ETENI 2
“Alingi bosembo”
Na mokili ya lelo, bosembo ezali mpenza te, mpe bato bazali koloba ete nyonso wana ezali foti ya Nzambe. Yango ezali lokuta, mpamba te Biblia ezali koteya likambo moko oyo ezali solo mpe ezali kosepelisa mpenza—ete “Yehova alingi bosembo.” (Nzembo 37:28, NW) Eteni oyo ekomonisa biso ete Nzambe akokisaka solo maloba wana, mpe likambo yango ezali kopesa bato nyonso elikya.