Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • dp mok. 5 nk. 68-81
  • Balongaki komekama makasi na lisalisi ya kondima na bango

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Balongaki komekama makasi na lisalisi ya kondima na bango
  • Tyá likebi na esakweli ya Danyele!
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • EKEKO YA WOLO OYO EBIMISAKI KOMEKAMA MAKASI
  • BASALELI YA YEHOVA BABOYI KOBEBISA LOSAMBO NA BANGO
  • BABWAKI BANGO NA LITUMBU NA MƆ́TƆ NA KONGALA!
  • KONDIMA NA BISO MPE EZALI KOMEKAMA MAKASI LELO
  • Nzambe na yo nani?
    Yekolá epai ya Moteyi Monene
  • Baboyi kofukamela ekeko
    Mokanda mpo na masolo ya Biblia
  • Baboyaki kogumbama
    Zwá mateya na masolo ya Biblia
  • ‘Nzambe na biso ayebi kobikisa biso’
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2006
Makambo mosusu
Tyá likebi na esakweli ya Danyele!
dp mok. 5 nk. 68-81

Mokapo ya mitano

Balongaki komekama makasi na lisalisi ya kondima na bango

1. Ndenge nini bato mingi batalelaka likambo ya komipesa na Nzambe mpe komipesa na ekólo na bango?

OSENGELI komipesa na Nzambe mpe komipesa na ekólo na yo? Bato mingi bakoloba ete, ‘Nakumisaka Nzambe mpe nakumisaka ekólo na ngai. Nasambelaka Nzambe ndenge mibeko ya lingomba na ngai esɛngaka, kasi nakumisaka mpe ekólo na ngai.’

2. Ndenge nini mokonzi ya Babilone azalaki mosambeli monene mpe mokonzi monene ya politiki?

2 Ezali mpasi lelo mpo bato báyeba kokesenisa losambo mpe bolingo ya ekólo. Nzokande, na Babilone na ntango ya kala, losambo mpe ekólo ezalaki se eloko moko. Ɛɛ, makambo ya Leta na oyo ya lingomba esanganaki mpenza na boye ete ezalaki mpasi mpo na kokesenisa yango. Profesere Charles F. Pfeiffer akomaki ete: “Na Babilone na ntango ya kala, mokonzi azalaki nganga-nzambe monene mpe moyangeli ya Leta. Azalaki kopesa mbeka mpe komonisa bato na ye nzela nini basengeli kolanda na makambo matali losambo.”

3. Nini emonisaki ete Nebukadanesala azalaki moto oyo amipesaki mingi na losambo?

3 Tókamata ndakisa ya Mokonzi Nebukadanesala. Nkombo na ye elimboli “Nebo, batelá Mokitani!” Nebo ezalaki nzambe ya mayele mpe ya misala ya bilanga na Babilone. Nebukadanesala azalaki moto oyo amipesaki mingi na makambo ya losambo. Lokola touti koloba na mokapo oyo eleki, Nebukadanesala atongaki mpe abongisaki batempelo mpo na banzambe mingi oyo bazalaki na Babilone. Kasi batempelo yango ezalaki kosalema mingi mpenza mpo na lokumu ya Maladuku, nzambe oyo Nebukadanesala azalaki kokumisa ete azalaki kolongisa ye na bitumba.a Eyebanaki ete Nebukadanesala azalaki ntango nyonso kotuna banganga-nkisi liboso ya kokende na etumba.​—Ezekiele 21:18-23.

4. Lobelá mimeseno ya bato ya Babilone na oyo etali losambo.

4 Ezali solo ete na Babilone bato bamipesaki mingi na losambo. Bato ya engumba yango bazalaki komikumisa mpo bazalaki na batempelo koleka 50 epai kuna bazalaki kosambela ebele na banzambe. Na ndakisa, bazalaki kosambela banzambe ya bosato: Anu (nzambe ya likoló), Enlil (nzambe ya mabelé, ya mopɛpɛ mpe ya ekumbaki), mpe Ea (nzambe ya mai). Banzambe mosusu ya Bosato ezalaki bongo Sin (nzambe ya sanza), Samasa (nzambe ya mwese), mpe Isitala (nzambe-mwasi mokonzi ya kobota). Maji, misala ya banganga-nkisi, mpe astroloji ezalaki makambo ya ntina mpenza na losambo ya Babilone.

5. Komekama nini losambo ya Babilone etyaki liboso na Bayuda oyo bazalaki na boombo na Babilone?

5 Kofanda na bato oyo bazalaki kosambela banzambe mingi ezalaki mpenza komekama monene mpo na Bayuda oyo bazalaki na boombo. Bikeke mingi liboso, Mose akebisaki Bayisalaele mpo na makama oyo basengelaki kokutana na yango soki batombokeli Nzambe na bango, Mosali Monene ya Mibeko. Mose alobaki na bango ete: “[Yehova] akoyeisa yo, mpe mokonzi oyo okotya na liboso na yo epai na libota oyo bino mpe batata na bino boyebaki liboso te, mpe kuna bokosalela banzambe mosusu ya nzete mpe ya mabanga.”​—Deteronome 28:15, 36.

6. Mpo na nini bomoi ya Danyele, Hanania, Misaele mpe Azalia ezalaki mpenza na likama na Babilone?

6 Bayuda oyo bazalaki na boombo bakutanaki na komekama yango. Ezalaki mpenza mpasi mpo Danyele, Hanania, Misaele mpe Azalia bábatela bosembo na bango. Baponaki bilenge Baebele yango minei mpo báyekola misala ya Leta. (Danyele 1:3-5) Yebá ete bapesaki bango kutu bankombo ya Babilone: Beletesasala, Sadalaka, Mesaka, mpe Abede-nego. Nyonso wana ezalaki mpo na kopusa bango bálanda bizaleli ya bato ya Babilone.b Lokola bazalaki na misala ya lokumu mpenza, soki baboi kosambela banzambe ya Babilone, bato bakomona likambo yango mabe mpe bakozwa bango lokola banguna ya mboka.

EKEKO YA WOLO OYO EBIMISAKI KOMEKAMA MAKASI

7. (a) Lobelá ekeko oyo Nebukadanesala atɛlɛmisaki. (b) Mpo na nini asalaki yango?

7 Mpo na kolendisa bomoko na bokonzi na ye, Nebukadanesala atɛlɛmisaki ekeko moko ya wolo na lisobe ya Dula. Ekeko yango etombwanaki na mɛtɛlɛ 27 mpe ezalaki na monene ya mɛtɛlɛ 2,7.c Bato mosusu bakanisaka ete ekeko yango ezalaki likonzi moko ya molai mpe ya monene. Balobaka ete ntango mosusu batɛlɛmisaki ekeko yango likoló na eloko moko. Ekeko yango ekokaki kozala elongi ya moto, elilingi ya Nebukadanesala ye moko to ya Nego. Ata soki ezalaki bongo te, kasi ekeko yango monene esalemaki mpenza mpo na komonisa nguya ya bokonzi ya Babilone, na ndenge bato bakobanda kotalaka mpe kosambelaka yango.​—Danyele 3:1.

8. (a) Nebukadanesala abéngaki banani na molulu oyo ye asalaki mpo na kolakisa ekeko, mpe asɛngaki babyangami nyonso básala nini? (b) Etumbu nini asengelaki kopesa na moto oyo akoboya kofukamela ekeko yango?

8 Nebukadanesala asalaki molulu mpo na kolakisa bato ekeko yango. Abéngaki bakonzi ya Leta, bazuzi-bakambi, baguvernere, bapesi-toli, babombi-mosolo, bazuzi, bakonzi ya basoda, mpe bakonzi nyonso ya Leta oyo bautaki na bitúká nyonso. Molobeli ya mokonzi agangaki: “Ɛ mabota mpe mikili mpe nkota, elakelami bino ete na ntango ekoyoka bino lokito na kɛlɛlo mpe piololo mpe nzɛnzɛ mpe mbonda mpe elefo mpe lindanda mpe miziki na ndenge nyonso, bokokweya mpe bokosambela [ekeko, NW] na wolo oyo mokonzi Nebukadanesala asili kotɛlɛmisa; mpe soko nani akokweya mpe akosambela te akobwakama na ntango yango mpenza na kati na litumbu na mɔ́tɔ na kongala.”​—Danyele 3:2-6.

9. Bato bakanisaki nini mpo na ekeko oyo Nebukadanesala atɛlɛmisaki mpo báfukamela yango?

9 Bato mosusu balobaka ete, Nebukadanesala asalaki molulu yango mpo na kopusa Bayuda bábebisa losambo na bango epai na Yehova. Kasi ezalaki mpenza mpo na bongo te mpamba te mokonzi abéngaki bobele bakonzi ya Leta. Na yango, mwa Bayuda oyo bazalaki kuna, ezalaki bobele baoyo basalaka misala ya Leta. Na ntembe te, molulu yango ya kofukamela ekeko esalemaki mpo na kolendisa boyokani kati na bakonzi ya Leta. Nganga-mayele John F. Walvoord alobi boye: “Molulu yango monene esangisaki bakonzi ya Leta mpo na komonisa nguya ya bokonzi ya Nebukadanesala mpe kondimela banzambe mpamba te na makanisi ya bato ya Babilone, banzambe basungaka bango na bitumba.”

BASALELI YA YEHOVA BABOYI KOBEBISA LOSAMBO NA BANGO

10. Mpo na nini baoyo bazalaki Bayuda te bamonaki ntina moko te ya koboya kotosa mobeko ya Nebukadanesala?

10 Atako ebele ya bato oyo mokonzi abéngaki na molulu yango bazalaki kosambela banzambe ndenge na ndenge, bamonaki ata ntina moko te ya koboya kosambela ekeko ya Nebukadanesala. Nganga-mayele moko ya Biblia alimboli boye: “Bango nyonso bamesanaki kosambela bikeko. Bamonaki mabe te kosambela nzambe moko, ndenge basambelaka nzambe mosusu.” Alobaki lisusu: “Basambeli nyonso wana ya bikeko bazalaki na likanisi moko ete, banzambe bazali mingi. Na yango, ezali mabe te kokumisa nzambe ya bato mosusu to ya ekólo mosusu.”

11. Mpo na nini Sadalaka, Mesaka na Abede-nego baboyaki kofukamela ekeko yango?

11 Nzokande, Bayuda bakokaki kosala bongo te. Nzambe na bango, Yehova, apesaki bango mobeko oyo: “Okosala ekeko mpo na yo te, soko elilingi na eloko na lola na likoló te, na mokili na nse te, to na mai na nse na mokili te. Okokumbamela yango te to kosalela yango te, mpo ete ngai [Yehova] Nzambe na yo nazali Nzambe [oyo asɛngaka básambela bobele ye moko, NW].” (Exode 20:4, 5) Yango wana, ntango miziki ebandaki kobɛta, bato nyonso bafukamelaki ekeko yango, kasi bilenge Baebele misato​—Sadalaka, Mesaka na Abede-nego, bafukamaki te.​—Danyele 3:7.

12. Bakaladi mosusu bafundaki Baebele misato na likambo nini, mpe mpo na nini?

12 Babyangami mosusu kati na Bakaladi basilikelaki Baebele yango misato mpo ete atako bazalaki bakonzi, baboyaki kofukamela ekeko. Bakendaki ‘kofunda bango’d noki epai na mokonzi. Batunaki ata bango te ntina nini basalaki bongo. Lokola mposa na bango ezalaki ete mokonzi apesa Baebele yango etumbu, mpo bamonaki bango lokola bato bazangi bosembo, oyo bazali kotɛka mboka, na bongo, bafundaki bango ete: “Bamoko na Bayuda bazali, baoyo yo otyaki na liboso na misala na ndambo na [Babilone], Sadalaka, mpe Mesaka mpe Abede-nego. Ɛ mokonzi, bato oyo batosaki yo te. Bakosalelaka banzambe na yo te, mpe basambelaki [ekeko, NW] na wolo oyo etɛmisaki yo te.”​—Danyele 3:8-12.

13, 14. Eloko nini Nebukadanesala alobaki na Sadalaka, Mesaka na Abede-nego ntango baboyaki kofukamela ekeko oyo ye atɛlɛmisaki?

13 Nebukadanesala asilikaki mpenza mpo Baebele yango misato baboyaki kotosa mobeko na ye. Emonanaki polele ete akokaki te kobongola Sadalaka, Mesaka na Abede-nego bákóma bamonisi ya sembo ya bokonzi ya Babilone. Ateyaki bango mayele ya Bakaladi mpe apesaki bango bankombo ya sika! Kasi Nebukadanesala amikosaki mpenza na kokanisáká ete mateya yango ekopusa bango bándima losambo ya Babilone to kopesa bango nkombo ya sika ekobongola bomoto na bango. Sadalaka, Mesaka na Abede-nego balandaki kosalela Yehova na bosembo.

14 Mokonzi Nebukadanesala asilikaki makasi. Abéngaki noki Sadalaka, Mesaka na Abede-nego. Atunaki bango: “Ɛ Sadalaka mpe Mesaka mpe Abede-nego, ezali solo ete bino bokosalelaka banzambe na ngai te mpe bosambeli [ekeko, NW] na wolo oyo etɛmisaki ngai te?” Na maloba oyo, Nebukadanesala azalaki kondima mpenzampenza te ete Baebele yango bakoki kosala likambo motindo wana. Ntango mosusu amitunaki, ‘Ndenge nini bana mibali ya mayele boye bakoki kotyola mobeko na ngai oyo bayebi polele ete soki moto atosi yango te akozwa etumbu ya liwa?’​—Danyele 3:13, 14.

15, 16. Libaku nini Nebukadanesala apesaki bilenge Baebele yango?

15 Nebukadanesala amonaki malamu apesa bilenge Baebele yango libaku mosusu. Alobaki: “Sikawa, soko bolingi kokweya mpe kosambela [ekeko, NW] esalaki ngai, wana ekoyoka bino lokito na kɛlɛlo mpe piololo mpe nzɛnzɛ mpe mbonda mpe elefo mpe lindanda mpe miziki na ndenge nyonso, [ekozala] malamu; soko nde bokosambela te, bokobwakama na ntango yango mpenza na kati na litumbu na mɔ́tɔ na kongala, mpe nzambe oyo akobikisa bino na mabɔkɔ na ngai azali nani?”​—Danyele 3:15.

16 Emonanaki mpenza ete Nebukadanesala azwaki liteya te na ndɔtɔ ya ekeko (oyo elobami na mokanda ya Danyele mokapo 2). Ntango mosusu abosanaki maloba oyo ye moko alobaki na Danyele ete: “Nzambe na [bino, NW] azali Nzambe na banzambe, mpe Nkolo na mikonzi.” (Danyele 2:47) Na yango, Nebukadanesala atumolaki Yehova ntango alobaki ete ata Ye akokoka kobikisa Baebele na etumbu oyo ezalaki kozela bango te.

17. Ndenge nini Sadalaka, Mesaka na Abede-nego batalelaki libaku oyo mokonzi apesaki bango?

17 Sadalaka, Mesaka na Abede-nego bakanisaki ata moke te kotika bosembo na bango. Bazongiselaki mokonzi eyano noki: “Ɛ Nebukadanesala, [tosengeli, NW] kozongisela yo eyano na likambo oyo te. Soko ezali boye, Nzambe na biso, oyo biso tosaleli ye, ayebi kobikisa biso na litumbu na mɔ́tɔ na kongala; mpe akobikisa biso na lobɔkɔ na yo. Ɛ mokonzi, oyeba ete ata boye te, biso tokosalela banzambe na yo te, mpe tokosambela [ekeko, NW] na wolo oyo etɛmisaki yo te.”​—Danyele 3:16-18.

BABWAKI BANGO NA LITUMBU NA MƆ́TƆ NA KONGALA!

18, 19. Nini esalemaki ntango babwakaki Baebele misato na mɔ́tɔ na kongala?

18 Nebukadanesala ayokaki nkanda mpenza mpe atindaki basali na ye ete bápelisa mɔ́tɔ mbala nsambo koleka ndenge bapelisaki liboso. Mpe atindaki ‘bamoko na bato ya makasi’ bákanga Sadalaka, Mesaka na Abede-nego na nkamba mpe bábwaka bango na “litumbu na mɔ́tɔ na kongala.” Batosaki mobeko ya mokonzi, babwakaki Baebele yango misato na mɔ́tɔ, na bilamba na bango na nzoto mpo bázika mpenza mobimba. Kasi na esika ete bango bázika, ezalaki nde bato oyo babwakaki bango na mɔ́tɔ nde bazikaki bango moko.​—Danyele 3:19-22.

19 Kasi, likambo moko ya nsɔmɔ esalemaki. Babwakaki Sadalaka, Mesaka na Abede-nego na esika oyo mɔ́tɔ ezalaki makasi koleka, kasi bazikaki te. Omitya naino na esika ya Nebukadanesala; akamwaki mingi mpenza! Bakangaki Baebele yango na nkamba, babwakaki bango na mɔ́tɔ na kongala, kasi bakufaki te. Kutu, bazalaki kotambola na kati ya mɔ́tɔ! Kasi Nebukadanesala amonaki eloko mosusu. Atunaki bakonzi ya Leta ete: “Tobwakaki bato misato bakangami na kati na mɔ́tɔ te?” Bazongisaki ete: “Ezali boye, mokonzi.” Kasi Nebukadanesala agangaki ete: “Nde namoni bato minei bakangolami, [bazali kotambola na kati na mɔ́tɔ, mpe bazali kozika] te, mpe lolenge na oyo na minei ezali lokola mwana moko na banzambe.”​—Danyele 3:23-25.

20, 21. (a) Eloko nini Nebukadanesala ayokaki te na nzoto na Sadalaka, Mesaka mpe Abede-nego ntango babimaki na mɔ́tɔ na kongala? (b) Nebukadanesala andimaki likambo nini?

20 Nebukadanesala apusanaki pene na mɔ́tɔ yango makasi. Abéngaki na mongongo makasi: “Sadalaka mpe Mesaka mpe Abede-nego, baombo na Nzambe Aleki-Likoló, bimá mpe yaká awa!” Baebele yango misato babimaki na katikati ya mɔ́tɔ. Ya solo, baoyo nyonso bamonaki likamwisi yango, ezala bakonzi ya Leta, bazuzi-bakambi, baguvernere mpe bakonzi ndenge na ndenge, bango nyonso bakamwaki mpenza. Ezalaki lokola babwakaki bilenge yango misato na mɔ́tɔ na kongala te! Bazalaki ata na nsolo ya mɔ́tɔ te mpe ata nsuki moko ya mitó na bango ezikaki te.​—Danyele 3:26, 27.

21 Sikawa Mokonzi Nebukadanesala asengelaki kondima ete Yehova azali Nzambe oyo Aleki-Likoló. Alobaki ete: “Nzambe na Sadalaka mpe Mesaka mpe Abede-nego [akumisama], oyo atindaki [anzelu] na ye mpe abikisaki baombo na ye, baoyo bandimaki ye mpe baboyaki lilako na mokonzi, mpe bapesaki nzoto na bango ete básalela mpe básambela nzambe mosusu te, bobele Nzambe na bango mpenza.” Na nsima, mokonzi akebisaki bato nyonso ete: “Yango wana nazali [kopesa mobeko, NW] ete, Soko libota to mokili to lokota nini ekoloba mabe soko nini na ntina na Nzambe na Sadalaka mpe Mesaka mpe Abede-nego, bakokatama na biteni mpe ndako na bango ikozalisama mabondo na mbindo; mpo ete nzambe mosusu boye azali te, oyo akoki kobikisa na lolenge na oyo.” Na bongo, Baebele yango misato bazongelaki misala na bango ya lokumu mpe ‘bazwaki nkembo na etúká ya Babilone.’​—Danyele 3:28-30.

KONDIMA NA BISO MPE EZALI KOMEKAMA MAKASI LELO

22. Ndenge nini na mikolo na biso basaleli ya Yehova bazali kokutana na komekama lokola oyo Sadalaka, Mesaka na Abede-nego bakutanaki na yango?

22 Basambeli ya Yehova bazali kokutana lelo na komekama ndenge moko na oyo Sadalaka, Mesaka mpe Abede-nego bakutanaki na yango. Ya solo, basaleli ya Yehova bazali baombo na mboka moko ya mopaya te. Nzokande, Yesu alobaki na bayekoli na ye ete ‘básangana na mokili te.’ (Yoane 17:14) Bazali “bapaya” lokola bamekolaka te mimeseno, bizaleli mpe misala ya bazalani na bango oyo ezali na boyokani te na Makomami. Ndenge ntoma Paulo akomaki, baklisto basengeli “kotika komekola makambo ya mokili oyo.”​—Baloma 12:2, NW.

23. Ndenge nini Baebele yango misato bamonisaki bokangami, mpe ndenge nini baklisto bakoki komekola ndakisa na bango lelo?

23 Baebele yango misato baboyaki komekola mimeseno ya bato ya Babilone. Atako bazwaki mayele mingi epai na Bakaladi, bapɛngwaki te. Lokola basilaki komipesa epai na Yehova, bazwaki losambo na bango na motuya koleka. Lelo mpe, baklisto basengeli kotikala ngwi. Basengeli koyoka nsɔni te mpo ete bazali kosala makambo ndenge moko na bato ya mokili te. Ɛɛ, “mokili ezali [koleka, NW] mpe mposa mabe na yango lokola.” (1 Yoane 2:17) Ekozala mpenza bozoba mpe ekozala na litomba moko te soki tomekoli bizaleli ya mokili oyo ezali pene na kokufa!

24. Wapi mwa makambo oyo basaleli ya Nzambe basengeli kokeba na yango mpo bákweya na losambo ya bikeko te?

24 Baklisto basengeli kokeba na lolenge nyonso ya losambo ya bikeko.e (1 Yoane 5:21) Na botosi mpe na limemya nyonso, Sadalaka, Mesaka na Abede-nego batɛlɛmaki liboso na ekeko ya wolo. Kasi bayebaki ete kofukamela yango elimboli makambo mingi koleka kopesa yango bobele limemya mpamba. Ezali losambo, mpe Yehova alingaki koyokela bango nkanda makasi soki básanganaka na losambo yango. (Deteronome 5:8-10) John F. Walvoord akomaki boye: “[Kofukamela ekeko yango] ezalaki lokola kopesa dalapo losako. Esengelaki mpenza kozala bongo mpo na komonisa boyokani makasi oyo ezalaki kati na makambo ya losambo mpe ya politiki.” Lelo mpe, baklisto ya solo bazali kotɛmɛla losambo ya bikeko na mpiko nyonso.

25. Toli nini ozwi na lisolo ya bomoi ya Sadalaka, Mesaka na Abede-nego?

25 Lisolo ya Biblia oyo elobeli Sadalaka, Mesaka na Abede-nego ezali kopesa toli na baoyo nyonso balingi komipesa mobimba epai na Yehova. Na ntembe te, ntoma Paulo azalaki kolobela mpenza Baebele yango misato ntango atángaki bandimi ya ntango ya kala, oyo kati na bango basusu “babomaki nguya ya mɔ́tɔ.” (Baebele 11:33, 34, NW) Yehova akopambola baoyo nyonso bazali komekola kondima motindo yango. Abikisaki Baebele yango misato na mɔ́tɔ na kongala, kasi tokoki kondima ete Nzambe akosekwisa baoyo nyonso bazali sembo, baoyo nyonso bazali kokufa na bosembo na bango; akopambola bango ete bázwa bomoi ya seko. Ezala ndenge nini, Yehova “akobatelaka bomoi na bato na ye ya boyengebene; akobikisaka bango na lobɔkɔ ya bato mabe.”​—Nzembo 97:10.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Bato mosusu bakanisaka ete Maladuku, oyo azalaki kotalelama lokola mobandisi ya bokonzi ya Babilone, ezalaki bobele Nimilode oyo bato bakómaki kosambela ye lokola nzambe nsima ya liwa na ye. Kasi, bilembeteli ya sikisiki bizali te mpo na kondimisa likanisi yango.

b Nkombo “Beletesasala” elimboli “Batelá bomoi ya mokonzi.” Ndimbola ya nkombo “Sadalaka” ekoki kozala “mobeko ya Aku,” nzambe ya sanza epai na bato ya Sumer. Nkombo “Mesaka” ekoki kozala nkombo ya nzambe moko ya Sumer, mpe “Abede-nego” elimboli “mosaleli ya Nego,” to Nebo.

c Lokola ekeko yango ezalaki monene mpenza, banganga-mayele mosusu ya Biblia balobaka ete yango esalemaki na nzete mpe na nsima bapakolaki yango wolo.

d Liloba ya Araméen oyo ebongolami na ‘kofunda’ elimboli ‘kosilisa [moto] loposo,’ kosilisa ye loposo na matɔngi.

e Na ndakisa, Biblia ezali kokokanisa ezaleli ya kodunda mpe lokoso na losambo ya bikeko.​—Bafilipi 3:18, 19; Bakolose 3:5.

MAKAMBO NINI OKANGI NTINA?

• Mpo na nini Sadalaka, Mesaka na Abede-nego baboyaki kofukamela ekeko oyo Nebukadanesala atɛlɛmisaki?

• Nebukadanesala asalaki nini na Baebele yango misato?

• Mbano nini Yehova apesaki na Baebele yango misato mpo na kondima na bango?

• Toli nini ozwi na likebi nyonso oyo otii na lisolo ya bomoi ya Sadalaka, Mesaka na Abede-nego?

[Elilingi na lokasa mobimba 68]

[Bililingi na lokasa 70]

1. Nsɔngɛ ya tempelo (ziggourat) na Babilone

2. Tempelo ya Maladuku

3. Ekeko ya bronze ya banzambe Maladuku (na lobɔkɔ ya mwasi) mpe Nebo (na lobɔkɔ ya mobali) batɛlɛmi likoló na badalagona

4. Ekeko ya Nebukadanesala, oyo akumisamaki mpo na misala na ye minene ya botongi

[Elilingi na lokasa mobimba 76]

[Elilingi na lokasa mobimba 78]

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto