Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • ll eteni 9 nk. 20-21
  • Paradiso ekoya ntango nini?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Paradiso ekoya ntango nini?
  • Yoká Nzambe mpo ozala na bomoi ya seko
  • Masolo mosusu
  • Paladiso ekómi pene!
    Okoki kozala moninga ya Nzambe!
  • Eteni 9
    Yoká Nzambe
  • Tozali na “mikolo ya nsuka”?
    Biblia eteyaka mpenza nini?
  • Mosika te bomoi ya malamu ekoya!
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1995
Makambo mosusu
Yoká Nzambe mpo ozala na bomoi ya seko
ll eteni 9 nk. 20-21

ETENI 9

Paradiso ekoya ntango nini?

Makambo ya mabe oyo ezali kosalema na mabele, emonisi ete etikali moke Bokonzi ya Nzambe esala. Luka 21:10, 11; 2 Timote 3:1-5

Mikakatano oyo ezali na mikolo ya nsuka: masano ya mbongo, bitumba, maladi, nzala, koboya kotosa baboti, mpe kobɛta bato ya libota

Biblia esakolaki makambo mingi oyo ezali kosalema lelo oyo. Elobaki ete bato bakozala bato balingá mbongo, batosaka baboti te, bato ya nko, bato balingá bisengo.

Elobaki mpe ete koningana makasi ya mabele ekozala, bitumba, kozanga bilei, mpe maladi ekopalangana. Makambo wana ezali kosalema lelo oyo.

Motatoli ya Yehova moko azali kosakola nsango malamu ya Bokonzi epai ya moto moko

Lisusu, Yesu alobaki ete nsango malamu ya Bokonzi ekosakolama na mabele mobimba.​—Matai 24:14.

Bokonzi ya Nzambe ekolongola mabe nyonso. 2 Petro 3:13

Bato mabe babomami na Aramgedone, na nsima Satana ná bademo na ye bazwi etumbu

Etikali moke, Yehova akoboma bato nyonso ya mabe.

Satana mpe bademo bakozwa etumbu.

Yesu afandi na kiti na ye ya bokonzi na likoló mpe bato ya mposo ndenge na ndenge bazali kosepela

Baoyo bazali koyokela Nzambe bakobika mpe bakokɔta na mokili ya sembo, epai kobanga ekozala lisusu te, epai bato bakotyelana motema mpe bakolingana.

  • Makambo nini Yesu alobaki ete ekosalema na ntango na biso?​—Matai 24:3-14.

  • Bato mabe bakobomama.​—2 Petro 3:7.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto