LITEYA 36
Motó ya likambo
BATO oyo bameseni kosala masolo bayebi ntina ya motó ya likambo. Ntango bazali kobongisa lisolo na bango, motó ya likambo esalisaka bango bálobela likambo moko ya sikisiki mpe bákanisa mingi mpenza mpo na yango. Yango wana, na esika bálobela makambo ebele likolólikoló, basalaka lisolo na bango na ndenge oyo ekosalisa mpenza bato oyo bazali koyoka bango. Ntango likanisi mokomoko ya ntina eyokani na motó ya likambo mpe ezali kolimbola yango, bato oyo bazali koyoka bakokoka mpe kokanga makanisi yango mpe bakoyeba ntina na yango.
Atako balobaka ete motó ya likambo ezali lisolo oyo okosala, okomona ete masolo na yo ekozala kitoko koleka soki otaleli motó ya likambo lokola likanisi moko oyo ezali kolakisa yo ndenge oyo okosala lisolo na yo mobimba. Na ndakisa, tozali na masolo lokola Bokonzi, Biblia mpe lisekwa. Na masolo oyo, okoki kozwa mitó ya likambo ndenge na ndenge, na ndakisa: “Bokonzi ezali guvɛrnema ya solo,” “Bokonzi ya Nzambe ekokómisa mabele oyo Paladiso,” “Biblia epemami na Nzambe,” “Biblia ezali motambwisi malamu lelo oyo,” “Lisekwa ezali kopesa elikya na bato oyo bazali na mawa,” mpe “Elikya ya lisekwa ezali kosalisa biso tózonga nsima te ntango tokutani na minyoko.” Mitó ya likambo oyo nyonso ezali kosɛnga ete olobela yango na lolenge oyo ekeseni mpenza.
Ntango Yesu Klisto azalaki awa na mabele, mosala na ye ya kosakola eyokanaki mpenza na motó ya likambo monene ya Biblia mpe amonisaki yango polele: “Bokonzi ya likoló ekómi pene.” (Mat. 4:17) Ndenge nini alobeli motó ya likambo yango? Baevanzile nyonso minei elobeli Bokonzi yango mbala koleka 110. Kasi Yesu asukaki kaka te na kozongela liloba “bokonzi” mbala na mbala. Ezala na mateya na ye mpe na makamwisi oyo asalaki, Yesu amonisaki polele ete ye moko nde azali Mwana ya Nzambe, Masiya, moto oyo Yehova akopesa Bokonzi. Yesu amonisaki mpe ete na nzela na ye, bato mosusu bazwi libaku ya kokɔta na Bokonzi yango. Amonisaki bizaleli oyo bato oyo balingi kozwa libaku yango basengeli komonisa. Yesu amonisaki polele na mateya na ye mpe na misala na ye ya kokamwa ntina ya Bokonzi ya Nzambe na bomoi ya bato, mpe na ndenge azalaki kobengana bademo na nguya ya elimo ya Nzambe, amonisaki lisusu polele ete ‘bokonzi ya Nzambe ekómelaki mpenza’ bato oyo bazalaki koyoka ye. (Luka 11:20) Ezali mpo na Bokonzi wana nde Yesu atindaki bayekoli na ye bápesa litatoli.—Mat. 10:7; 24:14.
Salelá motó ya likambo oyo ebongi. Basɛngi yo te ete olobela makambo nyonso oyo ezali na Biblia mpo na motó ya likambo moko, kasi kozala na motó ya likambo oyo ebongi ezali mpe na ntina mingi.
Soki yo moko nde osengeli kopona motó ya likambo, talá naino ntina ya lisolo na yo. Na nsima, ntango ozali kopona makanisi ya ntina oyo ekozala lokola plan na yo, salá mpenza ete makanisi yango esimba motó ya likambo oyo oponaki.
Soki bapesi yo motó ya likambo, talelá yango malamumalamu mpo na koyeba ndenge oyo ezali kotinda yo osala lisolo na yo. Mbala mosusu, esɛngaka mpe milende mpo na koyeba ntina ya motó ya likambo moko mpe mateya malamu oyo ekoki kobima na yango. Soki yo moko nde okopona makambo oyo okoloba mpo na kolimbola motó ya likambo oyo bapesi yo, poná yango na likebi mpenza mpo obimisa motó ya likambo na yo polele. Soki mpe bapesi yo makambo oyo okoloba, osengeli lisusu kotalela yango malamu mpenza mpo na koyeba ndenge oyo okosalela yango mpo eyokana na motó ya likambo. Osengeli mpe kotalela mpo na nini makambo yango ezali na ntina mpo na bato oyo bakoyoka yo mpe mokano na yo ezali nini ntango ozali kosala lisolo yango. Yango ekosalisa yo oyeba makambo oyo osengeli konyata na lisolo na yo.
Ndenge ya konyata motó ya likambo. Mpo na konyata motó ya likambo na ndenge esengeli, ntango ozali naino kopona makambo oyo okoloba mpe ozali kotya yango na molɔngɔ, osengeli kobongisa ndenge oyo makanisi yango ekosimba motó ya likambo. Soki osaleli kaka makambo oyo ezali kosimba motó ya likambo na yo mpe soki ozali kolanda mpenza toli oyo epesami mpo na kosala plan ya malamu, ekozala mpasi te mpo onyata motó ya likambo yango.
Kozongela motó ya likambo mbala na mbala esalisaka mpe mpo na kobimisa yango polele. Na miziki, motó ya likambo ezali lokola maloba oyo bazongelaka mbala na mbala ntango bazali koyemba loyembo moko mpe soki moto ayoki kaka maloba wana akokanisa loyembo yango. Bazongelaka maloba yango ndenge moko te bisika nyonso. Na bantango mosusu bazongelaka kaka mwa ndambo ya maloba yango, na bantango mosusu bakoyemba maloba yango na mwa bokeseni moke, kasi ezala bongo to te, mobɛti miziki ayebaka malamu ndenge akokɔtisa maloba yango na miziki na ye tii ntango ekobongisa mpenza loyembo mobimba. Esengeli mpe kozala bongo mpo na motó ya likambo ya lisolo. Ndenge mobɛti miziki azongelaka mwa maloba ya loyembo na ye, ndenge moko mpe osengeli kozongelaka maloba ya ntina ya motó ya likambo na yo. Osengeli kosalela maloba mosusu oyo ezali na ndimbola moko na motó ya likambo, to osengeli kozongela motó ya likambo na maloba mosusu. Soki osali bongo, yango ekosala ete motó ya likambo ezala likanisi ya ntina oyo bato oyo bazali koyoka yo bakokanga.
Toli oyo etali kaka masolo oyo tosalaka na estrade te, kasi etali mpe masolo oyo tosalaka na mosala ya kosakola. Moto akoki kokanga ata lisolo moko ya mokuse soki motó ya likambo na yango ezali komonana polele. Moto akokanga nokinoki mateya oyo azwi na boyekoli ya Biblia soki ozali konyata motó ya likambo na yango. Milende oyo ozali kosala mpo na kopona mpe kobongisa mitó ya likambo oyo ebongi ekosalisa yo oyeba mpenza koloba mpe ozala moteyi malamu ya Liloba ya Nzambe.