BIYANO NA MITUNA YA BIBLIA
Nzambe azalaka ndenge nini?
Nzambe azali moto ya elimo. Asalá likoló, mabele mpe bikelamu nyonso ya bomoi. Moto te akelá Nzambe; Nzambe azali na ebandeli te. (Nzembo 90:2) Nzambe alingi ete bato báluka ye mpe báyeba solo na ntina na ye.—Tángá Misala 17:24-27.
Tokoki koyeba nkombo ya Nzambe. Tokoki koyeba bizaleli na ye mosusu soki totali biloko oyo akelá. (Baroma 1:20) Kasi, mpo na koyeba Nzambe malamu, tosengeli koyekola Liloba na ye, Biblia. Esalisaka biso tóyeba bizaleli na ye.—Tángá Nzembo 103:7-10.
Ndenge nini Nzambe atalelaka makambo oyo ezali sembo te?
Mozalisi na biso Yehova ayinaka makambo oyo ezali sembo te. Mpe akelá biso bato na elilingi na ye. (Kolimbola Mibeko 25:16) Yango wana bato mingi bayinaka makambo oyo ezali sembo te. Makambo ya mabe oyo tozali komona lelo eutaka epai ya Nzambe te. Nzambe apesá moto bonsomi ya kopona. Nzokande, bato mingi basalelaka bonsomi yango na ndenge ya mabe mpe basalaka makambo oyo ezali sembo te. Bayokisaka Yehova mawa na motema.—Tángá Ebandeli 6:5, 6; Kolimbola Mibeko 32:4, 5.
Yehova alingaka bosembo, mpe akotika te ete makambo ya mabe ezala libela na libela. (Nzembo 37:28, 29) Biblia elobi ete mosika te Nzambe akosilisa makambo nyonso oyo ezali sembo te.—Tángá 2 Petro 3:7-9, 13.
Biblia elobi ete mosika te Nzambe akolongola makambo nyonso ya kozanga bosembo