Biblia—Epemamaki na Nzambe?
1, 2. Mpo na nini bato mingi bazali komemya Biblia, mpe bakomi na yango bazali kondima likambo nini?
MOKANDA Nouvelle Encyclopédie britannique (na Lingelesi) ebengi Biblia ete ezali “mbala mosusu liboke ya mikanda oyo eleki na bopusi kati na mikanda mibimisami na boumeli ya lisoló na bato.” Bato mingi bazali kotalela Biblia ete ezali mokanda oyo moleki mpenza mpo ete yango eumeli mingi—biteni na yango mosusu bikomamaki, esili bongo koleka mibu 3 500. Nzokande, batoli na yango oyo ebongi mpenza mpe ezali ntango nyonso ya sika ezali moko na bantina oyo esali ete Biblia koleka bamiliare misato esili kokabolama, mpe esili kobongolama na mobimba to na ndambo na yango penepene na minoko nkóto mibale; mpo na yango Biblia ezali mokanda moleki mikanda nyonso na makambo nyonso mpe na bileko nyonso.
2 Longola makambo nyonso oyo esali ete bato bamemya Biblia, ezali na likambo mosusu oyo esali ete ezala na bopusi mingi mpe kosepelisa na boumeli ya bikeke: ezali maloba mapemami na Nzambe Mozwi-na-Nguya-Nyonso. Mose oyo asangisaki Torah (mikanda mitano ya liboso na Biblia) “akomaki” nyonso oyo Nzambe alobaki na ye, kati na yango lisoló ya bozalisi, lisoló ya Mpela na mikolo ya Noa, lisoló ya Abalayama mpe lisoló ya boyokani oyo ye moko Mose azalaki na yango elongo na Nzambe. (Exode 24:3, 4) Mokonzi Davidi alobaki ete: “Elimo na Nkolo elobi na nzela na ngai, liloba na ye lizali na lolemu na ngai.” (2 Samwele 23:2) Bakomi mosusu ya Biblia bamonisaki likanisi motindo moko ete batambwisamaki na Nzambe. Makomi nyonso wana elongo ezali ndimbola oyo Nzambe ye moko apesi na ntina na lisoló ya bato: ndimbola na yango ya solo, ntina na yango mpe nsuka na yango. Bakomi mingi ya Makomami—mikonzi, basáli, banganga mpe bato mosusu—bango nyonso basalelamaki lokola basekrɛtɛre mpo na kokoma makanisi ya Nzambe, Mobandisi ya Biblia mpe Mobateli ya bilaka na yango.
3. Nini emonisi ete kondima Nzambe ezali na boyokani na sianse?
3 Lokola Biblia ezali kondima ete mobandisi na yango ezali Nzambe, mbala mosusu motuna oyo bato mingi bazali komituna liboso etaleli mpenza kozala ya Mobandisi na yango. Bato mingi bazali kondima ata moke te ete Nzambe azali. Basusu, lokola bakanisi ete bato nyonso ya mayele basili kobwaka likanisi oyo ete Nzambe azali mpe ete bandimaka Biblia te, bazali komituna: “Mpo na nini bato na sianse bandimaka Nzambe te?” Likanisi wana lizali solo? Lisoló moko kati na zulunalo New Scientist elobi ete “likanisi oyo eyebani mingi ete bato na sianse bandimaka Nzambe te . . . ezali likanisi oyo elongobani soko moke te.”2 Bobele lisoló wana liyebisi ete bolukiluki bosalemaki na ba inivɛsité, na biteyelo bisalaka bolukiluki mpe na bakompanyi minene ya bolukiluki emonisi ete “bato na sianse mwambe likoló na zomi bazali kolanda bindimeli ya lingomba to bazali kondima makambo oyo mazali ‘ya sianse te.’” Na yango, ezali malamu te na koloba ete kozala na kondima eyokani te na sianse to na bato na sianse. (Talá etánda na lokasa 4 mpe lokasa 5.)
Ezali na bilembeteli bimonisi kopemama na yango?
4. Makambo nini matali sianse mayebisamaki esili bongo koleka bankóto na bambula kati na Biblia?
4 Soki tokómi na bosukisi oyo ete bilembeteli bizali ya polele bimonisi ete Nzambe azali, motuna oyo ekotikala ezali ya koyeba soki ezali solo ete apemisaki bato mpo ete bakoma makanisi na ye mpe mikano na ye kati na Biblia. Tozali na bantina mingi mpo na yango tokoki kondima ete ezalaki bongo, moko na bantina yango ezali bosolo na yango mpo na oyo etali makambo ya sianse. (Talá etánda na lokasa 6.) Na ndakisa, esili koleka mibu 3 000, Yobo alobaki ete Nzambe “atelemisi mabelé likoló na eloko te.” (Yobo 26:7) Esili koleka pene na mibu 2 700, mosakoli Yisaya alobaki ete Nzambe “afandaka likoló na zolongano ya mabelé.” (Yisaya 40:22, NW) Boye, lolenge nini Yobo mpe Yisaya bakokaki koyeba basolo wana ya moboko ya sianse oyo emonisi ete mabelé masimbami na eloko te mpe ete mazali zolongano? Yango ekoki koyebana lelo malamu, kasi maloba wana malobamaki na ntango oyo makambo wana mayebanaki naino te. Emoniseli ya Nzambe ezali ndimbola oyo eleki mpenza bandimbola nyonso, boye te?
5, 6. Kokokisama ya bisakweli nini bimonisi polele ete bakomi ya Biblia bapemamaki na Nzambe?
5 Bisakweli, oyo ezali bongo lisoló likomami liboso ete likambo moko lisalema, ezali mbala mosusu elembo eleki ntina oyo emonisi ete Biblia epemamaki solo na Nzambe. Na ndakisa, mosakoli Yisaya asakolaki bobele te ete Yelusaleme ekobebisama na Babilone mpe ete libota mobimba ya Bayuda likomemama na boombo, kasi asakolaki lisusu ete na nsima, Mokonzi na basodá ya Perse, Siruse, akolónga Babilone mpe akosikola Bayuda longwa na boombo. (Yisaya 13:17-19; 44:27 kino 45:1) Longola kopemama na Nzambe, okanisi ete na mwango nini mosusu, moto moko akokaki kosakola mibu 200 na liboso, kobotama ya moto, nkombo na ye mpe na sikisiki makambo oyo ye akosala? (Talá etánda, lokasa 7.)
6 Bisakweli mosusu ya kokamwisa bikomamaki na Danyele, mosakoli oyo azalaki na bomoi na ekeke ya motoba liboso ya ntango na biso. Asakolaki bobele te ete Babilone ekokwea na maboko ya Bamedesi mpe Bapelese, kasi asakolaki lisusu makambo mazalaki naino mosika na mikolo na ye, na mikolo mizalaki koya mosika mpenza. Na ndakisa, esakweli ya Danyele esakolaki kobima ya Grèce lokola boyangeli ya mokili mobimba na litambwisi ya Alesandala Monene (336-323 L.T.B.), kokabwana ya bokonzi ya Alesandala kati na bakonzi minei ya basodá na ye nsima na liwa na ye ya mbalakaka, mpe kobima ya Bokonzi ya Rome elongo na mampinga makasi na yango (na ekeke ya yambo liboso ya ntango na biso). (Danyele 7:6; 8:21, 22) Makambo nyonso wana mazali sikawa makambo makoki kotyamela ntembe te kati na lisoló ya bato.
7, 8. (a) Bifundeli nini bato mosusu bazali kosala na ntina na bisakweli ya Biblia? (b) Nini emonisi ete efundeli oyo elobi ete bokosi ezali kati na Biblia ezali na moboko te?
7 Lokola bisakweli ya Biblia bimonisami solo mpe polele, batɔngi bamonisaki yango lokola makambo na bokosi, ete yango ezali bobele lisoló likomami nsima na kosalema ya likambo moko mpe emonisami lokola esakweli. Kasi lolenge nini na bososoli nyonso, moto akoki koloba ete banganga Bayuda bakokaki komeka kosala bisakweli? Mpe mpo na nini basalaki bisakweli oyo bizalaki na makambo ya mpasi mingi mpo na bango moko? (Yisaya 56:10, 11; Yilimia 8:10; Sofoni 3: 4) Lisusu, lolenge nini libota mobimba oyo liyebaki kotanga mpe kokoma, liteyami mpe libokwami na Biblia lokola mokanda na yango mosantu, likokaki komitika kotambwisama na makambo oyo mazalaki lokuta?—Deteronome 6:4-9.
8 Lolenge nini yango ekokaki kozala makambo na bokosi na kolobela kolimwa ya mabota mobimba lokola Edome mpe Babilone, wana makambo yango mayaki kokokisama bikeke mingi nsima na kosila ya kokomama ya Makomami ya Liebele? (Yisaya 13:20-22; Yilimia 49:17, 18) Ata soki moto andimi ete bisakweli wana bikomamaki te na eleko ya basakoli bango moko, ata bongo bisilaki kokomama liboso na ekeke ya misato liboso ya ntango na biso, mpo ete na ntango wana bisilaki kobongolama na Greke kati na la Septante. Lisusu, Barulo ya Mer Morte (oyo ezalaki na mikanda ya bisakweli nyonso ya Biblia) ekomamaki uta ekeke ya mibale mpe ya yambo liboso ya ntango na biso. Lokola yango emonisami, bisakweli mingi bikokisamaki bobele nsima na eleko wana.
Biblia etondi nde na makambo ya bongolabongola?
9-12. (a) Mpo na nini basusu bazali koloba ete Biblia yango moko ezali bongolabongola? (b) Lolenge nini makambo mosusu ya “bongolabongola” makoki kolimbolama?
9 Bato mosusu bazali koloba ete: ‘Biblia etondi na makambo ya bongolabongola mpe na makambo mayokani te.’ Mbala mingi, baoyo bandimaka likanisi wana basala naino bolukiluki bango moko te kasi basila bobele koyoka ndakisa ya likambo moko to mibale oyo bato mosusu bayebisaki bango. Ya solo, makambo oyo mamonani lokola ete mayokani te mazali mpasi te mpo na kolimbola yango soki tomikundoli ete bakomi ya Biblia mbala mingi bazali kolobela masoló na bango kozanga kosalela maloba mingi. Ndakisa moko na yango ezwami na lisoló ya bozalisi. Na kokokanisa Genese 1:1, 3 (NW) na Genese 1:14-16 (NW), mingi bazali komituna lolenge nini Nzambe “asalaki” bingengiseli na mokolo ya minei ya bozalisi nzokande pole—oyo eutaki na bingengiseli yango—ezalaki na mabelé uta mokolo ya liboso ya bozalisi. Na likambo yango, mokomi Moebele alongolaki bandimbola milaimilai na kosaláká liponi malamu ya maloba. Yeba ete vɛrsɛ 14-16 elobi na ntina na “kosala” oyo ekeseni na “kozalisa” kati na Genese 1:1 mpe “bingengiseli” ekeseni na “pole” kati na Genese 1:3. Yango emonisi ete ezalaki na mokolo na minei ya bozalisi nde moi mpe sanza, biloko oyo bizalaki uta kala, bibandaki komonana polele kati na etando ya mabelé.a
10 Mikanda oyo mizali kolobela kolandana ya mabota mizali mpe komonana lokola ete mizali na mwa mobulu. Na ndakisa, Esdrase atangi bankombo 23 kati na mokanda na ye ya molongo ya kolandana ya libota ya bonganga na 1 Ntango 6:3-14, kasi atangi bobele bankombo 16 na eleko yango moko ntango apesaki ye moko kolandana yango na Esdrase 7:1-5. Bongolabongola ezali wana te, kasi ezali bobele molongo ya kolandana ya libota elobelami na mokuse. Lisusu, na boyokani na likanisi ya mokomi kati na kolobelama ya likambo moko, akoki kolobela yango mingi, moke, kokɔtisa to kotika makambo oyo mokomi mosusu ya Biblia alobelaki yango na lolenge mosusu mpo na lisoló ya motindo moko. Yango ezali bongolabongola te, kasi ezali bobele masoló makeseni mamonisi makanisi ya bakomi na yango mpe bato oyo bango bazalaki kokomela.b
11 Mbala mingi, makambo oyo mamonani lokola mazali na bongolabongola makokaki kolimbolama soki totaleli zingazinga na yango. Na ndakisa, “Epai wapi Kaina azwaki mwasi na ye?” ezali motuna oyo bato babimisaka mingi mpo na komonisa ete bongolabongola ezali kati na lisoló ya Biblia. Bazali kozwa moboko ya endimeli na bango likoló ya likanisi oyo ete Adam mpe Eva bazalaki bobele na bana mibale ya mibali, Kaina na Abele. Kasi eyano malamu ekozwama kozanga mpasi soki moto atangi lisoló yango kino na nsuka. Genese 5:4 elobi ete: “Mikolo na Adam nsima na kobotama ya Sete ezalaki mbula nkáma mwambe mpe abotaki bana babali mpe bana basi.” Na yango, Kaina abalaki moko na bandeko na ye ya basi to mbala mosusu mwana moko ya bandeko na ye, likambo oyo lizalaki na boyokani na mokano na Nzambe na ebandeli mpo na kokólisa libota na bato.—Genese 1:28.
12 Ntembe ezali te ete makambo mingi matali lisoló ya bato mayebisami te kati na Lisoló lipemami na Nzambe. Kasi makambo ya ntina mpo na batangi ya eleko wana mpe mpo na biso lelo mazali na kati, kozanga kokómisa yango mindondo mpe mpasi mpo na kotanga.
Ekoki kolimbolama bobele na bato ya mayele?
13-15. (a) Mpo nini basusu bazali kokanisa ete Biblia ezali mpasi mpo na kokanga ntina na yango? (b) Lolenge nini toyebi ete Nzambe alingaki ete bato bayeba Liloba na ye?
13 Osilá naino te komituna ete: “Mpo na nini bongolabongola ezali mingi mpo na lolenge ya kolimbola Biblia?” Nsima na koyoka bongolabongola oyo ezali kati na bato na mayele ya mangomba, bato mosusu ya motema sembo batungisami mpe babulungani kati na makanisi na bango. Bosukisi oyo bato mingi bakómi na yango ezali ete Biblia ezali polele te mpe ezali bongolabongola. Likambo yango epusi bato mingi na kobwaka Biblia mosika, kondimáká ete yango ezali mpasi mpo na kotanga mpe na kokanga ntina na makambo na yango. Bamoko, basepelaka te kosala bolukiluki ya solo ya Makomami ntango bakutani na ebele ya bandimbola ekeseni ya mangomba. Basusu bazali koloba ete: “Bato ya mayele bayekolaki mbula mingi kati na balíkindo (séminaires) ya mangomba. Na moboko nini nakoki kobeta ntembe mpo na oyo bango bazali koteya?” Kasi ezali lolenge wana nde Nzambe azali kotalela makambo?
14 Ntango Nzambe apesaki Mibeko na libota ya Yisraele, amonisaki bango te ete apesaki bango lolenge ya losambo oyo bakokaki koyeba te, oyo ekokaki kozala bobele kati na maboko ya bato bayekólá théologie to “bato ya mayele.” Na nzela na Mose, Nzambe alobaki na Deteronome 30:11, 14 ete: “Mpo ete Lilako oyo elakeli ngai yo lelo eleki na makasi mpo na yo te mpe ezali mosika te. Kasi liloba ezali na yo penepene mingi. Yango ezali na monoko na yo mpe na motema na yo boye okoki kosala yango.” Elobamaki na libota mobimba kasi bobele na bakonzi te ete: “Maloba oyo malakeli ngai yo lelo makozala na motema na yo, mpe okolakisa yango na etingya na bana na yo, mpe okosolola mpo na yango wana ekofanda yo na ndako, mpe wana ekotambola yo na nzela, mpe wana ekolala yo mpe wana ekotelema yo.” (Deteronome 6:6, 7) Mibeko na Nzambe, nyonso ekomamaki, ezalaki polele mpo na libota mobimba mpo ete baboti mpe bana bakoka kolanda yango.c
15 Uta kala na mikolo ya Yisaya, bakonzi na mangomba bamibendelaki etumbu ya Nzambe mpo ete babakisaki mpe balimbolaki bango moko mibeko ya Nzambe. Mosakoli Yisaya akomaki: “Mpo ete bato oyo babelemi na monoko na bango mpe bakumisi ngai na bibebu na bango, naino motema na bango ezali mosika na ngai, mpe botosi na bango kotosa ngai ezali lilako na bato liyekolami na motema.” (Yisaya 29:13) Losambo na bango ekómaki mitinda ya bato, kasi ya Nzambe te. (Deteronome 4:2) Ezalaki “mitinda ya bato” wana, lolenge na bango ya komonela makambo mpe bandimbola na bango, nde ezalaki na bongolabongola, kasi maloba na Nzambe te. Ezali mpe bobele bongo na mikolo na biso.
Torah oyo ezangi kokomama ezali na moboko kati na Biblia?
16, 17. (a) Bato mosusu bazali kokanisa nini na kotalela mibeko oyo ekomamaki te to mibeko ya bonkɔ́kɔ? (b) Biblia emonisi nini na kotalela mibeko mikomamaki te?
16 Basusu bakanisaka ete Mose azwaki “Torah oyo ezangi kokomama” likoló na “Torah oyo ekomami.” Engebene endimeli wana, Nzambe amonaki malamu ete mitinda misusu mikomama te kasi mipesama bobele na monoko longwa na libota moko kino libota mosusu, na motindo yango ekobatelama bobele na mibeko ya bonkɔ́kɔ. (Talá etánda, lokasa 10.) Nzokande, lisoló ya Biblia limonisi polele ete ata mbala moko te Mose azwaki etinda ya kopesa mibeko mizangi kokomama. Exode 24:3, 4 elobi na biso ete: “Mose akomaki mpe atɔndɔlaki bato maloba nyonso na [Yehova] mpe mibeko nyonso, mpe bato nyonso bazongisaki na mongongo moko ete: ‘Tokosala yango nyonso elobi [Yehova].’” Na nsima Mose “akomaki maloba nyonso na [Yehova].” Lisusu na Exode 34:27 elobami na biso ete: “[Yehova] alobaki na Mose mpe ete: ‘Koma maloba oyo. Ngai nasili kosala kondimana na yo mpe na Yisraele na motindo na maloba oyo.’” Mobeko moko te mozangi kokomama mozalaki na esika kati na kondimana oyo Nzambe asalaki elongo na Yisraele. (Talá etánda, lokasa 8.) Esika moko te kati na Biblia emonisi kozala ya mibeko mizangaki kokomama.d Oyo eleki ntina ezali ete mateya na yango mazali na boyokani te na Makomami, mpamba te ezali kopesa likanisi mabe ete Biblia ezali na bongolabongola. (Talá etánda, lokasa 22.) Ezali moto nde akɔtisi mobulu wana, kasi Nzambe te.—Yisaya 29:13. (Talá bitánda, lokasa 20 mpe 21.)
17 Na bokeseni na bongolabongola oyo ezali na bandimbola ya bato, Biblia yango moko ezali polele mpe ebongi na kotyela motema. Nzambe asilá kopesa bilembeteli mingi kati na Liloba na ye oyo emonisi ete kimya ya mokili mobimba oyo elobelami na Yisaya 2:2-4 ezali ndoto mpamba te, kasi ezali likambo oyo ebelemi kosalema solo. Moto mosusu te, bobele Nzambe ye moko, Nzambe na bisakweli, Nzambe na Biblia, akokokisa yango.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Osengeli koyeba ete “mikolo” motoba ya bozalisi mikɔti te kati na makambo mayebisami na Genese 1:1, oyo elobeli kozalisama ya biloko ya likoló. Epai mosusu, liloba ya Liebele libongolami na “mokolo” epesi nzela na kokanisa ete makambo malobelami na Genese 1:3-31 masalemaki na boumeli ya ‘bileko ya ntango’ motoba oyo ekoki kozala bankóto ya bambula mingi.—Talá Genese 2:4.
b Na ndakisa, tala mokanda La Bible: Parole de Dieu ou des hommes? mokapo 7, “La Bible se contredit-elle?”, ebimisami na Watchtower Bible and Tract Society of New York, Inc.
c Makambo maleki minene mpo na kosambisa makatamaki na lisalisi ya myango ya polele oyo ezalaki kati na ebongiseli ya kosambisa. (Deteronome 17:8-11) Kati na makambo mosusu ya ntina oyo ezalaki mpasi mpo na kosilisa, mpo na kozwa eyano ya Nzambe, libota ezalaki te kotambwisama na mibeko mizangi kokomama, kasi na Urumu mpe na Tumimu oyo banganga bazalaki kosalela.—Exode 28:30; Levitike 8:8; Mituya 27:18-21; Deteronome 33:8-10.
d Bato mosusu, wana batangaki Deteronome 17:8-11, bakanisaki ete mokapo wana molobeli mibeko ya bonkɔ́kɔ oyo epemamaki na Nzambe. Nzokande, lokola emonisamaki na maloba na nse ya lokasa na paragrafe 14, mokapo yango molobeli bobele lolenge ya kosambisa. Likebisi wana lipesamaki te mpo na mimeseno mikeseni to mpo na mibeko ya bonkɔ́kɔ oyo epesamaki to epesamaki te na boumeli ya bikeke mingi. Ntembe ezali te ete mibeko misusu ya bonkɔ́kɔ, oyo ezalaki komonisa ndenge nini kotalela na sikisiki makambo mosusu matali Mibeko [ya Nzambe], mibatelamaki. Kasi likambo oyo ete mibeko ya bonkɔ́kɔ ezalaki uta kala emonisi te ete yango epemamaki. Na ndakisa, kanisa mibeko ya bonkɔ́kɔ oyo ekolaki na ntina na lisoló ya nyoka ya ebende.—Mituya 21:8, 9; 2 Mikonzi 18:4.
[Etanda na lokasa 4, 5]
ÉVOLUTION—EZALI LIKAMBO YA SOLO?
LISOLÓ ya kozalisama kati na Genese elobi ete biloko nyonso bizali na bomoi bizalisamaki na ‘lolenge na yango,’ to na mabota ya moboko. (Genese 1:12, 24, 25) Wana ezalaki bango kolakisa liteya na bango, mingi na baoyo bandimaka liteya ya évolution batyolaki lisoló ya Biblia. Kasi ezali nde na elembeteli oyo emonisi ete nyama ya motindo mosusu esilá kobima na kobotanisáká banyama ya mitindo mibale mikeseni to ete nyama ya motindo moko esilá kobongwana nyama ya motindo mosusu?e Kobanda masoló ya kala kino sikawa, mbwa ezalaka bobele mbwa, mpe nyau ezalaka bobele nyau. Ata bampɛse, oyo bakutaki katikati na bitika ya kala ya banyama mikemike, ezali bobele motindo moko na oyo ya lelo.
Bilembeteli nini bato na sianse basili kopesa na bolukiluki na bango na boumeli ya bambula mingi kobanda kobima ya mokanda ya Darwin oyo ebengami Origine des espèces (na Lingelesi)?f Bato na mayele mosusu bakómaki na bosukisi nini?
LITATOLI YA BITIKA: Bitika oyo bizali komonana bibengami na bato mosusu ete ‘bilembeteli ya nsuka’ mpo ete ezali yango moko nde eloko ezali solo mpo na lisoló ya bomoi oyo endimami na sianse. Yango emonisi nini?
John Moore, molakisi oyo ayekolaka makambo matali banzeté, banyama mpe ezingelo apesaki ndimbola na ntina na matomba mazwamaki na boyekoli monene bosalemaki na Société de géologie de Londres mpe Association de paléontologie d’Angleterre: “Bato na sianse soko 120, bango nyonso bato bayekólá mingi, basalaki mikapo 30 kati na buku moko monene ya bankasa koleka 800 mpo na komonisa litatoli ya bitika ya banzeté mpe banyama . . . Motindo moko na moko ya banzeté mpe banyama emonisi ete bokeseni ezali kati na ndenge nyonso ya biloko bisusu na kotalela ebandeli na yango! Bituluku ya banzeté mpe banyama bibimi pwasa kati na matatoli ya bitika. . . . Ezali na elembo ata moko te oyo emonisi ete yango ezali na ebandeli bobele moko, ezali ata moke te na boyokani na nyoka moko oyo bato bakanisaka ete yango nde ebotaki yango.”—Esengeli koteya évolution? (na Lingelesi), 1970, nkasa 9, 14.
MABONGWANI NDE EPESAKI NZELA NA EVOLUTION? Lokola mabongwani mazali nde kobebisa, mokanda The Encyclopedia Americana endimaki ete: “Likambo oyo ete mabongwani mingi mazali nde kobebisa nzoto ya bikelamu emonisi mokakatano mozali na koyokanisa likanisi oyo ete mabongwani mazali liziba ya biloko bisengeli mpo na évolution. Ya solo, banzeté mpe banyama ya lolenge mosusu oyo emonisami kati na mikanda ya zebi ya bikelamu na bomoi (biologie) ezali kolakisa bikelamu oyo bizali lokola bilima, na yango mabongwani mamonani ete mazali kobebisa na esika ete ebongisa.”—1977, volume 10, lokasa 742.
EZALI BONI MPO NA “MOTO-MAKAKO”? Mokanda Science Digest elobaki ete: “Likambo ya kokamwa ezali ete bilembeteli bizali komonana oyo tozali na yango mpo na évolution ya moto bikoki kotyama na sanduku kasi ekozala na bisika oyo ekotikala mpamba kozanga ete etonda! . . . Na ndakisa, emonani ete makako ya lelo mauti epai mosusu te. Ezali na lisoló na yango moko te, mpe ezali na bitika na yango te. Mpe ebandeli ya solo ya moto ya lelo—oyo azali semba, bolumbu, azali na mayele ya kosala, na bɔɔngɔ́ oyo ekóli—soki tozali na bosembo biso moko, ezali yango mpe likambo moko ya kokamwa.”—Mai 1982, lokasa 44.
LITEYA YANGO LIZALI LISUSU NA NGALA TE: Tala makambo malobamaki na Michael Denton, oyo azali biologiste moléculaire, lokola yango emonisami kati na mokanda na ye L’Evolution: Une théorie en crise:
“Ntembe ekoki kozala te ete Darwin azalaki ata na elembeteli moko te ya solo mpo na kondimisa liteya na ye ya évolution. . . . Liteya na ye oyo eyebani mingi, ete biloko nyonso bizali na bomoi awa na mabelé bibandaki mpe bikólaki na nzela ya mabongwani oyo ezalaki kosalema mokemoke, ezali kino lelo oyo—lokola mpe ezalaki na mikolo ya Darwin—bobele makanisi mpamba mazangi makambo ya solo makoki kosimba yango mpe bilembeteli oyo bizali kati na yango bikoki kondimama te ata soki bakɔteli na yango ya solo bameki kondimisa biso yango. . . . Tosengelaki nde komizela komona ete liteya motindo wana oyo ezali na ntina monene, liteya oyo ebongolaki mokili, ezala likambo mosusu na esika ya kozala makanisi mpamba, bobele lisapo mpamba.”—Ebimeli ya Lifalansé na 1988, nkasa 72, 80, 81, 369.
[Maloba na nse ya lokasa]
e Bokeseni esengeli kozala kati na oyo babengi ete “évolution ya moke,” to bokóli ya mokemoke, komiyokanisa mpe mabongwani kati na motindo moko ya bikelamu, mpe “évolution ya monene,” oyo eteyaka ete motindo boye ya bikelamu ebongwanaka na motindo mosusu. Baoyo bateyaka évolution mbala mingi balobelaka nde likanisi oyo ya mibale.
f Mpo na kozwa makanisi mingi na ntina na likambo oyo, talá mokanda La vie: comment est-elle apparue? Evolution ou création? ebimisami na Watchtower Bible and Tract Society of New York, Inc.
[Etanda na lokasa 6]
“NA EBANDELI NZAMBE AZALISAKI” . . .
. . . “LIKOLÓ MPE MABELÉ.” (Genese 1:1, NW)—Lelo oyo bato na sianse mingi bazali kondima ete mɔlɔ́ngɔ́ ezalaki na ebandeli. Moyekoli na minzoto Robert Jastrow akomaki ete: “Sikawa tomoni lolenge bilembeteli ya boyekoli ya minzoto biyokani na likanisi ya Biblia na ntina na ebandeli ya mokili. Bandimbola mikemike ekeseni, kasi makambo ya ntina kati na boyekoli ya minzoto mpe masoló ya Biblia kati na Genese mazali motindo moko: molongo ya makambo oyo mazali komema kino na moto ebandaki na lolenge ya pwasa, na ntango moko ya sikisiki kati na kongenga ya pole mpe ya mɔ́tɔ.”—Nzambe mpe bayekoli na minzoto (na Lingelesi), 1978, lokasa 14.
. . .“BIKELAMU NA BOMOI.” (Genese 1:20, NW)—Physicien H. S. Lipson, koyebáká lokuta ya liteya ya kobima ya ebandeli ya bomoi yango moko, alobaki ete: “Ndimbola moko oyo ebongi kondimama ezali bongo kozalisama. Nayebi ete likambo motindo wana likoki te kondimama epai ya ba physiciens, lokola ezali mpenza mpo na ngai, kasi tosengeli te kobwaka liteya oyo tolingi te soki bilembeteli ya polele bizali kondimisa yango.”—Bulletin des physiciens (na Lingelesi), Volume 31, 1980, lokasa 138.
Ata soko liteya wana ezali ya lokuta, kasi na eleko moko ezalaki na etuluku moko ya bato na sianse oyo bandimaki ete bomoi ebimaki yango moko, boye te? Physicien mpe moyekoli na minzoto, Fred Hoyle, alobi ete: “Ezali na elembeteli moko te ya sikisiki oyo endimisi likanisi oyo ete bomoi ebandaki na soupe organique (lisangani ya biloko oyo, engebene bato na sianse, epesaki bomoi) awa na Mabelé.” Abakisi ete: “Lokola ba biochimistes bazali ntango nyonso komona makambo minene na ntina na bomoi, emonani polele ete likoki lizali soko moke te na koloba ete ebandeli na yango eyaki bobele bongo kozanga ete ekanelama liboso. Bomoi ekokaki te kobima yango moko.” Hoyle ayebisi lisusu ete: “Bato na zebi ya bikelamu na bomoi (biologistes) bazali komipesa na makanisi ya mpamba na mokano ya kowangana likambo oyo ezali polele ete, milongo ya ba acides aminés 200 000, oyo ezali bongo bomoi, ekokaki te kobima na lolenge ya pwasa.” Atuni ete: ‘Lolenge nini ekokaki kosalema ete biloko kati na nzoto bisangana yango moko mpo na kobimisa ba enzymes 2 000 oyo ezali na ntina mingi mpo na bomoi?’ Alobi ete ezali mpenzampenza mpasi mpo ete likambo motindo wana ekoka kosalema. (Fred Hoyle, kati na mokanda L’univers intelligent [na Lingelesi] 1983, nkasa 11, 12, 17, 23) Abakisi ete: “Ekoki kokanisama bongo bobele soki moto azali na makanisi na ye moko na ntina na bindimeli ya bato to na ntina na boyebi na ye ya makambo na sianse, epusi ye na kondima ete bomoi ebimaki yango moko na lolenge ya [kozanga kokanelama] awa na Mabelé, likanisi motindo wana ebongi te na kondima yango.”— L’évolution venue de l’espace (na Lingelesi), Fred Hoyle mpe Chandra Wickramasinghe, 1981, lokasa 24.
[Etanda na lokasa 7]
NZAMBE—‘MOMONISI NA MAKAMBO MABOMBAMI’ NA NZELA NA BISAKWELI
WANA azalaki koloba na mokonzi moko ya kala, Danyele alobaki ete: “Moto na mayele moko to nganga-na-nkisi to nganga-na-soloka to moto-na-nzonga te ayebi kolimbola mpo na mokonzi likambo libombami lituni ye, kasi Nzambe azali na lola, oyo akomonisaka makambo mabombami.” (Danyele 2:27, 28) Ezali na bilembeteli bimonisi ete Nzambe azali mpenza Momonisi na makambo mabombami na nzela na bisakweli? Tala mwa bandakisa:
Kokwea ya Babilone: “[Yehova] alobi boye epai na mopakolami na Ye, epai na Siruse oyo nasimbi na loboko na ye ya mobali mpo na kobuka mabota liboso na ye mpe kofungola nkamba na nketo na mikonzi; mpo na kozipola bizipeli liboso na ye ete bikuke bifungama te.”—Yisaya 45:1, esakolamaki pene na mobu 732 L.T.B. Talá lisusu Yilimia 50:35-38; 51:30-32, esakolamaki liboso ya 625 L.T.B.
Kokokisama na yango—539 L.T.B.: Bakomi na makambo na kala, Hérodote mpe Xénephon bayebisi ete Siruse, moto na Perse apengwisaki mai ya Efelata, oyo ezalaki koleka na katikati ya Babilone, mpe atindaki mampinga na ye na nzela ya mai, kokanga bakɛngɛli na Babilone kozanga ete bayeba mpe kokamata mboka na butu moko. Atako mayele wana, Siruse akokaki kokota na mboka te soki bikuke ya mboka oyo bizalaki kotala bipai ya Efelata mpo na kokota na mboka etikalaki polele te. ‘Bikuke bikangamaki te,’ lokola esakweli esakolaki yango.
Likambo likómelaki Tulo: “Yango wana Nkolo Yehova alobi boye ete, Tala ngai natemeli yo, ɛ Tulo, mpe nakoyeisa mabota mingi epai na yo, lokola mai monene eyeisi mbonge. . . . Mpe nakopalola mabelé na ye, mpe nakozalisa ye libanga mpamba. . . . Mpe bakobwaka mabanga na yo mpe nzeté na yo mpe mabelé na yo kati na mai.”—Ezekiele 26:3, 4, 12, esakolamaki pene na mobu 613 L.T.B.
Kokokisama na yango—332 L.T.B.: Alesandala Monene atóngaki gbagba, to nzela na kati ya mabelé, longwa na mabelé makauki kino na libongo ya esanga ya Tulo (na ntáka ya bametele 800) mpo ete basodá na ye bakoka kokóma kuna mpe kobundisa engumba ya esanga wana. Mokanda The Encyclopedia Americana eyebisi ete: “Bobele na bitika ya mabelé makauki mazalaki na engumba, oyo ye abebisaki, atóngaki nzela monene kati na mabelé na mobu 332 mpo na kokangisa esanga mpe mokili mokauki.” Nsima na kozingela yango na boumeli ya mwa ntango moke, engumba ya esanga wana ebebisamaki, mpe esakweli ya Ezekiele ekokisamaki na mobimba na yango. Ata ‘mabanga mpe mabaya mpe mputulu’ na Tulo ya kala (eteni ya mabelé makauki ya engumba) ‘mabwakamaki na katikati ya mai.’
Kobebisama ya Yelusaleme: “Bongo Yisaya alobaki na Hizikiya ete: ‘Yoka liloba na Yehova na bibele: Tala mikolo mikoya wana ndako na yo mobimba mpe nyonso oyo batata na yo babombi wana kino mokolo oyo ekobotolama kino [Babilone] eloko moko ekotikala te’”—Yisaya 39:5, 6, esakolamaki pene na mobu 732 L.T.B.; talá lisusu Yisaya 24:1-3; 47:6.
Mosakoli Yilimia asakolaki ete: “Nakoyeisa bango [bato na Babilone] kotemela mokili oyo mpe kotemela bafandi kati na yango. . . . Mokili mobimba ekozala esika na mpamba mpe na kokamwa, mpe mabota oyo bakosalela mokonzi na Babilone kino mibu ntuku nsambo.”—Yilimia 25:9, 11, esakolamaki liboso ya mobu 625 L.T.B.
Kokokisama na yango—607 L.T.B. (586 L.T.B. engebene lolenge ya kotanga bileko ya bato na mokili): Babilone ebebisaki Yelusaleme nsima na mbula moko na ndambo na kozingela yango. Engumba mpe tempelo ebebisamaki, mpe Bayuda bango moko bamemamaki na boombo na Babilone. (2 Ntango 36:6, 7, 12, 13, 17-21) Libota mobimba etikalaki na boombo mibu 70, lokola Yilimia asakolaki yango. Kobikisama na bango na lolenge ya kokamwa na 537 L.T.B. na Siruse Monene, oyo akamataki Babilone, ekokisaki esakweli na Yisaya, oyo etangaki ye na nkombo na ye. (Yisaya 44:24-28) Mosakoli Danyele, wana ezalaki ye na boombo na Babilone, ayebaki na sikisiki eleko ya kobikisama ya libota na ye, na koyokanisáká bosukisi na ye likoló na esakweli ya Yilimia.—Danyele 9:1, 2.
[Etanda na lokasa 8]
MIBEKO OYO MIKOMAMAKI TE MIZALAKI EPAI WAPI . . .
. . . na ntango Mose azalaki kozongela mitinda nyonso na Nzambe epai na libota mobimba na Yisraele? Libota lindimaki kosalela oyo ye azalaki kozongela, mpe na bongo, Mose “akomaki mibeko nyonso na Yehova.”—Exode 24:3, 4.
. . . na ntango oyo Yosua ayanganisaki libota na Yisraele nsima na kokɔta na Mokili ya Ndaká mpe kotanga liboso na bango maloba nyonso oyo bandimaki kosalela yango? “Liloba ezalaki te na yango nyonso elakaki Mose, oyo Yosua atangaki te liboso na koyangana nyonso na Yisraele.”—Yosua 8:35.
. . . na ntango oyo bamonaki ‘buku ya Mibeko na Mose’ oyo ebungaki, wana ezalaki bango kobongisa tempelo, na mikolo na Mokonzi Yosiya? Nsima na koyoka botangi ya makambo mazalaki na kati, Yosiya apasolaki bilamba na ye na nkanda, na koyebáká ete na boumeli ya bileko mingi Mibeko mitosamaki lisusu te na boyokani na oyo ekomamaki. Akamataki bibongiseli mpo na kokumisa elambo ya Pasika, oyo ezalaki lisusu te kosalema na lolenge na yango ya kala na boumeli ya eleko nyonso ya bakonzi mpe basambisi oyo bazalaki liboso na bango. ‘Kopesama ya sembo’ ya mibeko oyo ekomamaki te ezalaki wapi na boumeli ya bambula wana mingi? Soki yango ezalaki, mbele makambo na yango mabungaki te. Bobele kobatelama ya sikisiki ya lisoló likomami nde epesaki nzela na libota na kozongela kosala mokano ya Nzambe na lolenge lobongi.—2 Mikonzi 22:8 kino 23:25.
. . . ntango mosakoli Yilimia alobaki ete: “Mpo ete longwa na oyo moke na bango kino oyo monene na bango, nyonso bamipesi na bilulela; longwa na mosakoli kino na nganga, nyonso bazali kokosa”? (Yilimia 6:13) Bipai nyonso kati na lisoló ya Yisraele, wana ezalaki ezalela ya elimo ya batambwisi, mingimingi banganga baoyo bazalaki na mokumba ya koteya Mibeko. (Malaki 2:7, 8) Masoló makomami mazali koloba yango moko, kasi tokoki komizela ete bato bazangi sembo bakoka kobatela na bosembo nyonso mibeko ya bonkɔ́kɔ oyo ekomamaki te?
. . . na boumeli ya koleka bambula nkóto ya kokomama ya Makomami na Liebele? Kobanda na Mose kino na Malaki, ezali na esika moko te oyo elobeli kozala ya mibeko mizangi kokomama. Bobele bambula mingi na nsima, na boumeli ya eleko ya balakisi na mibeko ya Bayuda, na ntango bitumba bikotaki kati na mangomba mpo na kowelana bokonzi likoló na libota ya Bayuda, nde likanisi wana liyaki komonana. Ezali solo ete bambula mingi wana ya kozanga kolobela likambo motindo wana mpe litatoli ya Makomami mapemami ezali komonisa ete mibeko mipemamaki na Nzambe oyo ezangaki kokomama ezalaki soko moke te, boye te?
[Etanda/Elilingi na lokasa 9]
MANISKRI YA LA MER MORTE
Maniskri ya La Mer Morte ekomamaki liboso ya ntango na biso, emonisi bosikisiki oyo ezalaki na lolenge makambo mazali kati na Biblia mapesamaki na boumeli ya bikeke. Yango endimi mpe ete bisakweli bikomamaki liboso ya kokokisama na yango
[Etanda na lokasa 10]
TORAH EZALI NA “MITINDO NTUKU NSAMBO”?
KATI na Yisraele lelo oyo, ezali likambo ya kokamwa te na koyoka ete bato bazali kotanga maloba oyo eyebani malamu ya Bayuda—“Ezali na mitindo ntuku nsambo kati na Torah”—komonisáká bongo ete bazali kondima ete Makomami makoki kolimbolama na mitindo mikeseni, ata na motindo ya bongolabongola. Likanisi oyo endimami, ezala mpo na Mibeko mikomamaki to na oyo babengaka ete mibeko mikomamaki te. Tala oyo ezali kotangama kati na Encyclopédie du judaïsme (na Lingelesi) ete: “Mibeko Mikomamaki te mizali mibeko ya libela te; yango ezali na makambo ndenge na ndenge mpe ata makanisi mazangi koyokana. Na ntina na mibeko yango, bato na mayele balobi ete: ‘Mibeko yango nyonso mizali maloba na Nzambe na bomoi.’” (Lokasa 532) Nzokande, ezali likambo na mayele na kondima ete Nzambe apemisaki makanisi oyo mazangi koyokana mpe oyo ezali komema bokabwani? Lolenge nini makambo wana ya bongolabongola ekómaki kondimama?
Na boumeli ya eleko oyo Makomami na Liebele mapesamaki ete ekomama (pene na mobu 1513 kino pene na mobu 443 L.T.B.), bamonisi baponamaki na Nzambe bazalaki kolimbola makambo oyo ezalaki mpasi na lisungi na Nzambe ye moko na kopesáká bango nguya na ye to na kokokisama ya bisakweli oyo apesaki bango mpo ete basakola yango. (Exode 28:30; Mituya 16:1-50; 27:18-21; Deteronome 18:20-22) Na ntango wana soki moto moko ateyaki bingengiseli mpe bandimbola oyo ezalaki bongolabongola, mbele atalelamaki te lokola moto na mayele mingi kasi lokola mopengwi. Nzambe akebisaki libota mobimba: “Bobomba mpe bolanda bobele mibeko oyo napesi bino; bobakisa to bolongola ata mobeko moko te.”—Deteronome 13:1, Liloba lya Nzambe (Det. 12:32, NW).
Nzokande, na ntango yango mbongwana monene ebimaki na lolenge ya kokanisa ya libota na Yisraele. Bafalisai, baoyo bakómaki bato ya ntina mingi kati na lingomba ya Bayuda na boumeli ya ekeke ya liboso ya ntango na biso, babandaki kosalela liteya oyo ya “Torah oyo ekomamaki te,” liteya oyo bakólisaki bikeke mibale na liboso. Bazalaki koteya ete longola Mibeko mikomamaki oyo mipesamaki na libota na Yisraele na Ngomba Sinai, Nzambe apesaki lisusu epai na bango bobele na ntango yango moko mibeko oyo mikomamaki te. Na boyokani na endimeli wana, mibeko yango oyo mipemamaki kozanga ete mikomama mizalaki kolimbola polele makambo oyo mazalaki na Mibeko mikomamaki, makambo oyo Nzambe amonaki malamu koloba na Mose ete akoma yango te. Mibeko yango mikomamaki te kasi mipesamaki bobele na monoko, longwa na molakisi kino na moyekoli, longwa na libota moko kino na libota mosusu. Na bongo, epesaki na Bafalisai bokonzi ya sipesiale mpamba te bazalaki komilobela bango moko ete bazalaki babateli ya mibeko yango ya bonkɔ́kɔ.g
Nsima na kobebisama ya tempelo ya mibale na mobu 70 T.B., Bafalisai bakómaki na lokumu, mpe lingomba na Bayuda ekómaki lolenge ya losambo loyangelamaki na balakisi na mibeko ya Bayuda, likambo oyo lisalemaki liboso te.h Na ntina na lokumu ya sika oyo lopesamaki na balakisi na mibeko ya Bayuda na esika ete epesama na banganga mpe basakoli, mibeko mikomamaki te ekómaki likambo ya sika ya ntina mingi kati na lingomba ya Bayuda. Mokanda Encyclopédie du judaïsme (na Lingelesi) elobi ete: “Torah oyo ekomamaki te ekómaki na ntina mingi koleka Torah oyo ekomamaki mpamba te bandimbola mpe bososoli ya Torah oyo ekomamaki ezali kotalela mingi Torah oyo ekomamaki te.”—1989, lokasa 710.
Lokola balakisi na mibeko ya Bayuda bakómaki na lokumu mingi mpe lokola mibeko na bonkɔ́kɔ ekómaki mingi, bipekiseli oyo ezalaki mpo na kokoma mibeko yango bilongolamaki. Na nsuka ya ekeke ya mibale mpe na ebandeli ya ekeke ya misato ya ntango na biso, Judah Ha-Nasi (135 kino 219 T.B.) asangisaki na lolenge lobongi mibeko wana ya balakisi na mibeko ya Bayuda na mokanda ebengamaki Mishna. Makambo mabakisamaki na nsima mabengamaki Tosefta. Balakisi na mibeko ya Bayuda bamonaki malamu kopesa bandimbola likoló na makambo mazalaki na Mishna, mpe bandimbola wana ya mibeko ya bonkɔ́kɔ ekómaki makambo ya ntina kati na mokanda moko monene mobengamaki Guemara (ebandaki kosangisama longwa na ekeke ya misato kino na ekeke ya mitano ya ntango na biso). Kosangisama ya mikanda nyonso wana esika moko eyebanaki na nkombo ya Talmud. Bandimbola likoló na makanisi nyonso wana ya balakisi na mibeko ya Bayuda ezali kino na mikolo na biso. Mpo ete ezali mpasi mingi na koyokanisa makanisi wana makeseni, likambo ya kokamwa ezali nde soki bato mingi bazali kosepela kondima ete “Torah ezali na mitindo ntuku nsambo”?
[Maloba na nse ya lokasa]
g Mateya wana, oyo mabandisamaki na Bafalisai, maboyamaki na bato mingi na eleko na bango kati na libota na Bayuda. Basadukai oyo mingi kati na bango bazalaki banganga, ezala mpe lingomba ya ba Esséniens na ekeke ya liboso, baboyaki makanisi wana ya Bafalisai. Lelo oyo, ba Karaïtes (kobanda ekeke ya mwambe ya ntango na biso), ezala mpe baoyo balingaki kokotisa mbongwana na mateya ya Bayuda mpe baoyo balingaki kobatela mateya yango, bazali te kotalela mibeko mizangaki kokomama lokola ete epemamaki na Nzambe. Atako bongo, lingomba ya Bayuda oyo libengami Orthodoxe lizali lelo kotalela makambo wana ya bonkɔ́kɔ lokola epemamaki mpe esengeli kotosama.
h Mokanda Encyclopaedia Judaica elobi ete: “Nkombo rabbin—molakisi na mibeko ya Bayuda—euti na nkombo rav, oyo kati na Liebele ya kala elimboli ‘monene’ mpe yango ezali te kati na Biblia [ya Liebele].”