BIBLIA ELOBI NINI?
Nini ekómelaka biso soki tokufi?
BATO MOSUSU BAKANISAKA soki moto akufi, akómaka na bomoi ya lolenge mosusu, kasi basusu bamonaka ete soki tokufi nyonso esili. Yo okanisaka nini?
OYO BIBLIA ELOBI
“Bakufi bayebi ata eloko moko te.” (Mosakoli 9:5) Soki tokufi, tozalaka lisusu na bomoi te.
MAKAMBO NINI MOSUSU TOYEKOLAKA NA BIBLIA?
Adama, moto ya liboso azongaki na putulu ntango akufaki. (Ebandeli 2:7; 3:19) Ndenge moko mpe, baoyo nyonso bakufaka bazongaka na putulu.—Mosakoli 3:19, 20.
Moto oyo akufi afuti nyongo, to alimbisami masumu na ye. (Baroma 6:7) Etumbu mosusu mpo na lisumu ezalaka te soki moto akufi.
Bato oyo bakufá bakoki kozonga lisusu na bomoi?
OKOPESA EYANO NINI?
Ɛɛ
Te
Ntango mosusu
OYO BIBLIA ELOBI
“Lisekwa ekozala.”—Misala 24:15.
MAKAMBO NINI MOSUSU TOKOKI KOYEKOLA NA BIBLIA?
Mbala mingi Biblia ekokanisaka liwa na mpɔngi. (Yoane 11:11-14) Nzambe akoki kolamwisa bakufi kaka ndenge tolamwisaka moto soki alali.—Yobo 14:13-15.
Biblia elobeli bato mingi oyo basekwaki, yango endimisi biso mpenza ete bato oyo bakufá bakosekwa.—1 Bakonzi 17:17-24; Luka 7:11-17; Yoane 11:39-44.