Nsango ya Bokonzi No. 34
Mpo na nini bomoi etondi na mikakatano?
Tokofanda mokolo mosusu na Paladiso kozanga mpasi?
MIKAKATANO MINENE MIZALI SÉ KOBAKISAMA—MPO NA NINI?
Bato bazali na mikakatano uta kala. Atako bato mingi bakanisaki ete zébi ya tekniki ya lelo ekoki kosilisa yango, nzokande mikakatano minene mizali sé kobakisama.
Mobulu: Bobele bato moke nde bamiyokaka ete bazali na libateli na ntango bazali kotambola na balabála to na ntango bafandi na ndako na bango. Kati na mboka moko ya Mpótó, soko moto 1 kati na bato 3 akutanaki na likambo moko ya mobulu na mbula oyo euti koleka.
Ezingelo: Kobeba ya mopɛpɛ, ya mabelé mpe ya mai epalangani lisusu mingi mpenza. Kati na mikili ya bobólá, moto moko kati na bato minei azangi mai ya pɛto.
Bobólá: Babólá mpe bato oyo bazali na nzala bazali mingi koleka ndenge ezalaki liboso. Na mikili misusu, koleka bato 90 likoló na monkámá bazali kati na bobólá; bato 30 likoló na monkámá na mokili mobimba bazali na makoki ya kosala kasi bazwi naino mosala te, soko bamilió 800 ya bato, bazangi mosala oyo ekoki na bango—mpe motuya na bango mozali sé kobakisama.
Nzala: Ata soki yo ozali na biloko mingi mpo na kolya, bamilió ya bato, oyo motuya na bango ezali sé komata, bazali na yango te. Kati na mikili ya bobólá, mbula na mbula soko bamilió 13 ya bato, mingimingi bana, bazali kokufa mpo na nzala.
Bitumba: Bankóto mingi ya bato basili kobomama na ntina na mobulu oyo euti kosalema kala mingi te kati na bikólo. Mpe na ekeke oyo ya ntuku mibale, bitumba bibomaki ebele ya bamilió ya bato.
Mikakatano misusu: Likoló na oyo touti kolobela, bakisá mpe likambo oyo ete kobeba ya mabota ezali sé koya makasi, basi mosusu basili kobota nde babali te, kobakisama ya bato oyo bazangi bisika ya kofanda, kopalangana ya ezaleli ya kosalela bilangwiseli, kopalangana ya makambo ya nsɔ́ni. Mosáli moko ya kala na boyangeli ya Etats-Unis alobaki solo ete: “Ezali na bilembo mingi mpenza . . . oyo bimonisi ete ebongiseli oyo esili kopɔla.” Na bambula 30 oyo euti koleka, motángo ya bafandi ya Etats-Unis emataki na 41 likoló na monkámá, kasi makambo ya mobulu emataki nokinoki na 560 likoló na monkámá, bana oyo batata bayebani te 400 likoló na monkámá, koboma mabala 300 likoló na monkámá, komiboma ya bilenge koleka 200 likoló na monkámá. Ezali mpe lolenge moko na mikili misusu.
Mpo na nini mikakatano mizali sé kobakisama?
Mozalisi na biso apesi eyano. Liloba na Ye lizali kobénga ntango oyo etondi na mikakatano ete “mikolo ya nsuka,” eleko oyo ekozala “ntango ya mpasi mpe ya mikakatano.” (2 Timoté 3:1, NW) Mikolo ya nsuka ya nini? Biblia elobeli “nsuka ya mokili.”—Matayo 24:3, Boyokani ya Sika.
Mikakatano oyo mizali kobakisama lelo mimonisi polele ete nsuka ya ebongiseli ya biloko oyo esili kobɛlɛma, sangisá mpe nsuka ya mabe mpe ya baoyo bazali kosala yango. (Matai 24:3-14; 2 Timoté 3:1-5; Emoniseli 12:7-12) Mosika te, Nzambe akotya mabɔkɔ mpe akosala na boye ete mikakatano nyonso ya lelo esila mpo na libela.—Yilimia 25:31-33; Emoniseli 19:11-21.
MANGOMBA YA MOKILI OYO MALÓNGI TE
Na esika ete esalisa bato mpo na kosilisa mikakatano ya lelo, ebongiseli ya mangomba ya mokili oyo ezali nde kobakisa yango. Na ntango ya bitumba, Bakatolike bazali koboma Bakatolike, Baprotestá bazali koboma Baprotestá—na motángo ya bamilió. Eleki kala mingi te na Rwanda, epai kuna mingi bazali Bakatolike, bato babomanaki na motángo ya bankóto mingi! (Talá elilingi na lobɔkɔ ya mwasi.)
Yesu mbɛlɛ alingaki kokende na etumba elongo na mondóki to na mbɛli mpe koboma bayekoli na ye mpamba te ekólo na bango ekesanaki na oyo ya ye? Soko moke te! Biblia elobi ete: “Moto oyo alingi Nzambe, asengeli mpe kolinga ndeko na ye.” (1 Yoane 4:20, 21, NW) Mangomba ya mokili oyo malóngi te na kosala yango. “Balobi ete bayebi Njambe nde na misala na bango bajali koangana ye.”—Tito 1:16.
Lisusu, lokola mazali mpenza kolanda te mitindá ya Biblia mpo na oyo etali bizaleli malamu, mangomba ya mokili oyo mazali kopesa nzela na bizaleli mabe oyo ezali komonana na mabelé mobimba.
Yesu alobaki ete okoki kokesenisa lingomba ya lokuta mpe lingomba ya solo na ‘mbuma na yango’—na makambo oyo basangani na yango bazali kosala. Alobaki lisusu ete: “Njete na njete oyo ekobotaka mbuma malamu tɛ ekokatama mpe ekobwakama na mɔtɔ.” (Matai 7:15-20) Liloba ya Nzambe lizali kokebisa biso ete tólongwa na mangomba oyo mazali kobimisa mbuma mabe mpe oyo makobebisama.—Emoniseli 18:4.
Lingomba ya solo ekwei te
Lingomba ya solo “ebotaka mbuma malamu,” mingimingi bolingo. (Matai 7:17; Yoane 13:34, 35) Libota nini ya baklisto oyo ezali na bomoko na mokili mobimba oyo ezali komonisa bolingo wana? Banani baboyaka koboma basangani ya lingomba na bango, to mpe koboma bato mosusu?—1 Yoane 3:10-12.
Batatoli ya Yehova bayebani ete bazali kobota “mbuma malamu” yango. Na mabelé mobimba, na mikili koleka 230, ‘basili kotula mipanga na bango ete mizala bitimweli.’ (Yisaya 2:4) Bolingo na bango mpo na bato ezali komonana na botosi na bango ya etindá ya Klisto oyo etali kosakola “nsango malamu” ya Bokonzi ya Nzambe na mokili mobimba. (Matai 24:14) Bazali kosalela mpe kolóngisa mitindá mitombwami ya bizaleli malamu oyo eteyami kati na Biblia.—1 Bakolinti 6:9-11.
Lingomba ya solo ekwei te. Ezali kokamba bato epai na Ye oyo bobele moko azali na likoki ya kosilisa mikakatano ya bato. Mosika te, Ye wana akosala mokili ya sika na makambo nyonso. Ye wana nde azali nani? (Talá nsima ya lokasa oyo.)
TOKOFANDA SOLO KATI NA PALADISO KOZANGA MPASI
Soki ozalaki na likoki, mbɛlɛ olingaki kosilisa mikakatano oyo mizali kokwela bato, boye te? Ezali boye solo! Tosengeli kokanisa ete Mozalisi na biso ya bolingo, oyo bobele ye nde azali na nguya mpe na mayele mpo na kosilisa mikakatano ya bato, akozanga kosala bongo?
Biblia emonisi ete Nzambe akokɔta na makambo ya bato na nzela ya boyangeli na ye ya likoló oyo epesami na mabɔkɔ ya Yesu Klisto. Yango “ekobuka” biyangeli mabe oyo bizali na mabelé. (Danyele 2:44; Matai 6:9, 10) Mpo na nini? Kolobáká epai na Nzambe, mokomi na Nzembo ayanoli ete: “Tiká bato oyo báyeba ete yo, oyo ozali na nkombo Yehova, bobele yo nde ozali Oyo-Aleki-Likoló na mabelé mobimbá.”—Nzembo 83:18, NW.
Ntango mokili oyo ekosuka, babiki bakozala? Biblia elobi ete: “Mokili ezali koleka, kasi ye oyo azali kosala mokano ya Nzambe akoumela seko.” (1 Yoane 2:17, NW) Epai wapi babiki wana bakofanda mpo na libela? Biblia eyanoli ete: “Bobele bayengebene nde bakozwa mabelé, mpe bakofanda wana libela.”—Nzembo 37:9-11, 29, NW; Masese 2:21, 22.
Kati na mokili ya sika ya Nzambe, “kufa ekojala lisusu tɛ, na mawa, na kolela, na mpasi, lisusu mpe tɛ.” (Emɔnisɛli 21:4) Mobulu, bobólá, nzala, bokɔnɔ, mawa, ata liwa ekozala lisusu te! Ya solo, ata bakufi bakozonga lisusu na bomoi! “Lisekwa ekozala.” (Misala 24:15) Mpe mabelé ekobongwana mpenza paladiso.—Yisaya 35:1, 2; Luka 23:43.
Tosengeli kosala nini mpo na kosepela na bomoi kati na mokili ya sika ya Nzambe? Yesu alobaki ete: “Oyo elimboli bomoi ya seko, ete báyekola koyeba yo, Nzambe bobele moko ya solo, mpe Motindami na yo, Yesu Klisto.” (Yoane 17:3, NW) Bamilió ya bato na sembo na mokili mobimba bazali kokóma na boyebi wana. Yango ezali kopesa bango likoki ya koyika mpiko na ebele na mikakatano oyo bazali kokutana na yango sikawa, kasi oyo eleki ntina, ezali kopesa bango elikya mpenza ete mikakatano oyo mileki makoki na bango mikosila nyonso kati na mokili ya sika ya Nzambe.
[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafoto na lokasa 2]
O.M.S., fɔtɔ́ ebimisami na P. Almasy
[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafoto na lokasa 3]
Jerden Bouman/Sipa Press