Liteya 6
Paladiso ekómi pene!
Makambo ya mabe oyo ezali kosalema na mokili sikoyo emonisi ete Paladiso ekómi pene. Biblia elobaki ete tokomona ntango ya mpasi liboso Paladiso eya. Tozali sikoyo na ntango yango! Talá mwa makambo mosusu oyo Biblia elobaki ete ekosalema:
Bitumba minene. “Libota moko ekotɛlɛmɛla libota mosusu mpe bokonzi moko ekotɛlɛmɛla bokonzi mosusu.” (Matai 24:7) Esakweli yango esili kokokisama. Banda 1914, bitumba ya minene mibale esalemaki mpe ebele ya bitumba mosusu ya mikemike ezali kosalema. Bamilio ya bato bazali kokufa na bitumba yango.
Maladi na mokili mobimba. “Esika na esika maladi mabe” ekozala. (Luka 21:11) Yango esili kosalema? Ɛɛ. Kanser, maladi ya motema, tibɛrkilozɛ, malaria, sida, mpe maladi mosusu ezali koboma bamilio ya bato.
Kozanga biloko ya kolya. Na mokili mobimba, bato mosusu bazali na biloko ya kolya te. Mbula na mbula, bamilio ya bato bazali kokufa na nzala. Yango ezali elembo mosusu oyo emonisi ete etikali moke Paladiso eya. Biblia elobi ete: “Nzala monene ekozala.”—Malako 13:8.
Koningana ya mabele. “Koningana na [mabele] ikozala na esika na esika.” (Matai 24:7) Yango mpe ezali kosalema na ntango na biso. Banda 1914, bato koleka milio moko bakufi na koningana ya mabele.
Bato mabe. Bato bakozala “baluki na mosolo” mpe “bamikumisi na bango mpenza.” Bakozala “baoyo bakolingaka malamu na bango mpenza koleka bolingo epai na Nzambe.” Bana bakobanda lisusu ‘kokumisa baboti te.’ (2 Timote 3:1-5) Okoki koboya kondima ete bato ya ndenge wana bazali mpenza mingi lelo? Batosaka Nzambe te, mpe batungisaka bato oyo balingaka koyekola koyeba Nzambe.
Mobulu. Bato bakokóma ‘kobuka mibeko . . . mingi.’ (Matai 24:12) Na ntembe te ondimi ete mobulu ekómi mpenza mingi koleka ndenge ezalaki na bambula oyo eleki. Bipai nyonso makama ezali; bato bazali kobɔtɔla biloko ya bato mosusu, bazali kokosa, to bazali kosala baninga mabe.
Makambo oyo nyonso emonisi ete Bokonzi ya Nzambe ekómi pene. Biblia elobi: “Wana ekomona bino makambo oyo kobima, bóyeba ete Bokonzi na Nzambe ekómi penepene.” (Luka 21:31) Bokonzi ya Nzambe ezali nini? Ezali boyangeli oyo Nzambe atii na likoló mpo na kotya Paladiso awa na mabele. Bokonzi ya Nzambe ekolongola biyangeli ya bato mpe yango nde ekobanda koyangela.—Danyele 2:44.