ntango oyo, ezali na baoyo bazali komikɔtisa na “makambo na kowelana mazangi ntina mpe mayele,” ‘baoyo bandimi koyekola epai na bato nyonso nde bakoki kokóma na boyebi [ya sikisiki ya solo te,’ mpe oyo bazali kobwaka “mateya na sembo” mpo na koyoka balakisi oyo bazali kolengola matoi na bango engebene bamposa bazali na yango ya moimi. (2:15, 23; 3:7; 4:3, 4) Mpo na kopɛngola bopusi wana ya mokili, esengeli mpenza ‘kosimba lolenge ya maloba ya sembo’ kati na kondima mpe bolingo. Lisusu, mposa makasi ezali ete bato mingi mosusu bákóma “bato na sembo, baoyo babongi kolakisa bamosusu,” na libándá mpe kati na lisangá, lokola Timoté, “moombo na Nkolo.” Esengo na baoyo nyonso bazali komema mokumba yango, kokómáká ‘bato babongi mpo na kolakisa na kosɔkɛma nyonso,’ mpe oyo bazali kosakola liloba “na etingya nyonso mpe na likoki ya koteya malamu”!—1:13; 2:2, 24, 25; 4:2, NW.
11. Toli nini epesami mpo na bilenge?
11 Lokola Paulo alobaki yango, Timoté ayebaki makomi na bulɛɛ “longwa na bomwana” na ye na lisalisi ya mateya malamu oyo Loisi mpe Enisi bapesaki ye. “Longwa na bomwana” emonisi lisusu ntango ya kobanda koteya Biblia epai na bana lelo oyo. Kasi ezali boni soki, na bambula ya nsima, mɔ́tɔ ya molende ya ebandeli ebandi kozimana? Paulo apesi toli ete esengeli kopelisa mɔ́tɔ yango lisusu kati na elimo ya “nguya mpe na bolingo mpe na komikanga motema,” kobateláká kondima kozanga bokosi. Alobaki ete ‘na mikolo ya nsuka,’ ntango ya mpasi ekoya, elongo na mikakatano mitali kobeba ya bizaleli mpe mateya ya lokuta. Yango wana ezali na ntina mpenza, mingimingi mpo na bilenge, mpe basusu nyonso, ete ‘bámisɛnzɛla na makambo nyonso, mpe bákokisa mosala na bango nyɛɛ.’—3:15; 1:5-7; 3:1-5; 4:5.
12. (a) Lolenge nini Paulo abendaki likebi likoló na Mombóto ya Bokonzi, mpe amonisaki elikya nini? (b) Lolenge nini basaleli ya Nzambe na mikolo na biso bakoki komonisa makanisi motindo moko na Paulo?
12 Ebongi mpenza kobunda mpo na kozwa mbano. (2:3-7) Na ntina na likambo yango, Paulo abendi likebi likoló na Mombóto ya Bokonzi, kolobáká ete: “Okanisa Yesu Klisto, ye oyo asekwi kati na bakufi [mpe mombóto, NW] na Davidi lokola ezali Nsango Malamu.” Elikya ya Paulo ezalaki ya kotikala na bomoko elongo na Mombóto yango. Mwa mosika lisusu, alobeli kobɛlɛma ya kobomama na ye na maloba ya bolóngi mpenza ete: “Longwa na sasaipi motole na boyengebene ebombami mpo na ngai oyo Nkolo, Mosambisi na sembo, akopesa ngai na mokolo yango, nde bobele na ngai te kasi na bango nyonso basili kolinga komonana na ye.” (2:8; 4:8) Oyo nde esengo mpo na baoyo nyonso bakoki komikundwela bambula mingi ya mosala ya sembo mpe koloba maloba motindo moko! Nzokande, yango esɛngi kosala sikawa na bosembo nyonso, na bolingo mpo na komonana ya Yesu Klisto, mpe komonisa elikya motindo moko na oyo Paulo amonisaki ntango akomaki ete: “Nkolo akobɔtɔla ngai na misala mabe nyonso mpe akobikisa ngai mpo na Bokonzi na ye na Likoló. Nkembo ezala na ye libela na libela. Amen.”—4:18.
[Maloba na nse ya lokasa]
a The Complete Works of Tacitus, 1942, ebimisami na Moses Hadas, nkasa 380-381.