Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • sp nk. 23-27
  • Salela Jéhovah, kasi Satana te

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Salela Jéhovah, kasi Satana te
  • Bilimu ya bakufi bikoki kosalisa yo to kosala yo mabe? Bizali solo?
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Jéhovah azali malamu
  • Bwaka misala ya mbindo
  • Salela losambo na solo
  • Yanganaka elongo na ba Témoins de Jéhovah
  • Baanzelu bazali banani?
    Makambo oyo Biblia eteyaka
  • Boyá mangomba ya lokuta; sambelá na lingomba ya solo
    Nzela ya bomoi ya seko—Osili komona yango?
  • Baanzelu bazali banani mpe basalaka nini?
    Sepelá na bomoi libela na libela!—Boyekoli ya Biblia
  • Yesu azali na nguya koleka bademo
    Yekolá epai ya Moteyi Monene
Makambo mosusu
Bilimu ya bakufi bikoki kosalisa yo to kosala yo mabe? Bizali solo?
sp nk. 23-27

Salela Jéhovah, kasi Satana te

Biso nyonso tozali na boponi ya kosala. To kosalela Jéhovah, to kosalela Satana mpe bilimu mabe. Tokoki kosala nyonso mibale mbala moko te. Kasi ezali mayele na kosalela Jéhovah!

Jéhovah azali malamu

Lokola toutaki komona yango, badémo bazali kosepela na kosala mabe mpe na kokosa bato. Jéhovah azali bongo te. Alingi bato lokola tata alingaka bana na ye. Azali ye oyo akopesaka “makabo nyonso malamu mpe makabo nyonso mabongi.” (Yakobo 1:17) Apimelaka eloko moko te ya malamu epai na bato, ata soki yango esengi ye makambo mingi.​—Baefese 2:4-7.

Yesu amonisaki ete alingaka bato na ndenge afungolaki miso na bakufeli-miso, alobisaki ba baba, mpe asekwisaki bakufi

Yesu, Mwana na Nzambe, amonisaki bolingo epai na bato na kobikisaka bango na maladi na bango

Kanisa na makambo oyo Yesu, Mwana na Nzambe asalaki awa na mabelé. Alobisaki ba baba mpe afungolaki miso na bakufeli-miso. Abikisaki bato na maba mpe bibosono. Abimisaki bilimu mabe mpe abikisaki bokono ya lolenge nyonso. Na lisalisi ya nguya na Nzambe, asekwisaki ata bakufi.​—Matai 9:32-35; 15:30, 31; Luka 7:11-15.

Na esika ya koloba lokuta mpo na kozimbisa biso, Nzambe alobaka ntango nyonso solo. Akoki kokosa moto soko mokolo moko te.​—Mituya 23:19.

Bwaka misala ya mbindo

Lokola monyama motongami na nyama moke araignée mozali kokanga nzinzi na boloko, motindo moko biyambayamba mpe lokuta ezali kokanga bifuku na bato kati na boloko. Bazali kobanga bakufi. Bazali kobanga bilimu mabe. Bazali komitungisa mpo na kolakelama mabe, makaneli, koloka mpe nkisi. Bazali baombo ya bindimeli mpe ya mimeseno na bonkoko oyo etongami nyonso likoló na lokuta ya Satan le Diable. Basaleli na Nzambe bazwami na motambo moko ya makambo oyo te.

Jéhovah azali na nguya mingi koleka Satana. Soki ozali kosalela Jéhovah, akobatela yo na bilimu mabe. (Yakobo 4:7) Bakokoka koloka yo te. Na ndakisa, na Nigéria, bandoki misato ya makasi bakanaki koboma na ndoki, Témoin de Jéhovah moko oyo aboyaki kolongwa na mboka. Komonaka ete mikano na bango mabe milongi te, moko na bandoki yango abangaki, mpe akendaki kokutana na Témoin mpe abondelaki ye ete alimbisa ye.

Baefese batumbaki mikanda na bango ya maji

Baefese batumbaki mikanda na bango ya maji

Soki bilimu mabe batungisi yo, okoki kobelela nkombo ya Jéhovah mpe ye akobatela yo. (Masese 18:10) Kasi mpo ete ozala na libateli na Nzambe, osengeli kobwaka mpenza makambo nyonso oyo mazali na boyokani na bilimu mabe mpe na losambo ya badémo. Ezali yango nde basambeli na Nzambe basalaki Kalakala na Efese. Bayanganisaki mikanda na bango ya maji mpe batumbaki yango. (Misala 19:19, 20) Lelo, basaleli na Nzambe basengeli kosala motindo moko. Bwaka bikelaleka nyonso, bansinga ya “libateli,” nkisi, mikanda ya maji mpe eloko nyonso oyo ezali na boyokani na bilimu mabe.

Salela losambo na solo

Soki olingi kosepelisa Nzambe, okosuka te bobele ete otika losambo na lokuta mpe otika kosala makambo mabe. Osengeli lisusu kosalela losambo na peto. Biblia emonisi eloko nini osengeli kosala:

Koyangana na makita mpe kotánga Biblia ezali na kati ya losambo na solo

Koyangana na makita ya boklisto.​—Baebele 10:24, 25

Koyekola Biblia.​—Yoane 17:3

Koteya bamosusu, kobondela Jéhovah, mpe kozwa batisimo ezali na kati ya losambo na solo

Koteya bamosusu.​—Matai 24:14

Kobondela Jéhovah.​—Bafilipi 4:6, 7

Kozwa batisimo.​—Misala 2:41

Yanganaka elongo na ba Témoins de Jéhovah

Awa na mabelé Satana mpe bilimu mabe bazali na bato oyo bazali koteya mpe kosala makambo mabe. Kasi Jéhovah mpe azali na basaleli. Ezali bongo ba Témoins de Jéhovah. (Yisaya 43:10) Na mabelé mobimba, bazali koleka milió motoba. Bango nyonso bazali kosala milende mpo na kokokisa misala malamu mpe koteya solo epai na bato. Kati na mikili mingi, okoki komona bango kati na ba Salles du Royaume na bango, epai kuna bakoyamba yo na esengo nyonso.

Mosala na bango ezali ya kosalisa bazalani na bango ete basalela Nzambe. Bakoyekola Biblia elongo na yo, na ndako na yo, bakosalisa yo mpo oyekola kosambela Jéhovah na lolenge malamu. Okofuta eloko moko te. Batemwe bazali na esengo ya koteya solo mpamba te balingi bazalani na bango mpe balingi Jéhovah Nzambe.

Ba Témoins de Jéhovah bazali koyamba bato na Ndako ya Bokonzi mpe koyekola na moto Biblia

Ba Témoins de Jéhovah bakosalisa yo na kosalela Nzambe

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto