Makambo nini bandimaka?
BATATOLI YA YEHOVA bandimaka ete Nzambe Mozwi-na-Nguya-Nyonso, Yehova, Mozalisi ya likoló na mabele azali. Makambo ya kokamwa oyo tozali komona na molɔ́ngɔ́ mobimba ezali mpenza komonisa ete Mozalisi moko ya mayele mpe ya nguya mingi nde asalaki yango nyonso. Ndenge misala oyo mibali na basi basalaka emonisaka mayele na bango, ezali mpe bongo mpo na misala ya Yehova Nzambe. Biblia ezali koyebisa biso ete “makambo na ye mazangi komonana . . . asili koyebisa yango polele epai na makanisi na bato kati na misala na ye.” Lisusu, ata toyokaka mongongo te to maloba te, kasi ‘makoló esakolaka nkembo na Nzambe.’—Baloma 1:20; Nzembo 19:1-4.
Soki bato bazali kosala bambɛki to batelevizyo mpe baɔrdinatɛrɛ, bazali kosala yango na ntina. Mabele mpe biloko ya bomoi oyo ezali na kati na yango, zamba na banyama, eleki mpenza biloko oyo bato basali. Ndenge nzoto ya moto esalemá na bankóto ya bamiliare ya basɛlilɛ—lokola bɔɔngɔ oyo esalisaka biso mpo na kokanisa—ezali mpenza eloko eleki kokamwisa! Soki, ntango bato basalaka biloko ya sika basalaka yango na ntina, na ntembe te Yehova Nzambe mpe asalaki biloko nyonso na ntina! Masese 16:4, (NW) emonisi ntina oyo asalaki biloko nyonso: “Yehova asalaki biloko nyonso mpo na mokano na ye.”
Yehova asalaki mokili na ntina, lokola alobaki yango na babalani ya liboso: “Bóbotaka mpe bózala na kobota mingi, mpe bótondisa mokili . . . mpe bózala na bokonzi likoló na mbisi na mai, mpe na ndɛkɛ na likoló, mpe likoló na nyama nyonso na bomoi ikotambolaka na mokili.” (Genese 1:28) Lokola bazangaki botosi, babalani yango ya liboso bakokaki te kotondisa mabele na mabota ya sembo mpe ya bolingo mpo na kobatela mabele, zamba mpe banyama. Nzokande bango bazangaki botosi, kasi yango ebongolaki mokano ya Yehova te. Nsima ya bankóto ya bambula, Biblia elobi ete: “Nzambe, ye oyo asalaki mabele . . . asalaki yango mpamba te.” Ye “asalaki yango mpo ete bato báfanda wana.” Na bongo mabele ekokufa te, kasi “ekoumela seko.” (Yisaya 45:18, NW; Mosakoli 1:4) Mokano ya Yehova mpo na mabele ekokokisama: “Toli na ngai ekotɛlɛma mpe nakokokisa mokano mobimba na ngai.”—Yisaya 46:10.
Yango wana, Batatoli ya Yehova bandimaka ete mabele ekoumela libela na libela mpe bandimaka ete bato nyonso, ezala baoyo bazali na bomoi lelo oyo mpe baoyo bakufá, soki batosi Yehova, ye oyo azali na mokano ya kokómisa mabele esika moko kitoko mpe oyo bato bakofanda, bakoki kofanda na mabele yango libela na libela. Adama na Eva batikelaki bato nyonso ezaleli ya kozanga kokoka, mpe na yango, bazali bato ya masumu. (Baloma 5:12) Biblia eyebisi biso ete: “Masumu makofuta mbongo, mbongo yango bobele kufa.” “Bato ya bomoi bayebi ete bakokufa; nde bakufi bayebi likambo te.” “Molimo oyo asali lisumu, ye akokufa.” (Baloma 6:23; Mosakoli 9:5; Ezekiele 18:4, 20) Na bongo, ndenge nini bato oyo bakufá bakozonga lisusu na bomoi awa na mabele? Bakozonga na bomoi na nzela ya mbeka ya lisiko ya Klisto Yesu, mpamba te ye alobaki ete: “Ngai nazali lisekwa mpe bomoi. Ye oyo azali kondima ngai, ata asili kokufa, akobika.” “Nyonso bazali kati na nkunda bakoyoka mongongo na ye, mpe bakobima.”—Yoane 5:28, 29; 11:25; Matai 20:28.
Ndenge nini likambo yango ekosalema? Yango elimbolami na kati ya “nsango malamu na bokonzi,” oyo Yesu abandaki kosakola ntango azalaki awa na mabele. (Matai 4:17-23) Kasi, lelo oyo Batatoli ya Yehova bazali kosakola nsango malamu yango makasi mpenza.
[Etanda na lokasa 13]
MAKAMBO OYO BATATOLI YA YEHOVA BANDIMAKA
Bandimaka ete Mikapo ya Biblia
Biblia ezali Liloba ya Nzambe mpe 2 Tim. 3:16, 17;
ezali solo 2 Pet. 1:20, 21; Yoa. 17:17
Esengeli kotyela Biblia motemakoleka Mat. 15:3; Kols. 2:8
makambo ya bonkɔkɔ
Nkombo ya Nzambe ezali Yehova Nz. 83:18; Yis. 26:4;
Klisto azali Mwana ya Nzambe Mat. 3:17; Yoa. 8:42; 14:28; 20:17
mpe akokani na Ye te ; 1 Kol. 11:3; 15:28
Klisto azalaki ekelamu ya
liboso oyo Nzambe akelaki Kols. 1:15; Emon. 3:14
Klisto akufaki likoló ya
nzete, kasi na ekulusu te Gal. 3:13; Mis. 5:30
Klisto apesaki bomoi na ye lokola Mat. 20:28; 1 Tim. 2:5, 6;
lisiko mpo na bato ya botosi 1 Pet. 2:24
Mbeka kaka moko ya Klisto ekoki Lom. 6:10; Ebe. 9:25-28
Klisto asekwaki moto ya 1 Pet. 3:18; Lom. 6:9;
elimo oyo akokufa lisusu te Emon. 1:17, 18
Kozala ya Klisto ezali na Yoa. 14:19; Mat. 24:3;
ndenge ya elimo 2 Kol. 5:16; Nz. 110:1, 2
Tozali sikawa na ‘ntango Mat. 24:3-14; 2 Tim. 3:1-5;
ya nsuka’ Luka 17:26-30
Bokonzi ya Klisto ekoyangela Yis. 9:6, 7; 11:1-5;
mabele na bosembo mpe na kimya Dan. 7:13, 14; Mat. 6:10
Bokonzi yango ekomema bolamu Nz. 72:1-4;
awa na mabele Emon. 7:9, 10, 13-17; 21:3, 4
Mabele ekokufa te mpe Mos. 1:4;
ekozanga bato te Yis. 45:18; Nz. 78:69
Nzambe akolongola makambo Emon. 16:14, 16; Sef. 3:8;
ya ntango oyo na etumba Dan. 2:44;
ya Armagedon Yis. 34:2; 55:10, 11
Bato mabe bakobomama Mat. 25:41-46;
mpo na libela 2 Tes. 1:6-9
Bato oyo Nzambe andimi bango Yoa. 3:16; 10:27, 28; 17:3;
bakozwa bomoi ya seko Mko. 10:29, 30
Nzela ya bomoi ezali bobele moko Mat. 7:13, 14; Ef. 4:4, 5
Moto akufaka mpo na lisumu
ya Adama Lom. 5:12; 6:23
Molimo ya moto ekufaka Ezek. 18:4; Mos. 9:10;
Lifelo ezali nkunda ya bato nyonso Yobo 14:13, Dy;
Emon. 20:13, 14, AV (na pembeni ya lokasa)
Elikya mpo na bakufi ezali lisekwa 1 Kol. 15:20-22;
Liwa oyo tosangolaki na Adama ekosila 1 Kol. 15:26, 54;
Bobele etonga moke ya bato Luka 12:32; Emon. 14:1, 3;
144000 bakokenda na likoló 1 Kol. 15:40-53;
koyangela elongo na Klisto Emon. 5:9, 10
Bato yango, 144000, babotamá 1 Pet. 1:23; Yoa. 3:3;
lisusu bana ya Nzambe na elimo Emon. 7:3, 4
Kondimana ya sika esalemi elongo
na Yisalaele ya elimo Yil. 31:31; Ebe. 8:10-13
Lisangá ya Klisto etongami Ef. 2:20; Yis. 28:16;
likoló na ye moko Mat. 21:42
Mabondeli esengeli kokenda bobele
epai ya Yehova na nzela ya Klisto Yoa. 14:6, 13, 14; 1 Tim. 2:5
Epekisami kosalela bikeko mpe Ex. 20:4, 5; Lev. 26:1;
bililingi mpo na losambo 1 Kol. 10:14; Nz. 115:4-8
Tosengeli kokima misala Det. 18:10-12;
ya bilimu mabe Gal. 5:19-21; Lev. 19:31
Satana nde ayangelaka mokili 1 Yoa. 5:19;
oyo kasi amonanaka te 2 Kol. 4:4; Yoa. 12:31
Moklisto asengeli kosangana 2 Kol. 6:14-17; 11:13-15;
na milulu ya mangomba mosusu te Gal. 5:9; Det. 7:1-5
Moklisto asengeli kokabwana Yak. 4:4; 1 Yoa. 2:15;
na mokili Yoa. 15:19; 17:16
Tosengeli kotosa mibeko nyonso
ya bato oyo ezali kobuka mibeko
ya Nzambe te Mat. 22:20, 21; 1 Pet. 2:12; 4:15
Kolya makila to kokɔtisa yango Gen. 9:3, 4; Lev. 17:14;
na nzoto na nzela ya misisa Mis. 15:28, 29
ezali kobuka mibeko ya Nzambe
Tosengeli kotosa mibeko ya 1 Kol. 6:9, 10; Ebe. 13:4;
Nzambe oyo etali bizaleli malamu 1 Tim. 3:2; Mas. 5:1-23
Mobeko ya sabata epesamaki Det. 5:15; Ex. 31:13;
bobele epai na Bayuda mpe esukaki Lom. 10:4; Gal. 4:9, 10;
ntango Mibeko ya Mose esukaki Kols. 2:16, 17
Kozala na bakonzi ya lingomba mpe Mat. 23:8-12; 20:25-27;
kopesa bato mosusu batitre ezali Yobo 32:21, 22
likambo oyo ebongi soki moke te
Moto autaki na evolisyo te Yis. 45:12; Gen. 1:27;
kasi akelamaki Mat. 19:4
Yesu apesaki ndakisa oyo tosengeli 1 Pet. 2:21; Ebe. 10:7;
kolanda mpo na kosalela Nzambe Yoa. 4:34; 6:38
Moto akomonisa ete amipesi Mko. 1:9, 10; Yoa. 3:23;
mobimba na Nzambe soki Mis. 19:4, 5
azwi batisimo ya kozindisama
mobimba na mai
Baklisto basakolaka solo ya Lom. 10:10; Ebe. 13:15;
Makomami epai na bato nyonso Yis. 43:10-12
[Elilingi na lokasa 12]
MABELE . . . ekelamaki na Yehova . . . moto azali kobatela yango . . . bato bakofanda wana libela na libela