Yekolá na Liloba ya Nzambe
Ndenge nini okoki koyeba lingomba ya solo?
Lisolo oyo ebimisi mituna oyo omitunaka mpe emonisi esika oyo okoki kozwa biyano na Biblia na yo. Batatoli ya Yehova bakosepela kolobela biyano yango elongo na yo.
1. Lingomba ya solo ezali kaka moko?
Yesu ateyaki bayekoli na ye kaka lingomba moko ya solo. Lingomba yango ezali lokola nzela oyo ezali komema na bomoi. Mpo na nzela yango, Yesu alobaki boye: “Bato oyo bazali komona yango bazali moke.” (Matai 7:14) Nzambe andimaka kaka lingomba oyo elandaka Liloba na ye. Basambeli nyonso ya solo bazali na kondima moko.—Tángá Yoane 4:23, 24; 14:6; Baefese 4:4, 5.
2. Mpo na nini mangomba ya bokristo ezali mingi?
Basakoli ya lokuta babebisaki bokristo ya solo mpe basalelaki yango mpo na matomba na bango moko. Ndenge Yesu asakolaki yango, bamimonisaka lokola ‘bampate’ kasi basalaka makambo lokola bambwa ya zamba oyo ezali na nzala. (Matai 7:13-15, 21, 23) Bokristo ya lokuta ekolaki makasi; mingimingi nsima ya liwa ya bantoma ya Yesu.—Tángá Misala 20:29, 30.
3. Wapi mwa makambo oyo emonisaka lingomba ya solo?
Basambeli ya solo batosaka Biblia, Liloba ya Nzambe. Basalaka makasi ete bátosa mibeko ya Biblia na bomoi na bango. Na yango, lingomba ya solo ekeseni na mangomba oyo eteyaka makanisi ya bato. (Matai 15:7-9) Basambeli ya solo basalelaka makambo oyo bateyaka.—Tángá Yoane 17:17; 2 Timote 3:16, 17.
Lingomba ya solo ekumisaka nkombo ya Nzambe, Yehova. Yesu ayebisaki bato nkombo ya Nzambe. Asalisaki bato báyeba Nzambe mpe ateyaki bango básambelaka ete nkombo ya Nzambe esantisama. (Matai 6:9) Epai ofandaka, lingomba nini elendisaka bato básalela nkombo ya Nzambe?—Tángá Yoane 17:26; Baroma 10:13, 14.
4. Ndenge nini okoki koyeba bakristo ya solo?
Bakristo ya solo bateyaka Bokonzi ya Nzambe. Nzambe atindaki Yesu ateya Bokonzi. Kaka Bokonzi ya Nzambe nde ekosilisa bampasi ya bato. Yesu akobaki kolobela yango tii na mokolo ya liwa na ye. (Luka 4:43; 8:1; 23:42, 43) Ayebisaki bayekoli na ye báteyaka Bokonzi ya Nzambe. Soki moto moko ayei epai na yo mpo na koteya yo Bokonzi ya Nzambe, akoki kozala moto ya lingomba nini?—Tángá Matai 10:7; 24:14.
Bayekoli ya Yesu bazali te bato ya mokili oyo mabe. Bakɔtaka te na makambo ya politiki to na matata ya mboka. (Yoane 17:16) Lisusu, balandaka te makambo mpe bizaleli mabe ya mokili oyo.—Tángá Yakobo 1:27; 4:4.
5. Elembo ya libosoliboso ya bakristo ya solo ezali nini?
Bakristo ya solo balinganaka mpenza. Liloba ya Nzambe eteyaka bango ete esengeli komemya bato ya bikólo nyonso. Atako mbala mingi mangomba ya lokuta ekɔtaka na bitumba ya bikólo, bakristo ya solo basalaka bongo te. (Mika 4:1-4) Kutu, bandimi ya lingomba ya solo basepelaka kosalela ntango mpe biloko na bango mpo na kosalisa mpe kolendisa basusu.—Tángá Yoane 13:34, 35; 1 Yoane 4:20, 21.
Lingomba nini mateya na yango nyonso eutaka na Liloba ya Nzambe, ememyaka nkombo ya Nzambe, mpe esakolaka ete kaka Bokonzi ya Nzambe nde ekosilisa bampasi ya bato? Lingomba nini oyo bandimi na yango balinganaka mpe bakɔtaka na bitumba te? Emonani ete ezali Batatoli Yehova.—1 Yoane 3:10-12.
Mpo na koyeba makambo mosusu, talá mokapo 15 ya buku oyo, Biblia eteyaka mpenza nini?, ebimisami na Batatoli ya Yehova.
[Elilingi na lokasa 16]
“Balobaka polele ete bayebi Nzambe, kasi bazali kowangana ye na misala na bango.”—Tito 1:16