Nini ekoki kosalisa biso na kosembola liloba ya solo malamumalamu?
MOPANZI-NSANGO moko, oyo akomaka makambo ya bateyatre na zulunalo moko, akendaki kotala lisano moko ya teyatre. Lisano yango esepelisaki ye mpenza te; yango wana, akomaki na zulunalo ete: “Soki olingaka makambo ya mpambampamba, kozangisa te kokende kotala teyatre yango.” Na nsima, bakóló teyatre yango babimisaki piblisite oyo ezongelaki maloba ya mopanzi-nsango wana. Na piblisite na bango bakomaki boye: “Kozangisa te kokende kotala teyatre yango”! Tomoni ete bazongelaki mpenzampenza maloba ya mopanzi-nsango, kasi lokola balongolaki maloba mosusu oyo ezalaki liboso, ndimbola na yango mobimba ebongwanaki.
Ndakisa oyo ezali komonisa ete koyeba likanisi ya lisolo mobimba epai oyo likambo moko euti ezalaka na ntina. Soki totángi likambo moko kozanga kotalela likanisi ya lisolo mobimba, tokoki kobongola ndimbola na yango, se ndenge Satana abongolaki ndimbola ya Makomami ntango alukaki kopɛngwisa Yesu. (Matai 4:1-11) Nzokande, kotalela likanisi ya lisolo mobimba esalisaka mpo na koyeba ndimbola ya solosolo ya likambo moko. Yango wana, ntango tozali koyekola vɛrsɛ moko ya Biblia, ezali malamu tótalelaka likanisi ya lisolo mobimba epai bakamati vɛrsɛ yango mpo tókanga ntina malamumalamu ya makanisi ya moto oyo akomaki yango.
Esengeli kosembola Liloba ya Nzambe malamumalamu!
Likanisi ya lisolo mobimba ezalaka ntango mosusu makambo oyo elobami liboso to mpe nsima ya liloba to fraze moko boye, oyo ekosalisa mpo na koyeba ndimbola ya liloba to fraze yango. Ezali mpe na oyo tokoki kobenga makambo etali lisolo moko, elingi koloba makambo oyo ezalaki na ntango bakomaki yango, esika oyo bakomaki yango, mpe bongo na bongo. Kotalela likanisi ya lisolo mobimba epai vɛrsɛ moko euti ezali na ntina mpenza na kotalela likambo oyo ntoma Paulo akomelaki Timote ete: “Salá nyonso oyo ekoki na yo mpo omimonisa moto oyo andimami na Nzambe, mosali oyo azali na eloko moko te ya koyokela nsɔni, oyo azali kosembola liloba ya solo malamumalamu.” (2 Timote 2:15) Mpo na kosembola Liloba ya Nzambe malamumalamu, tosengeli kokanga ntina na yango malamu mpe kolimbola yango epai ya bato mosusu na bosembo mpe na bosolo. Limemya na biso mpo na Yehova, Mobandisi ya Biblia, ekotinda biso na kosala makasi mpo tósala yango, mpe kotalela likanisi ya lisolo mobimba nde ekosalisa biso mpenza.
Makambo etali Mokanda ya Mibale epai ya Timote
Na ndakisa, tótalela Mokanda ya Mibale epai ya Timote.a Tokoki kobanda na kotalela makambo etali mokanda yango. Nani moto akomaki yango? Akomaki yango ntango nini? Azalaki wapi mpe azalaki ndenge nini? Mpe na nsima tokoki kotuna, “Timote” oyo mokanda yango ebengamaka na nkombo na ye, azalaki wapi mpe azalaki ndenge nini? Mpo na nini asengelaki na makambo oyo bakomelaki ye? Soki tozwi biyano na mituna yango, ekobakisa motuya ya mokanda yango na miso na biso mpe ekosalisa biso tómona matomba oyo mokanda yango ekoki kopesa biso lelo oyo.
Ebandeli ya Mokanda ya Mibale epai ya Timote ezali komonisa ete ntoma Paulo nde atindelaki yango Timote. Bavɛrsɛ mosusu ezali komonisa ete ntango Paulo akomaki yango, azalaki na bolɔkɔ mpo na nsango malamu. Lokola baninga na ye mingi basundolaki ye, Paulo amonaki ete liwa na ye ezalaki lisusu mosika te. (2 Timote 1:15, 16; 2:8-10; 4:6-8) Na bongo, ekoki mpenza kozala ete akomaki mokanda yango ntango akɔtaki bolɔkɔ mpo na mbala ya mibale na Loma, na mobu soki 65 ya ntango na biso (T.B.). Emonani ete mwa moke na nsima, Amperɛrɛ Néron abomisaki ye.
Wana ezali makambo etali Mokanda ya Mibale epai ya Timote. Kasi, tokomona ete Paulo akomelaki Timote mpo na komilela te na ntina na mikakatano na ye. Akebisaki nde moninga na ye Timote ete bantango ya mpasi ezali koya mpe alendisaki ye atika te ete makambo mosusu ebenda likebi na ye, ‘akoba kozwa nguya’ mpe ayebisa bato mosusu malako oyo apesaki ye. Na ngala na bango, bato yango mpe bakokóma na makoki oyo esengeli mpenza mpo na koteya basusu. (2 Timote 2:1-7) Yango ezali ndakisa malamu mpenza ya ezaleli ya komibanzabanza mpo na basusu ata na ntango ya mpasi! Ezali mpe toli malamu mpo na biso lelo oyo!
Paulo abengaki Timote “mwana molingami.” (2 Timote 1:2) Na bisika mingi na Makomami ya Grɛki ya boklisto balobi ete elenge yango azalaki moninga ya sembo ya Paulo. (Misala 16:1-5; Baloma 16:21; 1 Bakolinti 4:17) Ntango Paulo akomelaki ye mokanda yango, ekoki kozala ete Timote azalaki na mbula 30 na ndambo, bambula oyo bazalaki kotalela moto ete azali naino elenge. (1 Timote 4:12) Kasi, azalaki sembo banda bambula ebele, ‘asalaki lokola moombo elongo na Paulo’ na boumeli ya mbula soki 14. (Bafilipi 2:19-22) Atako Timote azalaki elenge, Paulo apesaki ye mokumba ya kopesa bankulutu mosusu toli ete “bábundaka te na ntina etali maloba” kasi bátya makanisi na bango na makambo ya ntina, makambo lokola kondima mpe koyika mpiko. (2 Timote 2:14) Timote azalaki mpe na bokonzi ya kopona bankulutu na basaleli na misala na kati ya masangá. (1 Timote 5:22) Kasi, ekoki kozala ete azalaki kobangabanga mwa moke kosalela bokonzi na ye.—2 Timote 1:6, 7.
Nkulutu yango, lokola azalaki naino elenge, akutanaki mpe na mikakatano ya makasi. Ya liboso, bato mibale, Himene na Filete, bazalaki “kokɔtisa mobulu na kondima ya bamosusu,” bazalaki koteya ete “lisekwa esilá kosalema.” (2 Timote 2:17, 18) Ekoki mpenza kozala ete bazalaki kokanisa ete ezali kaka na lisekwa ya elimo mpe esilaki kosalema mpo na baklisto. Mbala mosusu, ntango bazali koteya makanisi wana, bazalaki kotánga maloba ya Paulo ete baklisto bakufaki na masumu na bango nzokande bakómaki na bomoi na lisalisi ya elimo ya Nzambe, kasi bazalaki kotalela te likanisi ya lisolo mobimba epai Paulo alobaki maloba yango. (Baefese 2:1-6) Paulo alobaki ete mosala ya bapɛngwi ya ndenge wana esengelaki kokola. Akomaki boye: “Ekozala na eleko moko boye oyo bakokoka te mateya oyo epesaka litomba, . . . mpe bakolongola matoi na bango na solo, nzokande bakobaluka epai ya masapo ya lokuta.” (2 Timote 4:3, 4) Likebisi wana emonisaki ete Timote asengelaki kosalela nokinoki toli ya ntoma Paulo.
Ntina ya Mokanda ya Mibale epai ya Timote na moi ya lelo
Makambo oyo touti koloba ezali komonisa ete Paulo akomaki Mokanda ya Mibale epai ya Timote mpo na bantina lokola oyo: (1) Ayebaki ete akómaki na nsuka ya bomoi na ye, mpe alingaki kosalisa Timote ayeba ndenge oyo akomitambwisa na ntango oyo ye akozala lisusu na bomoi te. (2) Alingaki koteya Timote makambo oyo asengeli na yango mpo na kobatela masangá oyo azalaki kokɛngɛla mpo ete lipɛngwi mpe makambo mosusu ya mabe ebebisa masangá yango te. (3) Alingaki kolendisa Timote azala na mingi ya kosala na mosala ya Yehova mpe alukaka ntango nyonso boyebi ya solosolo ya Makomami mapemami mpo na kokweisa mateya ya lokuta.
Lokola toyebi makambo etali Mokanda ya Mibale epai ya Timote, yango ekómi lisusu na ntina mingi na miso na biso. Lelo oyo mpe bapɛngwi lokola Himene na Filete bazali; bato yango bazali koteya makanisi na bango moko mpe balingi kobebisa kondima na biso. Longola yango, tokómi na “bantango ya ndenge mosusu mpe ya mpasi mpenza” oyo Paulo asakolaki. Mingi basili kokutana na likambo oyo Paulo ayebisaki ete: “Baoyo nyonso bazali na mposa ya kozala na bomoi na ezaleli ya kokangama na Nzambe na kati ya boyokani elongo na Klisto Yesu bango mpe bakonyokwama.” (2 Timote 3:1, 12) Tokosala ndenge nini mpo tózala ntango nyonso makasi mpe tókwea te? Lokola Timote, tosengeli kolanda toli ya bato oyo baumeli mingi na mosala ya Yehova. Soki mpe tozali koyekola biso moko, tozali kobondela mpe koyangana na makita, tokoki ‘kokoba kozwa nguya’ na nzela ya boboto monene ya Yehova. Longola yango, soki totii elikya na nguya ya boyebi ya solosolo, tokolanda elendiseli ya Paulo ete: “Kobá kosimba ndakisa ya maloba oyo epesaka litomba.”—2 Timote 1:13.
“Ndakisa ya maloba oyo epesaka litomba”
“Maloba oyo epesaka litomba” oyo Paulo alobelaki ezali nini? Asalelaki maloba wana mpo na kolobela solo ya boklisto. Na mokanda ya liboso oyo atindelaki Timote, Paulo alimbolaki ete “maloba oyo epesaka litomba” ezali mpenzampenza “oyo ya Nkolo na biso Yesu Klisto.” (1 Timote 6:3) Moto oyo azali kolanda ndakisa ya maloba oyo epesaka litomba akómaka na makanisi malamu, na bolingo, mpe na boboto epai ya basusu. Lokola mosala mpe mateya ya Yesu ezali na boyokani na mateya ya Biblia mobimba, tokoki mpe koloba ete mateya nyonso ya Biblia ezali “maloba oyo epesaka litomba.”
Mpo na Timote, mpe mpo na bankulutu nyonso, ndakisa ya maloba oyo epesaka litomba ezalaki ‘eloko kitoko ebombisami’ oyo basengeli kobatela. (2 Timote 1:13, 14) Timote asengelaki ‘kosakola liloba, kosala yango na molende na eleko ya malamu, na eleko ya mpasi, kopamela, kosembola, kolendisa, na motema molai mpenza mpe na mayele ya koteya.’ (2 Timote 4:2) Ntango toyebi ete mateya ya bapɛngwi ezalaki kopalangana na mikolo ya Timote, tozali kokanga malamu ntina oyo Paulo abɛtaki nsɛtɛ na likambo ya kosala nokinoki mpo na koteya maloba oyo epesaka litomba. Lisusu, tozali kokanga ntina ete mpo na kobatela etonga, esengelaki Timote ‘apamela, asembola, alendisa’ na motema molai, mpe azala na mayele ya koteya.
Timote asengelaki koteya banani liloba? Likanisi ya lisolo mobimba ezali komonisa ete lokola azalaki nkulutu, Timote asengelaki koteya liloba na kati ya lisangá ya boklisto. Lokola banguna bazalaki kotya baklisto mpanzi likoló, Timote asengelaki kotikala makasi na elimo mpe kozala na molende ya kosakola liloba ya Nzambe, kasi asengelaki te koteya mateya ya filozofi ya bato to makanisi na ye moko, to mpe makanisi oyo ezangi ntina. Nzokande, yango ekokaki kosala ete bato oyo bazalaki na makanisi mabe bátɛmɛla ye. (2 Timote 1:6-8; 2:1-3, 23-26; 3:14, 15) Kasi, na kolanda toli ya Paulo, Timote alingaki ntango nyonso kokanga nzela ete lipɛngwi ekɔta te, se ndenge oyo ye moko Paulo akangaki yango nzela.—Misala 20:25-32.
Maloba ya Paulo oyo etali kosakola liloba etaleli mpe kosakola epai na bato oyo bazali na lisangá te? Ɛɛ, likanisi ya lisolo mobimba ezali komonisa ete ezali bongo. Paulo alobaki lisusu boye: “Kasi yo, batelá makanisi na yo na makambo nyonso, ndimá komona mpasi, salá mosala ya mopalanganisi ya nsango malamu, kokisá mosala na yo ya ministre malamumalamu.” (2 Timote 4:5) Baklisto batyaka na esika ya liboso mosala ya kopalanganisa nsango malamu ya lobiko epai ya bato oyo bazali bandimi te. (Matai 24:14; 28:19, 20) Se ndenge oyo liloba ya Nzambe ezali kosakolama na kati ya lisangá ata na “eleko ya mpasi,” tozali mpe kokoba kosakola liloba epai ya bato oyo bazali na lisangá te ata na ntango ya mpasi.—1 Batesaloniki 1:6.
Mpo na kosakola mpe koteya, tosalelaka libosoliboso Liloba ya Nzambe. Totyelaka Biblia motema mobimba. Paulo alobaki na Timote ete: “Makomami nyonso epemami na Nzambe mpe ezali na litomba mpo na koteya, kopamela, kosembola makambo, mpo na kopesa disipilini na kati ya boyengebene.” (2 Timote 3:16) Mbala mingi, tosalelaka maloba yango mpo na komonisa ete Biblia ezali mpenza Liloba ya Nzambe. Kasi, Paulo akomaki yango na mokano nini?
Paulo azalaki koloba na nkulutu, oyo azalaki na mokumba ya ‘kopamela, kosembola makambo, kopesa disipilini na kati ya boyengebene’ na kati ya lisangá. Na yango, azalaki koyebisa Timote ete atyaka motema na bwanya ya Liloba ya Nzambe oyo bateyaki ye banda bomwana. Lokola Timote, bankulutu basengeli ntango mosusu kopamela basali ya mabe. Ntango bazali kopamela, basengeli ntango nyonso kotalelaka Biblia. Lisusu, lokola Makomami epemami na Nzambe, mpamela nyonso oyo esimbami na makanisi ya Makomami euti nde na Nzambe. Moto oyo aboyi mpamela oyo euti na Biblia, aboyi makanisi ya moto te, kasi aboyi nde toli epemami oyo euti na Yehova ye moko.
Mokanda ya mibale epai ya Timote ezali mpenza na bwanya ya Nzambe! Ekómi lisusu na ntina mingi na miso na biso nsima ya kotalela toli na yango na likanisi ya mokanda mobimba! Na lisolo oyo, totaleli kaka mwa moke makambo malamu mingi oyo epemami na Nzambe oyo ezali na mokanda yango, kasi ekoki mpo na komonisa ete kotalela likanisi ya lisolo mobimba epai oyo likambo moko oyo totángi na Biblia euti, esalisaka mpenza. Yango ekosalisa biso tósala nyonso mpo ‘tósembola mpenza liloba ya solo malamumalamu.’
[Maloba na nse ya lokasa]
a Mpo na koyeba makambo mosusu, talá Étude perspicace des Écritures, ebimisami na Batatoli ya Yehova, volimi 2, nkasa 1077-1080.
[Elilingi na lokasa 27]
Paulo alingaki koteya Timote makambo oyo asengeli na yango mpo na kobatela masangá
[Elilingi na lokasa 30]
Paulo ayebisaki Timote ete atya motema na bwanya ya Liloba epemami