Mokapo ya nsambo
Ntina oyo Nzambe atiki nzela ete mabe ezala
1, 2. (a) Soki Yehova abomaki batomboki mbala moko na Edene, elingaki kozala ndenge nini mpo na biso? (b) Bibongiseli nini ya bolingo Yehova azwaki mpo na biso?
YAKOBO, tata ya mabota, alobaki ete: “Mikolo ya mbula ya bomoi na ngai ezali mingi te mpe ezali mabe.” (Genese 47:9) Ndenge moko mpe, Yobo alobaki ete moto “azali na mikolo mingi te mpe atondi na mpasi.” (Yobo 14:1) Lokola bango, bato mingi kati na biso bakutaná na mikakatano makasi, basalá bango makambo ya mabe, to mpe bakwelá makama ya minene. Nzokande, kobotama na biso ezali te likambo mabe oyo Nzambe asalelá biso. Ya solo, tozali na nzoto ya kozanga kokoka, makanisi ya kozanga kokoka, tozali mpe na kati ya paladiso te ndenge Adama na Eva bazalaki na ebandeli. Kasi, elingaki kozala ndenge nini soki Yehova abomaki bango mbala moko ntango batombokelaki ye? Atako maladi moko te ekokaki kozala na mokili, to mawa, to liwa, kasi bato mpe mbɛlɛ bazali te, elingi koloba mbɛlɛ tobotamá te. Nzokande, na motema mawa na ye, Nzambe atikelaki Adama na Eva ntango mpo bábota bana, atako bana yango basangolaki ezaleli ya kozanga kokoka. Mpe na nzela ya Klisto, Yehova azwaki bibongiseli mpo ete biso tózwa eloko oyo Adama abungisaki—bomoi ya seko na paladiso awa na mabele.—Yoane 10:10; Baloma 5:12.
2 Oyo nde likambo ya kolendisa mpo na biso ya kozela na motema likoló ntango oyo tokofanda na mokili ya sika, elingi koloba na paladiso, epai maladi, mawa, mpasi, mpe liwa ekozala lisusu te, bato mabe mpe bakozala lisusu te! (Masese 2:21, 22; Emoniseli 21:4, 5) Nzokande, Biblia ezali koyebisa biso ete atako lobiko na biso moko ezali likambo ya ntina mingi mpo na biso mpe mpo na Yehova, likambo mosusu ya ntina koleka mpe ezali.
Mpo na lokumu ya nkombo na ye monene
3. Kokokisama ya mokano ya Yehova mpo na mabele mpe mpo na bato etaleli likambo nini?
3 Nkombo ya Nzambe etalelami na kati ya likambo ya kokokisama ya mokano na ye mpo na mabele mpe mpo na bato. Nkombo yango, Yehova, elimboli “Akómisaka.” Yango wana, nkombo na ye elati lokumu na ye ya Mokonzi ya molɔ́ngɔ́ mobimba, ya Mokokisi ya mikano oyo amityeli, mpe ya Nzambe ya bosolo. Lokola Yehova azali Mokonzi Monene, mpo ete kimya mpe bolamu ezala na molɔ́ngɔ́ mobimba, esengeli ete nkombo na ye, bakisa mpe makambo nyonso oyo etalelami na nkombo yango, ezwa lokumu oyo esengeli mpe bato nyonso bátosa ye.
4. Mokano ya Nzambe mpo na mabele etaleli mpe makambo nini?
4 Nsima ya kosala Adama na Eva, Yehova apesaki bango mosala ya kosala. Amonisaki polele ete mokano na ye ezalaki kaka te ete bázala na bokonzi likoló ya mabele mobimba—elingi koloba kokómisa paladiso na mabele mobimba—kasi mpe bátondisa yango na bato. (Genese 1:28) Mokano yango esengelaki kokokisama te mpo na lisumu na bango? Nkombo ya Yehova, Mozwi-na-Nguya-Nyonso ekokaki mpenza koyokisama nsɔni soki alongaki te kokokisa mokano na ye mpo na mabele mpe mpo na bato!
5. (a) Soki bato ya liboso balei mbuma ya koyeba malamu mpe mabe, bakokufa ntango nini? (b) Ndenge nini Yehova akokisaki maloba na ye oyo ezali na Genese 2:17 kozanga kobebisa mokano na ye oyo etali mabele?
5 Yehova akebisaki Adama na Eva ete soki baboi kotosa maloba na ye mpe balei mbuma ya nzete ya koyeba malamu mpe mabe, bakokufa “mokolo” yango. (Genese 2:17) Kaka ndenge alobaki, Yehova asɛngaki bango bázongisa monɔkɔ kaka mokolo wana oyo basalaki lisumu, mpe akatelaki bango etumbu ya liwa. Mpo na Nzambe, Adama na Eva bakufaki kaka mokolo wana. Nzokande, mpo na kokokisa ntina oyo asalaki mabele, Yehova atikaki bango bábota bana liboso ete bákufa na mosuni. Kasi, lokola Nzambe akoki kotalela mbula 1000 lokola mokolo moko, ntango Adama akufaki na mbula 930, yango emonisi ete ezalaki kaka na kati ya “mokolo moko.” (2 Petelo 3:8; Genese 5:3-5) Na yango, ndenge etumbu wana epesamaki emonisaki ete Yehova alobaki mpenza solo, mpe ete mokano na ye mpo na mabele ebebisamaki te na liwa na bango. Kasi, apesaki bato ya kozanga kokoka, bakisa mpe bato mabe, nzela ya kozala na bomoi mpo na mwa ntango.
6, 7. (a) Soki totaleli Exode 9:15, 16, mpo na nini Yehova atiki nzela ete bato mabe bákoba kozala na bomoi mpo na mwa ntango? (b) Na oyo ekómelaki Falo, ndenge nini Yehova amonisaki nguya na Ye monene, mpe ndenge nini nkombo na Ye eyebanaki? (c) Nini ekosalema ntango mokili oyo mabe ekokóma na nsuka?
6 Makambo oyo Yehova alobaki na mokonzi ya Ezipito na mikolo ya Moize emonisi lisusu ntina oyo atiki nzela ete bato mabe bázala na mokili. Ntango Falo aboyaki ete bana ya Yisalaele bábima na Ezipito, Yehova abomaki ye mbala moko te. Malɔzi zomi ekwelaki mokili yango, mpe elakisaki nguya ya Nzambe na ndenge moko ya kokamwa mpenza. Ntango azalaki kokebisa ye mpo na bolɔzi ya nsambo, Yehova ayebisaki Falo ete akokaki mpenza kolongola ye na bato na ye na mabele. Yehova alobaki ete “natiki yo na ntina boye ete namonisa yo nguya na ngai, ete nkombo na ngai esakolama na bipai nyonso na molɔ́ngɔ́.”—Exode 9:15, 16.
7 Ntango Yehova abimisaki Bayisalaele, nkombo na ye eyaki mpenza koyebana na mokili mobimba. (Yosua 2:1, 9-11) Lelo oyo, pene na mbula soki 3500 na nsima, makambo oyo asalaki na ntango wana bato babosani yango te. Ezali kaka te ete nkombo Yehova nde esakolamaki kasi mpe Ye oyo abengami na nkombo yango asakolamaki. Yango esalaki mpenza ete Yehova ayebana lokola Nzambe oyo akokisaka bilaka na ye mpe akɔtelaka basaleli na ye. (Yosua 23:14) Emonisaki ete mpo na nguya na ye oyo eleki, eloko moko te ekoki kopekisa mokano na ye. (Yisaya 14:24, 27) Yango wana, tokoki kozala na elikya ete etikali moke akokɔtela basaleli na ye ya sembo ntango akoboma mokili nyonso mabe ya Satana. Nguya mpe nkembo monene oyo likambo yango ekopesa na nkombo ya Yehova, bato bakobosana yango te. Matomba na yango ekozala na nsuka te.—Ezekiele 38:23; Emoniseli 19:1, 2.
‘E! Bwanya ya Nzambe ezali bozindo boni!’
8. Makambo nini Paulo asɛngi biso tótalela?
8 Na mokanda na ye oyo akomelaki Baloma, ntoma Paulo abimisaki motuna oyo: “Nzambe azangi nde bosembo?” Ayanolaki ete: “Soki moke te!” Na nsima, alobelaki mingi motema mawa ya Nzambe mpe atángaki makambo oyo Yehova alobaki ntango atikaki Falo azala na bomoi mpo na mwa ntango. Paulo amonisi mpe ete biso bato tozali lokola mabazi na mabɔkɔ ya moyemi-mbɛki. Mpo na yango, alobaki ete: “Soki Nzambe, atako azali na mokano ya komonisa nkanda na ye mpe kolakisa nguya na ye, atikaki nzela na motema molai mpenza na bambɛki ya nkanda oyo ebongi na libebi, mpe akoka kolakisa bomɛngo ya nkembo na ye likoló ya bambɛki ya motema mawa, oyo asilaki kobongisa liboso mpo na nkembo, elingi koloba, biso, baoyo ye abengaki uta na kati ya Bayuda kaka te kasi mpe uta na kati ya bikólo mosusu, bongo nini?”—Baloma 9:14-24.
9. (a) Banani bazali “bambɛki ya nkanda oyo ebongi na libebi”? (b) Mpo na nini Yehova akangi motema ntango molai liboso ya banguna na ye, mpe nsukansuka matomba nini bato oyo balingaka ye bakozwa?
9 Kobanda na ntango botomboki ebimaki na Edene, moto nyonso oyo akotombokela Yehova mpe mibeko na ye, azali kati na “bambɛki ya nkanda oyo ebongi na libebi.” Kobanda ntango wana, Yehova azali kokanga motema. Bato mabe bazali kotyola makambo na ye, bazali konyokola basaleli na ye, kutu babomi Mwana na ye. Yehova akangi mpenza motema mpe atiki ntango molai mpo bikelamu nyonso emona malamumalamu mbeba oyo eutaka na kotombokela Nzambe mpe mbeba oyo euti na boyangeli ya moto kozanga kotalela Nzambe. Mpe bobele na eleko yango liwa ya Yesu epesi nzela mpo na kosikola bato ya botosi mpe mpo na “kobukabuka misala ya Zabolo.”—1 Yoane 3:8; Baebele 2:14, 15.
10. Mpo na nini Yehova atiki nzela ete bato mabe bázala na mokili na boumeli ya mbula koleka 1900?
10 Na boumeli ya mbula koleka 1900 banda Yesu asekwaki, Yehova atikeli “bambɛki ya nkanda” nzela, abomi bango noki te. Mpo na nini? Ya liboso, mpo azalaki kobongisa bato oyo basengeli kozala na Yesu Klisto na Bokonzi na ye ya likoló. Bazali bato 144000, mpe babengami “bambɛki ya motema mawa” oyo ntoma Paulo alobelaki. Libosoliboso, Bayuda mosusu nde baponamaki mpo na kozala na kati ya etuluku ya bato yango oyo bakokenda na likoló. Na nsima, Nzambe abengaki bato kati na bikólo ya bapakano. Yehova asɛngisaki moko na bango te ete asalela ye. Kasi kati na baoyo bamonisaki botɔndi mpo na bibongiseli na ye ya bolingo, apesaki bamosusu libaku ya koyangela elongo na Mwana na ye na Bokonzi ya likoló. Kobongisama ya etuluku ya bato yango oyo bakokende likoló ekómi pene na nsuka.—Luka 22:29; Emoniseli 14:1-4.
11. (a) Banani bazali sikawa kozwa matomba oyo euti na motema molai ya Yehova? (b) Ndenge nini bato oyo bakufá mpe bakozwa matomba?
11 Kasi tokoloba nini mpo na bato oyo bakofanda awa na mabele? Motema molai ya Yehova epesi mpe nzela mpo na kosangisa “ebele ya bato” ya bikólo nyonso. Bakómi sikoyo bamilio. Yehova alakaki ete etuluku ya bato yango oyo bakofanda na mabele bakobika na nsuka ya mokili oyo mpe bakozwa libaku ya kozala na bomoi ya seko na paladiso awa na mabele. (Emoniseli 7:9, 10; Nzembo 37:29; Yoane 10:16) Na ntango oyo Nzambe ye moko aponi, bato ebele oyo bakufá bakosekwa mpe bakopesa bango libaku ya kozala na nse ya Bokonzi oyo ekotambwisama uta na likoló. Na Misala 24:15, Liloba ya Nzambe elobi ete: “Ekozala na lisekwa moko ya bayengebene mpe ya bato oyo bazangi boyengebene.”—Yoane 5:28, 29.
12. (a) Lokola Yehova atiki nzela ete mabe ezala, yango esalisi biso tóyeba nini mpo na ye? (b) Ozali kokanisa nini na ndenge oyo Yehova asilisi makambo yango?
12 Yango elingi koloba ete bibongiseli nyonso wana ezwami na ndenge ya bosembo te? Te, ezali bongo te, mpamba te lokola abomi “bambɛki ya nkanda” to bato mabe noki te, Nzambe azali komonisela bato mosusu motema mawa na ye na boyokani na mokano na ye. Likambo yango ezali mpenza komonisa motema mawa mpe bolingo na ye. Lokola mpe tozwi ntango ya kotala ndenge mokano ya Nzambe ezali kokokisama, yango epesi biso nzela ya koyeba makambo mingi oyo etali Yehova. Tozali kosepela na bizaleli ndenge na ndenge ya bomoto na ye oyo ezali komonana—bosembo na ye, motema molai na ye, bwanya na ye. Bwanya oyo Yehova amonisi na likambo etali boyangeli ya molɔ́ngɔ́ mobimba—lotomo na ye ya koyangela—ekotikala libela lokola elembo mpo na komonisa ete boyangeli na ye nde eleki malamu. Elongo na ntoma Paulo, tokoloba ete: “E! bomɛngo ya Nzambe mpe bwanya na ye mpe boyebi na ye ezali bozindo boni! Kosambisa na ye ekoki kososolama te mpe banzela na ye ekoki komonana te!”—Baloma 11:33.
Libaku ya komonisa bokangami na biso epai ya Nzambe
13. Ntango tozali konyokwama, yango epesaka biso libaku ya kosala nini, mpe nini ekosalisa biso mpo na komonisa ete tozali na bwanya?
13 Basaleli ya Nzambe mingi bazali konyokwama. Monyoko na bango ezali kokoba mpamba te Nzambe abomi naino bato mabe te mpe atii naino te mokili ya sika oyo alakaki. Yango esengeli kosilikisa biso? To tokoki nde kotalela makambo ya ndenge wana lokola mabaku ya komonisa ete Zabolo azali mpenza mokosi? Tokoki kozwa makasi ya kosala bongo soki tozali ntango nyonso kokanisa likebisi oyo elobi ete: “Mwana na ngai, zalá na mayele mpe sepelisá motema na ngai, ete nazongisela ye monɔkɔ oyo akopamela ngai.” (Masese 27:11) Satana, ye oyo atumolaka Yehova, alobaki ete soki bato babungisi biloko na bango nyonso to banyokwami na nzoto na bango, bakofinga Nzambe, to bakolakela ye mabe. (Yobo 1:9-11; 2:4, 5) Mpo na yango, tosepelisaka motema ya Yehova ntango totikalaka sembo epai na ye na ntango ya minyoko makasi, mpe na yango tomonisaka ete Satana azali mpenza mokosi.
14. Soki totyeli Yehova motema ntango tozali kokutana na komekama, matomba nini tokoki kozwa?
14 Soki totyeli Yehova motema ntango tozali kokutana na komekama, tokoki kolona bizaleli ya malamu. Na ndakisa, na nzela na makambo oyo Yesu anyokwamaki na yango, “ayekolaki botosi,” mpo ayebaki makambo yango liboso te. Biso mpe, na ntango ya komekama, tokoki kolona ezaleli ya motema molai, koyika mpiko, mpe kozala na botɔndi mingi mpo na banzela ya sembo ya Nzambe.—Baebele 5:8, 9; 12:11; Yakobo 1:2-4.
15. Ntango tozali koyika mpiko na makambo ya mabe, ndenge nini yango ekoki kopesa bato mosusu matomba?
15 Bato mosusu bakotala makambo tozali kosala. Na makambo oyo tozali konyokwama na yango mpo ete tolingi boyengebene ekotinda bato mosusu bákoka koyeba soki baklisto ya solo ezali banani lelo oyo. Mpe soki bakómi kosangana na biso na losambo ya solo, bakoki mpe kozala na elikya ya kozwa matomba ya bomoi ya seko. (Matai 25:34-36, 40, 46) Yehova na Mwana na ye balingi ete bato bázwa libaku yango.
16. Ndenge nini lolenge totalelaka minyoko ezali na boyokani na likambo etali bomoko?
16 Ntango tozali kotalela makambo mosusu ya mpasi lokola mabaku ya komonisa bokangami na biso epai ya Yehova mpe kosangana na kokokisama ya mokano na ye, yango ezali mpenza likambo eleki malamu! Kosala bongo ekoki komonisa mpenza ete tozali kolinga kozala na bomoko na Nzambe mpe na Klisto. Yesu abondelaki Yehova mpo na baklisto nyonso ya solo, alobaki ete: “Nazali kosɛngela kaka bango te [kaka te mpo na bayekoli oyo batambolaki na ye], kasi mpe baoyo bazali kondimela ngai na nzela ya liloba na bango; mpo bango nyonso bázala moko, ndenge yo, Tata, ozali na bomoko elongo na ngai mpe ngai nazali na bomoko elongo na yo, mpo bango mpe bázala na bomoko elongo na biso, mpo mokili endima ete yo otindaki ngai.”—Yoane 17:20, 21.
17. Wapi elikya makasi tokoki kozala na yango soki tozali sembo epai ya Yehova?
17 Soki tozali sembo epai ya Yehova, akopesa biso mbano. Liloba na ye elobi ete: “Bópikama makasi, bóninganaka te, bózala ntango nyonso na mingi ya kosala na kati ya mosala ya Nkolo, koyebáká ete mosala na bino ya makasi ezali mpamba te na oyo etali Nkolo.” (1 Bakolinti 15:58) Ebakisi ete: “Nzambe azali te moto oyo azangi boyengebene mpo abosana mosala na bino mpe bolingo oyo bomonisaki mpo na nkombo na ye, na ndenge bosalelaki basantu mpe bozali kokoba kosalela bango.” (Baebele 6:10) Yakobo 5:11 elobi ete: “Talá, tolobaka ete baoyo basili koyika mpiko bazali bato ya esengo. Bosili koyoka nsango ya koyika mpiko ya Yobo mpe bosili komona nsuka oyo Yehova abongisaki, ete Yehova azali na bolingo mingi ya motema mpe amonisaka motema mawa.” Makambo esukaki ndenge nini mpo na Yobo? “[Yehova] abakiselaki Yobo kino mbala na mibale na yango ezalaki na ye liboso.” (Yobo 42:10-16) Ɛɛ, Yehova “akómaka mopesi-mbano epai ya baoyo bazali koluka ye makasi.” (Baebele 11:6) Ata mpe mbano kitoko oyo tozali kozela na motema likoló—bomoi ya seko na paladiso awa na mabele!
18. Nini ekokómela makanisi nyonso ya mpasi oyo tozali na yango lelo?
18 Ntango Bokonzi ya Nzambe ekoyangela, ekolongola mbeba nyonso ya bato oyo esalami na boumeli ya bankóto ya bambula oyo eleki. Bisengo ya ntango wana ekoleka mosika mpasi nyonso oyo tozali komona sikoyo. Tokotungisama te na kokanisa makambo mabe mpe minyoko oyo eleká. Makanisi ya malamu mpe misala kitoko ya mokolo na mokolo ekolongola mokemoke makanisi ya mpasi na mitema ya bato. Yehova alobi ete: “Nazali kotonga lola ya sika [boyangeli ya sika ya Bokonzi ya likoló oyo ekoyangela bato] mpe mokili ya sika [bato ya sembo]; mpe makambo ya liboso makokanisama te, makoya mpe na motema te. Kasi bósepela mpe bóyoka esengo libela na yango ezali ngai kotonga.” Ya solo mpenza, na mokili ya sika ya Nzambe, bato ya sembo bakoloba ete: “Mokili mobimba ezali na kimya mpe na nyɛɛ; babandi koyemba.”—Yisaya 14:7; 65:17, 18.
Bozongeli
• Atako atiki nzela ete mabe ezala, ndenge nini Yehova amonisi mpenza limemya monene mpo na nkombo na ye?
• Ndenge nini “bambɛki ya nkanda” oyo Nzambe atikelaki yango nzela esali ete motema mawa na ye ekómela biso?
• Tosengeli kosala makasi mpo na komona nini na makambo oyo eyokisaka biso mpasi?
[Bililingi na lokasa 67]
Yehova “apambolaki mikolo ya nsuka ya Yobo koleka yango na ebandeli na ye”