Mokanda ya Biblia nimero 63—2 Yoane
Mokomi: Ntoma Yoane
Esika ya bokomi: Efese, to pene na yango
Nsuka ya bokomi: soko 98 T.B.
1. Mokanda ya mibale ya Yoane motindamaki mbala mosusu epai na nani?
MOKANDA ya mibale ya Yoane mozali mokuse mpenza—yango ekokaki ata kokomama na lokasa bobele moko ya papirise—kasi mokanda yango mozali na ntina mingi. Yango etindami epai na “mwasi Moponami mpe bana na ye.” Lokola “Kyria” (liloba ya Greke oyo lilimboli “mwasi”) ezalaki kosalelama lokola nkombo ya moto na eleko wana, bamoko na banganga-mayele ya Biblia bazali kokanisa ete mokanda yango motindamaki epai na mwasi moko oyo azalaki na nkombo yango. Epai mosusu, bamoko bazali na likanisi ete mokanda yango ya Yoane motindamaki epai na lisangá moko ya boklisto, kobéngáká lisangá yango ete “mwasi Moponami.” Mbala mosusu, babéngaki yango bongo mpo na kotya banyokoli kati na mobulungano. Soki bongo, mbote oyo etindami na “bana na Ndeko mwasi na yo,” oyo elobelami na vɛrsɛ́ ya nsuka, ezali mbote oyo eutaki na basangani ya lisangá mosusu. Na yango, na kokesena na mokanda ya liboso, mokanda ya mibale ya Yoane motindamaki te epai na masangá nyonso ya boklisto, mpamba te yango emonani polele ete etindamaki epai na moto bobele moko to mpe epai na lisangá moko ya sikisiki.—2 Yo V. 1.
2. (a) Bilembeteli nini bimonisi ete ntoma Yoane azalaki mokomi ya mokanda ya mibale ya Yoane? (b) Nini eyebisi ete mokanda yango mokomamaki na Efese to pene na yango, soko na mobu 98 T.B., mpe nini ezali kondimisa bosolo na yango?
2 Ntina ya kotya ntembe na likambo oyo ete Yoane azali mokomi ya mokanda yango ezali te. Mokomi amibéngi ye moko ete azali “mobangé.” Yango ekokani mpenza na Yoane, bobele mpo na bambula mingi na ye ya bomoi te, kasi lisusu mpo ete azalaki moko na “makonzí” ya lisangá (Gal. 2:9) mpe ntoma ya nsuka oyo azalaki naino na bomoi; azalaki mpenza “mobangé” kati na lisangá ya boklisto. Ayebanaki mingi; na yango ntina ezalaki te ya kopesa mayebisi mosusu ete batángi ya mikanda na ye báyeba ye. Likambo oyo ete ye moto akomaki mokanda yango emonisami lisusu na bokokani oyo ezali kati na ekomeli ya mokanda yango mpe ekomeli ya mokanda ya liboso ya Yoane, bakisá mpe ekomeli ya Evanzile ya Yoane. Lolenge moko na mokanda ya liboso, emonani ete mokanda ya mibale mokomamaki na Efese to pene na yango, soko na mobu 98 T.B. Na oyo etali mokanda ya mibale mpe mokanda ya misato ya Yoane, búku Cyclopedia ya McClintock mpe Strong elobi ete: “Na kotalela bokokani na yango kati na makambo mingi, tokoki koloba ete mikanda yango nyonso mibale mikomamaki mwa moke nsima na mokanda ya liboso, na Efese. Kati na likambo mokomoko oyo litali etamboli, mikanda nyonso mibale wana mizali kosalela mitindá oyo milobelamaki na mobimba mpenza kati na mokanda ya liboso.”a Na oyo etali kondimama ya bosolo na yango, mokanda ya mibale ya Yoane motángami na Irénée oyo azalaki na bomoi na ekeke ya mibale, mpe mondimamaki na Clément moto na Alesandalia, oyo azalaki mpe na bomoi na eleko wana.b Mpe lisusu, mikanda ya Yoane mizwami kati na Eteni ya Mokanda ya Muratori (Fragment muratorien).
3. Mpo na nini Yoane akomaki mokanda yango?
3 Lolenge moko na mokanda ya liboso ya Yoane, ntina oyo mokanda ya mibale mokomamaki ezalaki mpo na kotɛmɛla etumba oyo balakisi ya lokuta bazalaki kobundisa kondima ya boklisto. Yoane alingi kokebisa batángi ya mokanda na ye liboso na bato motindo yango, na boye ete báyeba bango mpe bátangwa mosika na bango; bobele na ntango yango, bálanda kotambola kati na solo mpe kati na bolingo bamoko epai na basusu.
MAKAMBO MAZALI KATI NA YOANE YA MIBALE
4. Mpo na nini Yoane alendisi makasi likambo ya kolingana bamoko na bamosusu, mpe lolenge nini tosengeli kotalela baoyo bakei mosika koleka mateya ya Klisto?
4 Bólinganaka bamoko na basusu; bóboya bapɛngwi (V. 1-13). Nsima ya komonisa bolingo na ye kati na solo mpo na ‘mwasi moponami mpe bana na ye,’ Yoane asepeli na komona ete bamoko kati na bango bazali kotambola kati na solo, lokola yango elakamaki na Tata. Asɛngi ete bámonisa bolingo bamoko epai na bamosusu na kolandáká kotambola engebene malako ya Nzambe. Mpamba te bakosi mpe batɛmɛli na Klisto basili kobima kati na mokili, oyo bazali koyambola Yesu Klisto te ete ayaki kati na mosuni. Ye oyo akokende mosika koleka mateya ya Klisto azali na Nzambe kati na ye te, kasi ye oyo akoumela kati na mateya yango “azali na Tata mpe na Mwana.” Moto nani azali komema mateya oyo te asengeli koyambama na bandako na bango te, mpe basengeli kopesa ye ata mbote te. Yoane azali na makambo mingi ya kokomela bango, nzokande azali kolikya ete akoya kosolola elongo na bango na monɔkɔ mpenza, mpo ete esengo na bango ekoka kotonda “maa.”—V. 9, 12.
LITOMBA NA YANGO
5. (a) Likambo nini libimaki na mikolo ya Yoane oyo lizali mpe kosalema na mikolo na biso? (b) Na ndakisa ya Yoane, lolenge nini biso lelo tokoki kopesa motuya na bomoko ya lisangá?
5 Motindo moko na mikolo na biso, emonani ete na mikolo ya Yoane ezalaki na bato mosusu oyo basepelaki te kokangama na mateya ya pɛto ya Klisto oyo mazangi mindɔndɔ. Bazalaki na mposa ya eloko mosusu; eloko oyo ekokaki kotombola bango mpe oyo ekokaki kopesa bango lokumu mpe kotya bango na etɛlɛmɛlo moko na bato ya filozofi ya mokili, mpe bazalaki na mposa ete lisangá libebisama na mateya na bango mpe likabwana na ntina ete bamposa na bango ya moimi ekokisama. Yoane apesaki motuya mingi na boyokani ya lisangá oyo etongami na bolingo mpe na mateya ya sembo kati na bomoko elongo na Tata mpe Mwana. Biso mpe tosengeli kotalela na motuya bomoko oyo ezali komonana na lisangá lelo oyo, koboyáká kosala boninga to kopesa mbote na baoyo bazali koteya lipɛngwi na mateya makeseni na oyo tosili kozwa kati na Makomami mapemami. Na kokóbáká kotambola engebene mibeko ya Nzambe, mpe na kotondáká na esengo maa kati na boninga ya solo ya boklisto, tokoki kondimisama ete “ngɔlu mpe mawa mpe kimya ikofandaka na biso uta na Nzambe Tata mpe uta na Yesu Klisto, Mwana na Tata kati na solo mpe bolingo.” (V. 3) Ya solo, mokanda ya mibale ya Yoane mozali komonisa polele mapamboli oyo mazali kouta na bomoko ya boklisto motindo wana.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Ebimeli ya 1981, Vol. IV, lokasa 955.
b New Bible Dictionary, ebimeli ya mibale, 1986, ebimisami na J. D. Douglas, lokasa 605.