Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • we nk. 7-13
  • Kozala na mayoki motindo oyo ezali mabe?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Kozala na mayoki motindo oyo ezali mabe?
  • Ntango moto oyo olingaka akufi
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Bandakisa ya bato oyo balelaki ezwami kati na Biblia
  • Kolela to kolela te
  • Lolenge nini bato mosusu basalaka
  • Bopusi oyo nkanda mpe mayoki ya komema ngambo ekoki kozala na yango epai na yo
  • Na ntango okufeli mobalani
  • “Komitika te ete basusu bápusa yo na makasi . . .”
  • Lolenge nini nakoki koyika mpiko na mawa na ngai?
    Ntango moto oyo olingaka akufi
  • Ndenge nini nakoki kolonga mpasi ya kobungisa moto na liwa?
    Mituna oyo bilenge batunaka
  • Lisalisi mpo na baoyo bazali kolela
    Lamuká!—2011
  • Ezali mabe koyoka mawa makasi?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya bato nyonso)—2016
Makambo mosusu
Ntango moto oyo olingaka akufi
we nk. 7-13

Kozala na mayoki motindo oyo ezali mabe?

MOBALI moko oyo akufelaki tata, akomi ete: “Wana nazalaki mwana moke na Angleterre, bateyaki ngai ete námonisaka mayoki na ngai na miso ya bato te. Nazali komikundola tata na ngai, oyo azalaki sodá kala, ntango azalaki koloba na ngai wana ezalaki ye kolia mino, ete: ‘Kolela te!’ na ntango eloko moko esali ngai mpasi. Nakoki koyeba lisusu te soki mama na ngai apesaki biso bana lipwepwe to ayambaki biso (tozalaki bana mitano). Nazalaki na mibu 56 na ntango tata na ngai akufaki. Naokaki mpenza ete nabungisi eloko moko monene. Kasi, liboso mpenza, nakokaki kolela te.”

Na bamboka mosusu, bato bamonisaka mayoki na bango polele. Soki bazali na esengo to na mawa, bato mosusu bakoyeba soki mayoki na bango ezali nini. Nzokande, na mikili misusu, mingimingi na Mpótó mpe na Grande Bretagne, bato, mingi mpenza mibali, bamesanisami na kobomba mayoki na bango, kokanga mayoki na bango, kofanda kimya mpe kokanga motema. Kasi soki moto moko oyo olingaka akufi, ezali mabe komonisa mawa na yo? Biblia elobi nini?

Bandakisa ya bato oyo balelaki ezwami kati na Biblia

Biblia, búku oyo ekomamaki na Baebele na etúká ya ɛsti ya mai monene ya Méditérannée, bazalaki na momeseno ya komonisa mayoki na bango polele. Ezali na bandakisa ya bato mingi oyo bamonisaki mawa na bango polele. Mokonzi Davidi alelaki na liwa ya mwana na ye Amenono oyo babomaki. Ya solo, “alelaki mingi mpenja.” (2 Samwele 13:28-39) Alelaki ata na liwa ya mwana na ye motomboki Abaseloma, oyo alukaki kobotola bokonzi na ye. Lisoló ya Biblia eyebisi biso ete: “Mokonji [Davidi, NW] ayokaki mawa mingi, akɛndaki na eteni ya likoló na ekuke mpe alelaki. Ekɛndaki ye, ajalaki kolela ete: ‘Ɛ Abaseloma, mwana na ngai, mwana na ngai Abaseloma! Sɔkɔ ngai nakufaki na esika na yɔ, Ɛ Abaseloma mwana na ngai, mwana na ngai!’” (2 Samwele 18:33) Davidi alelaki na motindo oyo tata nyonso akoki kosala yango. Mpe mbala mingi, batata bamitombelaka ete malamu bango bákufa na esika ya bana na bango! Emonanaka lokola esengeli kosalema te ete mwana akufa liboso ya moboti na ye.

Yesu asalaki nini na ntango ayokaki nsango ya liwa ya moninga na ye Lazalo? Alelaki wana ezalaki ye kobɛlɛma pene na nkunda. (Yoane 11:30-38) Na nsima, Malia na Magadala alelaki wana ezalaki ye kobelema pene na nkunda ya Yesu. (Yoane 20:11-16) Ya solo, moklisto oyo azali na elikya ya lisekwa oyo euti na Biblia akolela te na lolenge ya kolekisa ndelo, lokola baoyo bazangi boyebi ya solo ya Biblia na ntina na bindimeli oyo etali ezalela ya bakufi. Kasi lokola azali moto mpe azali na mayoki oyo abotami na yango, moklisto ya solo, ata soki azali na elikya ya lisekwa, akooka mawa mpe akolela liwa ya molingami na ye.​—1 Batesaloniki 4:13, 14.

Kolela to kolela te

Lelo oyo tosalaka nini? Ezalaka na yo mpasi to okakatanaka mpo na komonisa mayoki na yo? Bapesi toli balobaka nini? Lolenge ya kotalela likambo yango lelo oyo, eyokani na bwanya ya kala oyo bopemami. Bazali koloba ete tosengeli komonisa mawa na biso kasi kobomba yango te. Yango ezali kokundwela biso bato ya sembo ya ntango ya kala, lokola Yobo, Davidi, mpe Yilimia, baoyo, kati na Biblia, tokoki kokuta maloba na bango ya komonisa mawa. Na ntembe te, bakangaki mayoki na bango te. Na yango, komitangola mosika na bato ezali likambo ya mayele te. (Masese 18:1) Ya solo, kolela mowei esalemaka na mitindo mikeseni na bamboka ndenge na ndenge, etaleli mpe lolenge ya bindimeli ya losambo oyo lopalangani mingi na esika yango.a

Okosala nini soki ooki mposa ya kolela? Kolela ezali likambo ya bomoto. Omikundola mpo na liwa ya Lazalo, wana Yesu “ayokaki mawa na motema . . . atangisaki mpisoli.” (Yoane 11:33, 34) Na bongo, amonisaki ete kolela ezali likambo ya kokamwa te mpo na moto nyonso oyo akufeli molingami na ye.

Likambo oyo likómelaki mwasi moko na nkombo Anne, ye oyo bébé na ye Rachel akufaki na maladi oyo ebomaka bana na pwasa (SIDS, na Lingelesi) endimisi yango. Mobali na ye alobaki ete: “Likambo ya kokamwa ezalaki ete ézala ngai, ézala Anne, moko te alelaki na ntango ya bokundi ebembe. Bato nyonso mosusu bazalaki kolela.” Mpo na yango, Anne ayanolaki ete: “Ee, kasi nalelaki mingi mpo na biso mibale. Nabanzi ete likambo yango ya mawa epesaki ngai mpasi mpenza mwa baposo na nsima, na ntango natikalaki mokolo mosusu ngai moko kati na ndako. Nalelaki na boumeli ya mokolo mobimba. Kasi nabanzi ete kolela wana esungaki ngai. Namiyokaki malamu mpo na yango. Nasengelaki kolela liwa ya bébé na ngai. Nabanzi solo ete tosengeli kotika bato oyo bazali na mawa ete bálela. Atako bato mingi bazalaka bobele na momeseno ya koloba ete, ‘Kolela te,’ yango ekosungaka mpenza te.”

Lolenge nini bato mosusu basalaka

Lolenge nini bato mosusu basalaki na ntango bazwaki mpasi mpo na liwa ya molingami moko? Tókamata ndakisa ya Juanita. Ayebi mpasi ya kokufela mwana ndenge ezalaka. Zemi esilá kosopamela ye mbala mitano. Nsima azwaki zemi mosusu. Na ntango akɔ́taki lopitalo mpo na likámá ya motuka, na ntembe te, azalaki na bobangi. Mposo mibale na nsima, aokaki mpasi ya kobota​—kasi, basanza ekokaki naino te. Mwa moke na nsima, abotaki mwana mwasi, Vanessa​—azalaki bobele na 0,9 Kg. Juanita amikundoli ete: “Naokaki nsai mpenza, mpo ete sikawa nakokaki kobéngama mama!”

Kasi esengo na ye ezalaki ya ntango mokuse. Mikolo minei na nsima, Vanessa akufaki. Juanita azali komikundola ete: “Namiyokaki ete natikali mabɔkɔ mpamba. Bomama na ngai elongolamelaki ngai. Namiyokaki ete nazalaki lisusu mobimba te. Ezalaki mpasi mpo na kozonga na ndako na eteni oyo tolɛngɛlaki mpo na Vanessa mpe kotala bilamba na ye oyo nasombelaki ye. Na boumeli ya mwa basanza oyo elandaki, nazalaki komona lisusu mokolo ya kobotama na ye. Nazalaki kolinga te kozala esika moko na bato.”

Alekisaki ndelo? Ekoki kozala mpasi mpo na basusu ete bámitya na esika na ye, kasi baoyo bazwaki mpasi motindo moko na Juanita bazali koloba ete baokaki mawa mpo na bébé na bango bobele lokola bakokaki kooka yango mpo na moto oyo azalaki na bomoi na boumeli ya mwa ntango. Balobi ete mwana alingamaka na baboti na ye liboso mpenza ete ábotama. Bokangami makasi ezalaka elongo na mama. Soki mwana yango akufi, mama akomiyoka ete ezali moto mobimba nde akufi. Mpe ezali yango nde bato mingi basengeli koyeba.

Bopusi oyo nkanda mpe mayoki ya komema ngambo ekoki kozala na yango epai na yo

Mama mosusu amonisaki mayoki oyo azalaki na yango na ntango bayebisaki ye nsango ya liwa ya mwana na ye ya mobali ya mibu motoba, oyo akufaki na liwa ya pwasa mpo na maladi ya motema oyo abotamaki na yango. “Mayoki ndenge na ndenge makómelaki ngai​—nalɛmbaki makasi na mayoki, nazalaki kondima te, nazalaki komiyoka lokola ete namemi ngambo, mpe naokaki nkanda mpo na mobali na ngai mpe mpo na monganga, mpo ete bango bayebaki te na meko nini maladi na ye ekómaki makasi.”

Nkanda ekoki mpe kozala elembo mosusu oyo emonisaka mawa. Okoki kooka nkanda mpo na minganga to baenfirimié, kokanisáká ete bakokaki kosala likambo mosusu mpo na kosunga mowei. To, ekoki mpe kozala nkanda epai ya baninga mpe bandeko oyo omoni ete balobi to basali likambo ya mabe. Basusu baokaka nkanda mpo na moto oyo awei mpo ete azalaki na bopotu mpo na kɔ́lɔngɔnɔ na ye. Stella azali komikundola ete: “Nazali koyeba lisusu ete nazalaki na nkanda mpo na mobali na ngai mpo nayebaki ete makambo malingaki kozala ndenge mosusu. Azalaki na maladi makasi, kasi aboyaki kolanda malako ya monganga.” Mbala mosusu bakoyokela mowei nkanda mpo na mikumba oyo ye atiki epai na baoyo batikali na bomoi.

Mpo na nkanda, basusu bakoki kozala na liyoki ete bamemi ngambo​—elingi koloba, bakoki komikweisa bango moko mpo ete bazali kooka nkanda. Basusu bakoki komipamela bango moko mpo na liwa ya molingami na bango. Bamilobaka bango moko ete: “Alingaki kokufa te soki namemaki ye nokinoki epai na monganga” to “soki nakambaki ye epai na monganga” to “soki nasungaki ye ete atalela malamu kolɔngɔnɔ́ na ye.”

Mpo na basusu, liyoki ya komema ngambo esuki bobele wana te, mingimingi soki molingami na bango akufaki na liwa ya pwasa. Babandi kokanisa lisusu bantango basilikelaki mowei to bantango oyo baswanisaki ye. To mpe bakoki kokanisa ete basalaki te nyonso oyo ekokaki na bango kosala mpo na mowei.

Mawa ya ntango molai oyo emonanaka epai na bamama mingi ezali kondimisa likambo oyo bato mingi ya mayele balobaka ete, kokufela mwana etikaka mawa oyo eumelaka epai na baboti, mingimingi epai na mama.

Na ntango okufeli mobalani

Kokufela mobalani ezali mpe moko na makambo oyo epesaka mpasi makasi, mingimingi soki bango mibale bazalaki na makambo mingi oyo bazalaki kosala elongo. Yango ekoki kolimbola nsuka ya lolenge ya bomoi oyo balekisaki elongo: kotambola, mosala, kominanola, mpe bokangami ya moko epai na mosusu.

Eunice azali kolimbola likambo oyo lisalemaki na ntango mobali na ye akufaki liwa ya pwasa mpo na maladi ya motema. “Na poso ya liboso, nalembaki mingi na mayoki, lokola nde nazalaki lisusu ata na liyoki moko te. Nakokaki lisusu ata kooka elengi ya bilei te to kooka nsolo te. Nzokande, bɔɔngɔ́ na ngai ekóbaki mosala na yango na lolenge mosusu. Lokola nazalaki elongo na mobali na ngai na ntango bazalaki komeka kolamwisa ye na motema mpe mampulúlú na ye mpe na kopesáká ye bankisi, namonaki bilembo ya mabe te. Atako bongo, nazalaki kobanga mingi mpenza, lokola nde nazalaki komona lolenge motuka ezali kokende kokwea longwa na likoló na ngomba mpe lolenge mosusu ya kosala ezali te.”

Mwasi yango alelaki? “Ee, nalelaki, mingimingi na ntango nazalaki kotánga bakálati ya nkomá na maloba ya mawa oyo bazalaki kotindela ngai. Nazalaki kolela na botángi ya mokomoko na yango. Esalisaki ngai na kolekisa mokolo. Kasi eloko moko te ekokaki kosalisa ngai na ntango bazalaki kotuna ngai mbala na mbala soki nazalaki komiyoka lolenge nini. Na ntembe te, nazalaki moto ya mawa.”

Eloko nini esalisaki Eunice kati na mawa na ye? Alobi ete: “Kozanga komiyeba, kozanga kososola nazwaki ekateli ya kokóba bomoi na ngai. Nzokande, eloko ezali naino kopesa ngai mpasi ezali nde na ntango nazalaki komikundola ete mobali na ngai, oyo alingaki mingi kozala na bomoi azali lisusu te mpo na kosepela na yango.”

“Komitika te ete basusu bápusa yo na makasi . . .”

Bakomi ya búku Leavetaking​—When and How to Say Goodby (Mbote ya nsuka—​Ntango nini mpe ndenge nini kopesa yango): “Komitika te ete basusu bápusa yo na makasi mpo na oyo etali lolenge oyo osengeli kosala to kooka. Komonisa mawa esalemaka lolenge moko te epai ya bato banso. Basusu bakoki kokanisa​—mpe koyebisa yo ete bango bazali komona ete—​ozali kolela mingi to ozali kolela mingi te. Limbisa bango mpe bosana yango. Na komekáká komikotisa na makasi na lolenge ya bomoi oyo basusu basili kosala yango to bato nyonso nde basili kosala yango, ozali kokanga nzela na bokoli ya kolongono na yo ya mayoki.”

Ya solo, moto na moto amonisaka mayoki na bango na mitindo mikeseni. Tozali koluka te koloba ete lolenge moko ezali mpenza malamu koleka lolenge mosusu mpo na bato banso. Nzokande, likámá ebimaka soki bolembu ekɔ́ti mingi, na ntango moto oyo azali na mawa azali lisusu na likoki te ya kotalela likambo na ndenge yango ezali mpenza. Na bongo, lisalisi ekoki kouta na baninga ya motema mawa. Biblia elobi ete: “Moninga akolingaka ntango yɔnsɔ; ndeko abotami mpɔ na ntango na mpasi.” Na yango, kobanga te mpo na koluka lisalisi, na koloba, mpe koleka.​—Masese 17:17.

Kooka mawa ezali mabe te na ntango okufeli moto, mpe ezali mabe te ete mawa na yo emonana polele na miso ya bato. Kasi mituna misusu misengeli kozwa biyano: ‘Lolenge nini nakoki koyika mpiko na mawa na ngai?’ Nini ekoki kosalisa ngai na koyika mpiko na liyoki ya kobungisa moto mpe ya mawa?’ Eteni elandi ekoyanola na mituna oyo mpe na mituna misusu.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Na ndakisa, ba Yoruba, ekólo moko ya Nigeria, bazalaka na endimeli moko ya bonkɔ́kɔ na ntina na kobotama lisusu ya molimo. Na yango, soki mama moko akufeli mwana, mawa ekozala makasi, nde bobele mpo na eleko moko mokuse. Kasi ekotalelama te ete elikya nyonso esuki bobele wana, mpamba te, loyembo moko ya lokótá ya Yoruba elobaka ete: “Ezali mai nde esopani. Kasi elokó ebukani te.” Engebene ba Yoruba, yango elimboli ete mama, oyo azali elokó ekobombaka mai, akoki kobota mwana mosusu​—mbala mosusu na nzela ya kobotama lisusu ya moto oyo akufá. Batatoli ya Yehova balandaka ata momeseno moko te oyo ezwi moboko na yango likoló na biyambayamba oyo euti na makanisi ya lokuta na ntina etali kozanga kokufa ya molimo mpe kobotama lisusu, oyo ezali na moboko te kati na Biblia.​—Mosakoli 9:5, 10; Ezekiele 18:4, 20.

Kanisá likoló na mituna oyo

Lolenge nini motindo ya komonisa mawa ya bato mosusu ekoki kopusama na mimeseno ya mboka epai bango bafandi?

Bandakisa nini tozali na yango kati na Biblia, mpo na bato oyo bamonisaki mawa na bango polele?

Basusu basalaki nini na ntango bakufelaki molingami moko? Lolenge nini yo osalaki kati na ezalela ya makambo motindo oyo?

Eloko nini esalaka ete kokufela mobalani ézala likambo ya lolenge mosusu?

Lolenge nini mawa emonisamaka? Kooka mawa ezali mabe?

Wapi mwa makambo mosusu matali lolenge ya komonisa mawa? (Talá etánda na lokasa 9.)

Makambo nini ya sikisiki epesaka mpasi epai na baboti soki bakufeli mwana na liwa ya mbalakáká? (Talá etánda na lokasa 12.)

Mpasi nini bamama mingi baokaka na ntango zemi esopani to na ntango baboti mwana mpe mwana yango akufi? (Talá etánda na lokasa 10.)

[Etanda na lokasa 9]

Lolenge ya komonisa mawa

Liloba “lolenge” elingi koloba te ete komonisa mawa esengeli kosalema engebene badati to manáka oyo ebongisami malamu. Lolenge ya komonisa mawa ekoki kokesena mpe ekoki koumela engebene moto na moto. Molɔngɔ́ ya masoló oyo mayebisi makambo manso te. Mayoki makoki mpe komonisama na lolenge mosusu. Makambo oyo malandi mazali moko na bilembo ya mawa oyo moto akoki kooka.

Mayoki oyo emonanaka liboso: Kobulungana; koboya kondima; kolɛmba makasi na mayoki; mayoki ya kokumba ngambo; nkanda.

Mawa makasi ekoki mpe komonisama na motindo boye: Kobosana makambo mpe kozanga mpɔngi; kolɛmba makasi na nzoto; kobongwana ya mayoki na pwasa; makanisi ya lokuta; kolela; kobongwanabongwana ya mposa ya kolya, yango ekokɔndisaka to ekoyeisaka monene mingi; bilembo ndenge na ndenge ya komonisa mbongwana na kɔ́lɔngɔnɔ ya nzoto; kozanga esengo; kokita ya makoki ya kosala mosala; makanisi mpamba​—kokanisa, koyoka, komona mowei; soki moto akufeli mwana akookela mobalani na ye nkanda kozanga ntina.

Eleko ya kozongela mayoki malamu: Mawa na kokanisáká makambo ya kala; kokanisa lisusu makambo malamu ya mowei, ata mwa ndambo ya makambo ya kosɛkisa.

[Etanda/Elilingi na lokasa 10]

Kosopana ya zemi mpe mwana-abotami-akufá​—mawa ya bamama

Atako asilaki kobota bana mosusu, Monna azalaki kozela kobotama ya mwana mosusu na motema mɔ́tɔ. Ata liboso ya kobotama na ye, azalaki bébé oyo azalaki “kosakana na ye elongo, kosolola na ye, mpe oyo ye azalaki kolóto.”

Bokóli ya mayoki ya bokangami kati na mama mpe mwana oyo abotami naino te ezalaki mpenza makasi. Akóbi na koloba ete: “Uta na kati ya libumu, Rachel Anne azalaki bébé oyo azalaki kobɛta makolo na ye na babúku oyo nazalaki kotanga wana ezalaki ngai kotya yango likoló ya libumu na ngai mpe na butu azalaki kotika ngai te ete nálala mpɔngi. Nazali kino sikawa komikundola lokola azalaki kotutatuta ngai mokemoke na molɔ́ku na ye na bolingo nyonso. Ntango nyonso oyo azalaki koningana, nazalaki kotonda na maoki ya bolingo motindo oyo. Namesanaki na ye mingi na boye ete na ntango aokaki mpasi mpe azwaki maladi, nayebaki yango.”

Monna akóbi lisoló na ye: “Monganga akokaki kondimela ngai te kino likambo mosusu ya kosala ezalaki te. Ayebisaki ngai nátika komitungisa. Nandimi ete nayebaki liwa na ye. Na mbala moko, abalukaki na makasi nyonso. Na mokolo oyo elandaki, ayaki kokufa.”

Monna azali bobele ye moko te oyo akutanaki na likambo motindo oyo. Engebene bakomi Friedman mpe Grandstein, kati na búku na bango Surviving Pregnancy Loss (Koyika mpiko ntango zemi esopani), na mbula moko, bobele kati na Etats-Unis, pene na milió moko ya basi bazali kokutana na likambo litali kosopana ya zemi. Ya solo, kati na mokili mobimba, motuya ezali monene koleka.

Mingimingi, ebele ya bato bayebaka te ete kosopana ya zemi to kobota mwana-abotami-akufá ezalaka likambo ya mpasi mpenza mpo na mwasi mpe likambo oyo akobosana yango te​—mbala mosusu na bomoi na ye mobimba. Na ndakisa, Veronica, ye oyo apusani mwa mingi na bambula ya kobotama, amikundoli kosopana ya bazemi na ye mpe mingimingi azali kokanisa lisusu mwana-abotami-akufá oyo azalaki na bomoi na boumeli ya sanza libwa kati na libumu mpe abotamaki na 6 Kg. Akumbaki ye wana asilaki kokufa kati na libumu na ye na boumeli ya poso mibale. Alobaki ete: “Kobota mwana-abotami-akufá ezali likambo ya mpasi mingi mpo na mama.”

Mingimingi, mayoki ya kobulunganisama oyo bamama wana bazalaka na yango endimamaka te na bato mosusu, ata epai ya basi mosusu. Mwasi moko oyo akufelaki mwana na kosopana ya zemi, akomaki ete: “Liteya oyo ngai nazwaki na nzela ya likambo oyo ya mpasi ezalaki ete, liboso likambo yango ekómela ngai, nazalaki mpenza na likanisi moko te mpo na koyeba nini oyo baninga na ngai bazalaki kooka. Nazalaki koyeba te bozindo ya mayoki na bango mpe nazalaki kopesa yango motuya te, nakanisi ete bato mosusu mpe bazali na ezalela motindo moko mpo na ngai.”

Mokakatano mosusu ya mama oyo azali na mawa ezalaka ete akokanisa ete mobali na ye azali kooka mawa motindo moko na ye te. Mwasi moko amonisaki yango na maloba oyo: “Na ntango yango, mobali na ngai apesaki ngai nkanda. Mpo na ye, azalaki na zemi te. Akokaki te kooka mawa oyo ngai nazalaki na yango. Azalaki komibanzabanza mpo na bobangi na ngai, kasi mpo na mawa na ngai te.”

Liyoki oyo etaleli mbala mosusu lolenge mobali asalemá​—azali kooka mpasi na nzoto motindo moko te mpe na mayoki ya bokangami na bébé na motindo moko te na mwasi na ye oyo azali na zemi. Atako bongo, azali mpe na mawa. Mpe ezali na ntina ete mobali mpe mwasi bamonisa ete bazali kooka mpasi elongo, atako ezali na lolenge lokeseni. Basengeli kokabola mawa na bango elongo. Soki mobali azali kobomba mawa na ye, mwasi na ye akokanisa ete mobali na ye azali kooka mawa te. Na yango, bólela elongo, bókanisa elongo mpe bósimbana. Bomonisa ete moko na moko azali na mposa ya moninga na ye. Ee, mibali, bómonisaka mawa na bino!

[Etanda na lokasa 12]

Liwa ya pwasa ya bana mike​—Lolenge nini kolónga mawa

Liwa ya bébé na pwasa ezali mpasi monene oyo ezali kobulunganisa mpenza. Mokolo moko, mwana moko oyo azalaki komonana ete azalaki na ye malamu, na nzoto kɔ́lɔngɔnɔ, azalaki kolamuka te. Ezali likambo bato bamizelaka na yango soko moke te, mpamba te nani akoki kokanisa ete mwana moke akufa liboso ya baboti na ye? Bébé oyo akómaki eloko ya bolingo makasi mpo na mama na ye akomi eloko ya kopesa ye mawa makasi.

Mayoki ya komema ngambo ebandi kofuluka. Baboti bakoki kokanisa ete bazali na ngambo mpo na liwa ya mwana, lokola ete akufaki mpo ete bango batyelaki ye likebi te. Bakomituna ete: ‘Nini tokokaki kosala mpo na kopɛngola yango?’b Ntango mosusu mobali, kozanga elembeteli ya sikisiki, akoki kobanda kopamela mwasi na ye kozanga ete ayeba yango. Na ntango akendeki mosala, bébé azalaki na bomoi mpe na nzoto kɔ́lɔngɔnɔ. Na ntango azongi na ndako, mwana akufi na mbeto na ye! Mwasi na ye azalaki kosala nini? Azalaki wapi na ntango wana? Mituna nyonso wana misengeli koyanolama polele mpo ete bábebisa libala na bango te.

Makambo ya kozanga kokanela mpe oyo moko te azali na nguya likoló na yango, epesi mpasi oyo monene. Biblia elobi ete: “Nabutwi mpe namoni ete na nsé na moi elonga kati na komekana ejali mpɔ na bato na mbango tɛ, etumba mpo na bato na makasi tɛ, to [bilei, NW] epai na bato na mayɛlɛ tɛ, to mosɔlɔ epai na bato na boyebi tɛ, to ngɔlu epai na bato bamɛsani na mosala tɛ; nde ntango mpe [makambo makanami te ekokómelaka bango banso, “NW”].”​—Mosakoli 9:11.

Lolenge nini basusu bakoki kopesa lisungi na bango soki libota moko likufeli mwana? Mama moko oyo akufelaki mwana ayanolaki ete: “Moninga na ngai moko ayaki mpe asukolelaki ngai ndako kozanga ete ngai nábimisa ata liloba moko. Basusu balambelaki biso. Basusu bapesaki lisungi na kozingáká biso na mabɔkɔ mibale​—kozanga koloba, bobele kozinga biso na mabɔkɔ mibale. Nazalaki kolinga koloba mpo na yango te. Nazalaki kolinga te kolimbola mbala na mbala lolenge nini likambo lilekaki. Nazalaki kolinga te mituna ya koluka koyeba makambo na bozindo, lokola nde ngai nazangaki kosala likambo moko. Nazalaki mama; nakokaki kosala nyonso mpo ete nabatela Rachel na ngai.”

[Maloba na nse ya lokasa]

b Liwa ya pwasa ya bana mike, oyo ekómelaka mingi babébé ya sanza moko kino sanza motoba, ezali likambo oyo ezali kolobelama mingi na ntango babébé oyo bazali na nzoto kɔ́lɔngɔnɔ bazali kokufa liwa ya pwasa kozanga ntina ya sikisiki. Na bantango mosusu ekanisami ete likámá ekoki kopɛngolama soki mwana alalisami na lolenge ya mákalékalé to na mopanzi, kasi elongi na nsé te. Nzokande, ata lolenge moko te ya kolalisa mwana ekoki kopɛngola liwa ya pwasa ya bana mike.

[Elilingi na lokasa 8]

Na ntango molingami na yo akufi, kooka mawa mpe kolela ezali mabe te

[Elilingi na lokasa 11]

Kokufela mwana epesaka mpasi makasi​—motema mawa mpe kokabola mawa elongo na baboti ekoki kosunga bango

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto