Basakolaka nsango malamu na lolenge mingi
BAKLISTO bazwaki etinda ya ‘kozalisa bayekoli kati na bato ya mabota nyonso,’ kasi yango elingi koloba te ete basengeli kotindika bato bándima nsango yango na makasi to kobongola bango na makasi. Etinda ya Yesu ezalaki ya “kosakola nsango malamu epai na [bato ya komikitisa, NW],” “kosalisa [baoyo bazali konyokwama, NW],” “kobɔndisa baoyo nyonso bazali kolela.” (Matai 28:19; Yisaya 61:1, 2; Luka 4:18, 19) Batatoli ya Yehova bakokisaka etinda yango ntango basakolaka nsango malamu oyo euti na Biblia. Ndenge moko na mosakoli Ezekiele na ntango ya kala, lelo oyo mpe Batatoli ya Yehova balukaka kokutana na bato oyo “bazali kolela mpe kokimela mpo na makambo na nsomo manso mazali kosalema.”—Ezekiele 9:4, Liloba lya Nzambe.
Lolenge oyo eyebani mingi oyo basalelaka mpo na kokutana na bato oyo bazali koyoka mawa mpo na makambo ya mabe oyo ezali kosalema, ezali ya kokenda kokutana na bato yango na bandako na bango. Yango wana basalaka makasi mpo na kokutana na bato nyonso, kaka ndenge Yesu azalaki kosala ntango azalaki kokenda “na mboka minene mpe mboka mike, asakolaki mpe alakisaki nsango malamu na bokonzi na Nzambe.” Bayekoli na ye ya liboso basalaki mpe bongo. (Luka 8:1; 9:1-6; 10:1-9) Lelo oyo, epai likoki ezali, Batatoli ya Yehova bakendeke kotala bato na ndako mokomoko mbala mingi na mbula mpe basololaka na bango makambo oyo ezali koleka esika bango bafandi to oyo ezali koleka na mikili mosusu oyo etali bango to ezali kotungisa bango. Bakoki kotalela vɛrsɛ moko to mibale ya Biblia, mpe soki moto asepeli, Motatoli akoki kozongela ye lisusu na ntango oyo bayokani na yango mpo na kosolola lisusu. Bakabolaka Biblia mpe mikanda oyo elimbolaka Biblia, mpe soki moto asepeli, bayekolaka na ye Biblia kozanga kofutisa ye mbongo. Bazali kotambwisa bamilio ya boyekoli ya Biblia pɔsɔ na pɔsɔ: na moto mokomoko to na kati ya mabota, na mokili mobimba.
Lolenge mosusu oyo Batatoli bazali kosakola “nsango malamu ya bokonzi” ezali makita oyo basalaka na Bandako ya Bokonzi. Kuna, Batatoli basalaka makita pɔsɔ na pɔsɔ. Moko ya makita yango ezali lisukulu ya bato nyonso, elobelaka likambo moko oyo ezali kotalela bato nyonso, mpe nsima na yango bayekolaka lisolo moko to esakweli moko ya Biblia na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli. Likita mosusu ezali bongo eteyelo mpo na kobongisa Batatoli mpo bázala basakoli malamu ya nsango malamu; na nsima basalaka likita mosusu oyo etalaka mosala ya kosakola na teritware oyo bapesi lisangá. Lisusu, mbala moko na pɔsɔ Batatoli bayanganaka na bandako ya bandeko mosusu, mwa bato moke mpo na koyekola Biblia.
Moto nyonso oyo alingi akoki kokenda na makita yango. Bakɔngɔlaka mabonza te. Makita yango ezali na litomba mpo na moto nyonso. Biblia elobi ete: “Tótalanaka mpo na kolendisana na bolingo mpe kosala makambo malamu, tótika koyangana te, lokola yango ezali momeseno ya basusu, kasi tólendisana mingi wana bozali komona ete mokolo yango ekómi pene.” Motatoli mokomoko ayekolaka ye moko mpe atángaka mikanda oyo elimbolaka Biblia mpo na koluka koyeba makambo ya elimo mpe koyekola bongo ezali na ntina, kasi koyangana elongo na baninga na makita elendisaka: “Ebende ekotya ebende mosusu na mopotu, boye moto akokokisa elongi na moninga na ye.”—Baebele 10:24, 25; Masese 27:17.
Batatoli bamonaka malamu koyebisa nsango malamu epai ya bato mosusu oyo bakutanaka na bango mokolo na mokolo. Bakoki koyebisa nsango yango lokola mwa lisolo moke na moninga moko ya kartye to na moto moko oyo bazali kosala na ye mobembo nzela moko na bisi to na mpɛpɔ, to lisolo na moninga moko to ndeko moko, to lisolo na moninga moko ya mosala na ntango ya bopemi. Ntango azalaki awa na mabele, Yesu apesaki litatoli na mabaku ya ndenge wana—ntango azalaki kotambola pembenipembeni ya mai monene, ntango afandaki likoló ya ngomba, ntango azalaki kolya na ndako ya moto moko, ntango akendaki na fɛti ya libala, to ntango azalaki na kati ya masuwa ya koboma mbisi na Libeke ya Galilai. Ateyaki na biyanganelo mpe na tempelo ya Yelusaleme. Ezala esika nini azalaki, amonaki malamu kosakola Bokonzi ya Nzambe. Batatoli ya Yehova basalaka makasi mpo na kolanda ndakisa ya Yesu na likambo yango.—1 Petelo 2:21.
BAZALI KOSAKOLA MPE KOPESA NDAKISA MALAMU
Nsango malamu ekoki kozala na ntina te soki moto oyo azali koyebisa yo yango azali kosalela te makambo oyo azali koteya. Koloba likambo moko mpe kosala ndenge olobaki te ezali ezaleli ya bokosi, mpe bokosi ya bato ya mangomba esali ete bato mingi báboya makambo ya Biblia. Ezali malamu te kopesa Biblia fɔti. Bakomeli na Bafalisai bazalaki na Makomami ya Liebele, kasi Yesu alobaki na bango ete bazali bakosi. Alobaki ete bazalaki kotánga Mobeko ya Mose, mpe na nsima abakisaki maloba oyo epai na bayekoli na ye: “Bongo makambo nyonso makolobaka bango na bino, bósala yango mpe bótosa yango; nde bósala [lokola bango basalaka te, NW]. Zambi bakolobaka nde bakosalaka [bongo] te.” (Matai 23:3) Soki moklisto azali na etamboli malamu, bato mingi bakoki kondima nsango malamu koleka makambo mingimingi oyo akoki koloba. Bayebisaki basi baklisto oyo mibali na bango bazali bandimi te, likambo yango, ete: “Bakoki kondima kozanga koteya bango na maloba kasi mpo na ezaleli malamu ya basi na bango, nsima ya kotalela etamboli na bino ya pɛto.”—1 Petelo 3:1, 2, NW.
Yango wana, Batatoli ya Yehova basalaka makasi mpo na koyebisa bato nsango malamu na ndenge wana: kozala ndakisa na etamboli ya boklisto ndenge basɛngaka na bato mosusu bázala. Basalaka makasi ‘básalela bato mosusu makambo oyo bango balingi ete básalelaka bango.’ (Matai 7:12) Basalaka bongo epai ya bato nyonso, kasi te kaka epai ya Batatoli mosusu, baninga na bango ya kelasi, baninga na bango ya esika oyo bafandi mpe bandeko na bango. Lokola bazali bato ya kozanga kokoka, balongaka kosala bongo ntango nyonso te. Kasi mposa na bango mpenza ezali ya kosala malamu epai ya bato nyonso, kaka te koyebisa bango nsango malamu ya Bokonzi kasi mpe kosalisa bango na makambo mosusu soki likoki ezali.—Yakobo 2:14-17.
[Elilingi na lokasa 19]
Hawaï
[Elilingi na lokasa 19]
Venezuela
[Elilingi na lokasa 19]
Yougoslavie
[Bililingi na lokasa 20]
Bandako ya Bokonzi, etongami malamu, ezali bisika ya koyekola Biblia
[Bililingi na lokasa 21]
Batatoli basalaka makasi mpo na kosalela makambo oyo bazali koteya bato mosusu, na mabota na bango mpe epai ya bato nyonso