Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • gf liteya 10 nk. 16-17
  • Ndenge nini koyeba lingomba ya solo

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Ndenge nini koyeba lingomba ya solo
  • Okoki kozala moninga ya Nzambe!
  • Masolo mosusu
  • Losambo oyo Nzambe andimaka
    Biblia eteyaka mpenza nini?
  • Bimá na lingomba ya lokuta!
    Okoki kozala moninga ya Nzambe!
  • Ndenge nini nakoki koyeba lingomba ya solo?
    Biyano na mituna ya Biblia
  • Ndenge nini okoki koyeba lingomba ya solo?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2011
Makambo mosusu
Okoki kozala moninga ya Nzambe!
gf liteya 10 nk. 16-17

Liteya 10

Ndenge nini koyeba lingomba ya solo

Soki olingi kozala moninga ya Nzambe, osengeli kosambela na lingomba oyo Nzambe andimi yango. Yesu alobaki ete “basambeli na solo” bakosambela Nzambe na “solo.” (Yoane 4:23, 24) Ndenge ya malamu ya kosambela Nzambe ezali kaka moko. (Baefese 4:4-6) Lingomba ya solo ememaka na bomoi ya seko, mpe lingomba ya lokuta ememaka na liwa.​—Matai 7:13, 14.

Okoki koyeba lingomba ya solo na lolenge ya bato oyo basambelaka na lingomba yango. Lokola Yehova azali malamu, baoyo bazali kosambela ye na solo basengeli mpe kozala bato malamu. Lokola nzete ya malala oyo ezali malamu ebotaka malala ya malamu, lingomba ya solo ekómisaka bato malamu.​—Matai 7:15-20.

Baninga ya Yehova batosaka mpenza Biblia. Bayebi ete Biblia euti na Nzambe. Bapesaka nzela na Biblia etambwisa bomoi na bango, esilisaka mikakatano na bango, mpe esalisaka bango báyekola koyeba Nzambe. (2 Timote 3:16) Basalaka milende mpo na kosalela makambo oyo bateyaka.

Baninga ya Yehova balinganaka. Yesu alingaki bato, yango wana ateyaki bango báyeba Nzambe, abikisaki baoyo bazalaki na maladi. Bato oyo basambelaka na lingomba ya solo balingaka mpe bato mosusu. Ndenge moko na Yesu, batyolaka baoyo bazali babola te to bato ya bikólo mosusu te. Yesu alobaki ete bato bakoyeba bayekoli na ye na bolingo oyo bakozala na yango kati na bango.​—Yoane 13:35.

Baninga ya Nzambe bakumisaka nkombo na ye, Yehova. Soki moto moko aboi kosalela nkombo na yo, moto yango akoki kozala moninga na yo ya motema? Te! Soki tozali na moninga, tobengaka ye na nkombo na ye mpe tolobelaka ye malamu epai ya bato mosusu. Yango wana, baoyo balingi kozala baninga ya Nzambe basengeli kobenga ye na nkombo na ye mpe kolobela ye epai ya bato mosusu. Yehova alingi tósalaka bongo.​—Matai 6:9; Baloma 10:13, 14.

Ndenge moko na Yesu, baninga ya Nzambe bateyaka bato Bokonzi ya Nzambe. Bokonzi ya Nzambe ezali boyangeli ya likoló oyo ekokómisa mabele Paladiso. Baninga ya Nzambe bayebisaka bato mosusu nsango malamu ya Bokonzi yango ya Nzambe.​—Matai 24:14.

Batatoli ya Yehova balingaka kozala baninga ya Nzambe. Batosaka Biblia mpe balinganaka. Basalelaka mpe bakumisaka nkombo ya Nzambe, mpe bateyaka bato mosusu Bokonzi ya Nzambe. Batatoli ya Yehova bazali na lingomba ya solo awa na mabele lelo oyo.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto