Banani bazali kosakola nsango malamu?
“ . . . ekosakolama na mabele mobimba esika bato bafandi.”—MATAI 24:14.
BATATOLI ya Yehova bazali kosakola nsango malamu na mokili mobimba. Basalaka yango na lolenge ekeseni. Na ndakisa:
Na Koloba. Na ndakisa ya Yesu mpe bayekoli na ye, Batatoli ya Yehova bakendaka epai ya bato mpo na kosakwela bango nsango malamu. (Luka 8:1; 10:1) Bazelaka kaka te ete bato baya epai na bango. Kosakwela bato Bokonzi ya Nzambe ezali likambo oyo Batatoli nyonso—oyo bazali na motángo koleka milio nsambo—basalaka. Basakolaka ndako na ndako, na balabala, na telefone, mpe na lolenge mosusu. Na mbula eleki, Batatoli balekisaki ngonga koleka miliare moko na ndambo na mosala yango.
Bateyaka bato kaka te Bokonzi ya Nzambe kasi mpe ‘makambo nyonso oyo Yesu apesaki mitindo.’ (Matai 28:20) Batambwisaka boyekoli ya Biblia koleka milio mwambe ofele na bandako ya bato.
Batatoli bazali kosakola na mabele mobimba, na mikili 236. Basakwelaka bato ya lolenge nyonso. Basakolaka na bikólo mpe bingumba, na zamba ya Amazone mpe oyo ezali na sudi ya Sibérie, na bisobe ya Afrika mpe Bangomba ya Himalaya. Bafutamaka te mpo na mosala yango; basalaka yango na makoki na bango moko mpe basalelaka ntango na bango; bolingo na bango mpo na Nzambe mpe bazalani nde etindaka bango básala bongo. Basakolaka mpe nsango malamu na nzela ya . . .
Mikanda. Zulunalo oyo, oyo motó ya likambo na yango ezali Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova, ezali sikoyo kobimisama na minɔkɔ 185 mpe motángo ya nimero mokomoko oyo ezali kobima ezali pene na milio koleka 42. Zulunalo mosusu Lamuká!, oyo esakolaka mpe Bokonzi, ezali kobimisama na minɔkɔ 83 mpe motángo ya nimero mokomoko oyo ezali kobima ezali milio soki 40.
Babuku, mwa babuku, batrakte, ba CD/MP3, mpe DVD oyo elimbolaka mateya ya Biblia ezali na minɔkɔ soki 540. Kaka na mbula zomi oyo euti koleka, Batatoli babimisaki mpe bakabolaki mikanda yango koleka miliare 20, oyo elingi koloba motángo ya mikanda soki misato mpo na moto nyonso oyo azali na mokili!
Batatoli ya Yehova babimisaki to basɛngaki babimisela bango mabongoli ndenge na ndenge ya Biblia. Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika oyo Batatoli babongoli, babimisi, mpe bazali kokabola—ezali sikoyo na mobimba na yango to ndambo na minɔkɔ 96. Esili kokabolama na motángo ya milio koleka 166. Batatoli ya Yehova basakolaka mpe nsango malamu ya Bokonzi . . .
Na makita ya bokristo. Makita oyo basalaka pɔsɔ na pɔsɔ na Bandako ya Bokonzi, ndenge babengaka bisika na bango ya losambo, ezali te kaka mpo na losambo; ezali mpe mpo na koteyama. Masolo oyo esalemaka kuna eutaka na Biblia, mpe bayekolaka Biblia na lisalisi ya zulunalo Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe mikanda mosusu. Na makita, Batatoli bayekolaka ndenge ya kozala basakoli ya nsango malamu oyo babongi.
Batatoli bayekolaka kaka mateya ndenge moko na masangá koleka 107 000, oyo ezali na mokili mobimba, mpe yango esalaka ete bázala na bomoko. Moto nyonso akoki kokɔta na makita yango. Batambwisaka te saani to kitunga mpo na kokɔngɔla makabo. Ya solo, makambo oyo nyonso ekoki kozala na ntina te soki Batatoli basalelaka te makambo oyo basakolaka. Na yango, balukaka kopesa nsango malamu kilo . . .
Na ndakisa na bango. Basalaka makasi bázala ndakisa na etamboli oyo ebongi na mokristo, basalaka nyonso básalela basusu makambo na ndenge oyo bango balingaka ete básalela bango. (Matai 7:12) Atako bazali bato ya kozanga kokoka mpe ntango mosusu basalaka masumu, bazalaka mpenza na mposa ya komonisa bolingo epai ya moto nyonso, kaka te na kosakola nsango malamu, kasi bapesaka mpe lisalisi na makambo mosusu soki esengeli.
Batatoli ya Yehova bazali koluka te kobongola mokili mobimba na mosala na bango ya kosakola. Kasi, ndenge Yesu alobaki, ntango Yehova akomona ete mosala yango ekoki, nsuka ekoya. Likambo yango ekolimbola nini mpo na mabele mpe bato oyo bazali na mabele?
[Elilingi na lokasa 7]
Batatoli ya Yehova bazali kosakola nsango malamu na mabele mobimba