Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • ol eteni 8 nk. 25-28
  • Boyá mangomba ya lokuta; sambelá na lingomba ya solo

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Boyá mangomba ya lokuta; sambelá na lingomba ya solo
  • Nzela ya bomoi ya seko—Osili komona yango?
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Longwá na boombo ya lingomba ya lokuta
  • Bwaká biloko oyo basalelaka na losambo ya lokuta
  • Zalá moninga ya bato ya Yehova
  • Ndenge ya malamu ya kosambela Nzambe
    Makambo oyo Biblia eteyaka
  • Salela Jéhovah, kasi Satana te
    Bilimu ya bakufi bikoki kosalisa yo to kosala yo mabe? Bizali solo?
  • Losambo oyo Nzambe andimaka
    Biblia eteyaka mpenza nini?
  • Bimá na lingomba ya lokuta!
    Okoki kozala moninga ya Nzambe!
Makambo mosusu
Nzela ya bomoi ya seko—Osili komona yango?
ol eteni 8 nk. 25-28

ETENI 8

Boyá mangomba ya lokuta; sambelá na lingomba ya solo

1. Na likambo ya losambo, bato basengeli kopona nini lelo oyo?

YESU alobaki boye: “Moto oyo azali na ngámbo na ngai te azali monguna na ngai.” (Matai 12:30) Soki tozali na ngámbo ya Yehova te, tozali na ngámbo ya Satana. Bato mingi bakanisaka ete basalelaka Nzambe na ndenge oyo ye alingi, kasi Biblia elobi ete Satana “azali kobungisa mabele mobimba oyo efandami.” (Emoniseli 12:9) Bamilio ya bato bakanisaka ete basambelaka Nzambe, nzokande bazali nde kosalela Satana Zabolo! Lelo oyo, bato nyonso basengeli kopona na likambo oyo: Kosalela Yehova, “Nzambe ya bosolo,” to kosalela Satana, “tata ya lokuta.”​—Nzembo 31:5; Yoane 8:44.

Longwá na boombo ya lingomba ya lokuta

2. Tángá mokakatano moko oyo Satana asalelaka mpo na kopekisa bato kosambela Yehova.

2 Kopona kosalela Yehova ezali likambo ya mayele mpenza mpe esepelisaka Nzambe. Kasi Satana asepelaka te na moto nyonso oyo asalelaka Nzambe; mpe amemelaka ye mikakatano mingi. Moko ya mikakatano yango ezali ete asalaka ete bato mosusu, ezala ata baninga to bandeko na ye, bábanda kosɛka to kotɛmɛla moto yango. Yesu akebisaki boye: “Ya solo, banguna ya moto bakozala bato ya ndako na ye moko.”​—Matai 10:36.

3. Soki bandeko na yo to baninga na yo bazali koboya ete osambela Nzambe, okosala nini?

3 Soki yango ekómeli yo, okosala nini? Bato mingi bayebaka ete losambo na bango ezali mabe, kasi bazali kokakatana mpo na kotika yango. Bakanisaka ete soki basali bongo, bakomonisa ete balingi libota na bango te. Ezali mpenza likambo ya mayele? Soki oyoki ete bandeko na yo bazali komɛla bangi, okokebisa bango ete bangi yango ekoki kobebisa bango, boye te? Okolanda bango na komɛla bangi?

4. Yosua alobaki nini na Bayisalaele mpo na likambo ya losambo na ntango na ye?

4 Yosua alendisaki Bayisalaele ete bátika misala ya losambo ya lokuta mpe mimeseno na bango ya bonkɔkɔ. Alobaki boye: “Na bongo bóbanga Yehova mpe bósalela ye na motema moko mpe na sembo. Bólongola banzambe oyo batata na bino basalelaki na ngámbo ya Ebale, mpe na Ezipito, mpe bósalela Yehova.” (Yosua 24:14) Yosua azalaki sembo epai ya Nzambe mpe Yehova apambolaki ye. Soki biso mpe tozali sembo epai ya Yehova, akopambola biso.​—2 Samwele 22:26.

Mateya ya mangomba​—Mateya ya solo mpe oyo ya lokuta

  • Motatoli moko ya Yehova azali koyekola Biblia elongo na mwasi moko ná bana na ye

    Bosato (Trinité): Mangomba mingi eteyaka ete Nzambe azali Bosato. Balobaka ete “Tata azali Nzambe, Mwana [Yesu] azali Nzambe mpe Elimo Santu azali Nzambe, nzokande bazali Banzambe misato te kasi Nzambe kaka moko.”

    Biblia etángi ata mbala moko te liloba “Bosato,” eteyi mpe te ete Yehova azali na bapersona misato na kati ya moto moko. Kaka Yehova nde azali Nzambe. Mokanda ya 1 Bakolinti 8:6 elobi boye: “Mpo na biso ezali mpenza na Nzambe kaka moko Tata.” Yehova azali Ye oyo Aleki na Makambo Nyonso. Yesu azali Nzambe te, kasi “Mwana ya Nzambe.” (1 Yoane 4:15) Ndenge moko mpe, elimo santu ezali Nzambe te. Kutu elimo santu ezali mpe moto te, kasi ezali nde nguya ya Nzambe oyo esalaka mosala.​—Misala 1:8; Baefese 5:18.

  • Molimo: Mangomba mingi eteyaka ete molimo ezali eloko moko oyo ezalaka na kati ya moto mpe ekufaka te. Biblia eteyi ete molimo ezali moto ye moko, mpe toyebi ete moto akufaka.​—Genese 2:7; Ezekiele 18:4.

  • Lifelo ya mɔtɔ: Mangomba ya lokuta eteyaka ete milimo ya bato mabe enyokwamaka libela na libela na kati ya lifelo ya mɔtɔ. Biblia elobi ete bato oyo bakufá ‘bayebi ata likambo moko te.’ (Mosakoli 9:5) Biblia eteyaka mpe lisusu ete “Nzambe azali bolingo.” (1 Yoane 4:8) Yehova, Nzambe ya bolingo, akoki konyokola bato na mɔtɔ ata moke te.

Etanda: Biblia eteyi nini mpo na Bosato (Trinité), molimo mpe lifelo ya mɔtɔ?

Bwaká biloko oyo basalelaka na losambo ya lokuta

Mwasi moko azali kotumba biloko na ye ya nkisi

5. Mpo na nini tosengeli kobwaka biloko nyonso ya nkisi?

5 Kolongwa na lingomba ya lokuta esɛngi mpe ete tótumba biloko nyonso ya nkisi oyo tozalaki na yango. Ekoki kozala bikelakela, bikeko, mpɛtɛ to nsinga ya nkisi, mpe biloko mosusu ya ndenge wana. Yango ezali na ntina mingi mpamba te ekomonisa ete totii elikya na biso nyonso epai ya Yehova.

6. Baklisto ya ekeke ya liboso basalaki nini na mikanda na bango ya nkisi?

6 Talá oyo baklisto mosusu ya ekeke ya liboso basalaki ntango baponaki kosambela na lingomba ya solo. Biblia elobi boye: “Motángo monene ya baoyo bazalaki kosala misala ya nkisi basangisaki babuku na bango esika moko mpe batumbaki yango na miso ya bato nyonso.”​—Misala 19:19.

7. Tokoki kosala nini soki bademo bazali kotungisa biso?

7 Ekómaka ete bademo bátungisa bato mosusu oyo bazalaki banganga-nkisi, bandɔki, to mpe bato ya nkisi mpo babandi kosalela Yehova. Soki yango ekómeli yo, bondelá Yehova na mongongo makasi, bengá ye na nkombo na ye mpenza mpe ye akosalisa yo.​—Masese 18:10; Yakobo 4:7.

8. Ndenge nini baklisto batalelaka bikeko, bililingi mpe bafɔtɔ oyo bato basalelaka na losambo ya lokuta?

8 Bato oyo balingi kosalela Yehova basengeli te kobomba to kosalela bikeko, bililingi to bafɔtɔ oyo bato basalelaka na losambo ya lokuta. Baklisto ya solo ‘batambolaka na kondima, kasi na komona te.’ (2 Bakolinti 5:7) Batosaka mibeko ya Nzambe oyo epekisi kosalela bililingi ya lolenge nyonso na losambo.​—Exode 20:4, 5.

Zalá moninga ya bato ya Yehova

Mwasi moko azali kolamba elongo na mwana na ye ya mwasi

9. Toli nini Biblia epesi mpo na kokóma na bwanya?

9 Biblia elobi boye: “Ye oyo akotambola na bato ya [bwanya akokóma moto ya bwanya].” (Masese 13:20) Soki tolingi kozala na bwanya, tosengeli kotambola na Batatoli ya Yehova mpe kozala baninga na bango. Bango nde bato oyo bazali kotambola na nzela oyo ememaka na bomoi.​—Matai 7:14.

10. Ndenge nini Batatoli ya Yehova bakoki kosalisa yo osalela Nzambe?

10 Batatoli bazali mpenza komitungisa mpo na bato. Mosala na bango ezali ya kosalisa bato ya motema sembo bákanga ntina ya mateya ya solo ya Biblia oyo ezali komema na bomoi ya seko. Bakoki kosalisa yo na koyekoláká na yo Biblia ofele. Bakoyanola na mituna oyo ozalaka na yango mpe bakomonisa yo ndenge oyo okoki kosalela boyebi ya Biblia na bomoi na yo.​—Yoane 17:3.

11. Na ndenge nini makita ya boklisto ekosalisa yo?

11 Na makita na bango oyo basalaka mbala mingi na Ndako ya Bokonzi, okoyekola makambo mingi etali nzela ya Yehova. Ekolendisa mposa na yo ya kosambela na lingomba ya solo. Ekobongisa yo mpe mpo oyeba ndenge ya kosalisa bato báyekola mateya ya solo ya Biblia.​—Baebele 10:24, 25.

Bandeko ya lisangá bayangani na Ndako ya Bokonzi

12. Ndenge nini libondeli ekoki kosalisa yo osalela Nzambe?

12 Ntango okoyekola makambo mingi etali mokano ya Yehova, na ntembe te okoyeba mpenza nzela na ye ya bolingo mpe okosepela na yango mingi mpenza. Osengeli mpe kokolisa mposa na yo ya kosala makambo oyo esepelisaka ye mpe koboya makambo oyo esepelisaka ye te. Kobosana te ete okoki kosolola na Yehova na nzela ya libondeli mpo na kosɛnga ye asalisa yo osala oyo ezali sembo mpe oboya mabe.​—1 Bakolinti 6:9, 10; Bafilipi 4:6.

Bato ya libota moko bazali kotánga Biblia elongo

Ndenge nini okoki kosambela Nzambe na ndenge ya solo?

13. Ndenge nini okoki kosepelisa motema ya Yehova?

13 Nsima ya mwa ntango, soki ozali kokola na elimo, na ntembe te okomona ete osengeli komipesa, kozwa batisimo mpe kokóma Motatoli ya Yehova. Soki okɔti na molɔngɔ ya bato ya Yehova, okosepelisa motema ya Yehova. (Masese 27:11) Yo mpe okozala moko kati na bato ya esengo oyo Nzambe alobi boye mpo na bango: “Nakofanda na kati na bango mpe nakotambola na kati na bango, mpe nakozala Nzambe na bango, mpe bakozala bato ya ekólo na ngai.”​—2 Bakolinti 6:16.

Nakataki boyokani na bademo

Josephine Ikezu elongo na bana na ye mosusu

Mokolo moko na butu wana tolalaki na mobali ngai, nayoki mongongo moko ebengi ngai mbala misato. Namoni plafɔ efungwani mpe eloko moko lokola bale ya mɔtɔ ekweli ngai na libumu. Mobali na ngai azalaki komona makambo yango te. Kasi nayokaki mɔtɔ makasi oyo eumelaki basanza mingi.

Nsima ya sanza motoba, mongongo yango ebengaki ngai lisusu. Mbala moko, ndako mobimba ekómi lokola nde ezindi na kati ya mai mozindo. Nyoka moko ya monene ebimi na mai mpe elíngi ngai na lobɔkɔ. Nameki koningisa lobɔkɔ na ndenge nyonso mpo na kolongola yango, kasi nakoki te. Nsɔmɔ esali ngai. Mbala moko, mai mpe nyoka yango elimwe mpe nakwei makasi na mabele. Nayebaki lisusu likambo te na boumeli ya bangonga mingi. Na nsima, mongongo yango eyebisi ngai nakende na ndako moko ya nganga na mboka, esika basalisaka na bonganga-nkisi. Ntango natuni elimo yango nkombo na ye, ayebisi ngai ete nkombo na ye elimboli “moto ya bozwi, kasi asimbaka mwana te.” Alaki ete akopesa ngai bomɛngo mpe nakozwa nguya ya kobikisa bato ya maladi.

Bato mingi oyo bazalaki kobɛla bazalaki kouta mosika to pene mpo na kokutana na ngai. Liboso bákóma na ndako na ngai, talatala na ngai ezalaki komonisa ngai bango. Soki moto ayei epai na ngai, nazalaki kobɛta lobɔkɔ na ngai na lobɔkɔ na ye mpe mbala moko nakoyeba maladi to mokakatano na ye mpe ndenge ya kosilisa yango. Elimo yango ezalaki mpe koyebisa ngai mbongo boni moto asengelaki kofuta.

Lokola nazalaki mpenza kobikisa bato, basopelaki ngai mbongo mpe bapesaki ngai biloko ndenge na ndenge. Nakómaki “moto ya bozwi,” kasi nayaki koyeba ndimbola ya maloba alobaki ete “asimbaka mwana te.” Mbala nyonso oyo nazalaki kobota mwana, yaya na ye asengelaki kokufa mbala moko. Natungisamaki mingi mpenza. Na boumeli ya mbula 12 oyo nasalelaki elimo yango, bana na ngai motoba bakufaki.

Nabandaki kobondela Nzambe asalisa ngai. Nabondelaki mingi mpenza. Mokolo moko, Batatoli ya Yehova babɛtaki na porte na ngai. Atako nazalaki kobengana bango, mokolo wana nakanaki koyoka bango. Na lisolo oyo elandaki, nayaki koyeba ete nazalaki kosalela nde demo moko! Nazwaki mokano ya kotika misala ya bilimo mabe.

Ntango nayebisaki demo yango, akebisaki ngai mpo na mokano na ngai wana. Kasi, ngai nayebisaki ye ete: “Ngai na yo esili.”

Natumbaki biloko nyonso oyo nazalaki kosalela mpo na koyeba makambo oyo ebombami. Nayekolaki Biblia na Batatoli, nakómaki mosaleli ya Yehova mpe nazwaki batisimo na 1973. Sikoyo nazali na bana mitano oyo bazali nzoto kolɔngɔnɔ. Mobali na ngai mpe azwaki batisimo mpe akómaki Motatoli.​—Lisolo ya Josephine Ikezu.

Etanda: Ndenge nini mwasi moko akataki boyokani na ye na bademo?

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto