Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w99 1/4 nk. 9-14
  • Bomoi nsima ya liwa​—⁠bato bazali na bindimeli nini?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Bomoi nsima ya liwa​—⁠bato bazali na bindimeli nini?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1999
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Motuna moko, biyano ndenge na ndenge
  • Ebandeli ya liteya yango
  • Lisangá ya mangomba ya lokuta na mokili mobimba ekɔti na Azia
  • Tokoloba boni mpo na Lingomba ya Bayuda, mangomba ya boklisto, mpe Lingomba ya Bamizilma?
  • Lolenge liteya yango ekɔtaki na Lingomba ya Bayuda, na mangomba ya boklisto mpe na Lingomba ya Bamizilma
    Nini ekómelaka biso soki tokufi?
  • Bomoi ezalaka nsima ya liwa?
    Nini ekómelaka biso soki tokufi?
  • Molimo ekufaka te: Ebandeli ya liteya yango
    Nini ekómelaka biso soki tokufi?
  • Molimo etikalaka na bomoi nsima na kufa?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1990
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1999
w99 1/4 nk. 9-14

Bomoi nsima ya liwa​—bato bazali na bindimeli nini?

“Soko moto akokufa, akobika nde lisusu?”​—YOBO 14:14.

1, 2. Ndenge nini bato mosusu bamibɔndisaka soki bakufeli moto oyo balingaki mingi?

NA NDAKO moko ya kolela bibembe na mboka New York, bandeko mpe baninga basali molɔngɔ mpe bazali koleka malɛmbɛmalɛmbɛ liboso ya sanduku moko efungwami; elenge moko ya mbula 17 akufi na maladi ya kanser. Na mpasi na motema, mama na ye azali kolela mpe mbala na mbala azali kozongela likambo oyo bateyá ye ete: “Sikoyo, Tommy azali na esengo. Nzambe abéngi Tommy mpo azala na ye kuna na likoló.”

2 Na ntaka ya kilomɛtɛlɛ 11 000 longwa na New York, na mboka Jamnagar, na ekólo Inde, mwana ya liboso na kati ya bana mibali misato azali kopelisa nkoni na etumbelo mpo na kotumba ebembe ya tata na bango. Mwa makɛlɛlɛ ya nkoni oyo ezali kopela esangani na nzembo ya Brahmane (nganga-nzambe ya Lingomba ya Bahindu) oyo azali koyemba ba mantras na lokota ya Sanskrit: “Tiká ete molimo oyo ekufaka te ekoba kosala milende na yango tii ekokóma solo ya nsuka.”

3. Banda kalakala bato bamitunaka mituna nini?

3 Liwa ekómelaka biso nyonso. (Baloma 5:12) Ebongi mpenza tómituna soki liwa nde nsuka ya makambo nyonso. Yobo, mosaleli moko ya sembo ya Yehova Nzambe na ntango ya kala atalelaki bomoi ya nzete mpe alobaki ete: “Nzete ezali na elikya ete soko ekokatama, [ekobima] lisusu, bitape na yango ikotika kobima te.” Kasi, ezali boni mpo na bato? Yobo atunaki ete, “Soko moto akokufa, akobika nde lisusu?” (Yobo 14:7, 14) Banda kalakala, na bisika nyonso, bato bamitunaka mituna oyo: Bomoi mosusu ezalaka nsima ya liwa? Soki ezali bongo, ezalaka bomoi ya ndenge nini? Mpo na yango, bato bazali na bindimeli nini? Mpe mpo na nini?

Motuna moko, biyano ndenge na ndenge

4. Endimeli nini bato ya mangomba ndenge na ndenge bazalaka na yango na ntina na bomoi nsima ya liwa?

4 Bato mingi oyo balobaka ete bazali baklisto bandimaka ete nsima ya liwa, bato bakendaka na likoló to na lifelo. Nzokande, Bahindu bango bandimaka ete moto azongaka na bomoi mbala na mbala. Bamizilma bandimaka ete ekozala na mokolo ya kosambisama nsima ya liwa; na mokolo yango, Allah akotalela bomoi ya moto na moto mpe akotinda ye na paladiso to na lifelo ya mɔ́tɔ. Na mikili mosusu, bindimeli ya bato mpo na bakufi esangisi bonkɔkɔ na bango mpe mateya ya mangomba ya boklisto. Na ndakisa, na ekólo Sri Lanka, bandimi ya Lingomba ya Bouddha na Bakatolike, soki bakufeli moto, batikaka bikɔtelo mpe maninisa ya ndako polele mpe balalisaka sanduku na boye ete makolo ya mowei etalana na ekɔtelo. Bakanisaka ete soki basali bongo, ekozala mpasi te mpo elimo to molimo ya mowei ebima. Na Afrika ya Wɛsti, Bakatolike na Baprotesta mingi bazali na momeseno ya kozipa batalatala soki moto akufi mpo moto mosusu atala yango te noki te akomona elimo ya moto oyo akufi. Nde nsima ya mikolo 40, bandeko mpe baninga basalaka feti mpo ete molimo ya mowei ebuti na likoló.

5. Liteya monene oyo mangomba mingi endimaka elobaka nini?

5 Atako bindimeli yango bizali ndenge na ndenge, tomoni ete mangomba mingi eyokani na likambo moko. Bandimaka ete eloko moko ezalaka na kati ya moto​—ezala babéngi yango molimo, elimo, to elima​—etikalaka na bomoi soki nzoto ekufi. Mangomba nyonso ya boklisto, ezala ya minene to ya mike endimaka ete molimo ekufaka te. Lingomba ya Bayuda eteyaka mpe endimeli yango. Liteya ya Bahindu oyo elobaka ete moto abotamaka mbala na mbala esimbami mpenza na endimeli yango. Bamizilma bandimaka ete molimo etikalaka na bomoi soki nzoto ekufi. Bankolo-mabelé ya Australie, bato ya Afrika oyo basambelaka milimo ya bankɔkɔ, bato ya Lingomba ya Shinto, ata mpe bandimi ya Lingomba ya Bouddha, bango nyonso bateyaka likambo yango moko kasi na mitindo ndenge na ndenge.

6. Ndenge nini banganga-mayele mosusu batalelaka liteya oyo elobaka ete molimo ekufaka te?

6 Nzokande, ezali mpe na bato oyo bakanisaka ete bomoi esukaka na liwa. Mpo na bango, koloba ete nsima ya liwa, molimo oyo emonanaka te ekabwanaka na nzoto mpe etikalaka na bomoi, na mayoki mpe makanisi na yango, ezali likanisi oyo elongobani te. Miguel de Unamuno, mokomi mpe moto ya filozofi na ekeke ya 20, azali mpe mwanamboka ya ekólo Espagne akomaki ete: “Moto oyo azali kondima ete molimo ekufaka te, na maloba mosusu, azali kolinga ete molimo ekoka kokufa te, kasi kolinga likambo yango makasi bongo ememaka moto na kobwaka makanisi ya bomoto.” Bato mosusu ya ndenge na ndenge bandimaki liteya yango, lokola Aristote mpe Épicure, bato minene ya filozofi na ntango ya kala, monganga Hippocrate, David Hume, moto ya filozofi mpe moto ya ekólo Écosse, nganga-mayele Moarabe Averroës, mpe Jawaharlal Nehru, oyo azalaki ministre-mokonzi ya liboso ya ekólo Inde nsima ya lipanda.

7. Tosengeli kotalela mituna nini ya ntina mpo na endimeli oyo elobaka ete molimo ekufaka te?

7 Liboso ya ebele ya makanisi mpe bindimeli motindo yango, tosengeli komituna mituna oyo: Tozali mpenza na molimo oyo ekufaka te? Soki molimo ekufaka, ndenge nini liteya yango ya lokuta endimami na mangomba mingi lelo oyo? Likanisi yango eutaki wapi? Ezali na ntina mingi ete tózwa biyano ya solosolo mpe oyo ekondimisa biso mpamba te likambo yango etaleli bomoi na biso na mikolo ezali koya. (1 Bakolinti 15:19) Kasi, tóbanda naino na kotalela ndenge nini liteya oyo elobaka ete molimo ekufaka te ebimaki.

Ebandeli ya liteya yango

8. Socrate na Platon bakokisaki mokumba nini ntango babimisaki likanisi ete molimo ekufaka te?

8 Bato balobaka ete Socrate na Platon, bafilozofe ya ekólo Grèce na ekeke ya mitano L.T.B. bazali kati na bato ya liboso oyo bateyaki ete molimo ekufaka te. Kasi, ezali bango te nde babimisaki liteya yango. Nzokande, bango babongisaki yango mpe bakómisaki yango liteya ya filozofi; na ndenge yango esepelisaki bato ya mayele ya eleko na bango mpe ya bileko oyo elandaki. Mpo na koloba solo, liboso na bango, basambeli ya Lingomba ya Zoroastre na Perse ya kala mpe Baezipito ya kala, bango mpe bazalaki kondima ete molimo ekufaka te. Na bongo, motuna yango oyo: Liteya yango eutaki wapi?

9. Mimeseno ya bato ya Ezipito, ya Perse, mpe ya Grèce ya kala ezwaki bopusi nini?

9 Buku moko (The Religion of Babylonia and Assyria) elobi ete, “Na ntango ya kala, bikólo lokola Ezipito, Perse, mpe Grèce ezwaki bopusi ya lingomba ya Babilone.” Buku yango elobi lisusu boye mpo na bindimeli ya mangomba ya Ezipito: “Lokola Ezipito na Babilone ezalaki koyokana banda kala mpenza, ndenge emonisami na bitanda ya El-Amarna, na ntembe te mabaku ezalaki mingi mpo ete makanisi mpe mimeseno ya Babilone ekɔta na losambo ya Baezipito.”a Tokoki mpe koloba bongo mpo na mimeseno ya Baperse na Bagreke ya kala.

10. Bato ya Babilone bazalaki na likanisi nini mpo na bomoi nsima ya liwa?

10 Kasi, bato ya Babilone ya kala bazalaki nde kondima ete molimo ekufaka te? Na likambo oyo, Profesere Morris Jastrow, molakisi na iniversite ya Pennsylvanie, na États-Unis, akomaki ete: “[Na Babilone], moto moko te, ezala bato nyonso to bakambi ya lingomba, azalaki kokanisa ete eloko oyo ekómi na bomoi ekoki lisusu kokufa mpo na libela. [Na makanisi na bango], liwa ezalaki nzela mpo na koleka na bomoi mosusu, mpe lokola tokufaka [na bomoi oyo], likambo yango ezalaki se kondimisa ete tokoki te kokima mbongwana ya bomoi oyo liwa ememaka.” Ɛɛ, bato ya Babilone bazalaki kondima ete nsima ya liwa, moto akobaka kozala na bomoi na lolenge moko to mosusu. Bazalaki komonisa yango na ndenge bazalaki kokunda bibembe na biloko oyo bakokende kosalela na mboka ya bawei.

11, 12. Nsima ya Mpela, liteya oyo elobaka ete molimo ekufaka te ebandaki wapi?

11 Tomoni polele ete liteya oyo elobaka ete molimo ekufaka te eutaki na Babilone ya kala. Yango emonisi nini? Biblia elobi ete Nimilode, mwana ya mwana ya mwana ya Noa nde moto atongaki mboka Babele to Babilone. Nsima ya Mpela ya mokili mobimba na ntango ya Noa, bato nyonso na mokili bazalaki koloba monɔkɔ moko mpe bazalaki na losambo se moko. Nimilode ‘atɛmɛlaki Yehova’ mpe lisusu ye na bato oyo balandaki ye balingaki ‘komisalela nkombo ya lokumu.’ Yango wana, na ntango Nimilode abimisaki likanisi ya kotonga ndako molai, abandisaki mpe losambo mosusu.​—Genese 10:1, 6, 8-10; 11:1-4.

12 Masolo ya kala elobaka ete Nimilode akufaki liwa moko ya nsɔmɔ. Nsima ya liwa na ye, na ntembe te bato ya Babilone balukaki kokumisa ye lokola mobandisi, motongi, mpe mokonzi ya liboso ya mboka na bango. Lokola bazalaki kotalela nzambe Maladuku (Melodaka) lokola motongi ya Babilone mpe bakonzi mingi oyo bayangelaki nsima na ye na Babilone bazwaki nkombo na ye, banganga-mayele mosusu balobaki ete Maladuku ezali nde Nimilode oyo akumisami lokola nzambe. (2 Mikonzi 25:27; Yisaya 39:1; Yilimia 50:2) Soki ezali bongo, boye bato mingi bazalaki kondima ete molimo etikalaka na bomoi soki moto akufi, ata kaka na eleko oyo Nimilode akufaki. Ata soki ezalaki ndenge nini, mikanda ya istware emonisi ete liteya oyo elobaka ete molimo ekufaka te ebandaki na Babele, to Babilone nsima ya Mpela.

13. Ndenge nini liteya oyo elobaka ete molimo ekufaka te epalanganaki na mokili, mpe ebotaki mbuma nini?

13 Biblia emonisi lisusu ete Nzambe abulunganisaki minɔkɔ ya bato oyo bazalaki kotonga ndako molai ya Babele mpo na kobebisa mokano na bango. Lokola bakokaki lisusu kosolola te moko na mosusu, basundolaki mosala oyo babandaki mpe bapalanganaki “bipai nyonso na mokili.” (Genese 11:5-9) Tóbosana te ete atako minɔkɔ ya batongi ya ndako oyo esengelaki kozala molai ebulunganaki, makanisi mpe bindimeli na bango ebongwanaki te. Yango wana, bipai nyonso oyo bakendaki, bamemaki bindimeli ya losambo na bango. Talá ndenge oyo bindimeli ya Babilone, lokola oyo elobaka ete molimo ekufaka te, epalanganaki na mokili mobimba mpe ekómaki liteya monene na mangomba minene ya mokili mobimba. Na bongo, lisangá moko monene ya mangomba ya lokuta ebotamaki; Biblia ebéngi yango na nkombo ebongi mpenza ete “[Babilone] Monene mama na pite na bosɔtɔ na mokili.”​—Emoniseli 17:5.

Lisangá ya mangomba ya lokuta na mokili mobimba ekɔti na Azia

14. Ndenge nini bindimeli ya mangomba ya Babilone epalanganaki na Inde mpe mikili oyo ezali pembeni na yango?

14 Banganga-mayele mosusu ya istware balobaka ete eleki sikoyo mbula 3 500, mindɛlɛ oyo bautaki na nɔrdi-wɛsti bakendaki kofanda na Lobwaku ya Indus, oyo eteni na yango monene ezali lelo oyo na ekólo Pakistan mpe na ekólo Inde. Longwa esika wana bapalanganaki na bitando oyo ezali pembeni ya Ebale Gange mpe na Inde mobimba. Banganga-mayele mosusu balobaka ete bindimeli ya bato yango eutaki na mateya ya bato ya Iran mpe ya Babilone ya kala. Na nsima, bindimeli yango ebandisaki Lingomba ya Bahindu.

15. Ndenge nini liteya oyo elobaka ete molimo ekufaka te ekɔtaki na Lingomba ya Bahindu ya mikolo na biso?

15 Na ekólo Inde, liteya oyo elobaka ete molimo ekufaka te ekómaki liteya oyo elobaka ete moto abotamaka mbala na mbala. Lokola bato ya mayele ya Lingomba ya Bahindu bazalaki na mokakatano mpo na kolimbola ntina oyo bato bazali na bizaleli mabe mpe na bampasi, babimisaki likambo oyo babéngi mobeko ya Karma, elingi koloba ete moto abukaka se oyo akonaki. Ntango basangisaki mobeko ya Karma na endimeli oyo elobaka ete molimo ekufaka te, babimisaki liteya oyo: moto abotamaka mbala na mbala, epai balobi ete malamu to mabe oyo moto asalaki na bomoi na ye akozwela yango mbano to etumbu na bomoi oyo ekolanda. Mokano ya mondimi ezali kozwa moksha, to kosikwama na bolɔkɔ ya kobotama mbala na mbala mpe kosangana na oyo babéngi solo ya nsuka, to Nirvana. Nsima ya bikeke mingi, wana Lingomba ya Bahindu ezalaki kopalangana, liteya ya kobotama mbala na mbala epalanganaki na yango mpe nzela moko. Liteya yango ekómi liteya monene ya Lingomba ya Bahindu na moi ya lelo.

16. Endimeli nini mpo na bomoi nsima ya liwa ekolaki na makanisi mpe na mimeseno ya bato mingi na Azia ya Ɛsti?

16 Lingomba ya Bahindu ebimisaki mangomba mosusu lokola Lingomba ya Bouddha, Lingomba ya Jaïna, mpe Lingomba ya Sikh. Mangomba yango mpe ekangami makasi na endimeli oyo elobaka ete moto abotamaka mbala na mbala. Lisusu, ntango Lingomba ya Bouddha ekɔtaki na Azia ya Ɛsti, na bikólo lokola Chine, Corée, Japon, mpe bipai mosusu, ebongolaki mpenza mimeseno mpe bindimeli ya bato na mikili wana nyonso. Yango ebimisaki mangomba oyo ezali na bindimeli kilikili, oyo ekamati mateya mosusu ya Lingomba ya Bouddha, ya losambo ya bilimu, mpe losambo ya bankɔkɔ. Mangomba oyo eleki na bopusi ezali Lingomba ya Tao, ya Confucius, mpe ya Shinto. Talá ndenge oyo endimeli oyo elobaka ete bomoi esukaka te ata soki nzoto ekufi ekɔtaki na makanisi mpe mimeseno ya bato mingi na eteni wana ya mokili.

Tokoloba boni mpo na Lingomba ya Bayuda, mangomba ya boklisto, mpe Lingomba ya Bamizilma?

17. Na oyo etali bomoi nsima ya liwa, Bayuda ya kala bazalaki kondima nini?

17 Bato ya Lingomba ya Bayuda, bandimi ya mangomba ya boklisto, mpe Bamizilma bandimaka nini na ntina na bomoi nsima ya liwa? Na kati ya mangomba oyo nyonso, Lingomba ya Bayuda nde eumeli mingi koleka. Lingomba yango ebandaki na Abalayama, eleki soki mbula 4 000; kala mpenza liboso ete Socrate na Platon bábongisa liteya oyo elobaka ete molimo ekufaka te. Bayuda ya kala bazalaki kondima lisekwa ya bakufi, kasi bazalaki kondima te ete molimo ekufaka te. (Matai 22:31, 32; Baebele 11:19) Kasi, ndenge nini liteya oyo elobaka ete molimo ekufaka te ekɔtaki na Lingomba ya Bayuda? Istware epesi eyano.

18, 19. Ndenge nini liteya oyo elobaka ete molimo ekufaka te ekɔtaki na Lingomba ya Bayuda?

18 Na mobu 332 L.T.B., Alesandala Monene alongaki mikili ya Moyen-Orient, bakisa mpe Yelusaleme. Lokola bato oyo bakómaki bakonzi nsima na ye bakobaki kokokisa mokano na ye ya koteya bato nyonso mimeseno ya Bagreke, nsukansuka mimeseno ya Bagreke esanganaki na oyo ya Bayuda. Na nsima, Bayuda bakómaki koyekola makanisi ya Bagreke; kutu, bamoko bakómaki bato ya filozofi.

19 Philon d’Alexandrie, oyo azalaki na bomoi na ekeke ya liboso T.B., azalaki moko ya Bayuda oyo bakómaki bato ya filozofi. Azalaki kosepela na Platon mingi mpe asalaki molende mpo na kolimbola mateya ya Bayuda na maloba ya filozofi ya Bagreke. Na bongo, afungolaki nzela mpo na Bayuda mosusu oyo bazalaki bato ya mayele. Talmud, buku oyo ezali na bandimbola oyo balabi bazalaki kopesa mpo na mibeko oyo ekomamaki te, yango mpe ezwaki bopusi ya makanisi ya Bagreke. Buku moko (Encyclopaedia Judaica) elobi ete, “Balabi oyo bakomaki Talmud bazalaki kondima ete molimo etikalaka na bomoi nsima ya liwa.” Kutu, mikanda mosusu ya maji ya Bayuda oyo ekomamaki nsima, lokola kabbale, eteyaka ete moto abotamaka mbala na mbala. Boye, na nzela ya filozofi ya Bagreke, likanisi oyo elobi ete molimo ekufaka te ekɔtaki na Lingomba ya Bayuda. Ndenge nini liteya yango ekɔtaki na mangomba ya boklisto?

20, 21. (a) Ndenge nini baklisto ya liboso bazalaki kotalela mateya ya filozofi ya Platon, to ya Bagreke? (b) Likambo nini ememaki kosangana ya makanisi ya Platon na mateya ya boklisto?

20 Yesu Klisto azali mobandisi ya lingomba ya boklisto ya solosolo. Miguel de Unamuno, oyo toutaki kozongela maloba na ye mwa liboso, akomaki boye na ntina na Yesu: “Ye azalaki kondima lisekwa ya nzoto, na momeseno ya Bayuda, kasi azalaki kondima te ete molimo ekufaka te, lokola momeseno ya [Bagreke] oyo eutaki epai ya Platon.” Asukisaki boye: “Liteya oyo elobaka ete molimo ekufaka te . . . euti na filozofi ya bapakano.” Na kotalela nyonso oyo, tokoki sikoyo koyeba ntina oyo ntoma Paulo ayebisaki baklisto ya ekeke ya liboso ete bákeba mpenza na “filozofi mpe na mateya ya lokuta oyo euti na mimeseno ya bato, euti na makambo mpamba ya mokili, kasi euti na Klisto te.”​—Bakolose 2:8, NW.

21 Kasi ntango nini mpe ndenge nini “mateya ya filozofi ya bapakano” ekɔtaki na mangomba ya boklisto? Buku moko (The New Encyclopædia Britannica) elobi boye: “Banda na katikati ya ekeke ya mibale T.B., baklisto oyo bayebaki mwa moke mateya ya filozifi ya Bagreke bakómaki na mposa ya kolobela bindimeli na bango na maloba ya filozofi ya Bagreke, mpo na kolakisa ete bazali bato ya mayele mpe mpo na kobongola bapakano oyo bazalaki bato ya mayele. Filozofi oyo ebongaki mpenza na likambo yango ezalaki filozofi ya Platon.” Origène d’Alexandrie na Augustin d’Hippone bazali bato mibale ya filozofi oyo basalaki bopusi mingi na mateya ya mangomba ya boklisto. Mateya ya Platon ekɔtelaki bango makasi mpe bango nde basangisaki makanisi yango na mateya ya boklisto.

22. Ndenge nini liteya oyo elobaka ete molimo ekufaka te ekómá liteya monene ya Lingomba ya Bamizilma?

22 Liteya oyo elobaka ete molimo ekufaka te ekɔtaki na Lingomba ya Bayuda mpe na mangomba ya boklisto na bopusi ya mateya ya Platon, nzokande Lingomba ya Bamizilma eteyaki yango banda na ebandeli. Koran, buku mosantu ya Bamizilma elobi ete moto azali na molimo oyo etikalaka na bomoi nsima ya liwa. Elobi ete molimo esukaka na bomoi na paladiso ya likoló to na etumbu na lifelo ya mɔ́tɔ. Yango elingi koloba te ete banganga-mayele Baarabe bamekaki te kosangisa mateya ya Lingomba ya Bamizilma na mateya ya filozofi ya Bagreke. Kutu, mateya ya Aristote ekɔtaki mwa mingi na mikili ya Baarabe. Nzokande, liteya oyo elobaka ete molimo ekufaka te ezali endimeli ya Bamizilma tii lelo.

23. Na lisolo oyo elandi tokotalela mituna nini ya ntina na likambo ya bomoi nsima ya liwa?

23 Tomoni polele ete mangomba ya mokili ebimisaki bindimeli kilikili na ntina na bomoi nsima ya liwa; nyonso euti na liteya oyo elobaka ete molimo ekufaka te. Bindimeli yango ekɔteli mpenza bamiliare ya bato mpe ekómisi bango baombo na yango. Liboso ya makambo oyo nyonso, mituna oyo ezali koya na makanisi na biso yango oyo: Tokoki nde koyeba nini mpenza ekómelaka biso soki tokufi? Bomoi mosusu ezalaka nsima ya liwa? Biblia elobi nini na likambo oyo? Tokotalela mituna yango na lisolo oyo elandi.

[Maloba na nse ya lokasa]

a El-Amarna ezali esika tokoki kokuta bitika ya Akhetaton, mboka moko ya Ezipito, oyo bato balobaka ete etongamaki na ekeke ya 14 L.T.B.

Okoki kolimbola?

◻ Likambo nini etayamaka na kati ya mangomba mingi na ntina na bomoi nsima ya liwa?

◻ Ndenge nini istware mpe Biblia emonisi ete liteya oyo elobaka ete molimo ekufaka te eutaki na Babilone?

◻ Ndenge nini mangomba ya Azia makómaki koteya endimeli oyo eutaki na Babilone ete molimo ekufaka te?

◻ Ndenge nini liteya oyo elobaka ete molimo ekufaka te ekɔtaki na Lingomba ya Bayuda, na mangomba ya boklisto, mpe na Lingomba ya Bamizilma?

[Bililingi na lokasa 12, 13]

Lokola Alesandala Monene abɔtɔlaki ekólo ya Bayuda, yango wana esalaki ete mimeseno ya Bagreke na mimeseno ya Bayuda esangana

Augustin alukaki kosangisa mateya ya filozofi ya Platon na mateya ya boklisto

[Eutelo ya bafɔtɔs]

Alesandala: Musei Capitolini, Rome; Augustin: Euti na buku Great Men and Famous Women

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto