Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • be liteya 30 lok. 186-lok. 189 par. 4
  • Kosepela na moto oyo azali koyoka yo

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Kosepela na moto oyo azali koyoka yo
  • Zwá matomba na mateya ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi
  • Masolo mosusu
  • Totalela matomba na bamosusu
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1989
  • Ndenge ya koyeba kosolola na bato
    Zwá matomba na mateya ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi
  • Kosala makasi mpo na kosimba mitema
    Zwá matomba na mateya ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi
  • Komonisa polele bolamu oyo bato bakozwa
    Bongisá ndenge na yo ya kotánga mpe ya koteya
Makambo mosusu
Zwá matomba na mateya ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi
be liteya 30 lok. 186-lok. 189 par. 4

LITEYA 30

Kosepela na moto oyo azali koyoka yo

Osengeli kosala nini?

Osengeli kosala nini? Osengeli komonisa mpenza ete ozali koyoka makanisi ya basusu mpe ozali komibanzabanza mpo na bolamu na bango.

Yango ezali na ntina nini?

Ezali lolenge moko ya komonisa ete tozali kolanda ndakisa ya bolingo oyo Yehova amoniselaka biso mpe yango ekoki kosalisa biso tósimba mitema ya bato.

NTANGO tozali koyebisa basusu solo ya Biblia, tosengeli kaka te kosimba makanisi na bango. Tosengeli mpe kosimba mitema na bango. Tokoki kosala yango soki tozali mpe komonisa ete biso moko tosepeli na bango. Tokoki komonisa yango na ndenge mingi.

Talelá makanisi ya bato oyo bazali koyoka yo. Ntoma Paulo azalaki kotalela bomoi mpe makanisi ya bato oyo bazalaki koyoka ye. Alobi boye: “Epai ya Bayuda nakómaki lokola Moyuda, mpo nakoka kozwa Bayuda; epai ya baoyo bazali na nse ya mibeko nakómaki lokola nde nazalaki na nse ya mibeko, atako ngai mpenza nazali te na nse ya mibeko, mpo nakoka kozwa baoyo bazali na nse ya mibeko. Epai ya baoyo bazangá mibeko nakómaki lokola nde nazangá mibeko, atako nazangi mibeko te epai ya Nzambe kasi nazali na nse ya mibeko epai ya Klisto, mpo nakoka kozwa baoyo bazangá mibeko. Epai ya bato ya bolɛmbu nakómaki moto ya bolɛmbu, mpo nakoka kozwa bato ya bolɛmbu. Nakómaki makambo nyonso epai ya bato ya ndenge nyonso, mpo ata ndenge nini nakoka kobikisa bamosusu. Kasi nazali kosala makambo nyonso mpo na nsango malamu, mpo nakóma mosangani na yango elongo na bamosusu.” (1 Kol. 9:20-23) Ndenge nini tokoki ‘kokóma makambo nyonso epai ya bato ya ndenge nyonso’ lelo oyo?

Soki ozwi ntango ya kotala bato, ata mwa moke, liboso osolola na bango, okoki komona makambo oyo esepelisaka bango mpe ndenge bazali na bomoi na bango. Oyebi mosala basalaka? Ezali na makambo oyo ezali komonisa yo bindimeli na bango to ndenge bomoi ya libota na bango ezali? Na kotalela makambo oyo omoni, okoki kobongisa lisolo na yo mpo esepelisa mingi lisusu bato oyo bakoyoka yo?

Mpo lisolo na yo esepelisa bato mingi koleka, osengeli kokanisa liboso ndenge oyo okoloba ntango okokutana na bato ya teritware na bino. Na bisika mosusu, bato yango bakoki kozala mpe bato oyo bautá mikili mosusu. Soki bato ya lolenge yango bazali na teritware na bino, osilá komona lolenge malamu ya kopesa bango litatoli? Lokola mokano ya Nzambe ezali ete “bato ya ndenge nyonso bábika mpe bákóma na boyebi ya sikisiki ya solo,” omityela mokano ya kopesa bato oyo okokutana na bango nsango ya Bokonzi na lolenge oyo ekosepelisa bango mpenza.​—1 Tim. 2:4.

Yoká na likebi mpenza. Atako Yehova akoki koyeba makambo nyonso oyo ye alingi, ayokaka makanisi ya basusu. Na emonaneli moko, mosakoli Mikaya amonaki Yehova azali kolendisa baanzelu bápesa makanisi na bango mpo na kosala likambo moko boye. Na nsima, Nzambe apesaki anzelu moko nzela asalela likanisi oyo apesaki. (1 Mik. 22:19-22) Ntango Abalayama amonisaki ete amitungisaki mingi mpo na etumbu oyo Nzambe alingaki kopesa Sodoma, Yehova apesaki ye nzela na boboto mpenza ete amonisa makanisi na ye. (Gen. 18:23-33) Ndenge nini tokoki kolanda ndakisa ya Yehova mpo na koyoka bato na mosala na biso ya kosakola?

Lendisáká bato bápesaka makanisi na bango. Tuná motuna moko oyo ebongi mpe pemá mpenza mpo na kotikela bango ntango báyanola. Yoká bango mpenza. Ntango ozali koyoka bango na likebi mpenza, yango ekolendisa bango báloba kozanga kobanga. Soki eyano na bango emonisi makambo oyo esepelisaka bango, na mayele mpenza, bakisá lisusu mituna mosusu. Luká koyeba bango malamu mpenza, kasi kokómisa lisolo na bino lokola ekzamɛ te. Pesá bango matɔndi na motema na yo mobimba mpo na makanisi oyo bapesi. Ata soki ondimi likanisi na bango te, zalá na boboto mpe pesá bango matɔndi na ndenge bapesi likanisi yango.

Kasi tosengeli kokeba ete tólekisa ndelo te na ndenge tozali komonisa ete tosepeli na bato. Komibanzabanza mpo na bato epesi biso nzela te ete tókɔta na makambo ya bomoi na bango. (1 Pet. 4:15) Osengeli kokeba ete mwasi (to mobali) oyo ozali kosolola na ye azwela yo makanisi mosusu te mpo na boboto mpe ndenge omonisi ete ozali kosepela na ye. Tosengeli koyeba kososola malamu, mpamba te bato na bato bazalaka na ndenge na bango ya komonisa ete basepeli na moto, na kotalela mboka na bango to mpe moto oyo bazali kosolola na ye.​—Luka 6:31.

Mpo na kozala moyoki malamu, osengeli komibongisa. Soki biso moko tokangi mpenza ntina ya nsango na biso, yango ekosalisa biso tóbanga te mpe tótya likebi epai ya basusu, ndenge tomeseni kosala yango. Yango ekosala ete bango mpe bábanga te mpe básepela kosolola na biso.

Ntango tozali koyoka basusu, tozali kopesa bango lokumu. (Lom. 12:10) Ezali komonisa ete tozali mpe kotalela makanisi na bango mpe mayoki na bango na motuya. Ekoki kutu kosala ete bátya mpenza likebi na makambo oyo tolingi koloba. Yango wana Liloba ya Nzambe epesi biso toli ete ‘tóyokaka noki, tówelaka koloba te.’​—Yak. 1:19.

Salisá basusu bákola. Ntango tozali komibanzabanza mpo na basusu, yango ekotinda biso tókanisaka ntango nyonso bato oyo basepelaki na nsango mpe tózongaka kotala bango mpo na koyebisa bango solo ya Biblia oyo etali mpenza bamposa na bango. Ntango ozali kobongisa bozongeli yango, talelá makambo na bango oyo omonaki na mbala eleki. Bongisá mateya oyo etali likambo moko oyo ezali kotungisa bango. Monisá mpenza ndenge oyo bakoki kosalela mateya yango mpe salisá bango báyeba matomba oyo bakozwa na makambo oyo bazali koyekola.​—Yis. 48:17.

Soki moto oyo azali koyoka yo amonisi likambo moko oyo ezali kotungisa ye, talelá yango lokola libaku oyo ozwi mpo na koyebisa ye nsango malamu. Landá ndakisa ya Yesu na ndenge azalaki ntango nyonso kobɔndisa bato oyo bazali na mpasi. (Mko. 6:31-34) Koluka te nokinoki kobongisa likambo to kopesa ye toli moko ya likolólikoló. Yango ekoki kosala ete moto amona lokola ozali mpenza kotya likebi na likambo na ye te. Kasi monisá nde ete ozali mpenza komitya na esika na ye. (1 Pet. 3:8) Na nsima, lukáluká na mikanda oyo elimbolaka Biblia mpe yebisá ye makambo oyo ozwaki kuna mpo na kosalisa ye asilisa mokakatano na ye. Ya solo, soki ozali mpenza komibanzabanza mpo na moto oyo azali koyoka yo, makambo na ye oyo ayebisi yo, okoyebisa yango bato mosusu te, kaka soki ozali na ntina mpenza ya kosala yango.​—Mas. 25:9.

Tosengeli mingimingi komonisa bato oyo tozali koyekola na bango Biblia ete tosepelaka na bango. Kanisá bamposa ya moyekoli mokomoko, bondelá mpo na yango mpe kobosana yango te ntango ozali komibongisa mpo na kotambwisa boyekoli yango. Omituna boye: ‘Moto yango asengeli kosala nini sikoyo mpo akola lisusu na elimo?’ Na bolingo mpenza, salisá moyekoli yango atalela na motuya mingi makambo oyo Biblia mpe mikanda ya “moombo ya sembo mpe ya mayele” elobi mpo na likambo yango. (Mat. 24:45) Na bantango mosusu, ekoki kaka te kolimbola likambo yango. Osengeli mpe komonisa moyekoli yango ndenge ya kosalela mitinda mosusu ya Biblia; bósala elongo mpo na komonisa ndenge ya kosalela mitinda yango.​—Yoa. 13:1-15.

Ntango ozali kosalisa bato bábongola bomoi na bango mpo eyokana na mitinda ya Yehova, osengeli kokeba mpe kozala na bososoli. Moto na moto azali na esika autá, makambo oyo akolá na yango, makoki na ye, mpe bato nyonso bakolaka ndenge moko te. Kosɛnga bango makambo oyo eleki bango te. (Filp. 4:5) Kotindika bango na makasi te ete bábongola bomoi na bango. Tiká Liloba ya Nzambe mpe elimo na ye etinda bango bábongwana. Yehova alingi bato básalela ye na motema na bango mobimba, kasi bátindika bango na makasi te. (Nz. 110:3) Ntango bakutani na likambo oyo esɛngi bango moko bázwa ekateli, kopesa makanisi na yo moko te; ata soki bango moko basɛngi yo yango, kebá ete ozwa bikateli na esika na bango te.​—Gal. 6:5.

Salisá bango mpenza. Atako Yesu azalaki libosoliboso komibanzabanza mpo na bamposa ya elimo ya bato oyo bazalaki koyoka ye, azalaki mpe kotalela bamposa na bango mosusu. (Mat. 15:32) Atako tozali bazwi te, ezali na ndenge mingi oyo tokoki mpenza kosalisa bato.

Soki tozali mpenza kosepela na bato, tokomibanzabanza mpo na bango. Na ndakisa, soki esika bofandi mpo na kosolola moi, mbula, mopɛpɛ to malili ezali kotungisa moto oyo ozali koyekola na ye, bókende na esika mosusu, to bókata lisolo mpo na kosolola na ngonga mosusu. Soki okei kokutana na ye na ngonga moko oyo ebongi te, okoki koyebisa ye ete okozonga na ngonga mosusu. Soki moto moko ya kartye to moto moko oyo asepelaki na nsango azali kobɛla maladi to akɔti lopitalo, tindelá ye mwa mokanda ya mokuse to kende kotala ye mpo na komonisa ete ozali komibanzabanza mpo na ye. Soki mpe ebongi, okoki komemela moto yango mwa eloko ya kolya, to okoki komonisela ye boboto na lolenge mosusu.

Ntango bayekoli ya Biblia bazali kokola, bakoki komiyoka lokola nde bazali bango moko mpamba te bazali lisusu kolekisa ntango mingi te na baninga oyo bazalaki na bango liboso. Zalá moninga na bango. Lekisá ntango na kosolola na bango nsima ya boyekoli ya Biblia to na bantango mosusu. Lendisá bango báluka baninga malamu. (Mas. 13:20) Salisá bango báyanganaka na makita ya boklisto. Na makita yango, fandáká na bango esika moko mpe salisá bango soki bazali na bana mpo bango nyonso bázwa litomba na mateya oyo ezali kopesama wana.

Kosepela na yo euta mpenza na motema. Kosepela na bato, bayekolaka yango te lokola mosala moko boye, kasi ezali mpenza ezaleli oyo eutaka na motema ya moto. Ndenge oyo tosepelaka na bato emonanaka na ndenge ebele. Emonanaka na ndenge tozali koyoka bango mpe na makambo oyo tozali koloba. Emonanaka na boboto na biso mpe na ndenge tozali kopesa basusu lokumu. Ata soki tolobi to tosali eloko moko te, emonanaka na ezaleli na biso mpe na elongi na biso. Soki tozali komibanzabanza mpenza mpo na bato, bakozanga te komona yango.

Ntina monene oyo tosengeli komonisa ete tozali mpenza kosepela na basusu ezali ete ntango tozali kosala bongo, tozali kolanda ndakisa ya bolingo mpe ya motema mawa ya Tata na biso ya likoló. Yango ebendaka bato oyo bazali koyoka biso epai ya Yehova mpe epai ya nsango oyo apesi biso tósakola. Na bongo, ntango ozali kosakola nsango malamu, salá makasi ete ‘omibanzabanza kaka na makambo na yo moko te, kasi omibanzabanza mpe na makambo ya bamosusu.’​—Filp. 2:4.

NDENGE YA KOMONISA ETE OSEPELI MPENZA NA MOTO

  • Yoká ye ntango azali koloba. Pesá ye matɔndi mpo na ndenge apesi makanisi na ye mpe amonisi mayoki na ye. Tuná ye mituna mpo na koyeba makanisi na ye malamu koleka.

  • Kanisáká moto yango kaka, ata nsima ya kosilisa lisolo na bino. Koumela te mpo na kozongela ye lisusu.

  • Yebisá ye solo ya Biblia oyo ezali mpenza kokokisa bamposa na ye.

  • Salá likambo boye to boye mpo na kosalisa ye. Talelá bamposa na ye ya ntango oyo to mpe ya mikolo ekoya.

DEVUARE: (1) Liboso makita ya lisangá ebanda, monisá ete osepeli na moto moko oyo azali wana. Kosuka kaka te na kopesa ye mbote. Luká koyeba ye malamu mpenza. Monisá ete ozali komibanzabanza mpo na ye. Kómisá yango momeseno na yo. (2) Na mosala ya kosakola, monisá ete osepeli na moto oyo okutani na ye. Kosuka kaka te na kopesa ye litatoli. Luká koyeba ye. Na kotalela makambo oyo oyebi na ntina na moto yango, bongisá makambo oyo okoloba mpe oyo okosala. Luká ntango nyonso mabaku oyo okoki kosala bongo.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto