Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • gf liteya 12 lok. 20
  • Nini ekómelaka moto soki akufi?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Nini ekómelaka moto soki akufi?
  • Okoki kozala moninga ya Nzambe!
  • Masolo mosusu
  • Nini ekómelaka moto ntango akufi?
    Sepelá na bomoi libela na libela!—Boyekoli ya Biblia
  • Bankɔkɔ na biso bazali wapi?
    Nzela ya bomoi ya seko—Osili komona yango?
  • Biblia elobi nini?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya bato nyonso)—2016
  • Osengeli kobanga bakufi?
    Lamuká!—2009
Makambo mosusu
Okoki kozala moninga ya Nzambe!
gf liteya 12 lok. 20

Liteya 12

Nini ekómelaka moto soki akufi?

Liwa elimboli kozanga bomoi. Liwa ezali lokola mpɔngi makasi. (Yoane 11:11-14) Bato oyo bakufi bakoki koyoka te, komona te, koloba te, to kokanisa eloko moko mpe te. (Mosakoli 9:5, 10) Mangomba ya lokuta eteyeka ete soki moto akufi akendaka na mboka ya bilimu kofanda na bankɔkɔ. Biblia eteyaka bongo te.

Bato oyo bakufá bakoki kosalisa biso te, bakoki mpe kosala biso mabe te. Bato bazalaka na momeseno ya kosalela bato oyo bakufá milulu mpe kopesa bango mabonza oyo bakanisaka ete ekosepelisa bango. Makambo ya ndenge wana esepelisaka Nzambe te mpamba te ezali lokuta oyo euti na Satana. Ekoki mpe te kosepelisa bato oyo bakufá, mpamba te bazali lisusu na bomoi te. Tosengeli te kobanga bato oyo bakufá, to kosambela bango. Tosengeli kosambela kaka Nzambe.​—Matai 4:10.

Bato oyo bakufá bakozonga lisusu na bomoi. Yehova akolamusa bato oyo bakufá bázonga lisusu na bomoi na Paladiso awa na mabele. Ntango yango ezali naino na mikolo mizali koya. (Yoane 5:28, 29; Misala 24:15) Nzambe akoki kolamusa bato oyo bakufá ndenge moko lokola okoki mpenza kolamusa moto na mpɔngi.​—Malako 5:22, 23, 41, 42.

Satana Zabolo apalanganisi lokuta ete soki moto akufi, akufi mpenza solo te. Satana na bademo na ye basalaka makambo mosusu mpo bato bákanisaka ete bilimu ya bato oyo bakufá ezali na bomoi mpe epesaka bato maladi to mikakatano mosusu. Satana apɛngwisaka bato, na bantango mosusu na nzela ya bandɔtɔ to ya bimonaneli. Yehova aboyi bato oyo basololaka na bato oyo bakufá.​—Deteronome 18:10-12.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto