Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • be liteya 38 lok. 215-lok. 219 par. 4
  • Maloba ya ebandeli oyo ekolamusa mposa ya bato

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Maloba ya ebandeli oyo ekolamusa mposa ya bato
  • Zwá matomba na mateya ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi
  • Masolo mosusu
  • Ndenge nini okoki kobanda diskur na lolenge malamu
    Mokanda mpo na Eteyelo ya mosala ya Nzambe
  • Ndenge malamu ya kobanda lisolo
    Bongisá ndenge na yo ya kotánga mpe ya koteya
  • Makanisi mabongi na koteya, malakisami polele
    Mokanda mpo na Eteyelo ya mosala ya Nzambe
  • Eteya mpenza bato oyo bakoyoka yo
    Zwá matomba na mateya ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi
Makambo mosusu
Zwá matomba na mateya ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi
be liteya 38 lok. 215-lok. 219 par. 4

LITEYA 38

Maloba ya ebandeli oyo ekolamusa mposa ya bato

Osengeli kosala nini?

Na maloba ya ebandeli ya lisolo na yo, lobá likambo moko ya ntina mingi oyo ekobenda likebi ya bato oyo bazali koyoka yo mpe oyo ekosalisa yo mpenza okokisa mokano oyo omityelaki.

Yango ezali na ntina nini?

Maloba na yo ya ebandeli nde ekomonisa soki bato mosusu bakoyoka yo to te mpe soki bakotya likebi to te.

NA LISOLO nyonso, maloba ya ebandeli nde ezali eteni ya ntina mingi. Soki olamusi mpenza mposa ya bato oyo bazali koyoka yo, ekozala mpasi te mpo bálanda na likebi mpenza makambo oyo okoloba na nsima. Na mosala ya kosakola, soki maloba na yo ya ebandeli elamusi mposa ya bato te, mbala mosusu okokoka te kosilisa lisolo na yo. Ntango ozali kosala lisukulu na Ndako ya Bokonzi, bato oyo bazali koyoka yo bakotɛlɛma te mpo na kobima, kasi bakoki kobanda kokanisa makambo mosusu soki osimbi likebi na bango te.

Ntango ozali kobongisa maloba na yo ya ebandeli, talelá makambo oyo: (1) kobenda likebi ya bato oyo bakoyoka yo, (2) komonisa polele likambo oyo okolobela na lisolo na yo, mpe (3) komonisa mpo na nini lisolo yango ezali na ntina mpo na bato oyo bakoyoka yango. Na bantango mosusu, okoki kokokisa makambo oyo nyonso misato na mbala moko. Nzokande na bantango mosusu, okoki kolandela makambo yango mokomoko, kobanda na oyo yo moko olingi.

Ndenge ya kobenda likebi ya bato oyo bazali koyoka yo. Ezali te mpo bato bayangani mpo na koyoka lisukulu moko nde bamibongisi mpo na kotya mpenza likebi nyonso na lisolo yango. Mpo na nini ezali bongo te? Mpamba te, bomoi na bango etondi na makambo oyo ezali kosɛnga mpenza ete bátyela yango likebi. Mbala mosusu bazali komitungisa mpo na mokakatano moko na ndako to mpo na motungisi moko ya bomoi. Yo molobi, ozali sikoyo na mokumba monene ya kobenda likebi ya bato oyo bazali koyoka yo mpe ya kosimba ntango nyonso likebi na bango. Ezali na ndenge mingi oyo okoki kosala yango.

Lisolo Likoló ya Ngomba ezali moko kati na masukulu eleki kitoko oyo bato basalá mpe eyebani mingi mpenza. Lisolo yango ebandaki ndenge nini? Luka alobi ete Yesu abandaki yango boye: “Esengo na bino babola, . . . esengo na bino baoyo bozali na nzala sikoyo, . . . esengo na bino baoyo bozali kolela sikoyo, . . . esengo na bino ntango bato bazali koyina bino.” (Luka 6:20-22) Mpo na nini yango elamusaki mposa ya bato? Na maloba moke mpamba, Yesu amonisaki mikakatano mosusu ya minene oyo bato oyo bazalaki koyoka ye bazalaki na yango. Na nsima, na esika ete aumela na kolobela mikakatano yango, amonisaki ete bato oyo bazalaki na mikakatano yango bakokaki kaka kozala na esengo, mpe ndenge azalaki koloba yango esalaki ete bato yango bázala na mposa ya koyoka ye mingi lisusu.

Okoki kosalela mituna mpo na kolamusa mposa ya bato, kasi mituna yango esengeli kozala oyo ebongi mpenza. Soki mituna na yo ezali komonisa ete okolobela kaka makambo oyo bato oyo bazali koyoka yo bayoká liboso, mposa ya koyoka yo ekosila mbala moko. Kotuna te mituna oyo ekoyokisa bato oyo bazali koyoka yo nsɔni, to mituna oyo ekobimisa bango lokola bato mabe. Salá nde makasi obongisa mituna na yo na ndenge oyo ekotinda bango bákanisa. Nsima ya motuna mokomoko, pemá mwa moke mpo bato oyo bakoyoka yo bázwa ntango ya koyanola na mitema na bango. Ntango bamoni ete ozali kosolola na bango na makanisi, yebá ete obendi likebi na bango.

Ndenge mosusu ya malamu ya kobenda likebi ya bato ezali kolobela makambo oyo bato mosusu bakutaná na yango na bomoi na bango. Kasi kobɛta kaka lisolo ekoki kosala ete okokisa mokano na yo te soki likambo yango etungisi moto moko kati na bato oyo bazali koyoka yo to soki eyokisi ye nsɔni. Soki bato bakangi lisolo oyo obɛtɛli bango kasi bakangi liteya oyo olingaki kopesa bango na lisolo wana te, yebá ete okokisi mokano na yo te. Soki na ebandeli ya lisolo na yo, osaleli makambo oyo bato mosusu bakutaná na yango na bomoi na bango, esengeli kozala lokola ozali kobongisa nzela mpo na likanisi moko ya ntina oyo okolobela na lisolo na yo. Atako okoki kolobela makambo mosusu ya mikemike mpo lisolo yango emonana lokola ezali kosalema na ntango wana, kebá ete ekóma molai mingi te.

Balobi mosusu babandaki masolo na bango na nsango ya likambo moko oyo euti kosalema, na makambo oyo zulunalo moko ekomaki, to na makambo oyo moto moko oyo ayebani alobaki. Yango mpe ekoki kobenda likebi ya bato soki eyokani mpenza na lisolo na yo mpe ebongi mpo na bato oyo bakoyoka yo.

Soki okosala lisukulu moko oyo ezali na biteni mingi to lisolo moko na Likita ya Mosala, boye ekozala malamu mingi maloba na yo ya ebandeli ezala mokuse mpe ebimisa polele likanisi ya ntina. Soki bapesi yo lisukulu ya bato nyonso, landá kaka miniti oyo bapesi yo mpo na maloba ya ebandeli. Ezali na katikati ya lisukulu nde okolobela makambo oyo ezali na ntina mingi mpenza mpo na bato oyo bazali koyoka yo.

Na bantango mosusu, ekoki kokóma ete oloba liboso ya bato oyo bazali kotya ntembe to bato oyo bayinaka biso. Ndenge nini okoki kobenda likebi na bango? Bakangaki Setefano, moklisto moko ya ekeke ya liboso oyo ‘atondaki na elimo mpe na bwanya,’ mpe bamemaki ye na Sanedrina ya Bayuda mpo na kosambisa ye. Kuna, alobaki malamu mpenza mpo na kokɔtela lingomba ya boklisto. Abandaki ndenge nini? Abandaki koloba na limemya mpenza mpe alobelaki likambo moko oyo bango nyonso bandimaka. Alobaki boye: “Mibali, bandeko mpe batata, bóyoka. Nzambe ya nkembo abimelaki nkɔkɔ na biso Abalayama.” (Mis. 6:3; 7:2) Na Aleopaji, na Atene, ntoma Paulo abongisaki maloba na ye ya ebandeli na kotalela bato oyo bazalaki koyoka ye. Alobaki boye: “Mibali ya Atene, namoni ete na makambo nyonso bomonani ete bomipesá na kobanga banzambe koleka bato mosusu nyonso.” (Mis. 17:22) Lokola Setefano na Paulo baponaki malamu maloba na bango ya ebandeli, bato oyo bayokaki bango batyaki likebi mingi lisusu.

Ntango ozali na mosala ya kosakola, osengeli mpe kobenda likebi ya bato. Soki oyebisaki moto te ete okoya kotala ye, okoki kokuta ye azali kosala misala na ye. Na mikili mosusu, soki oyokanaki na moto te ete okoya kotala ye, akoluka oyebisa ye nokinoki likambo oyo oyei na yango. Na bisika mosusu, esɛngaka ete osala to oloba makambo oyo mimeseno ya mboka esɛngi kosala ntango okutani na moto, liboso ete oyebisa ye ntina oyo oyei kotala ye.​—Luka 10:5.

Ata ndenge nini, soki ozali mpenza na boboto, yango ekosala ete osolola malamu na moto yango. Mbala mingi ezalaka malamu ete obanda na likambo moko oyo moto yango mpe azali kokanisa. Ndenge nini okoyeba likambo yango? Talá naino, ntango okutani na moto yango, azali kosala nini? Mbala mosusu azali kosala bilanga to kobɔkɔla bibwele, to azali kokata matiti na lopango na ye, to azali kolamba, to azali kosukola bilamba, to mpe azali kokɛngɛla bana. Azalaki kotala eloko moko, ezala zulunalo to likambo moko oyo ezalaki koleka na balabala? Biloko oyo ezali penepene na ye ezali komonisa ete asepelaka na mosala ya kolɔbɔ mbisi, masano, miziki, mibembo, ordinatɛrɛ, to eloko mosusu? Mbala mingi, bato bamitungisaka mpo na makambo oyo bauti koyoka na radio to na televizyo. Soki obimisi motuna moko to opesi mwa likanisi na makambo oyo, yango ekoki kosala ete bósolola na boboto.

Lisolo oyo Yesu asalaki ntango akutanaki na mwasi Mosamalia na liziba moko pene na engumba Sikala ezali ndakisa monene oyo ezali komonisa biso ndenge ya kobanda lisolo mpo na kopesa litatoli.​—Yoa. 4:5-26.

Osengeli kobongisa malamu mpenza maloba na yo ya ebandeli, mingimingi soki lisangá na bino esakolaka mbala na mbala na teritware na yango. Soki osali bongo te, okokoka te kopesa litatoli.

Monisá polele likambo oyo olingi koloba. Na lisangá, mokambi ya lisukulu to moto oyo akoleka liboso yo osala lisolo nde akoyebisa bato motó ya likambo ya lisolo na yo mpe akobenga yo. Nzokande, ekozala malamu yo moko mpe oyebisa lisusu bato motó ya likambo na yo ntango okoloba maloba na yo ya ebandeli. Okoki kosala bongo, kasi ezali mobeko te ete otánga motó ya likambo na yo ndenge kaka ekomami na papye. Nzokande osengeli kolimbola mokemoke motó ya likambo na yo ntango ozali kosala lisolo na yo. Na maloba na yo ya ebandeli, luká kobenda likebi ya bato na likambo oyo okolobela.

Ntango Yesu atindaki bayekoli na ye bákende kosakola, amonisaki polele nsango oyo basengelaki komema. Alobaki boye: “Ntango bozali kokende, bósakola, kolobáká ete, ‘Bokonzi ya likoló ekómi pene.’” (Mat. 10:7) Yesu alobaki boye mpo na mikolo na biso: “Nsango malamu oyo ya bokonzi ekosakolama.” (Mat. 24:14) Tolendisami ete ‘tósakola liloba,’ elingi koloba ete ntango tozali kosakola, tókangama kaka na oyo Biblia elobi. (2 Tim. 4:2) Nzokande, liboso ofungola Biblia to obenda likebi ya moto na Bokonzi ya Nzambe, ezalaka malamu kolobela naino likambo moko oyo ezali kotungisa bato lelo oyo. Okoki kolobela ndenge bazali koboma bato, kozanga mosala, kozanga bosembo, bitumba, ndenge ya kosalisa bilenge, maladi to liwa. Kasi kolobela mingi te makambo oyo ezali kopesa bato mpasi, mpamba te nsango oyo ozali komema ezali nsango ya esengo. Salá makasi lisolo na bino elobela mingimingi Liloba ya Nzambe mpe elikya ya Bokonzi.

Monisá mpo na nini lisolo yango ezali na ntina mpo na bato oyo bazali koyoka yo. Soki okosala lisolo na yo na lisangá, okoki kozala na elikya ete bato oyo bakoyoka yo bakosepela na makambo oyo okoloba. Kasi bakolanda yo na likebi lokola moto oyo azali koyekola makambo oyo etali ye mpenza? Bakotya likebi na lisolo na yo mpo bazali komona ete makambo oyo bazali koyoka etali mpenza bomoi na bango mpe ozali kotinda bango básala likambo moko mpo na yango? Ekozala bongo kaka soki otaleli malamumalamu bato oyo bakoyoka yo, kanisá makambo oyo bazali kokutana na yango, mabanzo na bango mpe makanisi na bango, ntango ozali kobongisa lisolo na yo. Soki osali bongo, na maloba na yo ya ebandeli, kɔtisá likambo moko oyo ekomonisa yango.

Ezala ozali kosala lisolo na estrade to ozali kopesa moto moko litatoli, lolenge oyo eleki malamu ya kolamusa mposa ya bato ezali komonisa bango ete lisolo yango etali mpe bango. Monisá ete lisolo na yo etali mikakatano na bango, bamposa na bango, to mituna oyo bazali na yango na motema. Kutu bakolanda yo na likebi koleka soki omonisi polele ete okolobela likambo yango likolólikoló te, kasi okolobela yango mpenza malamumalamu. Mpo na kosala bongo, osengeli komibongisa malamu.

Ndenge oyo okosala lisolo na yo. Makambo oyo okoloba na ebandeli ya lisolo na yo ezali na ntina mingi, kasi ndenge oyo okolobela yango ekoki mpe kolamusa mposa ya bato. Yango wana ntango ozali kobongisa lisolo na yo, osengeli kaka te kobongisa makambo oyo okoloba, kasi mpe ndenge oyo okoloba yango.

Mpo na kokokisa mokano na yo, ezali na ntina mingi ete opona maloba oyo ebongi. Yango wana okomona ete ezali malamu kobongisa mpenza bafraze mibale to misato ya ebandeli malamumalamu. Mbala mingi, bafraze ya mikuse mpe ya pɛtɛɛ nde ezalaka malamu koleka. Soki okosala lisolo na yo na lisangá, okoki kokoma bafraze yango na plan na yo, to okoki kokanga yango na motó mpo maloba na yo ya ebandeli esimba mpenza mitema ya bato na ndenge esengeli. Soki osaleli maloba ya ebandeli oyo ezali kosimba mitema ya bato mpe olobi yango mbangumbangu te, yango ekoki kosalisa yo osala lisolo na yo nyonso kozanga kobanga.

Ntango nini osengeli kobongisa maloba yango? Awa, bato nyonso bazali na likanisi moko te. Bato mosusu oyo bamesaná kosala masolo bakanisi ete ntango ozali kobongisa lisolo na yo, esengeli kobanda na maloba ya ebandeli. Bato mosusu oyo bayekolá ndenge ya koloba na miso ya bato balobi ete esengeli kobongisa maloba ya ebandeli ntango osilisi kobongisa makambo oyo okoloba na lisolo na yo.

Na ntembe te, osengeli naino koyeba motó ya likambo na yo mpe makanisi ya ntina oyo okolimbola liboso obanda kobongisa maloba ya ebandeli ya lisolo na yo. Bongo soki bapesi yo plan mpo na kobongisa lisukulu na yo? Nsima ya kotánga plan na yo, soki ozwi likanisi oyo okoki koloba na ebandeli ya lisolo na yo, ezali mabe te kokoma yango. Kobosana mpe te ete mpo maloba na yo ya ebandeli esimba mitema ya bato, osengeli kotalela bato oyo bakoyoka yo mpe makambo oyo ezali na plan na yo.

NDENGE YA KOSALA YANGO

  • Talelá bato oyo bakoyoka yo: makambo oyo bazali kokutana na yango, mabanzo na bango, makanisi na bango mpe makambo oyo bayebi na lisolo oyo okosalela bango.

  • Luká koyeba makambo oyo ekosepelisa bango mpe oyo ezali na ntina mingi mpo na bango na lisolo na yo.

DEVUARE: (1) Liboso okende na mosala ya kosakola ndako na ndako, bongisá maloba ya ebandeli oyo ekoyokana na nsango oyo okomema mpe na makambo mosusu oyo euti kosalema na teritware na bino. (2) Zongelá kotánga paragrafe ya liboso ya masolo mitano to motoba na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe na Lamuká! Omituna: Nini ezali kosala ete paragrafe ya liboso ya lisolo mokomoko wana elamusa mposa ya bato?

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto