Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • be liteya 7 lok. 105-lok. 106 par. 2
  • Konyata makanisi ya ntina

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Konyata makanisi ya ntina
  • Zwá matomba na mateya ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi
  • Masolo mosusu
  • ‘Yekola kotanga na miso ya bato mingi’
    Mokanda mpo na Eteyelo ya mosala ya Nzambe
  • Koyeba konyata maloba ya ntina
    Zwá matomba na mateya ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi
  • Ndenge ya kobongisa masukulu ya lisangá
    Zwá matomba na mateya ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi
  • Kobimisa makanisi ya ntina polele
    Zwá matomba na mateya ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi
Makambo mosusu
Zwá matomba na mateya ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi
be liteya 7 lok. 105-lok. 106 par. 2

LITEYA 7

Konyata makanisi ya ntina

Osengeli kosala nini?

Ntango ozali kotánga na miso ya bato mingi, kosuka kaka te na konyata makanisi oyo ezali na fraze mokomoko, kasi nyatá mpenza makanisi ya ntina ya lisolo mobimba.

Yango ezali na ntina nini?

Soki onyati makanisi ya ntina, ekozala mpasi te mpo bato oyo bazali koyoka yo bákanga likambo ya ntina oyo ozali koloba.

MOTO oyo ayebi mpenza kotánga atalaka kaka fraze moko te, ata mpe paragrafe yango te, kasi ntango azali kotánga, na motó na ye, azali na makanisi ya ntina ya lisolo yango mobimba. Yango nde ekosalisa ye ayeba maloba oyo akonyata.

Soki asali bongo te, lisolo na ye ekozala na makanisi ya ntina te oyo ekoki kosimba mpenza motema. Ata likanisi moko te ekomonana polele ete ezali na ntina mingi koleka makanisi mosusu. Ntango akosilisa lisolo na ye, ekoki kozala mpasi mpo bato bákanga ata likanisi moko ya ntina na motó.

Mbala mingi, soki ozali mpenza kotya likebi na makanisi ya ntina mpe ozali konyata yango, okobongisa mpenza lolenge ya kotánga masolo oyo euti na Biblia. Soki ozali konyata makanisi ya ntina, yango ekosala mpenza ete bato bákangaka ntina ya baparagrafe oyo ozali kotánga, ezala ntango ozali koyekola na moto na ndako na ye to ntango ozali kotánga na makita ya lisangá. Yango ezali mpenza na ntina koleka ntango ozali kosala lisukulu ya maniskri, ndenge esalemaka mbala mosusu na mayangani na biso.

Ndenge ya kosala yango. Na eteyelo, bakoki kosɛnga yo otánga mokapo moko ya Biblia. Makanisi nini okonyata? Soki lisolo oyo ozali kotánga ezali na likanisi moko ya ntina to ezali kolobela likambo moko ya ntina oyo esalemaki, ekozala malamu obimisa yango polele.

Ezala makambo oyo ozali kotánga ezali maloba ya kitoko to lisolo to mpe lisese moko, bato oyo bazali koyoka bakozwela yango matomba soki otángi yango malamu. (2 Tim. 3:16, 17) Mpo na yango, osengeli kotalela makambo oyo okotánga mpe bato oyo bakoyoka yo.

Soki osengeli kotánga mokanda moko ntango ozali koyekola Biblia na moto to kotánga ntango ozali na makita ya lisangá, makanisi nini ya ntina osengeli konyata? Talelá biyano na mituna ya baparagrafe lokola makanisi ya ntina mpe nyatá makanisi oyo eyokani na motó ya likambo moke, oyo ezali na makomi ya moindo makasi mpe ezali likoló ya baparagrafe oyo ozali kotánga.

Ezali malamu te ete ozala na momeseno ya kokoma makambo nyonso oyo okoloba na masukulu na yo na lisangá. Kasi mbala mosusu, bapesaka bamaniskri mpo na masukulu oyo ekosalema na liyangani moko ya monene mpo makanisi oyo ezali wana epesama ndenge moko na bisika nyonso oyo mayangani yango ekosalema. Mpo na konyata makanisi ya ntina na bamaniskri wana, molobi asengeli libosoliboso kotalela yango malamumalamu. Makanisi ya ntina ezali nini? Asengeli koyeba yango. Makanisi ya ntina ezali kaka te makanisi oyo esepelisi ye. Ezali nde makanisi oyo esimbi lisolo mobimba. Mbala mosusu na kati ya maniskri, ezalaka libosoliboso na fraze moko ya mokuse oyo elobeli polele likanisi ya ntina mpe na nse na yango, okokuta lisolo to molɔngɔ ya makanisi mosusu oyo esimbi likanisi wana ya ntina. Mbala mingi, nsima ya kopesa makanisi wana lokola elembeteli ya likambo oyo ozali koloba, ezalaka na fraze moko oyo endimisaka yango. Ntango molobi ayebi bisika nyonso oyo makanisi yango ya ntina ezali, asengeli sikoyo kotya mwa elembo wana, na lokasa na ye ya maniskri. Mbala mingi, makanisi ya ntina ezalaka mingi te, ntango mosusu minei to mitano. Na nsima, molobi asengeli kotánga yango mbala na mbala tii ntango akomona ete bayoki bakozala na mikakatano te mpo na koyeba makanisi yango ya ntina. Kosala lisukulu ezali lokola moto azali komata ngomba mpe makanisi ya ntina ezali lokola nsɔngɛ ya ngomba yango. Soki ozali konyata malamu mpenza makanisi ya ntina ya lisolo na yo, bato bakobosana yango te. Wana nde mokano oyo molobi nyonso asengeli kozala na yango.

Ezali na ndenge mingi oyo molobi akoki konyata makanisi ya ntina mpo na kosalisa bato oyo bazali koyoka ete báyeba yango. Na ndakisa, akoki komatisa mongongo, akoki kotánga malɛmbɛmalɛmbɛ na esika yango, akoki kotánga na mɔtɔ mpenza, to mpe akoki kosala bajɛstɛ oyo ebongi.

MAKAMBO OYO OSENGELI KOBOSANA TE

  • Talelá malamumalamu makambo oyo ezali na mokanda mpo na koyeba makanisi ya ntina oyo esimbi lisolo yango. Tyá elembo na esika yango.

  • Mpo na konyata makanisi ya ntina ntango ozali kotánga na miso ya bato, okoki komatisa mongongo to kotángá malɛmbɛmalɛmbɛ to kotángá na mɔtɔ mpenza, na ndenge ebongi.

DEVUARE: Poná baparagrafe mitano na lisolo ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli oyo tokoyekola na pɔsɔ oyo. Tyá mokɔlɔtɔ na nse ya biyano na mituna ya baparagrafe yango. Tángá baparagrafe yango na mongongo makasi mpe salá ete moto oyo akoyoka yo azala na mpasi te mpo na koyeba biyano na mituna ya paragrafe yango.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto