Lolenge liteya yango ekɔtaki na mangomba ya mikili ya Azia
“Nazalaki ntango nyonso kokanisa ete bato nyonso oyo bazali na mokili bandimaka ete molimo ekufaka te. Na bongo, nakamwaki mpenza ntango nayokaki ete banganga-mayele mosusu, ezala ya mikili ya Azia to ya mikili ya Mpoto, bazalaki mpenza kotɛmɛla endimeli yango. Sikawa, nazali komituna ndenge nini likanisi oyo elobaka ete molimo ekufaka te ekɔtaki na lisosoli ya Bahindu.”—MOYEKOLI MOKO YA INIVERSITE OYO AKOLAKI NA LINGOMBA YA BAHINDU.
1. Mpo na nini ezali na ntina tóyeba lolenge liteya oyo elobaka ete molimo ekufaka te ekolaki mpe epalanganaki na mangomba ndenge na ndenge?
LOLENGE nini likanisi oyo elobaka ete moto azalaka na molimo oyo ekufaka te ekɔtaki na Lingomba ya Bahindu mpe na mangomba mosusu ya mikili ya Azia? Motuna oyo etaleli mpe baoyo bazalaka na mikili ya Mpoto, oyo bayebaka malamumalamu te mangomba yango, mpamba te endimeli yango ezali na bopusi likoló na lolenge oyo mokomoko na bango atalelaka mikolo mizali koya. Lokola liteya oyo elobaka ete molimo ekufaka te ezali koteyama na mangomba mingi lelo oyo, koyeba lolenge nini likanisi yango ebandaki ekoki mpenza kosalisa biso mpo tózwa boyebi ya solosolo mpe tópalanganisa yango.
2. Na oyo etali bopusi na makambo ya losambo, mpo na nini Inde ezali esika oyo eyebani mingi koleka kati na mikili ya Azia?
2 Ninian Smart, profesere na makambo matali mangomba na Iniversite ya Lancaster na ekólo Grande Bretagne, alobi ete: “Mpo na bopusi ya makambo ya losambo, ekólo Inde ezali esika oyo eyebani mingi koleka kati na mikili ya Azia. Ezali bobele mpo na biyamba mingi oyo bibandaki na ekólo Inde te—na ndakisa Lingomba ya Bahindu, ya Bouddha, ya Jaïna, ya Sikh, mpe bongo na bongo—kasi mpe mpo ete moko kati na mangomba yango, elingi koloba, Lingomba ya Bouddha, esalaki bopusi monene koleka likoló na mimeseno ya bikólo soko nyonso ya Azia ya Ɛ́sti.” Nikhilananda, nganga-mayele Mohindu, alobi na ntina na bikólo mingi oyo mimeseno ezwi bopusi yango ete “batalelaka Inde lokola mboka na bango ya elimo.” Na bongo, lolenge nini liteya oyo elobaka ete molimo ekufaka te ekɔtaki na Inde mpe na bikólo mosusu ya Azia?
Oyo Lingomba ya Bahindu eteyaka na ntina na kobotama ya molimo mbala na mbala
3. Engebene nganga-mayele moko ya istware, nani akómisaki na Inde likanisi oyo elobaka ete molimo ekɔtaka na ekelamu mosusu?
3 Na ekeke ya 6 L.T.B., ntango Pythagore mpe bayekoli na ye bazalaki koteya na ekólo Grèce ete molimo ekɔtaka na ekelamu mosusu na ntango ya liwa, banganga-mayele kati na Bahindu, oyo bazalaki kofanda pembenipembeni ya ebale Indus mpe ebale Gange na Inde, bazalaki koteya likanisi motindo moko. Arnold Toynbee, nganga-mayele ya istware, alobi ete, kobima ya endimeli yango na eleko moko “na mokili ya Grèce mpe na mokili ya Inde ekoki kozala likambo ya pwasa te.” Toynbee alobi lisusu ete: “[Bopusi] yango ekokaki kouta na batambolitamboli ya Mpoto mpe ya Azia, oyo, na ekeke ya 8 mpe ya 7 L.T.B., bakendeki na Inde, na Súdi-Wɛ́sti ya Azia, na mokili ya bisobe pembeni ya nɔ́rdi ya Mai Moindo [mer noire], mpe na bisanga ya Balkan mpe ya Anatolie.” Mibembo na bango kati na bikólo yango ya Mpoto mpe ya Azia esalaki ete bámema kino na ekólo Inde likanisi oyo elobaka ete molimo ekɔtaka na ekelamu mosusu.
4. Mpo na nini liteya oyo elobaka ete molimo ebongwanaka ekelamu mosusu esepelisaki mpenza banganga-mayele kati na Bahindu?
4 Lingomba ya Bahindu ebandaki uta kala, na Inde, na boyei ya ba Aryens soko na mobu 1 500 L.T.B. Uta ebandeli na yango mpenza, Lingomba ya Bahindu ezalaki kondima ete molimo ekeseni na nzoto mpe ete molimo ekobaka kozala na bomoi nsima ya liwa. Bahindu bazalaki bongo kosambela bankɔkɔ na bango mpe kopesa bilei lokola mbeka epai na milimo ya bawei. Bikeke mingi na nsima, ntango liteya oyo elobaka ete molimo ekɔtaka na ekelamu mosusu ekómaki na ekólo Inde, yango ebendaki mpenza likebi ya banganga-mayele kati na Bahindu mpo ete bazalaki koluka koyeba ntina oyo mabe mpe mpasi ezwaka bato na mokili mobimba. Kosangisáká liteya yango na mobeko ya Karma, elingi koloba ete moto abukaka bobele oyo ye alonaka, banganga-mayele kati na Bahindu bakolisaki liteya oyo elobaka ete molimo ebotamaka mbala na mbala, kosaleláká yango mpo na kozwa ekateli, na kotalela bomoi ya moto lelo oyo, soki akozwa mbano to etumbu na bomoi oyo ezali koya.
5. Engebene Lingomba ya Bahindu, mokano ya nsuka ya molimo ezali nini?
5 Kasi ezalaki mpe na likanisi mosusu oyo esalaki bopusi likoló na endimeli ya Bahindu na ntina na molimo. Buku Encyclopédie de la religion et de l’éthique elobi ete: “Ekoki kozala ete bobele na ntango liteya oyo elobaka ete molimo ekɔtaka na ekelamu mosusu ebimaki elongo na Karma, to liboso na ntango yango, likanisi mosusu . . . ezalaki kokola mokemoke kati na etuluku ya banganga-mayele na nɔ́rdi ya ekólo Inde—filozofi ya Brahman-Ātman [Brahman to bosolo ya nsuka].” Basangisaki liteya oyo na liteya oyo elobaka ete molimo ebotamaka mbala na mbala mpo na kolimbola mokano ya nsuka ya Bahindu—kosikolama na ebongiseli ya kobotama ya molimo mbala na mbala mpo na kokóma na bomoko na bosolo ya nsuka. Bahindu bandimaka ete yango ekoki kosalema soki moto asali makasi mpo na kozala na etamboli malamu kati na bato mpe soki azwi boyebi ya sikisiki ya Bahindu.
6, 7. Lelo oyo, Lingomba ya Bahindu ezali na endimeli nini na ntina na bomoi nsima ya liwa?
6 Na yango, banganga-mayele kati na Bahindu bakolisaki likanisi oyo elobaka ete molimo ekɔtaka na ekelamu mosusu mpo na kokɔtisa yango na liteya oyo elobaka ete molimo ebotamaka mbala na mbala, na kosangisáká yango na mobeko ya Karma mpe na likanisi ya Brahman. Octavio Paz, oyo azwaki prix Nobel lokola mokomi ya ntɔki mpe oyo azalaki ambasadɛrɛ ya ekólo Mexique na Inde, akomaki ete: “Ntango Lingomba ya Bahindu ezalaki kokola, liteya moko . . . ya moboko mpe ezalaki kokola na Lingomba ya Brahman, ya Bouddha, mpe na mangomba mosusu ya Azia: liteya oyo ebéngami métempsycose to liteya oyo elobaka ete molimo ekɔtaka na ekelamu mosusu mpe ebotamaka mbala na mbala.”
7 Lelo oyo, liteya oyo elobaka ete molimo ebotamaka mbala na mbala ezali liteya ya moboko ya Lingomba ya Bahindu. Nikhilananda, moto ya filozofi Mohindu, alobi ete: “Bahindu nyonso oyo bamipesá na losambo bandimisami ete kozala na molimo oyo ekufaka te ezali te libaku malamu mpo na ndambo moke ya bato baponamá, kasi ezali nde lotomo oyo moto nyonso abotamá na yango.”
Ebongiseli ya kobotama mbala na mbala kati na Lingomba ya Bouddha
8-10. (a) Lolenge nini Lingomba ya Bouddha elimbolaka bomoi? (b) Lolenge nini nganga-mayele moko ya Lingomba ya Bouddha alimboli liteya oyo elobaka ete molimo ebotamaka mbala na mbala?
8 Lingomba ya Bouddha esalemaki na Inde soko na mobu 500 L.T.B. Engebene lisolo ya kala ya Bouddha, Lingomba ya Bouddha esalemaki na mwana ya mokonzi moko na Inde, na nkombo Siddhārtha Gautama, nde ayaki koyebana na nkombo ya Bouddha nsima ya kozwa engɛngiseli. Lokola losambo yango euti na Lingomba ya Bahindu, mateya na yango makokani na makambo mosusu na oyo ya Lingomba ya Bahindu. Lingomba ya Bouddha eteyaka ete bomoi ezali bobele ebongiseli ya kobotama mbala na mbala mpe kokufa, mpe lolenge moko Lingomba ya Bahindu eteyaka ete etɛlɛmɛlo ya moto mokomoko kati na bomoi lelo oyo ezali mpenza na boyokani na misala oyo ye asalaki na bomoi na ye ya kala.
9 Kasi Lingomba ya Bouddha eteyaka te ete kozala na bomoi elimboli kozala na molimo oyo ekufaka te nsima ya liwa. Arnold Toynbee alobi ete: “[Bouddha] azalaki kotalela molimo ya moto ete ezali bobele eleko mokuse oyo bizalela bizali kolekisama mpe bizali koumela te, bizalela yango nyonso bipusami na mposa.” Atako bongo, Bouddha azalaki kondima ete eloko moko—liyoki to bokasi—elekisamaka na bomoi moko kino na bomoi mosusu. Dr. Walpola Rahula, nganga-mayele moko mondimi ya Lingomba ya Bouddha, apesi ndimbola oyo:
10 “Bomoi ezali bobele kosangisama ya makasi ya nzoto mpe ya makanisi to ya nguya ya nzoto. Oyo tobéngaka liwa ezali nde ntango nzoto ya mosuni ezali kosala lisusu mosala moko te. Makasi yango nyonso mpe nguya ya nzoto etikaka nde kosala mbala moko ntango nzoto ezali kosala lisusu te? Lingomba ya Bouddha elobi ete: ‘Te.’ Mokano, bolingi, mposa ndenge na ndenge, mposa ya kozala na bomoi, ya kokoba kozala na bomoi, ya kobotama mbala na mbala, ezali yango nyonso bokasi ya kokamwa oyo etambwisaka bomoi ya bato, bomoi mobimba, mpe nguya yango kutu etambwisaka mokili mobimba. Yango ezali bokasi oyo eleki bokasi mosusu nyonso, nguya oyo eleki nguya nyonso na mokili. Engebene Lingomba ya Bouddha, nguya yango etikaka kosala te mpo ete nzoto etiki kosala na ntango ya liwa; kasi ekobaka komimonisa na lolenge mosusu, kobimisáká bomoi mosusu oyo elimboli bobele kobotama lisusu.”
11. Bandimi ya lingomba ya Bouddha bazalaka na likanisi nini na ntina na bomoi nsima ya liwa?
11 Na ntina na bomoi nsima ya liwa, bandimi ya Lingomba ya Bouddha bakanisaka boye: Bomoi ekokóma bomoi ya libela na libela bobele soki moto akómi na mokano ya nsuka to Nirvana, oyo elimboli kosikolama na ebongiseli ya kobotama mbala na mbala. Nirvana ezali te ezalela ya kokóma na bisengo ya libela na libela to mpe ezalela ya kokóma na bomoko esika moko na bosolo ya nsuka. Ezali bobele ezalela ya kozanga bomoi—“esika oyo liwa ezali te,” oyo eleki bomoi ya moto lelo oyo. Buku Webster’s Ninth New Collegiate Dictionary elimboli “Nirvana” lokola “esika to ezalela ya kobosana mabanzo, mpasi, to makambo oyo mazali komonana.” Na esika ya koluka bomoi oyo ekufaka te, bandimi ya Lingomba ya Bouddha balendisami ete báleka ezalela yango na kokómáká na Nirvana.
12-14. Lolenge nini mitindo ndenge na ndenge ya Lingomba ya Bouddha eteyaka likanisi oyo elobaka ete molimo ekufaka te?
12 Na ntango ezalaki kopalangana na bisika ndenge na ndenge na Azia, Lingomba ya Bouddha ebongolaki mateya na yango mpo na koyokanisa yango na bindimeli ya bato ya bisika yango. Na ndakisa, lolenge moko ya losambo ya Lingomba ya Bouddha, oyo ebéngami Bouddhisme Mahayana, oyo eyebani mingi mpenza na ekólo Chine mpe na Japon, endimaka ete ezali na bilimu ya likoló oyo bibéngami bodhisattva, to baoyo bakozala lokola Bouddha na mikolo mizali koya. Ba bodhisattva yango bazongisaka kokɔta na bango na Nirvana nsima, na ntina ete bákoka kobotama mbala na mbala mpo ete básalela bato mosusu mpe básunga bango bákóma na ezalela yango. Na bongo, elimu moto ekoki kopona kokoba na ebongiseli ya kobotama mbala na mbala ata soki esili kokɔta na Nirvana.
13 Mbongwana mosusu oyo ezwaki bopusi makasi, mingi mpenza na ekólo Chine mpe na Japon, ezali liteya ya Mabelé ya Pɛto, oyo Bouddha Amitabha, to Amida abimisaki. Baoyo bazali kobelela nkombo ya Bouddha kati na kondima bakobotama lisusu na Mabelé ya Pɛto, to paladiso, epai kuna makambo makozala mpasi te mpo ete bákóma na kongɛngisama ya nsuka. Likambo nini liteya yango ebimisaki? Profesere Smart, oyo tolobelaki liboso, alimboli ete: “Lokola esengelaki kozela yango, bato bakómaki komona na makanisi na bango ete bisengo ya paladiso, na lolenge yango elobelami na mɔ́tɔ mpenza na mikapo mosusu ya Mahayana, eleki nirvana mpe ekoki kotalelama lokola mokano ya nsuka.”
14 Lingomba ya Bouddha na ekólo Tibet ezali kokɔtisa bindimeli mosusu ya ekólo yango. Na ndakisa, buku ya bakufi na ekólo Tibet ezali kolobela makambo oyo masilá kokanama mpo na moto ntango azali na eleko ya katikati liboso ete abotama lisusu. Elobami ete bakufi bazali kongɛngisama na pole ya bomoi ya bosolo ya nsuka, mpe baoyo bakokoka pole yango te basikolamaka te kasi babotamaka lisusu. Emonani polele ete mitindo ndenge na ndenge ya Lingomba ya Bouddha eteyaka ete molimo ekufaka te.
Losambo ya bankɔkɔ kati na Lingomba ya Shinto na ekólo Japon
15-17. (a) Lolenge nini losambo ya bilimu ya bankɔkɔ ekolaki na Lingomba ya Shinto? (b) Lolenge nini endimeli oyo elobaka ete molimo ekufaka te ezali endimeli ya moboko na Lingomba ya Shinto?
15 Liboso ete Lingomba ya Bouddha ekɔta na Japon na ekeke ya 6 T.B., losambo ezalaki. Losambo yango ezalaki na nkombo te, mpe ezalaki bobele kosangisama ya bindimeli na bizaleli malamu mpe mimeseno ya bato. Nzokande, ntango Lingomba ya Bouddha ekɔtaki, emonanaki malamu kosala bokeseni kati na Lingomba ya ekólo Japon mpe lingomba ya bapaya. Yango wana ebengeli “Shinto” oyo elimboli “nzela ya banzambe,” ebimaki.
16 Endimeli nini Lingomba ya Shinto ezalaki na yango na ebandeli na ntina na bomoi nsima ya liwa? Engebene buku Kodansha Encyclopedia of Japan, ntango eleko ya kolona lɔsɔ na bisika ya mai ekómaka, “esɛngaka ete milona yango oyo elingaka bisika ya mai elonama na bato babongisami malamumalamu mpe bameseni kosala na bomoko, mpe esɛngaka lisusu milulu na ntango ya kolona to kobuka mbuma—oyo na nsima ekómaki likambo ya ntina na Lingomba ya Shinto—mpe ebongisamaki.” Kobanga milimo ya bakufi epusaki bato yango ya kala ete bákanisakanisa milulu ndenge na ndenge mpo na kokitisa milimo yango motema. Yango esalaki ete bato bákóma kosambela bilimu ya bankɔkɔ.
17 Engebene endimeli ya Lingomba ya Shinto, molimo oyo “ekei” ezali naino na bomoto na yango kasi yango ebebisami na ntina na liwa. Ntango baoyo bakufeli moto bazali kosala milulu mpo na kokunda mowei, molimo na ye ezali kopɛtolama kino mabe nyonso ekolongwa, mpe ekokóma molimo ya kimya mpe ya boboto. Na nsima, elimo yango ekokóma lokola nzambe kati na mokili ya bankɔkɔ, to mokɛngɛli. Lokola Lingomba ya Shinto ezalaki esika moko na Lingomba ya Bouddha, ezwaki mateya mosusu ya lingomba yango, na ndakisa liteya ya paladiso. Na bongo, tozali komona ete endimeli oyo elobaka ete molimo ekufaka te ezali endimeli ya moboko na Lingomba ya Shinto.
Liteya oyo elobaka ete molimo ekufaka te kati na Lingomba ya Tao, losambo ya bankɔkɔ kati na Lingomba ya Confucius
18. Lingomba ya Tao ezalaka na likanisi nini na ntina na bomoi oyo ekufaka te?
18 Lingomba ya Tao esalemaki na Lao-tzu, oyo balobaka ete azalaki na bomoi na ekólo Chine na ekeke ya 6 L.T.B. Engebene Lingomba ya Tao, ntina ya bomoi ezali ete misala ya moto eyokana na Tao—mokili oyo ezali komonana na mobimba na yango. Likanisi ya Lingomba ya Tao na ntina na liteya oyo elobaka ete molimo ekufaka te ekoki kolobelama na mokuse boye: Tao ezali motinda oyo etambwisaka molɔ́ngɔ́ mobimba. Tao ezali na ebandeli te mpe na nsuka te. Soki moto atambwisi bomoi na ye na boyokani na Tao, akosangana na yango mpe akoumela seko.
19-21. Kokanisakanisa ya bandimi ya Lingomba ya Tao epusaki bango na komeka makambo nini?
19 Na milende na bango mpo na kozala na bomoko na motinda oyo etambwisaka molɔ́ngɔ́, bandimi ya Lingomba ya Tao basepelaka mingi na ndenge molɔ́ngɔ́ ezali koumela libela na libela mpe ezalaka na makoki ya kotɛmɛla makama oyo makoki kobebisa yango. Bakanisaka ete na kozaláká na bomoi oyo eyokani na Tao to na motinda oyo etambwisaka molɔ́ngɔ́, moto akoki koyeba ntango mosusu sɛkɛlɛ ya molɔ́ngɔ́ mpe koyoka lisusu mpasi na nzoto te, kobɛla te, to ata kokufa te.
20 Bandimi ya Lingomba ya Tao babandaki komeka kozwa bomoi yango na nzela ya bomanyoli, ya ngalasisi ya mpema, ya kokila bilei mosusu, mpamba te bazalaki kokanisa ete na kosaláká bongo, bakokóma mibange noki te mpe bakokufa noki te. Mosika te, babandaki kobimisa masapo likoló na bato oyo bakufaka te, oyo bakoki kopumbwa kino na mapata mpe komilakisa mpe kolimwa ndenge balingi, mpe bafandaka uta bambula na bangomba ya bulɛɛ to na bisanga ya mosika, wana balyaka bobele mamwɛ to mbuma moko ya kokamwa. Lisolo ya bato na ekólo Chine elobi ete na mobu 219 L.T.B., Mokonzi Ch’in Shih Huang Ti atindaki bilenge basi mpe mibali 3 000 kati na masuwa mingi mpo na koluka esanga ya P’eng-lai, oyo eyebanaki na masapo ete ezali efandelo ya bato oyo bakufaka te, mpo ete bámema lititi oyo bazalaki kokanisa ete epesaka bomoi ya libela na libela. Ya solo, bazongaki te na nkisi yango oyo bazalaki kokanisa ete epesaka bomoi ya libela na libela.
21 Na bolukiluki na bango, bandimi ya Lingomba ya Tao bamekaki kosala nkisi oyo epesaka bomoi ya libela na libela na mwango ebéngami alchimie. Na makanisi na bango, bomoi euti na kosangisama ya banguya oyo ikeseni. Na ndakisa, na kosangisáká mondɔlu to plomb (ya moindo, to yin) na mercure (oyo engɛngaka, to yang), banganga-mayele ya alchimie bazalaki komekola kosangisama malamu ya biloko bizalisami, mpe kokanisa ete na kosaláká bongo, bakozwa nkisi oyo epesaka bomoi ya libela na libela.
22. Bopusi ya Lingomba ya Bouddha likoló na Lingomba ya Chine ebimisaki nini?
22 Kobanda na ekeke ya 7 T.B., mateya ya Lingomba ya Bouddha ebandaki kokɔta na Lingomba ya Chine. Yango esangisi bongo mateya ndenge na ndenge ya Lingomba ya Bouddha, ya losambo ya bilimu mabe mpe ya losambo ya bankɔkɔ. Engebene Profesere Smart, “Lingomba ya Bouddha mpe ya Tao ebongisaki mpe ekolisaki bindimeli na ntina na bomoi nsima ya liwa, oyo biyebanaki mpenzampenza te na losambo ya kala ya bankɔkɔ na ekólo Chine.”
23. Likanisi ya Confucius na likambo litali losambo ya bankɔkɔ ezalaki nini?
23 Confucius, nganga-mayele mosusu ayebani ya ekólo Chine na ekeke ya 6 L.T.B., oyo mateya na ye ya filozofi ekómaki moboko mpo na mateya ya Lingomba ya Confucius, alobaki makambo mingi te na ntina na bomoi nsima ya liwa. Nzokande, abendaki mpenza likebi likoló na ntina ya kozala na bizaleli malamu mpe na etamboli oyo endimami na bato. Kasi aboyaki te ete bato bápesaka losambo na bankɔkɔ, kutu alendisaki mpenza ete milulu misalemaka mpo na bilimu ya bankɔkɔ.
Mangomba mosusu ya mikili ya Azia
24. Lingomba ya Jaïna eteyaka nini na ntina na molimo?
24 Lingomba ya Jaïna esalemaki na Inde na ekeke ya 6 L.T.B. Mahāvīra, mobandisi na yango, azalaki koteya ete bikelamu nyonso ya bomoi bizali na molimo oyo ekufaka te mpe ete kobikisama ya molimo na boombo ya Karma ekoki kosalema bobele soki moto amiboyi mpenza mpe amibateli malamu mpe amipekisi mpenza ete asalela bikelamu mosusu mabe te. Bandimi ya Jaïna bakangami na bindimeli yango kino lelo oyo.
25, 26. Bindimeli nini ya Lingomba ya Bahindu ezwami mpe na Lingomba ya Sikh?
25 Lingomba ya Sikh, oyo ezali na bandimi milio 19, esalemaki mpe na Inde. Lingomba yango ebandaki na ekeke ya 16 ntango Guru Nānak azwaki ekateli ya kosangisa mateya ya moboko ya Lingomba ya Bahindu na oyo ya Lingomba ya Bamizilma mpe kokómisa yango lingomba moko. Lingomba ya Sikh ezwaki bindimeli ya Lingomba ya Bahindu, lokola oyo elobaka ete molimo ekufaka te, ete molimo ebotamaka mbala na mbala mpe oyo ya Karma.
26 Emonani polele ete endimeli oyo elobaka ete bomoi ezalaka nsima ya liwa ezali liteya ya moboko kati na mangomba mingi ya mikili ya Azia. Tokoloba boni mpo na mangomba ya boklisto, mpo na Lingomba ya Bayuda mpe mpo na Lingomba ya Bamizilma?
[Karte na lokasa 10]
(Mpo na komona yango, talá mokanda)
INDE
Banaras
Boudh-Gayā
AZIA YA NTEI
CACHEMIRE
TIBET
CHINE
CORÉE
JAPON
MYANMAR
THAÏLANDE
SRI LANKA
CAMBODGE
JAVA
EKEKE YA 3 L.T.B.
EKEKE YA LIBOSO L.T.B.
EKEKE YA LIBOSO T.B.
EKEKE YA 4 T.B.
EKEKE YA 6 T.B.
EKEKE YA 7 T.B.
Lingomba ya Bouddha esalaki bopusi monene na mikili nyonso ya Azia ya Ɛ́sti
[Elilingi na lokasa 9]
Kobotama ya molimo mbala na mbala ezali liteya ya moboko na Lingomba ya Bahindu
[Elilingi na lokasa 11]
Na kozaláká na bomoi oyo eyokani na motinda oyo etambwisaka molɔ́ngɔ́, mondimi ya Lingomba ya Tao azali koluka kokóma na bomoi ya libela na libela
[Elilingi na lokasa 12]
Confucius aboyaki te ete bato bápesaka losambo na bankɔkɔ